Tobongisami “na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te”
1 Mpo Liyangani ya etúká esalema malamu, esɛngaka bato mingi básangisa milende na bango mpo na kosala elongo. Batambwisi ya liyangani baponaka esika malamu mpe balukaka bisika oyo bakoyamba bandeko oyo bautaka mosika. Ezala moto mokomoko to mabota, bango nyonso bazwaka bibongiseli mpo na ndenge ya kokende na liyangani mpe mpo na kozwa esika ya kolala. Mpe masangá esalaka elongo mpo na kopesa na bolingo malamu bandeko oyo bakosala na badepartema ndenge na ndenge oyo esɛngami mpo na kotambwisa liyangani na ndenge ya malamu. Nyonso wana ezali kosalema mpo ete “makambo nyonso masalema na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.”—1 Kol. 14:40.
2 Wana ozali kosangisa milende na yo na oyo ezali kosalema mpo na kobongisa liyangani, kobosana te ete esɛngaka basanza, ntango mosusu mpe bambula, mpo na kobongisa liyangani. Bankama ya bandeko balekisaka ntango mingi mpo na kobongisa biloko nyonso. Yango esɛngaka kofutela esika oyo yango ekosalema, kosangisa biloko ya mosala, mpe koluka basali. Kobongisa makambo liboso ndenge wana, esalaka ete moto nyonso azwa mapamboli. Tokoki kosala nini mpo na kopesa lisungi na biso?
3 Tómonisa bizaleli malamu na bisika oyo bayambi biso: Tosengeli kosala elongo na departema ya koyamba bapaya. Soki tozali kokana kokende kofanda epai ya libota moko oyo bazali kati na solo, tosengeli koyebisa bango yango liboso mpo bátya nkombo na bango te na liste ya bato oyo balingi koyamba bato mosusu na bandako na bango. Soki tosi tosɛngi esika ya kolala mpe bapesi biso yango epai ya libota moko, tosengeli kotosa bibongiseli yango. Tosengeli te kobongola makanisi na nsima mpe kozwa bibongiseli na biso moko na moto mosusu. Soki tosali bongo, yango ekoki kolɛmbisa bandeko ete bándimaka lisusu te koyamba bapaya epai na bango na mbala ya nsima. Bamosusu oyo bazali na bandeko na bango na engumba oyo liyangani ezali kosalema bakoki kolinga kokende kofanda kuna. Yango ekopesa bango libaku ya kopesa bandeko na bango litatoli mpo na solo, mpe kobengisa bango na liyangani. Epai mosusu, yango ekosala ete bisika ezala mingi mpo na koyamba bato mosusu oyo bazali na bandeko te na engumba oyo liyangani ezali kosalema.
4 Soki libota moko eyambi biso, ntango liyangani esili, tosengeli te koluka koumela kuna, mpamba te tokokóma bozito mpo na bandeko yango. Ntango tozali kofanda na bandeko na biso, tosengeli kozala na limemya mpo na biloko na bango mpe mpo na makambo oyo etali kaka bango moko. Lokola tozali bapaya tosengeli te kosimba to kosalela bibliotɛkɛ mpe biloko mosusu kozanga kosɛnga nzela epai ya mokólo-ndako. Ndenge moko mpe, ekozala malamu te kokɔta na bashambre mosusu epai tozali na ndingisa ya kokɔta te. Tosengeli mpe kokeba ete bana na biso básala mpe bongo. Tokomonisa mpe ete tozali komibanzabanza mpo na bango soki tozali kotya makɛlɛlɛ mingi te, kosolola na mongongo makasi te, kokanga porte makasi te mpe bongo na bongo.
5 Soki bandeko na biso bayambi biso epai na bango, tosengeli te kokóma bozito mpo na bango na makambo ya mbongo. Ezali mokumba na bango te ya kokokisa bamposa na biso ya mosuni; lobá nde soki bango moko basepeli kosala yango. Mokomoko asengeli kobongisa mbongo mpe kozwa bibongiseli liboso ya koya na liyangani mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye na oyo etali bilei mpe kofuta transport soki esika ya liyangani ezali mosika. Ndeko moko atɛkaki eteni ya mabele na ye mpo na kofuta tike ya kokende na liyangani mpe mpo na kokokisa bamposa na ye mosusu. Amipimelaki makambo mingi mpo na koyangana na liyangani mpe mpo azala bozito te mpo na bandeko oyo bayambaki ye.
6 Soki Ndako ya Bokonzi ebongisami mpo bapaya mosusu balala kuna, tosengeli komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bolamu ya bato nyonso oyo bazali wana. Ekozala malamu te ete tobengisa moto mosusu aya kofanda kuna elongo na biso kozanga kosɛnga nzela na departema oyo eyambaka bapaya. Esengeli kokeba ete Ndako ya Bokonzi ezala ntango nyonso pɛto mpe na mobulu te. Bato nyonso basengeli komonisa limemya mpo na baninga mosusu oyo balingi kopema, na yango basengeli te kobenda masolo milaimilai tii na katikati ya butu. Basengeli koyokana mpo na ngonga oyo bakobanda koboma miinda. Mokomoko azali na mposa ya kopema malamu mpo na kozala makasi na liyangani ya mokolo oyo ekolanda. Soki liyangani esili, bapaya nyonso oyo bazalaki na Ndako ya Bokonzi basengeli kokende mpo makita ya lisangá ekoka kozonga kosalema lokola momeseno. Ntango balongwe na Ndako ya Bokonzi, bapaya basengeli komindimisa ete batiki yango pɛto mpe ebongisami malamu, yango ekomonisa limemya mpo na bandeko na biso mpe ekokumisa Nzambe oyo tosambelaka.—1 Pet. 1:15, 16.
7 Lokola tozali basaleli ya Yehova Nzambe, tozali na libaku ya komonisa bizaleli na ye na makambo nyonso oyo tosalaka. Yango esangisi komibongisa mpo na kozala na mayangani epai nkombo ya Nzambe ezali kotángama. Tóbosanaka te ete Ye azali ‘Nzambe ya mobulu te, kasi ya kimya.’ (1 Kol. 14:33) Na yango, tiká ete bato oyo bazali kotala biso bámona ezaleli yango ya Yehova na makambo oyo tozali kosala—etamboli na biso wana tozali komibongisa mpo na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe” mpe etamboli na biso wana tokobanda koyangana na liyangani yango. Tiká ete bato ya mitema sembo oyo bazali kotala biso bámona ete basaleli ya Yehova oyo bayangani babongisami “na motindo mozali na nsɔni te mpe na mobulu te.”—1 Kol. 14:40; Nz. 68:26.