“Kiti ya Bokonzi ya Yehova” ezali nini?
NDIMBOLA ya moboko mpo na liloba ya Liebele kis·seʼʹ ezali bongo “ebonga” (1 Samwele 4:13), “kiti” (2 Mikonzi 4:10), to ebonga moko oyo ezali na ntina ya sikisiki lokola “kiti ya bokonzi.” (1 Mikonzi 22:10) Liloba yango lisalelamaka te bobele mpo na kolobela bibonga ya bakonzi oyo bazali koyangela (1 Mikonzi 2:19; Nehemia 3:7; Esetele 3:1; Ezekiele 26:16), to ezali te kolobela bobele kiti oyo ezali na esika ya kolalisa mokɔngɔ mpe ya kotya mabɔkɔ. Na ndakisa, ntango Eli afandaki na ekuke ya Silo, akweaki longwa na kis·seʼʹ na ye, oyo na ntembe te ezalaki ebonga ezangi esika ya kopemisa mokɔngɔ. (1 Samwele 4:13, 18) Liloba ya Greke throʹnos mbala mingi elobelaka ebonga ya molai, oyo ezali na esika ya kolalisa mokɔngɔ, esimbelo, mpe etyelo na makolo.
Yisaya 14:9 eyebisi ete bakonzi na mokili mobimba bazalaki na kiti ya bokonzi, mpe Biblia etángi sikisiki kiti ya bokonzi ya Ezipito (Genese 41:40; Exode 11:5; 12:29), ya Asulia (Yona 3:6), ya Babilone (Yisaya 14:4, 13; Danyele 5:20), ya Palasa (Esetele 1:2; 5:1), mpe ya Moaba (Basambisi 3:17, 20). Baarkeologe bakanisi ete basili komona bakiti ya bokonzi ya bayangeli wana to ya baninga na bango, longola bobele oyo ya Moaba. Eteni moko ya mpɛmbɛ ya nzoku, oyo ekanisami ete ezali elilingi ya kiti ya bokonzi ya Bakanana mpe etyelo na makolo na yango, emonanaki na etúká ya Megido. Mbala mingi, bakiti ya bakonzi wana oyo bazalaki Bayisalaele te izalaki na esika ya kolalisa mokɔngɔ mpe ya kotya mabɔkɔ, ekembisami na bikeko mpe bililingi mingi. Kiti ya bokonzi moko ya Ezipito oyo ebatelami kino lelo esalemaki na mabaya oyo ezipami na wolo, nzokande oyo ya Asulia esalemaki na ebende mpe ekembisami na bikeko ya mpɛmbɛ ya nzoku. Na momeseno, emonani lokola ete kiti ya bokonzi etyamaka na ebáelo, to na esika etombwani, mpe mbala mingi etyelo na makolo ezalaka wana.
Kiti ya bokonzi ya mokonzi moko ya Yisalaele oyo elobelami na bosikisiki ezali bongo oyo Salomo asalaki. (1 Mikonzi 10:18-20; 2 Ntango 9:17-19) Emonani lokola ete etyamaki na “Ndako na Kiti na bokonzi,” moko ya bandako oyo etongamaki likoló ya Ngomba Molia na Yelusaleme. (1 Mikonzi 7:7) Ezalaki ‘kiti na bokonzi monene na mpɛmbɛ ya nzoku mpe epakolami na loposo na wolo pɛtɔ.’ Atako mpɛmbɛ ya nzoku ezalaki esaleli ya moboko mpo na kosala kiti wana ya bokonzi, lolenge oyo tempelo etongamaki ezali kopesa likanisi ete kiti yango esalemaki na mabaya, ezipamaki na wolo kitoko mpe ekembisamaki na bikeko ya mpɛmbɛ ya nzoku. Mpo na moto oyo azali komona yango, kiti ya bokonzi wana ekoki komonana lokola nde esalemaki mobimba na mpɛmbɛ ya nzoku mpe na wolo. Nsima ya kolobela bibutelo motoba mpo na kokóma na kiti ya bokonzi, lisoló yango elandi ete: “Nkosi mibale ifandaki pembeni na bikangelo. Nkosi zomi na mibale itɛlɛmaki wana, moko na moko na epai na epai na ebutelo kati na bibutelo motoba.” (2 Ntango 9:17-19) Kosalela nkosi lokola elembo ya bokonzi ebongi mpenza. (Genese 49:9, 10; Emoniseli 5:5) Emonani lokola ete nkosi 12 ikokanaki na mabota 12 ya Yisalaele, komonisáká bongo botosi na bango mpe lisungi na bango epai na mokonzi oyo afandi na kiti ya bokonzi wana. Na lolenge moko to mosusu etyelo na makolo oyo esalemi na wolo ekangamaki na kiti ya bokonzi. Na lolenge oyo balobeli yango, kiti ya bokonzi wana—ya mpɛmbɛ ya nzoku mpe ya wolo, na etɛlɛmɛlo na yango etombwani, ezipami na nkosi minene—elekaki kiti ya bokonzi nyonso ya eleko wana, ezala oyo baarkeologe basili komona, to oyo iyemami likoló na bamonimá, to oyo elobelami kati na makomi. Mokomi ya Mokanda ya Ntango amonisaki yango na bosolo nyonso: “Lolenge yango esalamaki kati na bokonzi mosusu te.”—2 Ntango 9:19.
Ndimbola ya elilingi
Na ndimbola ya elilingi “kiti ya bokonzi” elimboli ebonga ya moto oyo azali koyangela (1 Mikonzi 2:12; 16:11) to boyangeli ya mokonzi mpe bokonzi yango moko (Genese 41:40; 1 Ntango 17:14; Nzembo 89:44); boyangeli oyo ezali kokamba to bokonzi likoló na mboka moko (2 Samwele 3:10); mpe etɛlɛmɛlo ya lokumu (1 Samwele 2:7, 8; 2 Mikonzi 25:28).
“Kiti ya bokonzi ya Yehova” ezali nini?
Yehova, oyo ata “lola mpe likoló na lola” ikoki kozingela ye te, afandaka te likoló ya kiti ya bokonzi to kiti ya solo. (1 Mikonzi 8:27) Nzokande, amonisaka bokonzi na ye lokola kiti ya bokonzi. Bamoko kati na basaleli ya Nzambe bazwaki libaku malamu ya komona emonaneli ya kiti ya bokonzi na ye. (1 Mikonzi 22:19; Yisaya 6:1; Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9; Emoniseli 4:1-3) Nzembo elobelaka kiti ya bokonzi ya Yehova, bonene to nguya na ye, etɛlɛmɛlo na ye ya Mosambisi Monene, lokola ete etyami likoló na boyengebene mpe kosambisa sembo uta “kalakala mpenza.”—Nzembo 89:14; 93:2; 97:2.
Yehova atɛlɛmisaki kiti ya bokonzi na ye na mabelé, na motindo ya elilingi mpe ya sikisiki kati na boyokani na ye na bana ya Yisalaele. Lokola ye oyo azalaki koyangela na Yisalaele asengelaki kozala “mokonzi oyo [Yehova] Nzambe akopona,” oyo asengelaki koyangela na nkombo na Yehova, koyangela bato ya Yehova mpe engebene mibeko ya Yehova, kiti ya bokonzi na ye ezalaki mpenza “kiti ya bokonzi ya Yehova.”—Deteronome 17:14-18; 1 Ntango 29:23.
Longola likambo oyo ete bokonzi na ye esalelamaki na nzela ya bakonzi ya libota ya Yuda, Yehova afandaki mpe na kiti ya bokonzi ya Yisalaele na ndimbola mosusu. Lokola Yilimia amonisaki yango: “Kiti na bokonzi etombwi likoló na nkembo longwa na ebandeli, efandelo na esika na biso na bulɛɛ ezali boye.” (Yilimia 17:12) Yehova alobelami ete “afandi likoló na bakeluba” oyo bazalaki likoló na ebonga-na-mawa ya sanduku ya kondimana na hema. (Exode 25:22; 1 Samwele 4:4) Kozala ya Nzambe emonisamaki na lipata oyo ezalaki kopesa bongɛngi oyo bakomeli Bayuda bayaki kobénga na nsima ete ‘Shekhi.nah.’ (Levitike 16:2) Atako Yilimia asakolaki ete sanduku ya kondimana ekozala te ntango Yisalaele ekouta na boombo na Babilone, yango elingaki te komonisa ete Yehova akanaki ete akofanda lisusu te na kiti ya Bokonzi na esika ya losambo na ye. Alobaki ete: “Na ntango yango, bakobyanga Yelusaleme ete, Kiti na [“bokonzi ya Yehova,” NW].” (Yilimia 3:16, 17) Bisakweli oyo Ezekiele asakolaki na ntina na kozongisama endimisi yango, mpamba te kati na emonaneli na ye ya tempelo ya Yehova oyo kati na yango sanduku ya kondimana ezalaki te, bayebisaki ye ete: “Mwana na moto, oyo [tempelo] ezali esika na kiti na bokonzi na ngai.”—Ezekiele 43:7.
Yehova apesaki elaka ete kiti na bokonzi ya mombóto ya Davidi “ekokokisama libela.” (1 Ntango 17:11-14) Kosakoláká kokokisama ya elaka wana, anzelu Gabaliele alobaki na Malia ete: “[Yehova] Nzambe akopesa ye [Yesu] kiti na bokonzi na Davidi tata na ye. Akozala mokonzi na ndako na Yakobo libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Yesu alingaki kosangola te bobele bokonzi likoló na mabelé kasi lisusu kosangana na kiti ya bokonzi ya Yehova, oyo ezali na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. (Emoniseli 3:21; Yisaya 66:1) Yesu mpe alakaki ete akokabola bokonzi likoló na kiti ya bokonzi na ye elongo na baoyo, lokola bantoma na ye ya sembo, bazalaki kati na kondimana ya sika elongo na Tata na ye, mpe baoyo bakolónga mokili lokola Yesu alóngaki yango. Yango esengeli kopesamela bango na “kozalisa na sika,” na ntango na kozala ya Yesu.—Matai 19:28; Luka 22:20, 28-30; Emoniseli 3:21.
Lokola esakolamaki na Nzembo 45:6, mpe elimbolami na Paulo kati na Baebele 1:8, (NW) kiti ya bokonzi ya Yesu, mokumba to bokonzi na ye lokola mokonzi, euti na Yehova: “Nzambe azali kiti na bokonzi na yo mpo na seko.” Na ngámbo mosusu Zábolo, mpe apesaka moboko to bokonzi mpo ete bibongiseli na ye biyangela, lokola yango emonisami na Emoniseli 13:1, 2, na ntina na ‘nyama oyo abimaki na mai monene’ ete: “Dalagona apesi ye nguya na ye, na kiti na bokonzi na ye, na bokonzi monene.” Ntango Satana alakisaki Yesu Klisto nguya mpe bokonzi motindo yango, ayebisaki motuya na yango ete: “Soko okokumbamela ngai, oyo nyonso ekozala na yo.” (Luka 4:5-7) Bobele bongo, kopesama ya kiti ya bokonzi to bokonzi epai na “nyama” esengelaki kosalema bobele soki akosalela Satana.
Wana azalaki kolobela etɛlɛmɛlo ya Yesu lokola Kapita Mosali ya Nzambe, Paulo alobaki ete na nzela ya Klisto “kiti na makonzi” izalisamaki. Emonani lokola ete liloba yango lizali kolobela bitɛlɛmɛlo ya bayangeli, baoyo bazali komonana mpe baoyo bazangi komonana, kati na ebongiseli ya boyangeli ya Nzambe.—Bakolose 1:16.