Solo na ntina na lifelo
LAPÓLO ya komisyó oyo etalelaka mateya ya Lingomba ya Angleterre elobi ete lifelo ezali te esika ya mɔ́tɔ; kasi, ezali nde esika oyo ebimisami bobele na makanisi ya bato epai kuna eloko moko ezali te. Lapólo yango eyebisi ete: “Ezali na bantina mingi mpo na yango mbongwana wana esalemi. Moko kati na bantina yango ezali bongo makanisi mabimisami na bato oyo bazali kati na lingomba ya boklisto mpe bato ya mangomba mosusu mpo na kotɛmɛla lingomba oyo ebangisaka bato, mpe bokóli ya likanisi oyo ete Nzambe atindaki bamilió ya bato kati na minyoko ya seko ekesanaki mpenza na emoniseli ya bolingo ya Nzambe kati na Klisto.”
Kozanga boyokani wana na lolenge oyo bazalaki kotalela lifelo na ntango ya kala etaleli te bobele Lingomba ya Angleterre. Bato ya mangomba ndenge na ndenge bazali na mokakatano ya kosambela Nzambe wana ya nkanda mingi, oyo azikisaka bato ya masumu. Jackson Carroll, profɛsɛrɛ ya makambo ya mangomba mpe ya makambo ya bomoi ya bato na kelasi ya teoloji na Eteyelo monene ya Duke, alobaki ete: “Bato balingaka Nzambe oyo azali na motema mawa mpe na bolingo. Kolobela lisumu mpe ngambo eyokani te na makanisi ya mikolo oyo.”
Batatoli ya Yehova bandimaka uta kala mpenza, lokola Biblia ezali koteya yango ete, lifelo ezali bongo nkunda ya bato nyonso—ezali te esika ya konyokwama na mɔ́tɔ. Soki bateyaka likanisi oyo, ezali te mpo ete eyebani na bato mingi, kasi ezali mpo ete Biblia elobi: “Mpo ete bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, . . . ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi [“lifelo,” Douay Version, Biblia ya Katolike].”—Mosakoli 9:5, 10.
Na lisalisi ya bososoli oyo ya polele na ntina na ezalela ya bakufi, Charles Taze Russell, prezidá ya liboso ya la Société Watch Tower, akomaki na 1896 ete: “[Kati na Biblia] tozali kokuta te esika wana ya minyoko ya seko, lokola bindimeli mpe búku ya nzembo ya mangomba, mpe bateyi, bazali koteya yango na libungá nyonso. Kasi, tosili kokuta ‘lifelo,’ sheol, hades, oyo kati na yango biso nyonso tokweisamaki mpo na lisumu ya Adama, mpe uta na yango biso banso tosombami na nzela ya liwa ya Nkolo na biso; mpe ete ‘lifelo’ yango ezali nkunda—ezalela ya liwa.”
Na yango, uta koleka mbula monkámá, Batatoli ya Yehova bazali koteya solo ya Biblia na ntina na lifelo.
[Elilingi na lokasa 32]
Charles T. Russell