Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/2 nk. 20-23
  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakómi kotya motema epai na Yehova
  • Mosala ya elimo elendisaki ngai
  • Mikumba mosusu kati na mosala ya ntango nyonso
  • Misala na ngai na Betele
  • Bandako ya Betele na biso
  • Mikumba ya motuya mingi
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/2 nk. 20-23

Kotya Motema Epai Na Yehova Esungaki Ngai

LISOLÓ YA AGENOR DA PAIXÃO

Mwana na biso bobele moko ya mobali, Paul, akufaki na maladi ya mpema wana akokisaki bobele sanza zomi na moko nsima ya kobotama. Sanza misato na nsima, na mokolo mwa 15 Augústo 1945, mwasi na ngai oyo nalingaki mingi akufaki na maladi ya mampúlúlú. Nazalaki na mibu 28, mikakatano wana epesaki ngai mawa mpe ebulunganisaki ngai. Nzokande, kotya motema epai na Yehova mpe na bilaka na ye esungaki ngai. Tiká nayebisa bino lolenge nakómaki kotyela Yehova motema.

UTA kobotama na ngai na engumba Salvador, na etúká ya Bahia, na Brésil, na mokolo mwa 5 Yanuáli 1917, mama ateyaki ngai kosambela “basantu” ya lingomba ya Katolike. Azalaki kútu kolamwisa ngai mpe bandeko ngai na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpo ete tóbondela elongo. Nzokande, baboti na ngai bazalaki mpe koyangana na makita ya candomblé, milulu ya losambo ya vaudou oyo esangisaka bonkɔ́kɔ ya Afrika mpe ya Brésil. Nazalaki komemya bindimeli wana, kasi nazalaki kondimela basantu ya lingomba ya Katolike to mpe lingomba ya candomblé te. Eloko elɛmbisaki ngai mpenza kati na mangomba yango ezalaki bongo ezaleli oyo ezalaki komonana kuna ya kokanisela basusu mabe.

Na nsima, bayaya na ngai nyonso mibale ya mibali batikaki ndako ya baboti mpo na kokende koluka mosala. Na nsima, tata na ngai asundolaki libota. Na yango, na ntango nakómaki na mibu libwa, nasengelaki koluka mosala mpo na kosunga mama mpe leki na ngai ya mwasi. Mbula 16 na nsima, masoló oyo tozalaki kosolola elongo na moninga moko ya mosala na kompanyi ebongolaki bomoi na ngai.

Nakómi kotya motema epai na Yehova

Nakutanaki na Fernando Teles na 1942. Azalaki mbala mingi koloba ete kosambela “basantu” ezali mabe. (1 Bakolinti 10:14; 1 Yoane 5:21) Liboso, nazalaki koyoka makambo na ye te. Kasi eloko ebendaki ngai epai na ye ezalaki bongo bosembo na ye mpe ezaleli na ye ya kotyela basusu likebi, kozanga kotalela mposo na bango, mpe nakómaki kosepela na boyebi na ye ya Biblia, mingi mpenza makambo oyo azalaki koloba na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe paladiso na mabelé. (Yisaya 9:6, 7; Danyele 2:44; Emoniseli 21:3, 4) Lokola amonaki ete nazalaki na bosepeli, apesaki ngai Biblia mpe mwa ndambo ya mikanda mikolimbolaka Biblia.

Mwa bapɔ́sɔ na nsima, nandimaki kokende koyangana na boyekoli ya Biblia na lisangá. Etuluku yango ezalaki koyekola mokanda Lingomba ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society. Nasepelaki na boyekoli yango mpe nabandaki koyangana na makita nyonso ya lisangá ya Batatoli ya Yehova. Eloko oyo ebendaki mpenza likebi na ngai kuna ezalaki ete namonaki te ezaleli ya koponapona mposo mpe lolenge oyo bandimaki ngai kozanga kokakatana. Ezalaki mpe na ntango yango nde nakómaki kokutana na Lindaura mpo na kolengela libala. Na ntango nayebisaki ye makambo oyo nazalaki koyekola, abandaki koyangana na makita elongo na ngai.

Likambo mosusu oyo ebendaki likebi na ngai kati na makita ezalaki lolenge bazalaki kolobela mingi mosala ya kosakola. (Matai 24:14; Misala 20:20) Nsima wana babongisi-nzela (lolenge babéngaka baministre ya ntango nyonso) balendisaki ngai, nabandaki kosolola na bato mosusu wana libaku limonani kati na engbunduka na ntango nazalaki kokende na mosala to mpe kozonga na ndako. Soki namoni moto oyo amonisi bosepeli, nazalaki kokoma adresi na ye mpe kokende kotala ye mpo na komeka kokólisa bosepeli wana.

Bobele na ntango yango, ezaleli na ngai ya kotya motema epai na Yehova mpe na lisangá oyo azali kosalela ezalaki sé kokóla. Na yango, nsima ya koyoka lisoló ya Biblia na ntina na komipesa ya moklisto, nabatisamaki na Mai monene ya Atlantique, na mokolo mwa 19 Apríli 1943. Bobele na mokolo yango, nasanganaki na mosala ya kosakola ndako na ndako mpo na mbala ya liboso.

Pɔ́sɔ mibale na nsima, ngai mpe Lindaura tobalanaki, ezalaki mokolo mwa 5 Máí. Na nsima, na Augústo 1943, ye mpe abatisamaki na liyangani ya liboso oyo Batatoli ya Yehova basalaki na engumba Salvador. Búku Annuaire des Témoins de Jéhovah 1973 elobaki na ntina na liyangani yango ete: “Bakonzi ya mangomba basalaki makasi mpo ete lisukúlu ya bato banso esalema te na Salvador, kasi na ntango yango mosala ya kosakola . . . esilaki kosalema mingi mpenza.” Elembo oyo emonisaki ete litambwisi ya Yehova ezalaki ata na ntango ya monyoko ekembisaki ezaleli na ngai ya kotyela ye motema.

Lokola nayebisaki yango na ebandeli, bobele mbula mibale nsima wana Lindaura azwaki batisimo​—mpe sanza misato nsima ya liwa ya mwana na biso ya mobali​—mwasi na ngai oyo nalingaki mingi akufaki. Azalaki bobele na mbula 22. Kasi elikya oyo nazalaki na yango epai na Yehova esungaki ngai na boumeli ya basanza wana ya mikakatano.

Mosala ya elimo elendisaki ngai

Na 1946, mbula moko nsima wana mwasi na ngai mpe mwana na ngai bakufaki, naponamaki lokola mosaleli ya boyekoli ya Biblia kati na lisangá bobele moko oyo ezalaki na Salvador na eleko wana. Bobele na mobu yango, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebandaki kosalema na masangá ya Brésil, mpe nakómaki motambwisi ya liboso ya eteyelo yango na etúká ya Bahia. Na nsima, na Ɔkɔtɔ́bɛ 1946, liyangani ya Teokrasi “Mabota na esengo” lisalemaki na engumba ya São Paulo. Nkolo-mosala na ngai oyo nasilaki koselela na boumeli ya mbula zomi alobaki ete azalaki na mposa na ngai mpe apekisaki ngai ete nakende te. Nzokande, nsima wana nalimbwelaki ye ete koyangana na ngai na liyangani wana ezalaki na ntina mingi, apesaki ngai likabo mpe atombelaki ngai mobembo malamu.

Na liyangani oyo esalemaki na ndako monene ya masano ya São Paulo, masoló masalemaki na Portugais​—lokótá ya Brésil​—mpe na Lingelesi, na Allemand, na Hongrois, na Polonais, mpe na Russe. Zulunalo Lamuká! ebimisamaki na lokótá ya Portugais na liyangani wana. Liyangani yango esalaki bopusi makasi likoló na ngai na boye ete natondisaki lokasa ya bosɛngi mosala ya mobongisi-nzela na mokolo mwa 1 Novɛ́mbɛ 1946​—bato soko 1 700 bayanganaki na lisukúlu ya bato banso.

Na ntango yango tozalaki kosalela mingi fonó kati na mosala na biso ya kosakola. “Libateli” ezalaki motó ya likambo ya moko ya masukúlu oyo tozalaki koyokisa yango mbala mingi epai na bato na bandako na bango. Na nsima, tozalaki koloba ete: “Mpo na komibatela na monguna oyo azangi komonana, tosengeli kokangama epai na moninga oyo mpe amonanaka te. Yehova azali moninga na biso oyo aleki monene mpe azali na nguya mingi koleka monguna na biso, Satana. Na yango, tosengeli kokangama epai na Yehova mpo ete tómibatela na Satana.” Mpe na nsima, tozalaki kolakisa mokanda Libateli, oyo ezalaki koyebisa makambo mosusu mingi.

Mbula mobimba ekokaki naino te uta nabandaki mosala ya mobongisi-nzela nazwaki libyangi ya kokende kosala lokola mobongisi-nzela monene na lisangá ya Carioca na engumba Rio de Janeiro. Kuna tozalaki kokutana na botɛmɛli makasi na bantango mosusu. Moninga na ngai ya mosala, Ivan Brenner, abundisamaki na nkolo ndako moko. Bato ya kartyé babéngaki bapolísi, mpe bamemaki biso na biro ya bapolísi.

Wana bazalaki kotuna biso mituna, moto yango oyo azalaki na nkanda makasi afundaki biso ete tozali kokɔtisa mobulu. Mokonzi ya bapolísi ayebisaki ye ete afanda nyɛɛ. Na nsima, mokonzi ya bapolísi abalukaki epai na biso mpe alobaki na malɛmbɛ nyonso ete tozali na bonsomi ya kokende. Akangaki moto yango oyo afundaki biso mpe atángelaki ye efundeli ete azali mobundisi. Makambo lokola oyo ebatelaki ezaleli na ngai ya kotya motema epai na Yehova.

Mikumba mosusu kati na mosala ya ntango nyonso

Na mokolo mwa 1 Yulí 1949, nasepelaki mingi mpo ete nabyangamaki kokende kosala na Betele, lolenge babéngaka biro ya Batatoli ya Yehova na mboka nyonso oyo yango ezali. Na ntango wana, Betele ya Brésil ezalaki na balabála Licínio Cardoso No. 330 na Rio de Janeiro. Na ntango yango, tozalaki bobele basangani 17 na libota mobimba ya Betele. Na boumeli ya mwa ntango moke, nazalaki koyangana na lisangá ya Engenho de Dentro, kasi na nsima naponamaki ete nazala mokɛngɛli-mokambi na lisangá bobele moko ya Belford Roxo, engumba oyo ekabolami na Rio de Janeiro na ntáká ya mwa bakilomɛtɛlɛ.

Nazalaki na mosala mingi na bawikende. Na mikolo ya pɔ́sɔ nazalaki kokende na Belford na engbunduka, nazalaki kosangana na mosala ya kosakola na nsima ya nzánga, mpe na mpokwa nazalaki kosangana na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya mosala. Nazalaki kolala epai ya bandeko mpe kobima na mosala ya kosakola mokolo ya Lomingo na ntɔ́ngɔ́. Na mokolo yango na nsima ya nzánga nazalaki koyangana na lisoló ya bato banso mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe nazalaki kozonga na Betele na ngonga ya libwa na ndambo na butu. Lelo oyo, ezali na masangá 18 kati na engumba Belford Roxo.

Na 1954, nsima ya kolekisa mbula misato na ndambo na koyanganáká na lisangá wana, natindamaki lisusu na Rio de Janeiro lokola mokɛngɛli-mokambi na lisangá ya São Cristóvão. Nasalaki elongo na lisangá yango na boumeli ya mbula zomi oyo elandaki na nsima.

Misala na ngai na Betele

Mosala na ngai ya liboso na Betele ezalaki bongo ya kotonga esika mpo na kobomba motuka bobele moko ya la Société, ezalaki bongo modele Dodge van oyo ebimaki na 1949, oyo topesaki yango nkombo Shokolá mpamba te ezalaki na lángi ya shokolá. Na ntango esika yango esilaki kotongama, batindaki ngai ete nakende kosala na kúku, epai kuna nasalaki na boumeli ya mbula misato. Na nsima, natindamaki na departemá ya bonyati mikanda, ezali kuna nde nazali kosala uta koleka mbula 40.

Bisaleli mingi ya konyata mikanda oyo tozalaki kosalela esilaki kosalelama liboso epai mosusu. Na ndakisa, na boumeli ya mbula mingi tosalelaki masini moko ya kala oyo tolingaki yango mingi mpe tozalaki kobénga yango ete Sala, nkombo ya mwasi ya Abalayama. Esilaki koselelama na boumeli ya mbula mingi kati na ndako ya bonyati mikanda na biro monene ya la Société Watch Tower na Brooklyn, New York. Na nsima, na 1950, etindamaki na Brésil. Awa, lokola mwasi ya Abalayama, ebotaki mbuma atako esilaki koumela mbula mingi​—ezalaki kobota bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!

Nazalaki ntango nyonso kokamwa na komona bokóli ya motángo ya mikanda oyo ezalaki kobimisama na masini ya bonyati mikanda na Brésil. Na boumeli ya mbula mobimba ya 1953, tonyataki bazulunalo 324 400, kasi lelo oyo motángo yango ezali bongo koleka milió misato sanza na sanza!

Bandako ya Betele na biso

Komona kobakisama ya bandako ya Betele na biso ya Brésil na boumeli ya bambula ezalaki likambo ya kosepelisa. Na 1952 totongaki ndako ya bonyati mikanda ya etazi mibale na nsima ya ndako ya kolala ya Betele na Rio de Janeiro. Na nsima, na 1968, misala ya Betele mitindamaki na bandako ya sika na engumba São Paulo. Ntango tokendaki kuna, emonanaki ete esika ezalaki monene mpe ekokaki mpo na libota na biso ya Betele oyo ezalaki na basangani 42. Tokanisaki solo ete ndako yango ekokaki kosalisa biso mpo na bokóli nyonso oyo elingaki koya. Nzokande, na 1971, bandako mibale ya etazi mitano etongamaki, pembeni wana ndako mosusu ya bonyati mikanda esombamaki, ebongisamaki mpe ekangisamaki na bandako mosusu ya Betele. Kasi na nsima ya mwa bambula, motángo ya basakoli ya Bokonzi ezalaki sé kokóla mpe esɛngaki kotongama ya bandako mosusu​—tokómaki basakoli 100 000 na 1975.

Na bongo, bandako mosusu etongamaki na esiká oyo ezwamaki na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 140 kolongwa na São Paulo pene na engumba moke ya Cesário Lange. Na 1980 libota na biso ya Betele ya basangani 170 totindamaki na bandako wana ya sika. Uta ntango yango kino lelo Mosala ya Bokonzi ezali kokóla na lolenge ya kokamwisa. Sikawa tozali na basakoli 410 000 oyo bazali kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola na Brésil! Mpo na kokokisa bamposa ya basakoli wana ya Bokonzi, tosengelaki kokóba kotonga bandako ya sika mpo na bonyati mikanda mikolimbolaka Biblia mpe bandako ya sika ya kolala mpo na basáli ya bolingo malamu na Betele. Sikawa tozali na basangani soko 1 100!

Mikumba ya motuya mingi

Natalelaka mosala na Betele lokola mokumba ya motuya mingi. Na yango, atako na bambula ya ebandeli nakanisaki ete nasengelaki kobala lisusu, naponaki kotya likebi na ngai mobimba na mikumba na ngai na Betele mpe na mosala ya kosakola. Awa, nasili kozwa esengo ya kosala elongo na ebele ya bilenge na esika ya bonyati mikanda mpe ya kolakisa bango mosala. Namekaka kosalela bango makambo lokola ete bazali bana na ngai mpenza. Molende na bango mpe elimo na bango ezangi moimi elendisaka ngai mingi.

Libaku malumu mosusu ezali ete nasili kosepela kofanda elongo na baninga ndenge na ndenge na ndako moko na boumeli ya bambula. Ya solo, bokeseni ya bomoto ezalaki mbala mosusu kobimisa mikakatano. Nzokande, nayekolaki ete nasengelaki te komizela ete basusu báselela ngai makambo lokola bato ya kokoka. Nasalaka makasi ete nakómisa te makambo mikemike lokola makambo minene to mpe namitalela te ete naleki basusu. Kosekáká mabunga na ngai moko esungaki ngai ete nakanga motema liboso na mabunga ya basusu.

Libaku mosusu ya motuya mingi oyo nazwaki ezali bongo likoki ya kokende na mayangani ya mikili mingi oyo esalemaki na États-Unis. Moko na yango ezalaki bongo liyangani “Nsango malamu ya seko,” oyo esalemaki na libanda ya masano ya Yankee Stadium, na New York, na 1963, mpe mosusu ezalaki liyangani ya mikili mingi “Kimya na mabelé” oyo esalemaki bobele kuna na 1969. Ntango nakendaki kuna, nazalaki na esengo ya kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York!

Nazalaki mpe na libaku ya kosangana na boumeli ya mbula zomi elongo na bandeko mosusu​—moto na moto engebene ngala na ye​—mpo na kokamba losambo ya ntɔ́ngɔ́ na libota ya Betele. Kasi, libaku eleki mpenza monene, oyo epesaki ngai esengo mpe elendiseli, ezalaki bongo oyo ya komema nsango ya Bokonzi epai na bato ya motema sembo, lokola Nkolo na biso Yesu Klisto asalaki yango.

Na bambula oyo, nazali kobunda na mpasi na misisa, oyo ebéngami ete maladi ya Parkinson. Lisungi ya bolingo ya bandeko mibali mpe bandeko basi ya ndako ya lisungi ya Betele ezali ntango nyonso kosalisa mpe kobɔndisa ngai. Na kotyáká motema mobimba epai na Yehova, nazali kobondela ete apesa ngai makasi ya kokóba kosala nyonso ekoki na ngai mpo na losambo na ye ya solo.

[Elilingi na lokasa 23]

Na filiale ya Brésil epai nazali kofanda sikawa

[Bililingi na lokasa 23]

Elongo na mwasi na ngai oyo akufaki na 1945

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto