“Ata bomoni ye naino te, bolingi ye”
“Ata bomoni naino ye te, bolingi ye. Ɛɛ, bozali komona ye sasaipi te nde mpo na kondima bozali kosepela na esengo eleki maloba.”—1 PETELO 1:8.
1. Atako moto moko te awa na mabelé asilá komona Yesu, lolenge nini bato mosusu ya mangomba basalaka makasi mpo na komonisa komipesa na bango epai na ye?
EZALI na moto moko te lelo oyo awa na mabelé oyo asilá komona Yesu Klisto. Nzokande, bamilió ya bato balobaka ete balingaka ye. Mbula na mbula, na mokolo mwa 9 Yanuáli, na engumba Manila, na mboka Philippines, bato bakamataka ekeko moko ya monene oyo emonisaka Yesu Klisto amemi ekulusu; batambwisaka yango na balabála na boumeli ya molulu oyo ebéngami ete molulu moleki monene ya lingomba kati na mboka wana, yango ebendaka mpenza likebi ya bato mingi. Ebele ya bato wana oyo bazali na esengo bapusanaka mpe batindikanaka; kútu bamataka moko likoló na mosusu na mobulu nyonso mpo na koluka kosimba ekeko wana. Bato mingi oyo bayaka wana mpo na kotala yango babendamaka mingimingi na lolenge etuluku wana etambolaka na kosepela nyonso. Nzokande, bamoko kati na bango, na ntembe te, bazali bato oyo bamiyokaka ete babendami mpenza epai na Yesu. Mpo na komonisa bokangami na bango epai na ye, balataka mbala mosusu ekulusu to mbala mosusu bakendaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na ndakonzambe. Nzokande, losambo wana ya bikeko ekoki nde kotalelama ete ezali losambo ya solo?
2, 3. (a) Kati na bayekoli mpenza ya Yesu, nani amonaki ye mpe ayokaki ye? (b) Na ekeke ya liboso banani lisusu balingaki Yesu mpe bamonisaki kondima epai na ye, atako bamonaki ye mpenza na miso te?
2 Na ekeke ya liboso, ezalaki na ebele ya bato kati na bitúká ya Loma: Yudea, Samalia, Pelea, mpe Galilai oyo bamonaki mpe bayokaki Yesu Klisto. Bazalaki koyoka ye wana azalaki kolimbola mateya ya kosimba motema na ntina na Bokonzi ya Nzambe. Bamonaki makamwisi oyo ye asalaki. Bamoko kati na bango bakómaki bayekoli oyo bamipesaki epai na ye, baoyo bandimisamaki ete azalaki “Klisto, mwana na Nzambe na bomoi.” (Matai 16:16) Nzokande, baoyo ntoma Petelo akomelaki mokanda na ye ya liboso oyo mopemami, bazalaki bato ya bitúká wana te.
3 Baoyo Petelo atindelaki mokanda bazalaki na bitúká ya Loma: Pɔntɔ, Galatia, Kapadɔkia, Asia, mpe Bitunia—bitúká oyo nyonso bizwami na mokili oyo eyebani lelo ete Turquie. Epai na bango, Petelo akomaki ete: “Ata bomoni naino ye te, bolingi ye. Ɛɛ, bozali komona ye sasaipi te nde mpo na kondima bozali kosepela na esengo eleki maloba mpe etondi na nkembo.” (1 Petelo 1:1, 8) Lolenge nini bayaki koyeba Yesu Klisto kino kokóma kolinga ye mpe komonisa kondima epai na ye?
4, 5. Lolenge nini bato oyo bamoná naino Yesu te bayekolaki makambo matali ye mpo na kolinga ye mpe mpo na kondimela ye?
4 Ya solo, bamoko bazalaki na Yelusaleme ntango ntoma Petelo apesaki litatoli epai na bibele oyo bayanganaki na elambo ya Pantekote ya mobu 33 T.B. Nsima ya elambo yango bayekoli mingi batikalaki na Yelusaleme mpo na kozwa malako mingi mosusu epai na bantoma. (Misala 2:9, 41, 42; kokanisá na 1 Petelo 1:1.) Na boumeli ya mibembo ya misionere, na molende nyonso, ntoma Paulo asalaki mosala ya Nzambe epai na bato oyo bazalaki kofanda na teritware epai kuna Petelo atindaki na nsima mokanda na ye ya liboso oyo ezali na Biblia mpe oyo ememi nkombo na ye.—Misala 18:23; 19:10; Bagalatia 1:1, 2.
5 Mpo nini bato wana, oyo bamonaki naino Yesu te, bakokaki kobendama makasi epai na ye? Na mikolo na biso, mpo na nini bamilió mingi, kati na mokili, bazali kolinga ye mingi?
Makambo oyo bayokaki
6. (a) Soki oyokaki litatoli ya Petelo na ntina na Yesu na Pantekote ya mobu 33 T.B., makambo nini okokaki koyekola? (b) Lolenge nini yango ezalaki na bopusi likoló na bato 3 000 oyo bazalaki wana?
6 Soki ozalaki na Yelusaleme ntango Petelo alobaki epai na bibele oyo bazalaki na elambo ya mobu 33 T.B., makambo nini olingaki koyekola na ntina na Yesu? Na ntembe te, makamwisi oyo asalaki emonisaki ete atindamaki na Nzambe. Ete, atako bato ya masumu babomaki Yesu, atikalaki na lilita te kasi asekwisamaki mpe na nsima amataki na likoló na lobɔkɔ mobali ya Nzambe. Ete Yesu azalaki solo Klisto, Masiya oyo mpo na ye basakoli bakomaki. Ete na nzela ya Yesu Klisto, elimo santu esopanaki likoló na bayekoli na ye na boye ete nokinoki bazwaki likoki ya kopesa litatoli epai na bato oyo bautaki na bikólo mingi na ntina na makambo kitoko oyo Nzambe azalaki kosala na nzela ya Mwana na ye. Mitema ya bato mingi oyo bayokaki Petelo na libaku wana misimbamaki, mpe bato 3 000 bazwaki batisimo lokola bayekoli baklisto. (Misala 2:14-42) Soki ozalaki wana, olingaki kokamata ekateli wana ya nguya?
7. (a) Soki ozalaki na Antiokia ntango ntoma Paulo asakolaki kuna, makambo nini okokaki koyekola? (b) Mpo na nini bamoko kati na bibele bakómaki bandimi mpe bazalaki koyebisa nsango malamu epai na bato mosusu?
7 Soki ozalaki moko kati na baoyo bazalaki wana ntango ntoma Paulo ateyaki na Antiokia kati na Galatia oyo ezalaki bongo etúká ya Loma, makambo nini mosusu olingaki koyekola na ntina na Yesu? Olingaki koyoka Paulo kolimbola ete likambo oyo ete Yesu akatelamaki etumbu ya liwa na bakonzi kati na Yelusaleme, likambo yango lisilaki kosakolama na basakoli. Olingaki mpe koyoka litatoli oyo limonisaki lisekwa ya Yesu. Ya solo, olingaki mpe kokamwa na ndimbola ya Paulo oyo ete lokola asekwisaki Yesu longwa na bakufi, Yehova amonisaki mpenza ete Yesu azalaki Mwana na Nzambe. Mpe motema na yo elingaki kopusa yo na komonisa botɔ́ndi wana olingaki koyeba ete kolimbisama ya masumu na komonisáká kondima epai na Yesu ekoki komema na bomoi ya seko, boye te? (Misala 13:16-41, 46, 47; Baloma 1:4) Lokola bayebaki ndimbola ya makambo oyo bazalaki koyoka, bamoko kati na Antioka bakómaki bayekoli, basanganaki na molende nyonso na koyebisa nsango malamu epai na basusu, atako kosala bongo elimbolaki ete basengelaki kokutana na minyoko makasi.—Misala 13:42, 43, 48-52; 14:1-7, 21-23.
8. Soki ozalaki na likita na lisangá ya Efese ntango mokanda ya Paulo ekómaki kuna, makambo nini olingaki koyekola?
8 Elingaki kozala boni soki ozalaki kati na lisangá ya boklisto oyo ezalaki na Efese, na Asia oyo ezalaki bongo etúká ya Loma, ntango bayekoli bazwaki mokanda mopemami ya ntoma Paulo? Makambo nini olingaki koyekola kati na mokanda yango na ntina na mokumba oyo Yesu azali na yango kati na mokano ya Nzambe? Na mokanda wana, Paulo alimbolaki ete na nzela ya Klisto biloko binso kati na likoló mpe awa na nsé bikozongisama na boyokani elongo na Nzambe, ete likabo Nzambe apesi na nzela ya Klisto ekabolami epai na bato ya mabota nyonso, ete bato oyo, engebene Nzambe, basili kokufa mpo na mabunga na bango bazongisamaki na bomoi na nzela ya kondima epai na Klisto, mpe ete lokola litomba ya ebongiseli wana, likoki lizwamaki lisusu mpo na bato ete bákóma bana balingami ya Nzambe.—Baefese 1:1, 5-10; 2:4, 5, 11-13.
9. (a) Nini ekoki kosalisa yo na kososola soki ozali mpenza kokanga ntina ya makambo oyo Paulo akomelaki Baefese? (b) Lolenge nini bandeko balobelami na Petelo, baoyo bazalaki na bitúká ya Loma, bapusamaki na makambo oyo bayekolaki na ntina na Yesu?
9 Botɔ́ndi mpo na nyonso wana elingaki koyeisa makasi bolingo na yo mpo na Mwana ya Nzambe? Bolingo wana elingaki kozala na bopusi likoló na bomoi na yo ya mokolo na mokolo, lokola ntoma Paulo alendisaki yango kati na mokapo 4 kino mokapo 6 ya Baefese? Botɔ́ndi motindo wana elingaki kopusa yo na kotalela na likebi nyonso makambo oyo otyaka na esika ya liboso kati na bomoi na yo? Na ntina na bolingo mpo na Nzambe mpe na botɔ́ndi mpo na Mwana na ye, olingaki kosala mbongwana oyo esengeli na boye ete kosala mokano ya Nzambe ezala mpenza likambo ya libosoliboso kati na bomoi na yo? (Baefese 5:15-17) Na kotalela lolenge baklisto ya Asia, ya Galatia, mpe ya bitúká mosusu ya Loma bapusamaki na makambo oyo bayekolaki, ntoma Petelo akomelaki bango ete: “Ata bomoni [Yesu Klisto] te, bolingi ye. . . . Mpo na kondima bozali kosepela na esengo eleki maloba mpe etondi na nkembo.”—1 Petelo 1:8.
10. (a) Na ntembe te, likambo nini lipesaki nzela na baklisto ya liboso ete bázala na bolingo mpo na Klisto? (b) Lolenge nini biso mpe tokoki kozwa litomba?
10 Ezalaki na likambo mosusu oyo na ntembe te epesaki nzela na bolingo mpo na Mwana na Nzambe, bolingo oyo ezalaki epai na baklisto ya liboso baoyo Petelo atindelaki mokanda. Likambo yango ezalaki nini? Na ntango oyo Petelo akomaki mokanda na ye ya liboso, Baevanzile mibale—Matai mpe Luka—esilaki kopalangana na ntango yango. Baklisto ya liboso oyo bamonaki naino Yesu te bakokaki kotánga masoló ya Baevanzile yango. Biso mpe tokoki kotánga yango. Baevanzile yango ezali masapo te; masoló na yango ezali na bilembo bimonisi ete yango ebongi kotyelama motema. Kati na masoló wana mapemami, tozali kokuta makambo mingi oyo mazali koyeisa makasi bolingo na biso mpo na Mwana na Nzambe.
Elimo oyo amonisaki
11, 12. Makambo nini matali elimo oyo Yesu amonisaki epai na bato mazali kopusa yo ete olinga ye?
11 Kati na lisoló lipemami ya bomoi ya Yesu, tozali koyekola lolenge azalaki kosala epai na bato. Elimo oyo amonisaki, esili koleka mibu 1960 nsima ya liwa na ye, ezali kosimba mitema ya bato lelo oyo. Moto nyonso oyo azali na bomoi azali kotungisama mpo na mbuma mabe ya lisumu. Bamilió mingi bazali komona kozanga sembo oyo bazali kosalela bango, bazali kobunda na makɔnɔ, to mpo na bantina mosusu bazali konyokwama na mawa. Epai na bato nyonso wana, Yesu alobi ete: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.”—Matai 11:28-30.
12 Yesu azalaki komibanzabanza mpenza mpo na babólá, bato oyo bazalaki na nzala, mpe baoyo bazalaki na mawa. Ntango yango esengelaki, aleisaki kútu bibele na lolenge ya likamwisi. (Luka 9:12-17) Alongolaki bango na boombo ya makambo ya bonkɔ́kɔ. Lisusu, alendisaki kondima na bango kati na ebongiseli oyo Nzambe azali na yango ya kosilisa monyoko mouti na makambo ya politiki mpe ya nkita. Yesu azalaki te kolɛmbisa elimo ya baoyo bazalaki komona mpasi. Na boboto mpe na bolingo, atombolaki basɔkɛmi na mayele nyonso. Abɔndisaki baoyo bazalaki lokola matiti matutami oyo masilaki kongunzama mpe baoyo bazalaki lokola lotambe oyo ezalaki kozika mokemoke mpe oyo ezalaki pene na kozimana. Uta ntango wana kino lelo oyo, nkombo na ye epesaka elikya, ata na mitema ya baoyo bámona ye naino te.—Matai 12:15-21; 15:3-10.
13. Mpo na nini lolenge oyo Yesu azalaki kosala liboso na basumuki ezali kobenda bato epai na ye?
13 Yesu azalaki kondima makambo mabe te, nzokande ayebaki malamu ezalela ya bato oyo basalaki mabunga kati na bomoi kasi babongolaki motema mpe bamibalolaki epai na ye mpo na koluka lisalisi. (Luka 7:36-50) Afandaki mpe alyaki elongo na bato oyo batyolamaki na bato mosusu wana amonaki ete yango ekokaki kopesa ye libaku ya kosalisa bango na elimo. (Matai 9:9-13) Lokola litomba ya elimo oyo amonisaki, bamilió ya bato oyo bazalaki na ezalela motindo wana, oyo bamonaki naino Yesu te bapusamaki na koyeba ye mpe bamonisaki kondima epai na ye.
14. Nini ezali kobenda likebi na yo na kotalela lolenge oyo Yesu azalaki kosalisa bato oyo bazalaki na makɔnɔ, bakakatali, to baoyo bakufelaki moto?
14 Lolenge oyo Yesu azalaki kosala epai na bato oyo bazalaki na makɔnɔ to baoyo bazalaki bakatatali emonisi elembeteli ya bolingo na ye, ya ezaleli na ye ya motema mawa mpe ya likoki oyo azalaki na yango ya kobɔndisa bango. Na yango, ntango moto moko oyo nzoto etondaki na maba abɛlɛmaki epai na ye mpe alɔmbaki ete asalisa ye, Yesu aboyaki kosalisa ye te. Mpe alobaki te na mobali yango ete, atako ayokaki mawa mpo na ye, maladi na ye ekómaki mpenza makasi mingi mpe eloko moko te ekokaki kosalema mpo na kobikisa ye. Mobali yango abondelaki ye ete: “Nkolo, soki olingi, okoki kopɛtola ngai.” Kozanga kokakatana, Yesu asembolaki lobɔkɔ mpe amamaki moto na maba, kolobáká ete: “Nalingi, opɛtwa!” (Matai 8:2, 3) Na libaku mosusu, kozanga ete ayebana, mwasi moko alukaki kobikisama na kosimbáká nsɔngɛ́ ya elamba na ye. Yesu asalaki epai na ye na lolenge ya boboto mpe ya kokitisa motema. (Luka 8:43-48) Mpe wana akutanaki na etuluku ya bato oyo bazalaki kokende kokunda moto, ayokaki mawa mpo na mpasi ya mwasi-mokufeli-mobali oyo mwana na ye bobele moko akufaki. Atako Yesu aboyaki kosalela nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kobimisa bilei mpo na ye moko na lolenge ya likamwisi, kozanga kokakatana, asalelaki yango mpo na kosekwisa moto wana oyo akufaki mpe azongisaki ye epai na mama na ye.—Luka 4:2-4; 7:11-16.
15. Kotánga masoló ya Yesu mpe komanyola likoló na yango ezali na bopusi nini likoló na yo?
15 Ntango tozali kotánga masoló wana mpe tozali komanyola likoló na elimo oyo Yesu amonisaki, bolingo na biso ezali koyeisama makasi mpo na ye oyo apesaki bomoi na ye ya bomoto ete biso tókoka kozwa bomoi ya seko. Atako tosilá komona ye naino te, tozali komiyoka ete tobendami epai na ye, mpe tolingi kolanda na matambe na ye.—1 Petelo 2:21.
Ezaleli na ye ya komikitisa na kotyáká motema epai na Nzambe
16. Epai na nani Yesu azalaki libosoliboso kotya likebi, mpe alendisaki biso ete tósala nini?
16 Koleka makambo nyonso, Yesu atyaki likebi na ye mpe oyo ya biso epai na Tata na ye ya likoló, Yehova Nzambe. Amonisaki mobeko oyo eleki monene kati na Mibeko, kolobáká ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:36, 37) Apesaki toli epai na bayekoli na ye ete: “Bózala na kondima na Nzambe!” (Malako 11:22) Ntango bakutanaki na komekama makasi ya kondima na bango, asɛngaki na bango ete: “Bóbondelaka.”—Matai 26:41.
17, 18. (a) Lolenge nini Yesu atyaki motema epai na Tata na ye na komikitisa nyonso? (b) Mpo na nini oyo ye asalaki ezali mpenza na ntina mpo na biso?
17 Yesu ye moko apesaki ndakisa. Libondeli ezalaki likambo ya ntina mingi kati na bomoi na ye. (Matai 14:23; Luka 9:28; 18:1) Wana ntango ekokaki mpo na ye ete apona bantoma na ye, Yesu atalelaki bobele mayele na ye moko te, atako uta kala baanzelu nyonso na likoló basilaki kotyama na nsé na ye. Na komikitisa nyonso, alekisaki butu mobimba mpo na kobondela Tata na ye. (Luka 6:12, 13) Ntango alingaki kokangama mpe kokufa liwa ya mpasi, Yesu amibalolaki lisusu epai na Tata na ye, kobondeláká ye na molende nyonso. Azalaki na likanisi te ete ayebaki Satana malamu mpe ete akokaki kozanga nkaká kopɛngola nyonso oyo mosáli mabe wana akokaki kobimisa. Yesu ayebaki ete ezalaki mpenza na ntina ete akwea te. Soki akweaki, oyo nde nsɔ́ni monene yango elingaki kozala mpo na Tata na ye! Mpe oyo nde kozanga ya bomoi yango elingaki kozala mpo na bato oyo bilikya na bango bityamaki likoló na mbeka ya lisiko oyo Yesu asengelaki kopesa!
18 Yesu azalaki kobondela mbala mingi—ntango azalaki elongo na bantoma na ye wana bazalaki na eteni ya likoló ya ndako moko na Yelusaleme mpe abondelaki lisusu na etingya mingi koleka kati na elanga ya Getesemane. (Matai 26:36-44; Yoane 17:1-26; Baebele 5:7) Wana azalaki konyokwama likoló na nzeté ya mpasi, afingaki te baoyo batukaki ye. Nzokande, abondelaki mpo na baoyo bazalaki kosala na kozanga koyeba, ete: “Tata, limbisá bango mpo ete bayebi yango ezali bango kosala te.” (Luka 23:34) Atyaki makanisi na ye epai na Tata na ye, ‘komipesáká epai na ye oyo akosambisaka sembo.’ Maloba ya nsuka oyo abimisaki wana azalaki na nzeté ya mpasi ezalaki bongo libondeli epai na Tata na ye. (1 Petelo 2:23; Luka 23:46) Tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi mpo ete Yesu atyaki motema na ye mobimba epai na Yehova mpe akokisaki na bosembo nyonso mosala oyo Tata na ye apesaki ye! Atako tomoná naino Yesu Klisto te, tozali mpenza na bolingo makasi mpo na oyo asalaki!
Tómonisa bolingo na biso mpo na Ye
19. Wana ezali biso komonisa bolingo epai na Yesu, misala nini ya mabe tosengeli mpenza koboya?
19 Lolenge nini tokoki komonisa ete bolingo oyo tozali kolobela eleki mosika maloba ya mpamba? Lokola Tata na ye, oyo Yesu azalaki kolinga, apekisaki kosala bikeko mpe na nsima kosalela yango lokola biloko ya losambo, kolata ekeko motindo wana na nkingo to kotambola na yango na balabála, ezali kokumisa Yesu te. (Exode 20:4, 5; Yoane 4:24) Mpo na biso ekozala mpe likambo ya kozanga kokumisa Yesu soki tozali koyangana na mísa, ata mpe kosala yango mbala mingi na boumeli ya pɔ́sɔ, nzokande tozali te komitambwisa na boyokani na mateya na ye na boumeli ya pɔ́sɔ. Yesu alobaki ete: “Oyo azali na malako na ngai mpe azali kotosa yango, ye wana azali molingi na ngai; molingi na ngai akolingana na Tata na ngai.”—Yoane 14:21, 23; 15:10.
20. Wapi ndambo na makambo oyo makomonisa soki tozali mpenza kolinga Yesu?
20 Malako nini apesaki biso? Libosoliboso, kosambela Nzambe ya solo, Yehova mpe bobele ye moko. (Matai 4:10; Yoane 17:3) Na ntina na mokumba na ye kati na mikano ya Nzambe, Yesu ateyaki mpe ete tosengeli komonisa kondima epai na ye lokola Mwana na Nzambe mpe ete tosengeli komonisa yango na koboyáká misala mabe mpe na kotamboláká kati na pole. (Yoane 3:16-21) Apesaki biso toli ete tóluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye, kotyáká yango liboso ya bamposa na biso ya mosuni. (Matai 6:31-33) Apesaki etindá ete tólinganaka lokola ye alingaki biso. (Yoane 13:34; 1 Petelo 1:22) Mpe apesaki biso mokumba ya kozala batatoli ya makambo matali mokano ya Nzambe, motindo moko ye azalaki motatoli. (Matai 24:14; 28:19, 20; Emoniseli 3:14) Atako bamoná naino Yesu te, milió mitano ya Batatoli ya Yehova bapusami lelo oyo na bolingo ya solosolo mpo na ye ete bátosa malako wana. Atako bamoná Yesu te na miso na bango mpenza, yango ezali te kolɛmbisa ekateli na bango ya kotosa ye. Bazali komikundola oyo Nkolo na bango alobaki epai na ntoma Toma: “Yo ondimi mpo ete osili komona ngai? Esengo na bango bamoni te nde basili kondima.”—Yoane 20:29.
21. Matomba nini tokozwa na koyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto, oyo ekosalema mbula oyo na Mwalomingo, 23 Mársi?
21 Tozali kolikya ete okozala elongo na baoyo, na mokili mobimba, bakoyangana na Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova nsima ya kolala ya moi na Mwalomingo, 23 Mársi 1997, mpo na kokanisa elembeteli eleki monene ya bolingo oyo Nzambe amonisaki epai na bato mpe mpo na kokanisa liwa ya Mwana na ye ya sembo, Yesu Klisto. Oyo ekolobama mpe ekosalema na libaku yango esengeli koyeisa makasi bolingo mpo na Yehova mpe mpo na Mwana na ye mpe bongo kokólisa mposa ya kotosa mibeko ya Nzambe.—1 Yoane 5:3.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Lolenge nini bato oyo epai na bango mokanda ya liboso ya Petelo etindamaki bayaki koyeba mpe kolinga Yesu?
◻ Wapi ndambo na makambo baklisto ya liboso bayokaki oyo mazali kosepelisa yo?
◻ Na nini elimo oyo Yesu amonisaki ezali koyeisa makasi bolingo na yo mpo na ye?
◻ Mpo na nini ezaleli ya Yesu ya kotya motema epai na Nzambe na komikitisa nyonso ezali na ntina mingi mpo na biso?
◻ Lolenge nini tokoki komonisa bolingo na biso mpo na Yesu Klisto?
[Bililingi na lokasa 16, 17]
Tozali kobendama epai na Yesu na ntina na elimo oyo amonisaki