Banani Bazali Solosolo Bamemi-nsango ya Kimya?
MOKOLO mwa 31 Máí 1996, bipanzeli-nsango bisakolaki oyo emonanaki ete nsango ya kimya. Na mokolo oyo mozalaki liboso, liyebisi moko libimisamaki oyo esakolaki ete Benjamin Netanyahu, oyo azalaki pene na kokóma ministre-mokonzi ya ekólo ya Israël, “amonisaki ete azalaki na likanisi ya kokóba masoló mpo na koluka myango ya kotya kimya mpe kobatelama kati na ekólo ya Israël mpe bikólo oyo bizali zingazinga na yango, ata mpe elongo na ekólo ya Palestine.”
Koponama ya Netanyahu oyo elobelamaki mingi etindaki bato mingi na komituna soki kimya na Moyen-Orient ekozala likambo ya solo. Soki ezali bongo, bikólo mosusu bikoyokana mpenza na Israël, kobosanáká matáta oyo mazali kati na bango?
Ya solo, kopesa elaka ya kotya kimya ezalaka pɛtɛɛ, kasi kokokisa elaka yango nde ezalaka mpasi. Koyebáká yango, bato mingi bazalaki na ntembe. Lokola elobaki yango mopanzi-nsango Hemi Shalev, “ndambo ya bato na Israël bazali na mayoki ete kobongisama lisusu ya makambo esili kobɛlɛma; nzokande basusu bazali kokanisa ete Israël ezwami na ezalela moko ya mpasi epai mikakatano mileki mpe nzela ya kokima yango ezali te.” Na mokuse, alobaki ete: “Bamoko bazali kosepela, basusu bazali kolela.”
Ezali lolenge wana nde makambo matambolaka ntango bato bazali komeka kotya kimya. Bolóngi ya mokonzi moko na bato na ye elimboli kokwea ya batɛmɛli na ye. Kozanga bosepeli ememaka na kozanga elikya, mpe kozanga elikya, mbala mingi ememaka na botomboki. Ezala na Moyen-Orient, na Amérique Latine, na Mpótó ya Ɛ́sti, to na bipai nyonso mosusu—milende ya bato mpo na kotya kimya elóngaka te.
Kimya ya solosolo ebɛlɛmi!
Na boumeli ya ntango oyo kimya na Moyen-Orient ezalaki kolobelama mingi kati na bipanzeli-nsango, nsango mosusu ya kimya ezalaki koyokama. Yango ezalaki te lisukúlu ya bato ya politiki oyo esakolamaki mingi; ezalaki mpe te boyokani ya kimya kati na bikólo. Nzokande, nsango yango ezalaki kosakola kimya oyo ekouta bobele na nzela ya Bokonzi ya Nzambe. Epai wapi nsango yango eyokamaki? Na Mayangani ya Etúká koleka 1 900 oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” oyo esalemaki na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na 1996/1997.
Na mayangani wana, emonisamaki polele ete ezali na boyangeli moko te ya bato oyo ekoki kopesa kimya mpe kobatelama ya solosolo. Mpo na nini? Mpamba te yango ekosengela kotya nsuka na makambo nyonso oyo mazali kolongwela biso kimya mokolo na mokolo. Kimya ya solosolo elimboli kolamuka ntɔ́ngɔ́ nyonso kozanga makaneli ya bitumba to mobulu. Elimboli ete mabe ekozala lisusu te, fungola ekozala lisusu na bikuke te, kobanga kotambola na balabála ekozala lisusu te, mabota makokabwana lisusu te. Boyangeli nini awa na mabelé ekoki kosala makambo nyonso wana? Ya solo, boyangeli nini awa na mabelé ekoki kútu komeka kopesa elaka na makambo wana?
Nzokande, Bokonzi ya Nzambe ekoki mpe ekosala makambo wana. Biblia epesi elaka ete: “Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Oyo nde kobɔndisama mpo na libota ya bato oyo lizali na mpasi!
Elaka ya Yehova Nzambe ezali elaka ya mpamba te. Biblia endimisi biso ete: “Nzambe azali moto te ete akata lokuta, mpe mwana na moto te ete abongola motema. Asili koloba mpe akosala yango te? To, asili kopesa monɔkɔ mpe akokokisa yango te?” (Mituya 23:19) Ɛɛ, oyo Nzambe asili kolaka ekokokisama—mpo na mapamboli ya baoyo nyonso bamitye na ngambo na ye.
Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe
Batatoli ya Yehova bayebani malamu mpo na molende na bango na oyo etali kosakola Bokonzi ya Nzambe. Mbula na mbula, bango nyonso lokola lisangá bazali kolekisa ngonga koleka miliare moko na koyebisa nsango ya kosimba motema oyo ezali kati na Biblia epai na bato mosusu. Yango ezali kokokisa maloba ya Yesu oyo ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Nsango oyo Batatoli bazali kosakola ezali solo “nsango malamu,” mpamba te yango ezali kosakola Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló lokola elikya bobele moko mpo na bato. Mpe oyo nde elikya makasi mpo na mikolo mizali koya!
Ata sikawa Bokonzi ya Nzambe ezali kosala ete bayangelami na yango bázala na ekanganeli ya solosolo ya kimya mpe na bolingo mpo na bandeko. Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na komitambwisa na boyokani na lisɛngami wana ya moboko ya boklisto ya solo. Lokola litomba, kati na bango bondeko ya solosolo esangisi Bayuda mpe Baarabe, Bakroate mpe Baserbe, Bahutu mpe Batutsi. Kimya oyo bato mingi bakoki bobele kolɔ́ta yango ezali sikawa komonana epai ya bamilió ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba.
Elendiseli ya kolanda komitambwisa na boyokani na mitindá ya Biblia mpe kokóba kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe elobelamaki mingi na manáka ya Liyangani ya Etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe.” Tozali kobyanga yo ete otánga lapólo ya kosimba motema ya mikolo misato ya liyangani yango, oyo bamilió ya bato basepelaki na yango, na lisoló lilandi.