Tika ete “kimya na Nzambe” ebatela mitema na bino!
“Tika ete Jéhovah atombola elongi na ye epai na yo mpe apesa yo kimya!”—MITUYA 6:26.
1. Mwa ntango moke liboso ete akufa, Paulo akomaki nini epai na Timoté, mpe yango emonisi nini?
NA MOBU 65 ya ntango na biso, ntoma Paulo azalaki mokangami na Rome. Mosika te, Baloma balingaki koboma ye na motindo na nsomo, kasi azalaki na kimya. Ezali yango nde emonani na maloba oyo atindaki epai na elenge Timoté, ete: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela kondima. Uta sikawa motólé ya boyengebene ebombami mpo na ngai, oyo Nkolo, mosambisi na sembo, akopesa ngai na mokolo yango.”—2 Timoté 4:7, 8.
2. Eloko nini ebatelaki motema ya Paulo na boumeli va bomoi na ye ya makámá, mpe kino kufa na ye?
2 Ndenge nini Paulo akokaki kozala na kimya, nzokande asengelaki kokufa? Eyano yango oyo ete, “kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso,” ebatelaki motema na ye. (Bafilipi 4:7) Kimya yango ebatelaki ye na boumeli ya bambula ya makámá oyo azwaki uta kobongwana na ye na boklisto. Esungaki ye kati na yikiyiki mpe na boloko, na mpimbo mpe na kobólama mabángá. Elendisaki ye kati na etumba elongo na bapengwi mpe na bopusi ya Bayuda. Mpe, esalisaki ye na kobundisa bilimu mabe bizangi komonana. Na solo mpenza, kimya yango elendisaki ye kino nsuka.—2 Bakolinti 10:4, 5; 11:21-27; Baefese 6:11, 12.
3. Mituna nini tokoki komituna na ntina na kimya ya Nzambe?
3 Kimya yango ezalaki bokasi monene mpo na Paulo. Lelo oyo, biso mpe tokoki te koluka koyeba lolenge nini yango ezali? Ekosalisa biso na kobatela mitema na biso mpe ekolendisa biso, baoyo tozali kobunda “etumba malamu ya kondima” na “mikolo oyo ya mpasi.”—1 Timoté 6:12; 2 Timoté 3:1.
Ndenge nini bato babungisaki kimya elongo na Nzambe
4. Wapi mwa bandimbola ya mobu oyo libóngolami na “kimya” kati na Biblia?
4 Kati na Biblia, liloba libóngolami na “kimya lizali na bandimbola mingi. Tala mwa ndambo na yango oyo ezwami kati na mokanda Nouveau Dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament (angl.): “Kati na K[ondimama] na K[ala] na mobimba na yango, [sha.lom’] (kimya) ezali kopesa likanisi ya kozala malamu na ndimbola na yango ya molai (Bas. 19:20); kozala na bozwi (Nz. 73:3), ata mpo na bato mabe; kozala na kolongono na nzoto malamu (Yis. 57:18,[ 19]; Nz. 38:3); kozala na esengo . . . [Gen. 15:15, mpe bongo na bongo]; boyokani malamu kati na mabota mpe kati na bato (. . . Bas. 4:17; 1 Nta. 12:17, 18); lobiko (. . . Yil. 29:11; tala Yil. 14:13).” Nzokande, kozala na boyokani ya kimya elongo na Jéhovah ezali likambo ya ntina mingi, soki yango te, lolenge na kimya nyonso ekozala bobele mpo na ntango moke mpe ekozala na nsuka.—2 Bakolinti 13:11.
5. Ndenge nini na ebandeli, kimya ya bikelamu na Nzambe ebebisamaki?
5 Na ebandeli, bikelamu binso bizalaki na kimya elongo na Jéhovah. Yango wana Nzambe alobaki ete, biloko nyonso bizalaki malamu mingi. Mpe, na likoló, baanzelu bangangáki na esengo wana bamonaki biloko yango. (Genese 1:31; Yobo 38:4-7) Kasi likambo na mawa mpenza, kimya yango na molóngó mobimba ezalaki bobele mpo na ntango mokuse. Ebebisamaki mokolo ekelamu ya elimo oyo abéngami sikawa Satana, apusaki Eva oyo azalaki elenge kati na bikelamu ya mayele nyonso na Nzambe, ete azanga kotósa Mozalisi. Adam alandaki mwasi na ye Eva kati na nzela yango:batomboki misato oyo bapesamelaki bonsomi ya kosala makambo, babebisaki boyokani kati na molóngó.—Genese 3:1-6.
6. Makambo nini makómeláki bato wana bazangaki kimya elongo na Nzambe?
6 Mpo na kozanga kimya elongo na Nzambe, mpasi ekómelaki Adam na Eva:nzoto ebandaki konuna mokemoke kino komema bango na liwa. Na esika ete azala na kimya kati na Paradis, Adam azalaki na mpasi mpenza mpo na kolóna mabelé mazalaki kobóta malamu te, na libandá ya Edene, mpo na koleisa libota na ye oyo lizalaki sé kokóla. Na esika ete abota bato na kokoka kati na esengo, Eva abotaki bakitani bazangi kokoka kati na bolozi mpe mpasi. Kozangáká kimya elongo na Nzambe, zuwa mpe mobulu emonanaki na bato. Kaĩna abomaki ndeko na ye, Abele; mpe na eleko na mpela, mabelé matondaki na mobulu. (Genese 3:7 kino 4:16; 5:5; 6:11, 12) Wana bakufaki, bankoko na biso ya liboso bakendeki na nkunda na esengo te, na “kimya” te na kokesena na Abrahame oyo ayei na bomoi bikeke mingi nsima na bango.—Genese 15:15.
7. (a) Esakweli nini esalemaki na Nzambe, emonisaki kozongisama na kimya nyonso? (b) Satana, monguna na Nzambe, asili kozwa bopusi nini?
7 Ezali nsima wana Adam na Eva babungisaki kimya nde koyinana elobelami mpo na mbala ya liboso kati na Biblia. Epai na Satana, Nzambe alobaki ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na libota na yo mpe libota na ye. Ye akotuta motó na yo, mpe yo okoswa litindi na ye.” (Genese 3:15) Na boumeli ya ntango, Satana akómaki na bopusi makasi mpenza lokola oyo ntoma Yoane alobi: “Mokili mobimba mozali na nsé na nguya na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19, MN) Mokili oyo mozali na nsé na Satana mokoki soko moke te kozala na kimya elongo na Nzambe. Tala mpo na nini moyekoli Yakobo apesi likebisi oyo malamu:“Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyinana na Nzambe?”—Yakobo 4:4.
Kimya kati na mokili ya koyinana
8, 9. Ndenge nini bato bakokaki kozala na kimya elongo na Nzambe, nsima wana Adam asalaki lisumu?
8 Ntango Nzambe alobelaki mpo na mbala ya liboso liloba “kiyinana” na Edene, asakolaki mpe lolenge nini kimya na kokoka ekozongisama epai na biloko na kozalisama. Libota na ndaká ya mwasi na Nzambe, likotuta motó ya oyo abebisaki kimya na ebandeli Uta eleko yango, bato oyo bazalaki na kondima kati na elaká yango, bazalaki na boyokani ya kimya elongo na Nzambe. Na ntina na Abrahame, boyokani yango ekómaki boningá.—2 Ntango 20:7; Yakobo 2:23.
9 Na eleko na Moïse, Jéhovah asalaki ekólo ya bana na Yisraele, bankóko ya Abrahame. Apesaki kimya epai na ekólo yango, lokola emonisami na lolenge oyo Arona, nganga monene, apambolaki libota: “Tika ete Jéhovah apambola yo mpe abatela yo! Tika ete Jéhovah angengisa elongi na ye epai na yo, mpe ete apesa yo ngolu na ye! Tika ete Jéhovah atómbola elongi na ye likoló mpe apesa yo kimya!” (Mituya 6:24-26) Kimya ya Jéhovah ezalaki kozwila mbano monene, kasi epesamaki mpamba te.
10, 11. Ndenge nini Yisraele akokaki kozala na kimya elongo na Nzambe, mpe matomba nini mazalaki kouta na kimya ya yango?
10 Jéhovah alobaki na libota na ye ete: “Soko bokotambola na mibeko na ngai mpe bokotósa malako na ngai mpe bokosala yango, boye nakopesa bino mbula na ntango na yango, mpe mokili mokobota mbuma na yango, mpe nzete na elanga ekobota mbuma na yango. Nakopesa bino kimya kati na mokili yango, mpe bokolala, mpe moto akobangisa bino te. Nakotambola kati na bino mpe nakozala Nzambe na bino, mpe bino bokozala bato na ngai.” (Levitike 26:3, 4, 6, 12) Libota na Yisraele likokaki kozwa kimya, mpamba te babatelamaki longwa na banguna na bango, bazalaki na biloko mingi na mosuni mpe bazalaki na boyokani malamu elongo na Jéhovah. Nzokande, mpo na kozwa bolamu wana, esengelaki na bango ete bakangama na Mibeko na Nzambe.—Nzembo 119:165.
11 Ya solo, na boumeli na lisoló ya libota yango, Bayisraele oyo basalaki makasi mpo na kobatela mitinda na Jéhovah na bosembo mpenza, bazalaki na kimya elongo na ye, likambo oyo lizalaki kopesa bango mapamboli mingi mbala na mbala. Na bambula ya yambo na boyangeli ya Salomo, kimya elongo na Nzambe ememelaki Yisraele bozwi na mosuni, mpe elónga kati na bitumba oyo bazalaki kobunda na mabota ya penepene. Na ntina na eleko yango, Biblia elobi ete: “Yuda mpe Yisraele bafandaki na kimya longwa Dani kino Bele-Seba, moto na moto na nsé na vinyo na ye mpe na nsé na mowiti na ye, na mikolo nyonso ya Salomo.” (1 Mikonzi 4:25) Ata ntango koyinana ebimaki elongo na bamboka ya zingazinga, Bayisraele ya sembo bazalaki na kimya mingi, kimya elongo na Nzambe. Tala mpo na nini mokonzi Davidi, mobundi monene na etumba, akomaki ete: “Nakolala, ee nakolala na kimya, mpamba te bobele yo moko Jéhovah, okobatela ngai na esika na ngai.”—Nzembo 4:8.
Moboko malamu mpo na kimya
12. Ndenge nini na nsima, Yisraele abwakaki kimya elongo na Nzambe?
12 Na nsima, Yesu akómaki Libota oyo lisengelaki kotya kimya ya kokoka. Na ntango abotamaki, baanzelu bayembaki ete: “Nkembo na Nzambe na bisika bileki likoló, mpe kimya na mabelé kati na bato na boboto!” (Luka 2:14) Yesu abimaki na libota ya Yisraele, kasi, atako kondimana oyo ekangisaki bango na Nzambe, libota yango mobimba baboyaki Yesu mpe bakabaki ye epai na Baloma mpo ete abomama. Mwa moke liboso na kufa na ye, Yesu alelaki mpo na Yelusaleme, ete:“Soki na mokolo oyo ososolaki mpenza makambo makopesa kimya; kasi sikawa makambo yango mabombami na miso na yo.” (Luka 19:42; Yoane 1:11) Mpo ete baboyaki Yesu, libota ya Yisraele babungisaki mpenza kimya oyo ezalaki koyokanisa bango elongo na Nzambe.
13. Ebongiseli nini ya sika Jéhovah asalaki mpo ete moto akoka kozala lisusu na kimya elongo na nzambe?
13 Kasi, mikano na Nzambe mibebisamaki te. Yesu asekwaki kati na bakufi mpe apesaki Jéhovah motuya ya bomoi na ye ya moto na kokoka, lokola lisiko mpo na bato na motema sembo. (Baebele 9:11-14) Mbeka na Yesu ezali ebongiseli ya sika mpe ya malamu mingi oyo ezali kopesa nzela na bato, ezala Bayisraele to Bapakano ete bazala na kimya elongo na Nzambe. Paulo alobaki kati na mokanda na ye epai na baklisto ya Rome ete: “Tozalaki liboso bayinani na Nzambe, nde tozongi na bondeko elongo na Nzambe mpo na kufa ya Mwana na ye.” (Baloma 5:10) Na ekeke ya liboso, baoyo basalaki motindo oyo mpo na kozala na kimya elongo na Nzambe, bapakolamaki na elimo santu mpo na kokóma bana na Nzambe, basangani ya libota ya sika, libota ya elimo libéngami “Yisraele ya Nzambe.”—Bagalatia 6:16; Yoane 1:12, 13; 2 Bakolinti 1:21, 22; 1 Petelo 2:9.
14, 15. Lobela mpenza kimya na Nzambe, mpe limbola lolenge oyo yango ezali kobatela baklisto ata na ntango bayinami na Satana.
14 Bayisraele oyo ya sika na ndimbola ya elimo, basengelaki kozala bayinami na Satana mpe mokili na ye. (Yoane 17:14) Nzokande, basengelaki kozala na “kimya oyo ekoutaka na Nzambe Tata, mpe na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” (2 Timoté 1:2) Yesu alobaki na bango ete:“Nasili koloba na bino makambo oyo ete bozala na kimiya kati na ngai. Kati na mokili, bozali na bolozi; kasi bozala na mpiko! Ngai nasili kolónga mokili.”—Yoane 16:33, MN.
15 Ezali kimya wana nde esalisaki Paulo mpe baninga na ye baklisto ete bayika mpiko atako mimekamo oyo bakutanaki na yango. Ezali komonisa boyokani ya kimya mpe ya kolongobana elongo na Nzambe, oyo esili kosalema na nzela ya mbeka na Yesu. Ezali kopesa kimya na elimo epai na moto oyo azali kososola libateli oyo Jéhovah azali komonisa epai na ye. Mwana oyo abómbani na nsé na libateli ya tata ya bolingo, amiyokaka na motindo na kimya wana, akondimisama mpenza ete abatelami na moto oyo alingi ye. Paulo alobaki epai na Bafilipi na maloba oyo ya kolendisa:“Bomitungisa mpo na likambo moko te, nde kati na makambo nyonso, tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekobatela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”—Bafilipi 4:6, 7.
16. Kimya oyo moto asili lisusu kozwa elongo na Nzambe, ezalaki na bopusi nini kati na boyokani ya baklisto na ekeke ya liboso?
16 Ntango kimya kati na Nzambe mpe moto ebebaki, koyina mpe kozanga boyokani ebimaki mpo na moto. Mpo na baklisto ya ekeke ya liboso, kimya oyo ezwamaki lisusu elongo na Nzambe, ebotaki mbuma ekeseni: kimya mpe bomoko ezalaki kati na bango, yango Paulo abéngaki ete, “ekanganeli na kimya.” (Baefese 4:3) ‘Bazalaki na boyokani kati na bango, bazalaki na kimya, mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya azalaki elongo na bango.’ Lisusu, bazalaki kosakola “nsango malamu ya kimya,” oyo ezalaki mpenzampenza nsango malamu ya lobiko mpo na ‘bato na kimya,’ baoyo bazali kondima nsango malamu.—2 Bakolinti 13:11; Misala 10:36; Luka 10:5, 6.
Kondimana na kimya
17. Kondimana nini Nzambe asili kosala elongo na libota na ye na ntango na biso?
17 Lelo oyo, tokoki nde kozwa kimya motindo wana? Ee. Nsima wana Bokonzi na Nzambe botyamaki na 1914, na nsé na boyangeli na Yesu Klisto akembisami, Jéhovah ayanganisaki batikali na Yisraele ya elimo na kobimisáká bango longwa na mokili oyo, mpe asalaki kondimana na kimya elongo na bango. Akokisaki bongo elaká oyo apesaki na nzela na mosakoli Ezekiele, ete: “Nakosala kondimana na kimya elongo na bango; ekozala kondimana ya seko elongo na bango. Nakolendisa bango, mpe nakofulisa bango, mpe nakotya esika na ngai ya bulee kati na bango mpo na libela.” (Ezekiele 37:26) Jéhovah asalaki kondimana oyo elongo na baklisto bapakolami, baoyo bazali na kondima kati na mbeka na Yesu, lokola endimaki bandeko na bango na ekeke ya liboso. Wana bapetolamaki na mbindo nyonso ya elimo, bamipesaki epai na Tata na bango ya likoló mpe bazali kosala milende ya kolanda mitinda na ye, mingi mpenza na kozaláká na molongó ya liboso kati na mosala ya kosakola na mokili mobimba, nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe oyo bosili kotyama.—Matai 24:14.
18. Bamoko na bato kati na mabota basalaki ndenge nini wana basosolaki ete, nkombo na Nzambe ezali likoló na Yisraele ya Nzambe?
18 Esakweli elandi ete:“Esika na ngai ya kofanda ekozala elongo na bango, mpe ngai nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. Mabota mpe bakoyeba ete, ngai Jéhovah, nazalisi Yisraele bulee.” (Ezekiele 37:27, 28) Na boyokani na maloba oyo, bankóto na bankóto, ee, bamilió na bato bauti na “mabota” bayebi ete nkombo ya Jéhovah ezali likoló na Yisraele ya Nzambe. (Zakari 8:23) Bato yango bauti na mabota nyonso, bayangani mpo na kosalela Jéhovah elongo na libota ya elimo. Basali bongo “ebele monene” oyo elobelami na Emoniseli. Lokola ‘basukoli bilamba na bango mpe bayeisi yango mpembe na makila ya Mwana na Mpate,’ bakobika na bolozi monene mpe bakokóta na mokili ya sika mpe ya kimya.—Emoniseli 7:9, 14.
19. Kimya nini libota na Nzambe ezali na yango lelo?
19 Bango nyonso elongo, Yisraele ya Nzambe mpe ebele monene bazali na kimya ya elimo oyo ekokani na kimya oyo Bayisraele bazalaki na yango na nsé na boyangeli ya Salomo. Na ntina na bango, Mika asakolaki ete: “Bakotula mipangá na bango ete mizala bitimweli, mpe makonga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopangá te, bakoyekola etumba lisusu mpe te. Bakofanda moto na moto na nsé na vinyo na ye, mpe na nsé na mowiti na ye, mpe moto moko akobangisa bango te.” (Mika 4:3, 4; Yisaya 2:2-4) Na boyokani na maloba oyo, bato yango basili kobutwa longwa na bitumba, na kotuláká mipangá na bango ya elilingi ete mikóma bikateli ya matiti mpe bitimweli ya mabelé. Na bongo, bazali na boyokani ya kimya kati na bandeko na mokili mobimba, ata soko bazali bato ya ekólo nini, ya monoko nini, ya lomposo nini to mpe etelemelo nini bazali na yango. Lisusu, bandimisami ete Jéhovah azali kosenzela likoló na bango mpe azali kobatela bango, likambo oyo lizali kopesa bango esengo. ‘Moto moko te azali kobangisa bango.’ Solo mpenza, ‘Jéhovah ye moko asili kopesa bokasi epai na libota na ye. Jéhovah ye moko asili kopambola libota na ye na kimya.’—Nzembo 29:11.
20, 21. (a) Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na kobatela kimya elongo na Nzambe? (b) Tokoloba nini na ntina na mayele mabe oyo Satana azali kosalela mpo na kobebisa kimya ya libota na Nzambe?
20 Nzokande, lokola na ekeke ya liboso, kimya ya basaleli na Nzambe ekobendaka koyina ya Satana. Lokola abwakamaki longwa na likoló nsima wana Bokonzi na Nzambe botyamaki na 1914, uta ntango wana, Satana azali kobundisa “batikali na libota” ya mwasi. (Emoniseli 12:17) Paulo apesaki likebisi oyo na eleko na ye, ete: “Tozali kobundana na mosuni mpe na makila te, kasi . . . na bilimu mabe kati na likoló.” (Baefese 6:12) Lokola Satana azali sikawa zingazinga na mabelé, likebisi oyo lizali na ntina mingi.
21 Satana asili kosalela mayele nyonso oyo azali na yango mpo na komeka kobebisa kimya ya libota na Nzambe, kasi alóngi te. Na 1919, ezalaki ata na bato 10 000 te oyo bazalaki kosala milende mpo na kosalela Nzambe na bosembo nyonso. Lelo oyo, koleka bamilió minei na bato bazali kolónga mokili na nzela na kondima na bango. (1 Yoane 5:4) Ata soko bato yango bazali koyika mpiko mpo na koyina ya Satana mpe libota na ye, nzokande bazali na kimya elongo na Nzambe mpe kati na bango. Kasi, likoló na koyina wana, likoló na kozanga kokoka mpe likoló na “mikolo ya mpasi” oyo tozali kobika na yango, tosengeli mpenza kosala kozanga kotika mpo na kobatela kimya. (2 Timoté 3:1) Kati na lisoló elandi, tokomona eloko oyo esengami mpo na yango
Bozongeli
◻ Mpo na nini na ebandeli moto abungisaki kimya oyo azalaki na yango elongo na Nzambe?
◻ Ndenge nini Yisraele azalaki na kimya elongo na Nzambe?
◻ Kimya elongo na Nzambe etongami lelo likoló na eloko nini?
◻ “Kimya na Nzambe” oyo ekobatelaka mitema na biso, ezali nini?
◻ Bolamu nini mosusu tokozwa soki tozali na kimya elongo na Nzambe?