Ozali na likanisi ya Nzambe na ntina na masanga?
ESILI koleka pene na mibu 20, bakundoli biloko ya kala na mabelé bakundolaki ndako moko ya kala ya biliki pene na engumba Urmia, na mboka Iran. Na kati na yango bamonaki elokó moko esalemi na mabelé oyo, engebene banganga-mayele, eumeli bankóto ya bambula, uta ebandeli ya ntango oyo bato ya libosoliboso bafandaki na esika yango. Kala mingi te, mwango ya teknoloji ya sika mosalelamaki mpo na ekizamé ya ekoló yango. Banganga-mayele bakamwaki na komona kati na yango bilembeteli ya chimie oyo endimisi ete bazalaki kosala vinyo na ntango wana.
Biblia ezali mpe komonisa polele ete uta ntango ya kala bato bazalaki komela vinyo, biɛrɛ, mpe masanga mosusu ya makasi. (Genese 27:25; Mosakoli 9:7; Nahumu 1:10) Motindo moko na bilei mosusu, Yehova atikeli moto na moto kati na biso liponi—ya komela masanga to ya koboya komela masanga. Mbala mingi Yesu azalaki komela vinyo na ntango azalaki kolya. Yoane Mobatisi amelaki masanga te.—Matai 11:18, 19.
Biblia epekisi komela kolekisa ndelo. Kolangwa ezali lisumu na miso na Nzambe. (1 Bakolinti 6:9-11) Na boyokani na yango, Batatoli ya Yehova batikaka nzela te na moto nyonso oyo akómi molangwi oyo azangi kobongola motema ete atikala kati na lisangá ya boklisto. Basangani ya lisangá oyo baponi komela masanga basengeli komela na bokatikati.—Tito 2:2, 3.
Likanisi ya kotuka Nzambe
Na mikolo na biso bato mingi bazali na likanisi ya Nzambe te na ntina na komela masanga. Ezali mpasi te komona ete Satana azali kolendisa lolenge mabe ya kosalela eloko wana ya kala. Na ndakisa, na bisanga mosusu ya Pasifike ya Súdi, mibali bazali na momeseno ya koyangana mpo na komela masanga mingi oyo esalemi na bato ya mboka bango moko. Mbala mosusu ntango wana ya bomeli eumelaka bangonga mingi mpe ezongelamaka mbala na mbala—mibali mingi bamipesaka na yango mokolo na mokolo. Basusu batalelaka yango bobele lokola momeseno ya mboka. Na bantango mosusu bamelaka biɛrɛ mpe masanga makasi na esika ya—to elongo na—masanga oyo basali yango bango moko. Mbala mingi esukaka na molangwa.
Na mboka mosusu ya Pasifike, mibali bayebaka mpenza te likambo ya komela na bokatikati. Mbala mingi, ntango bamelaka, bamelaka mpo na kolangwa. Mingi mpenza, mokolo bazwaka lifuti na nsuka ya sanza etuluku ya mibali bakoyangana mpe bakosomba bakazyé mingi ya biɛrɛ, oyo moko na moko ezali na milangi 24. Bakotika komela bobele soki biɛrɛ nyonso esili. Nsuka na yango ezali ete, bato mingi bameseni kolangwa masanga na balabála.
Bimeli mosusu oyo etutwaka, lokola masanga ya mbila mpe masanga mosusu, emelamaka mingi na bamboka ya Afrika. Bonkɔ́kɔ esɛngaka na bisika mosusu ete bápesa bapaya masanga mpo na kosepelisa bango. Na momeseno moyambi malamu asengeli kopesa mopaya na ye masanga koleka oyo akoki mpenza kosilisa. Na etúká moko momeseno ezali ete osengeli kotanda milangi ya biɛrɛ 12 liboso na mopaya moko moko.
Bakompanyi mingi ya mboka Japon ebongisaka mibembo na bísi mpo na basáli na yango. Bamemaka ebele ya masanga, mpe bakangaka miso likoló na molangwa. Mibembo misusu ya bakompanyi yango eumelaka mikolo mibale to misato. Engebene zulunalo Asiaweek, na Japon, “kobanda na balóni-loso kino bato na politiki oyo bazali na bozwi mingi, engebene momeseno ya bonkɔ́kɔ bobali ya moto eyebanaka na motángo ya milangi ya masanga oyo akoki kosilisa.” Mimeseno motindo moko mizali mpe komonana na mikili mosusu ya Azia. Zulunalo Asiaweek eyebisi ete “Boike ya masanga makasi oyo moko na moko na bafandi ya Corée ya Súdi azali komela sikawa eleki ya bameli na bisika nyonso mosusu ya mokili.”
Komela mokongó ekómi momeseno oyo epalangani mingi na biteyelo ya États-Unis. Engebene The Journal of the American Medical Association, “ntalo monene ya baoyo bamelaka mokongó bamimonaka te ete bazali bameli oyo babimisaka mobulu.”a Yango esengeli kokamwisa te mpamba te kati na bamboka mingi bipanzeli-nsango bizali kokumisa komela lokola likambo moko ya kosakana, oyo ebongi kolanda mpe ya lokumu. Mbala mingi piblisité wana esalemaka mpo na bilenge.
Na Grande-Bretagne boiké ya biɛrɛ oyo emelami eyikani mbala mibale koleka na boumeli ya eleko ya mibu 20, mpe komela masanga makasi eyikani mbala misato. Bameli bazali kobanda wana bazali naino bilenge mpenza, mpe basi mingi bakómi bameli. Mimeseno lolenge moko mizali komonana na bamboka ya Mpótó ya Ɛ́sti mpe na mikili ya Amérique Latine. Yango endimisami na motuya monene ya baye bakómi baombo ya masanga mpe na makámá ya mituka oyo masalami mpo na molangwa. Ya solo, na mokili mobimba komela kolekisa ndelo ezali koyikana.
Ntango nini ekoki kolobama ete moto ameli koleka ndelo?
Biblia ezali na likanisi ya bokatikati na ntina na masanga. Na ngámbo moko, Makomami malobi ete vinyo ezali likabo ya Yehova Nzambe mpo na ‘kosepelisa motema na moto.’ (Nzembo 104:1, 15) Na ngámbo mosusu, ntango Biblia ezali kokweisa komela kolekisa ndelo esaleli maloba lokola [“kolekisa ndelo,” NW] “kozala na lokoso mpe na lilango,” [“komelaka vinyo mingi,” NW] mpe “baombo na vinyo.” (Luka 21:34; 1 Petelo 4:3; 1 Timoté 3:8; Tito 2:3) Kasi “vinyo mingi” ezali na boiké nini? Lolenge nini moklisto akoki koyeba nini oyo ezali likanisi ya Nzambe na ntina na masanga?
Ezali mpasi te koyeba molangwa. Bilembo na yango bimonisami kati na Biblia na maloba oyo: “Banani na mpasi? Banani na mawa? Banani na kowelana? Banani na koimaima? Banani na mpota na mpamba? Banani na miso motane? Baoyo bakoumelaka komela masanga, baoyo bakokenda komekaka vinyo esanganisami ndenge na ndenge. . . . Miso na yo ikomonamona makambo na kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa bilobaloba.”—Masese 23:29-33.
Komela masanga mingi koleka ekoki kobimisa mobulungano, bimonaneli, kozanga komiyeba, mpe bulubúlú ya makanisi mpe ya nzoto. Na bopusi ya masanga, moto akoki kozanga kopekisa etamboli na ye, komityáká ye moko to kotyáká basusu na likámá. Eyebani malamu ete balangwi bamipesaka na etamboli ya nsɔ́ni, na matumoli, to na etamboli ya mbindo.
Komela kino kolangwa, mpe kosala makambo mamonisami awa likoló, ezali mpenza komela koleka ndelo. Nzokande, moto moko akoki kozanga bokatikati kozanga komonisa bilembo nyonso ya molangwa. Na yango, mbala na mbala ntembe ezali naino kobima mpo na koyeba ntango nini moto boye asili komela kolekisa ndelo. Komonisa bokatikati esuki wapi mpe kolekisa ndelo ebandi wapi?
Batelá makoki na yo ya kokanisa
Biblia ekati ndelo te na komonisáká soki ebongi na boiké nini ya masanga kati na makila to lolenge mosusu ya komeka boiké na yango kati na nzoto. Makasi liboso na masanga ekeseni engebene moto na moto. Nzokande, mitindá ya Biblia mizali kosalelama na baklisto nyonso mpe ekoki kosunga biso na kokólisa likanisi ya Nzambe na ntina na masanga.
Yesu alobaki ete, mobeko ya liboso ezali, “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” (Matai 22:37, 38) Masanga ezalaka na bopusi nokinoki likoló ya makanisi, mpe komipesa na yango ekoki kotinda yo na kobuka mobeko wana oyo eleki mibeko mosusu nyonso. Ekoki kobebisa bososoli, makoki ya kosilisa mikakatano, komipekisa, mpe misala misusu ya ntina mingi ya makanisi. Makomami mazali kolendisa biso ete: “Batelá mayele na solo mpe bososoli. Ikozala bomoi mpo na molimo na yo mpe kitoko mpo na nkingo na yo.”—Masese 3:21, 22.
Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete: “Bókaba nzoto na bino lokola mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ mpe oyo ebongi ete Nzambe ayamba yango [“mosala ya bulɛɛ na nguya na biso ya kokanisa,” NW].” (Baloma 12:1) Moklisto akoki nde ‘koyambama na Nzambe’ soki ameli masanga kino kobungisa ‘nguya ya kokanisa’ na ye? Mbala mingi momeli oyo alekisaka ndelo abandaka mokemoke komesenisa nzoto na ye na masanga. Akoki kokanisa ete masanga mingi oyo ye amelaka ezali—mpo na ye—moke mpo akoka kolangwa. Nzokande, ekoki mpenza kozala ete azali kokólisa momeseno moko mabe ya boombo ya masanga. Moto motindo yango akoki mpenza kokaba nzoto na ye lokola “mbeka na bomoi oyo na bulɛɛ”?
Boike nyonso ya masanga oyo ezali kobebisa ‘mayele mpe makoki ya kokanisa’ na yo moklisto eleki mingi mpo na yo.
Nini ezali kopusa makanisi na yo na ntina na masanga?
Moklisto asengeli kotalela malamu mpo na koyeba soki likanisi na ye na ntina na masanga ezali kopusama na mimeseno ya mikolo oyo to ya bonkɔ́kɔ. Na ntina na masanga, osengeli te kotika ete liponi na yo epusama na mimeseno ya bato to na piblisité ya bipanzeli-nsango. Wana ezali yo kotalela ezaleli na yo, omituna, ‘Napusami na makambo oyo mapesameli nzela na esika nafandi? To lolenge na ngai ya komela etambwisami na mitindá ya Biblia?’
Atako Batatoli ya Yehova bazali te batɛmɛli ya mimeseno ya batoe, basosoli ete Yehova ayini mimeseno mingi oyo mindimami na bato mingi na mikolo na biso. Na bisika mosusu bapesaka nzela na kosopa zemi, kozongisa makila, kosangana mobali na mobali, to kobala basi mingi. Nzokande, baklisto bamitambwisaka na boyokani na makanisi ya Nzambe mpo na makambo wana. Ɛɛ, likanisi ya Nzambe ekoki kolendisa moklisto na koyina mimeseno lolenge yango ata soki yango endimami to endimami te na bato.—Nzembo 97:10.
Biblia ezali kolobela “mokano na bapakano,” oyo esangisi ‘komelaka vinyo mingi’ mpe “lilango.” Liloba “lilango” ezali kopesa likanisi ya limpati oyo libongisami na mokano ya sikisiki ya komela masanga mingi. Emonani lokola ete na ntango ya Biblia bato mosusu oyo bazalaki na lolɛ́ndɔ na ntina na makoki na bango ya kolangwa nokinoki te bazalaki koluka komela mingi koleka baninga na bango, to bazalaki komekana soki nani akokaki komela mingi koleka. Ntoma Petelo alobelaki lolenge wana ya etamboli lokola “pɔtɔpɔ́tɔ ya mbindo” oyo kati na yango baklisto oyo babongoli motema basanganaka lisusu te.—1 Petelo 4:3, 4, NW.
Ebongi mpenza na moklisto kokanisa ete soki ye alangwi naino te, likambo moko ezali te ata soki akomela epai wapi, ntango nini, to milangi boni? Tokoki komituna, ezali wana likanisi ya Nzambe? Biblia elobi ete: “Soko bokolyaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bósala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Ekoki kozala ete etuluku ya bato oyo bayangani mpo na komela ebele ya masanga na esika ya bato banso balangwi bango banso te, kasi etamboli na bango ekokumisa Yehova? Biblia epesi toli oyo: “Bóbilaka makambo na ntango oyo te kasi bóbongwana mpo na kozwa makanisi na sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.”—Baloma 12:2.
Tóbɛtisa basusu mabaku te
Likambo ya kobenda likebi, mbala mingi bato ya mboka oyo batikaka nzela na molangwa baimaimaka ntango momeli azali komiloba ete azali mosáli ya Nzambe. Na mboka moko moke na Pasifike ya Súdi, moto moko alobaki ete: “Nakumisaka bino mingi. Boteyaka solo. Kasi likambo moko tomonaka ezali ete bato na bino bamelaka masanga mingi.” Engebene lapólo, bato yango balangwaki te, nzokande bato mingi ya mboka yango basosolaki mpenza bokeseni wana te. Bato oyo bazalaki komona bakokaki nokinoki kokanisa ete motindo moko na ntalo monene ya bato mosusu oyo bamipesaka na komela, Batatoli ya Yehova mpe balangwaka. Mosáli ya Nzambe moklisto oyo azali komipesa na komela masanga mingi akoki solo kozala na lokumu malamu mpe kokokisa mosala na ye ya kosakola liboso na bato banso na mpiko nyonso?—Misala 28:31.
Lapólo moko oyo euti na mboka moko ya Mpótó emonisi ete na bantango mosusu bandeko mibali mpe bandeko basi mosusu bakómaka na Ndako ya Bokonzi wana monɔkɔ na bango ezali kolumba nsolo makasi ya masanga. Yango etungisaki lisosoli ya basusu. Biblia ezali kolendisa ete: “Malamu koboya kolya nyama mpe komela vinyo mpe kosala likambo nini lizali kotutisa ndeko na yo libaku.” (Baloma 14:21) Likanisi ya Nzambe na ntina na masanga likopusa moklisto oyo akɔmɛli ete akeba mpo na lisosoli ya basusu, ata soki yango elimboli koboya komela masanga na bantango mosusu.
Baklisto bakesani mpenza na bato mosusu
Likambo ya mawa, mokili oyo mosili kosalela Yehova masumu mingi na lolenge mabe na yango ya kosalela biloko apesi bato, bakisá masanga. Moklisto nyonso oyo amipesi asengeli kosala milende mpo na koboya likanisi ya kotuka Nzambe oyo epalangani mingi. Na lolenge yango bato bakoki ‘kososola kati na moyengebeni mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka Nzambe te.’—Malaki 3:18.
Na likambo litali masanga, ‘bokeseni’ kati na Batatoli ya Yehova mpe mokili esengeli kozala polele. Komela masanga ezali likambo ya liboso te kati na bomoi ya baklisto ya solo. Balukaka te komeka kino koyeba soki nzoto na bango ezali na makasi lolenge nini liboso ya masanga, kino kokóma pene ya kolangwa; bazali mpe kotika nzela te na masanga ete mabebisa to mapekisa mosala oyo bazali kosalela Nzambe na molimo na bango mobimba mpe na makanisi malamu.
Lokola etuluku, Batatoli ya Yehova bazali na likanisi ya Nzambe na ntina na masanga. Ezali boni mpo na yo? Moko moko na biso akoki kozwa mapamboli ya Yehova wana ezali biso kolanda toli oyo ya Biblia ete “tóboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tózala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe kati na ekeke oyo.”—Tito 2:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a “Balimbolaki komela mokongó ete ezali mpo na mibali kolandisa milangi mitano to koleka na mbala moko mpe mpo na basi kolandisa milangi minei to koleka na mbala moko.”—The Journal of the American Medical Association.
[Etanda/Elilingi na lokasa 28]
Yoká toli ya balingami na yo
Mbala mingi momeli azalaka moto ya nsuka na koyeba ete azali na mokakatano. Bandeko, baninga, mpe bankulutu baklisto basengeli te kokakatana na kopesa lisalisi na balingami oyo bazangi bokatikati. Epai mosusu, soki balingami na yo bazali kotungisama na momeseno na yo ya komela masanga, mbala mosusu bazali na ntina malamu mpo na yango. Tyá likebi na makambo oyo bazali koloba.—Masese 19:20; 27:6.