Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/12 lok. 30
  • Ozali komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • “Nzambe ya kobondisama nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Koya ya Yesu to kozala ya Yesu​—⁠oyo wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Epai wapi tokoki kozwa libɔndisi ya solosolo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Tómibalola epai na Yehova mpo na kozwa libɔndisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/12 lok. 30

Ozali komikundola?

Osepelaki na botángi ya banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Soki ezali bongo, talá soki okoki komikundola makambo malandi:

◻ Wapi ndimbola ya liloba ya Greke pa.rou.si’a oyo lisalelami na Matai 24:3, 27, 37, 39?

Búku Expository Dictionary of New Testament Words ya Vine elobi ete: “PAROUSIA . . . ezali kopesa likanisi ya koya mpe na yango kozala elongo.” Na bongo, ezali bobele ntango ya boyei te, kasi kozala na esika yango kobanda na ntango ya bokómi.​—15/8, lokasa 11.

◻ Lolenge nini ‘mikolo yango iyaki mikuse’ na lolenge ete “mosuni” ekokaki kobikisama na ekeke ya liboso, mpe lolenge nini yango ekosalema na kokokisama monene ya esakweli wana? (Matai 24:22)

Na mobu 66 T.B., Baloma bayeisaki mokuse bolozi oyo bakweisaki likoló na Yelusaleme na lolenge oyo moto moko te akokaki komizela na yango, kopesáká “mosuni” oyo ezalaki bongo baklisto, libaku ya kokima. Lolenge moko, tozali na kondimisama ete etumba ya nsɔ́mɔ oyo mosika te ekokweisama likoló na Babilone monene ekoyeisama mokuse na lolenge moko to mosusu. Na bongo, Baklisto bapakolami mpe baninga na bango bakobikisama na kobebisama oyo na ntembe te ekosalema.​—15/8, nkasa 18-​20.

◻ Tosengeli komonisa ezalela nini soki moto moko abandi kosangana na kolya limpa mpe komɛla vinyo ya ekaniseli to mpe atiki kosala bongo?

Ezali na ntina te ete Baklisto mosusu bámitungisa mpo na yango. Yesu alobaki: “Ngai nazali mobateli malamu, nayebi baoyo [bampate] na ngai.” Na ntembe te, Yehova ayebi baoyo asili solo kopona bango lokola bana na ye ya elimo. (Yoane 10:14; Baloma 8:16, 17)​—15/8, lokasa 31.

◻ Wapi ntina monene ya Mibeko ya Mose?

Libosoliboso, eteyaki Bayisalaele ete bazalaki na mposa ya Masiya, oyo asengelaki kosikola bango na ezalela na bango ya masumu. (Bagalatia 3:24) Mibeko miteyaki mpe bobángi Nzambe mpe botosi, mpe esalisaki bayisalaele ete bamikabola na mimesano ya mbindo ya bikólo ya zingazinga. (Levitike 18:24, 25)​—1/9, lokasa 9.

◻ Ntina ya kondimana ya sika ezali nini? (Yilimia 31:31-​34)

Ezali mpo na kobimisa ekólo ya bakonzi mpe banganga mpo na kopambola bato nyonso. (Exode 19:6; 1 Petelo 2:9; Emoniseli 5:10)​—1/9, nkasa 14, 15.

◻ Mpo na nini tosengeli kozala na momesano ya kosɛnga bolimbisi?

Kosɛnga bolimbisi ekoki kosalisa na kokitisa mpasi eyeisami mpo na kozanga kokoka, mpe ekoki kobongisa boyokani oyo ebebaki. Kosɛnga bolimbisi nyonso tomonisi ezali liteya ya komikitisa mpe ezali kosalisa biso ete tokóma kotalela mingi mayoki ya basusu.​—15/9, lokasa 24.

◻ Mpela ya mokili mobimba na mikolo ya Noa ezali likambo oyo lisalamaki solo?

Ɛɛ. Masapo ya kala oyo mazali kolobela mpela ya mokili mobimba makoki kozwama bipai nyonso na mokili, uta na bikólo ya kalakala ya Amerika kino na mokili ya Australie. Kozala ya lisoló oyo na bisika mingi na mokili ezali kondimisa likambo oyo ete mpela ya mokili mobimba esalamaki solo, lokola yango eyebisami na Biblia. (Genese 7:11-​20)​—15/9, lokasa 25.

◻ Komonisa boyambi bapaya esangisi makambo nini? (Baloma 12:13)

Boyambi bapaya ebongolami uta na liloba ya lokotá ya Greke oyo esangisi mibimbi to eutelo ya maloba mibale oyo malimboli “bolingo” mpe “bapaya.” Na yango, boyambi bapaya elimboli mpenzampenza “bolingo mpo na bapaya.” Kasi yango ezali bobele te bolingo oyo epusami na malako, oyo emonisami mpo na kokokisa mokumba. Kasi yango ezali elembo ya bolingo ya motema mpe ya boninga ya solosolo.​—1/10, lokasa 9.

◻ Wapi makanisi ya Paulo na ntina etali libala mpe bonzemba kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti, mokapo 7?

Libala ezali likambo libongi mpe, na bantango mosusu, ebongi kolendisa basusu ete bábala. Nzokande, ntembe ezali te ete bonzemba ezali na matomba mpo na moklisto mobali to mwasi oyo alingi kosalela Yehova na likebi na ye nyonso.​—15/10, lokasa 13.

◻ Lolenge nini nkulutu “akoleisa bato na ye”? (1 Timote 5:8)

Nkulutu asengeli ‘koleisa bato na ye’​—mwasi na ye mpe bana na ye​—na mosuni, na elimo, mpe na mayoki.​—15/10, lokasa 22.

◻ Lolenge nini Yehova azali kopesa libɔndisi epai na basaleli na ye?

Elimo santu ya Nzambe ezali kosala lokola “Mosungi” [“Mobondisi”] (Yoane 14:16, maloba na nsé ya lokasa, NW) Mwango mosusu oyo na nzela na yango Nzambe azali kopesa libɔndisi ezali bongo Biblia. (Baloma 15:4) Nzambe ayebi mposa ya moto na moto kati na biso mpe akoki kosalela biso mpo na kobɔndisana moko na mosusu, motindo moko lokola Paulo abɔndisamaki na lapólo oyo Tito apesaki ye na ntina etali Bakolinti. (2 Bakolinti 7:11-​13)​—1/11, nkasa 10, 12.

◻ Maloba ya ntoma Paulo kati na 2 Bakolinti 1:3 ete Yehova azali “Tata na kobondisa nyonso,” malimboli nini?

Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kobondisa nyonso” liuti na liloba oyo lisalelamaka mpo na komonisa mawa mpo na mpasi ya moto mosusu. Na lolenge yango Paulo alobeli mayoki ya boboto oyo Nzambe azali na yango epai na basaleli na Ye nyonso ya sembo oyo bazali kati na bolózi.​—1/11, lokasa 13.

◻ Mpo na Bayisalaele, kokila bilei na mokolo ya mbondi ezalaki kokokisa likambo nini? (Levitike 16:29-​31; 23:27)

Kokila bilei ezalaki kopusa bato na Yisalaele ete básosola malamu mpenza na ezalela na bango ya bato ya masumu mpe bamona ntina ya koluka kosikolama. Na nzela na yango bazalaki komonisa mawa na ntina na masumu na bango mpe kobongola motema na bango liboso ya Nzambe.​—15/11, lokasa 5.

◻ Maloba oyo epai na bilenge ete: “Kanisá, uta sikawa, Mozalisi na yo Monene na mikolo ya bolenge na yo” malimboli nini? (Mosakoli 12:1, NW)

Nganga-mayele moko alobi ete liloba ya Liebele oyo libongolami na “kanisá” mbala mingi emonisaka “bolingo oyo ezwami kati na makanisi mpe likambo oyo likoki kopusa moto ete amikundola.” Na yango kotosa etindá oyo elimboli makambo mingi kasi esuki te bobele na kobanza na ntina na Yehova. Elimboli mpe kosala eloko, kosala oyo ezali kosepelisa ye.​—1/12, lokasa 16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto