Bonsomi ya lingomba endimisami na Japon
NA BOUMELI ya bambula mingi na Japon, bilenge bayekoli oyo bazali Batatoli ya Yehova basili kokutana na mokakatano oyo: Basengelaki kolanda lisosoli na bango oyo liteyami na Biblia to kondima manáka moko ya eteyelo oyo ezalaki kobebisa lisosoli na bango. Mpo na nini ezali mokakatano? Mpamba te myango ya kobunda mpo na komibatela ezali eteni moko ya liteya ya ngalasisi na biteyelo na bango. Bilenge Batatoli bamonaki ete myango motindo wana mizali na boyokani te na mitindá ya Biblia, lokola oyo ezwami na Yisaya mokapo 2, vɛrsɛ́ 4. Ezali kotángama boye: “Bakotula mipanga na bango ete mízala bitimweli, mpe makonga na bango ete mázala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”
Koboyáká koyekola myango oyo mikokani na oyo ya bitumba, oyo mitali kosala mabe na moto mosusu, bilenge Batatoli ya Yehova balimbwelaki balakisi na bango ete na lisosoli nyonso bakoki te kosangana na liteya ya koyekola myango ya kobunda. Nsima ya komeka kolɛngola bayekoli yango ete bándima manáka ya kelasi, nsukansuka balakisi mingi oyo bamityaki na esika na bango bandimaki kotosa lisosoli ya bayekoli mpe kopesa bango misala ya lolenge mosusu.
Nzokande, balakisi mosusu basilikaki mpe biteyelo mosusu biboyaki kopesa bapwɛ́ na bilenge Batatoli na liteya ya ngalasisi. Na 1993, Batatoli soko libwa bapesamelaki nzela te ya koleka na kelasi ya likoló mpe basɛngisamaki ete bálongwa na eteyelo to mpe babenganaki bango mpo ete baboyaki kosangana na liteya ya koyekola myango ya bitumba.
Ya solo, ntango ekokaki mpo na kolóngisa lotómo ya bilenge baklisto ete bázwa mateya kozanga kobebisa lisosoli na bango. Bayekoli mitano oyo baboyaki kolekisa bango na kelasi ya mibale na Institut technique industrielle ya Kobe (ebéngami Kobe Tech, na bokuse) bazwaki ekateli ya kofunda likambo yango na Letá.
Esukaki ndenge nini?
Na eleko ya prɛntá na 1990 ntango bayekoli yango mitano bakɔtaki na Kobe Tech, balimbwelaki balakisi na bango ete na ntina na likanisi na bango oyo lizwi moboko na Biblia, bakosangana te na liteya ya Kendo (ntɔ́ki ya Bajaponɛ́ etali lolenge ya kosalela mopanga). Batambwisi ya liteya ya ngalasisi batɛmɛlaki bango makasi mpe baboyaki kopesa bango ata mosala mosusu mpo na kozwa bapwɛ́ na liteya ya ngalasisi. Nsukansuka, bayekoli yango balóngaki te na liteya ya ngalasisi mpe basengelaki bongo kozongela kelasi ya liboso (kelasi ya liboso na eteyelo ya ntei). Na Apríli 1991 bafundaki likambo yango na Esambiselo monene ya Etúká ya Kobe, komonisáká ete ekela oyo eteyelo esalaki etɛmɛlaki ndanga ya mobeko oyo etali bonsomi ya lingomba.a
Eteyelo elobaki ete kopesa misala oyo mikeseni ekoki kozala lokola ete kokɔtela lingomba moko boye mpe na yango ekoki kobebisa lokumu ya ezaleli ya kozanga koponapona oyo esalemaka na biteyelo ya Letá. Lisusu, balobaki ete bazali na bisika te ata mpe na balakisi mosusu te mpo na kopesa bango misala misusu oyo mikozala lokola liteya ya ngalasisi.
Ekateli ya Esambiselo monene ya Etúká elamwisi mayoki ya baoyo bayebaki likambo yango
Wana likambo yango lizalaki kotalelama, bayekoli mibale kati na bayekoli mitano bakweaki na ntina na liteya ya ngalasisi, nzokande bayekoli mosusu misato balekaki na kelasi ya likoló. Mibeko ya eteyelo milobi ete bayekoli oyo bapwɛ́ na bango ezali malamu te mpe oyo bazongeli kelasi moko mbala mibale basengeli kolongolama na eteyelo. Na kotaleláká likambo yango, moko kati na bayekoli yango mibale azwaki ekateli ya kolongwa na eteyelo liboso ete bábengana ye, kasi oyo mosusu, Kunihito Kobayashi, aboyaki kolongwa. Na bongo, babenganaki ye. Likambo ya kosepelisa, mwayene ya bapwɛ́ ya Kunihito mpo na mateya nyonso bakisa mpe liteya ya ngalasisi oyo alóngaki na yango te na bapwɛ́ 48, ezalaki bongo 90,2 %. Azalaki moto ya liboso kati na bayekoli 42 ya kelasi na ye.
Na mwa 22 Febwáli 1993, Esambiselo ya Etúká ya Kobe elóngisaki Eteyelo Kobe Tech mpe elobaki ete: “Bikateli oyo eteyelo ekamataki bibukaki mobeko ya Letá te,” atako endimaki ete “bonsomi ya losambo ya bafundi-likambo na lolenge moko to mosusu epekisamaki na lisɛngami ya eteyelo na kosangana na liteya ya kendo.”
Lolenge moko na ntoma Paulo na ekeke ya liboso, bafundi-likambo bazwaki ekateli ya kokóma epai na bakonzi baleki liboso. (Misala 25:11, 12) Likambo yango likómaki na Esambiselo monene ya Osaka.
Ezaleli ezangi moimi ya bafundi-likambo
Profɛsɛrɛ Tetsuo Shimomura, nganga-mayele na Inivɛrsité ya Tsukuba andimaki kopesa litatoli lokola moto na ntɔ́ki na Esambiselo monene ya Osaka. Lokola azalaki moto na mayele na mateya mpe na mibeko, amonisaki mpenza lolenge ya makambo oyo eteyelo esalaki ebongaki te wana bazalaki kotalela likambo ya bayekoli. Kunihito Kobayashi abimisaki mayoki na ye na esambiselo, mpe ezaleli na ye ya bosembo esimbaki mitema ya bayangani kati na esambiselo. Lisusu, na mwa 22 Febwáli 1994, Lisangá ya ba avocats ya Kobe, elobaki ete makambo oyo eteyelo esalaki ebebisaki bonsomi oyo Kunihito azali na yango mpo na lingomba mpe lotómo na ye ya kozwa mateya, asɛngaki ete eteyelo ezongisa ye na kelasi.
Wana elaka ezalaki kobɛlɛma mpo ete likambo likatama na Esambiselo monene ya Osaka, bilenge baklisto nyonso oyo bazalaki na likambo yango bazalaki na mposa makasi ya kosala milende kino nsuka. Bamonaki ete bazalaki kosala milende mpo na bolamu ya bankóto ya bilenge Batatoli oyo bakutanaka na mokakatano yango bipai binso na mboka Japon. Kasi lokola balongolamaki naino te na eteyelo, ekokaki kozala mpenza ete esambiselo ekokaki kotya likambo na bango pembeni. Mpe, bamonaki ete soki bakotika likambo na bango, ezaleli ya kozanga kolongobana ya eteyelo na kolongoláká Kunihito ekokaki kolobelama mingi. Na yango, longola bobele Kunihito, bayekoli nyonso bazwaki ekateli ya kotika likambo yango.
Na mwa 22 Desɛ́mbɛ 1994, Reisuke Shimada, Mosambisi-mokonzi ya Esambiselo monene na Osaka apesaki ekateli oyo ekweisaki kosambisama oyo Etúká ya Kobe esalaki. Esambiselo emonaki ete ekateli ya Kunihito mpo na koboya kosangana na liteya ya Kendo ezalaki sembo mpe ete mbeba oyo ekómelaki ye mpo na ekateli na ye oyo ezwaki moboko likoló na bindimeli na ye ya lingomba ezalaki monene mpenza. Mosambisi-mokonzi Reisuke Shimada alobaki ete eteyelo esengelaki kopesa misala ya lolenge mosusu. Ekateli yango malamu esimbaki mitema ya baoyo batalelamaki na ntina na ntómo ya bato. Nzokande, eteyelo efundaki likambo yango na Esambiselo eleki monene ya Japon, kopimeláká Kunihito boyekoli na boumeli ya koleka mbula mosusu moko.
Na Esambiselo monene
Lisoló moko kati na zulunalo Kobe Shimbun elobaki na nsima ete: “Bakambi ya biteyelo ya Letá na engumba Kobe mpe eteyelo yango basengelaki kozongisa Mr. Kobayashi na eteyelo na ntango yango [nsima ya ekateli oyo ekamatamaki na Esambiselo monene ya Osaka]. . . . Ezaleli na bango ya kozanga kolongobana epimeli moto moko eleko ya ntina na mikolo ya bolenge na ye.” Nzokande, Kobe Tech etikalaki ngwi na likambo yango. Yango esalaki ete ekóma motó na likambo ya bazulunalo bipai binso na mboka mobimba. Balakisi mpe bakonzi ya biteyelo bipai binso na Japon bayokaki likambo yango, mpe ekateli moko longwa na esambiselo eleki monene na mboka esengelaki komonisa ekateli makasi mpo na makambo motindo wana oyo makokaki kobima na nsima.
Mwa 17 Yanuáli 1995, soko pɔ́sɔ moko na nsima wana eteyelo efundaki likambo na Esambiselo monene, koningana ya mabelé esalemaki na Kobe mpe ebebisaki kartyé ya Ashiya epai Kunihito mpe libota na ye bazalaki kofanda. Ezalaki soko na ngonga ya mitano na ndambo na ntɔ́ngɔ́ yango, mwa miniti moke liboso ete koningana ya mabelé esalema, Kunihito alongwaki na ndako mpo na kokenda na mosala na ye ya ndambo ya mokolo. Azalaki kotambola na veló na nzela oyo ezali na nsé ya Hanshin, mpe ntango koningana ya mabelé esalemaki, azalaki kobelema na esika oyo ebukanaki. Nokinoki, azongaki na ndako mpe akutaki etazɛ ya liboso ya ndako na ye ebukanaki nyonso. Kunihito amonaki ete akokaki mpenza kobungisa bomoi na ye na koningana ya mabelé yango mpe atɔ́ndaki Yehova na ndenge apesaki ye likoki ya kobika. Emonani mpenza ete soki akufaki, likambo litali kendo likokaki kosila kozanga ekateli ya Esambiselo monene.
Na momeseno, Esambiselo monene ya Japon etalelaka makambo oyo bafundi bobele na mikanda mpe etalaka soki bikateli ya esambiselo moke bizalaki malamu to bizalaki malamu te. Lobá soki ntina moko monene ezali mpo na kokweisa ekateli ya esambiselo moke, soko bongo te, basambisaka lisusu te. Esambiselo monene eyebisaka te na mofundi-likambo mpe mofundami ntango oyo ekateli ekopesama. Na bongo, Kunihito akamwaki mpenza na ntɔ́ngɔ́ ya mwa 8 Mársi 1996, ntango bayebisaki ye ete likambo likokatama na ntɔ́ngɔ́ wana. Na esengo mpe na nsai nyonso, ayokaki ete Esambiselo monene endimaki ekateli ya Esambiselo monene ya Osaka.
Basambisi minei, elongo na Mosambisi-mokambi Shinichi Kawai, bango nyonso na bomoko bamonaki ete “makambo oyo eteyelo esalaki masengelaki kotalelama lokola maleki ndelo, na kotaleláká malako oyo makoki kondimama kati na bato, ezalaki lisusu te ntómo na bango ya kozwa ekateli engebene mobeko, mpe na yango ebukaki mobeko.” Esambiselo endimaki bosembo ya Kunihito na ndenge aboyaki kosangana na liteya ya kendo mpe emonisaki ete: “Ntina ya mokweisami ya koboya kosangana na liteya ya kendo ezalaki ya mozindo mpe emonisaki moboko ya kondima na ye.” Esambiselo monene elobaki ete eteyelo ekokaki kopesa myango mosusu mpo ete bindimeli ya losambo ya mokweisami bikoka kotosama.
Ezwi litomba monene
Na ntembe te, ekateli oyo ekopesa ndakisa malamu mpo na bonsomi ya losambo kati na biteyelo. Zulunalo The Japan Times elobaki ete: “Ekateli wana ezali liboso oyo ebimisami na Esambiselo monene na likambo litali biteyelo mpe bonsomi ya lingomba.” Nzokande, ekateli yango elongoli te mokumba ya elenge moyekoli mokomoko ya kokamata etɛlɛmɛlo na ye moko na lisosoli nyonso wana akutani na komekama ya kondima.
Profɛsɛrɛ Masayuki Uchino na Inivɛrsité ya Tsukuba alobaki ete moko na makambo oyo mapusaki basambisi na kopesa elónga na Kunihito ezalaki ete azalaki “moyekoli ya sembo oyo bapwɛ́ na ye ya kelasi ezalaki mingi.” Biblia ezali kopesa toli oyo epai na baklisto oyo bazali kokutana na komekama na kondima na bango: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.” (1 Petelo 2:12) Bilenge baklisto ya sembo bakoki komonisa ete etɛlɛmɛlo na bango oyo ezwi moboko na Biblia ebongi na kozwa limemya ya bato na kotambwisáká bomoi na bango mobimba engebene mitindá ya Biblia.
Nsima ya ekateli ya Esambiselo monene, Kunihito Kobayashi azongisamaki na eteyelo Kobe Tech. Bayekoli mingi oyo bakɔtaki kelasi elongo na Kunihito basilaki kozwa mapolómi. Kunihito azali sikawa kotánga elongo na bayekoli oyo bazali na mbula mitano na nsé na ye. Epai na bato mingi kati na mokili, mbula kitoko mitano ya bolenge na ye emonani lokola nde ebungisami mpamba. Nzokande, bosembo ya Kunihito ezali na motuya na miso ya Yehova Nzambe, mpe milende na ye mizali mpamba soko moke te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, nkasa 10 kino 14 (ebimeli ya Lifalansé); ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Bililingi na lokasa 20]
Na lobɔkɔ ya mwasi: ndako ya Kunihito nsima ya koningana ya mabelé
Na nsé: Kunihito lelo oyo