Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/11 lok. 15
  • Libɔndisi na boumeli ya mibu minei ya etumba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi na boumeli ya mibu minei ya etumba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/11 lok. 15

Libɔndisi na boumeli ya mibu minei ya etumba

NA BOUMELI ya mibu minei ya etumba na teritware ya ex-Yougoslavie, bato mingi banyokwamaki na mikakatano makasi mpe na bosɛnga. Kati na bango ezalaki na bankámá ya Batatoli ya Yehova, oyo balandaki na bosembo nyonso kosambela “Nzambe na kobɔndisa nyonso.”​—2 Bakolinti 1:3.

Na Sarajevo, bato banyokwamaki lisusu mpo ete bazalaki kati na engumba oyo ezingelamaki na boumeli mobimba ya etumba. Ezalaki bongo mpo na kozanga lotilíki, mai, nkoni, mpe bilei. Lolenge nini lisangá ya Batatoli ya Yehova na Sarajevo lizalaki kosala kati na mikakatano wana makasi? Baklisto ya bamboka ya mpembeni batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kokɔtisa ebele ya biloko. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1994, nkasa 23-​7.) Lisusu, bandeko ya Sarajevo bazalaki kopesana biloko moko na mosusu, kotyáká likebi liboso likoló na kokabola biloko ya elimo. Ntango engumba ezingelamaki mokɛngɛli moko moklisto na engumba yango apesaki lapólo oyo:

“Tozali kopesa motuya mingi na makita na biso. Ngai mpe mwasi na ngai, elongo na bato mosusu 30, totambolaka kilomɛtɛlɛ 15 mpo na kokenda na makita mpe lolenge moko mpo na kozonga. Mbala mosusu bazalaki koyebisa ete mai makopesama na ntango oyo makita na biso masengelaki kosalema. Bandeko bazalaki kosala nini? Bazalaki kotikala na ndako to bazalaki kokenda na makita? Bandeko na biso bamonaki malamu koyangana na makita. Bandeko bazali ntango nyonso kosalisana moko na mosusu; ata eloko nini bazali na yango, basalisanaka na yango. Ndeko mwasi moko ya lisangá na biso afandaka libándá ya engumba, pene na zámba; bongo mpo na ye ezalaka mpasi mingi te kozwa nkoni. Asalaka mpe na izini ya mampa, mpe lifuti na ye lipesamaka na falini. Wana likoki lizali, atumbaka limpa moko monene mpe amemaka yango na likita. Nsima ya likita, na nzela ya bozongi, apesaka moto na moto eteni moko.

“Ezali likambo ya ntina mingi ete moto moko te kati na bandeko mibali mpe bandeko basi amiyoka ete atikami. Moto moko te ayebi soki nani kati na biso akozala na mposa ya lisalisi kati na likambo moko ya mpasi mingi. Ntango nzela etondaki na ngalási mpe wana ndeko mwasi moko azalaki na bokɔnɔ, bilenge bandeko mibali, oyo bazali makasi bazalaki kobenda ye kati na pusu moko mpo na kokóma na makita.

“Biso banso tosanganaka na mosala ya kosakola, mpe Yehova asili kopambola milende na biso. Asili komona ezalela na biso ya mpasi awa na mboka Bosnie, kasi asili mpe kopambola biso na bokóli​—bokóli oyo tomonaki naino te liboso ya etumba.”

Bobele bongo, na biteni mosusu ya ex-Yougoslavie oyo ebebisami na etumba, Batatoli ya Yehova bazwaki bokóli mingi atako mikakatano minene mizalaki. Lapólo oyo euti na biro ya Croatie ezali kolobela etuluku moko ya Batatoli: “Bandeko oyo bazali kofanda na engumba Velika Kladuša bakutanaki na mikakatano ya mpasi mingi. Engumba ebundisamaki mbala mingi. Bandeko basengelaki kolimbola epai na mampinga ya ba Croates, ya ba Serbes, mpe ya Bamizilmá ete bakɔtaka na bitumba te. Ya solo, bayikaki mpiko mingi​—kokangama, kobɛtama, nzala, makámá ya kufa. Atako bongo, bango nyonso batikalaki sembo mpe bazalaki na libaku malamu ya komona mapamboli ya Yehova likoló na misala na bango.”

Atako bakutanaki na mikakatano, Batatoli ya Yehova na Velika Kladuša mpe na Bihać, mboka mosusu ya pene, bazali kokóla wana ezali bango kosangana na molende nyonso na kosakolama ya nsango ya kobɔndisa ya Nzambe epai na bazalani na bango. Na bisika wana mibale basakoli ya Bokonzi bango nyonso 26 bazali kotambwisa boyekoli 39 ya Biblia na bandako ya bato!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto