Lolenge nini Nzambe atalelaka losambo ya boklisto ya nkombo mpamba?
“YESU KLISTO alobaki ete: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na likoló. Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! . . . na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, Nayebi bino soko moke te! Bólongwa na ngai, bino bato na misala na lofundo [“batyoli mibeko,” NW].”—Matai 7:21-23.
Na nzela ya Liloba na ye ya bulɛɛ, Biblia Mosantu, Nzambe amonisi polele oyo ezali bongo mokano na ye. Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali kosala mokano ya Nzambe? To, bazali nde baoyo Yesu abéngaki ete [“batyoli mibeko,” NW]?
Kotangisa makila
Na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso na liwa ya Nkolo na ye, etikalaki moke ete Petelo abandisa etumba na bibundeli elongo na basodá oyo batindamaki mpo na kokanga Yesu. (Yoane 18:3, 10) Kasi Yesu azongisaki kimya mpe akebisaki Petelo na maloba oyo ete: “Baoyo nyonso bakosimba mompanga bakokufa na mompanga.” (Matai 26:52) Likebisi wana ya polele ezongelami lisusu kati na Emoniseli 13:10. Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba mazali kolanda likebisi yango? To, bazali na ekweli na ntina na bitumba oyo bizali sé kokóba kobundama kati na mikili mingi?
Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ebele ya bankóto ya bato ya Serbie mpe ya Croatie babomamaki na nkombo ya mangomba. Búku The New Encyclopædia Britannica eyebisi ete: “Na Croatie, bokonzi ya fascisme ebandisaki politiki mabe ya ‘kopɛtolama ya ekólo,’ yango ezalaki mabe koleka ata makambo ya nsɔ́mɔ oyo bato ya Nazi bazalaki kosala. . . . Eyebisamaki ete ndambo moko na misato ya bafandi ya Serbie esengelaki kotindama epai mosusu, ndambo ya mibale esengelaki kobongwana na Lingomba ya Katolike ya Loma, ndambo ya misato esengelaki kobomama. . . . Lolenge oyo bakonzi ya Lingomba ya Katolike bapesaki mabɔkɔ kati na misala wana ebebisaki mpenza boyokani kati na Lingomba mpe Leta nsima ya etumba.” Ebele ya bato bapusamaki na makasi ete bákɔta na Lingomba ya Katolike mpe baoyo baboyaki babomamaki; ebele ya bato mosusu bazalaki na bonsɔmi ya kopona te. Na mobimba, kati na bamboka mike—mibali, basi, mpe bana—bakɔtisamaki na makasi kati na bandakonzambe na bango ya Lingomba ya Ortodoksi mpe babomamaki. Ezalaki boni mpo na mampinga ya batomboki Bakoministe? Mangomba masungaki bango?
Búku History of Yugoslavia eyebisi ete: “Basángó mosusu bamikɔtisaki na etumba na ngambo moko na mampinga ya botomboki.” Búku Yugoslavia and the New Communism elobi ete: “Mampinga oyo matombokaki makɔtisaki kati na yango basángó oyo bautaki na mangomba ya Ortodoksi ya Serbie mpe ya Katolike ya Loma.” Kozanga boyokani kati na mangomba eyeisi makasi etumba kati na etúká ya Balkans.
Mpe ezali boni mpo na Rwanda? Mokomeli monene ya Ebongiseli ya Katolike mpo na makambo matali boyokani na bikólo ndenge na ndenge, Ian Linden, andimaki likambo oyo kati na zulunalo The Month: “Bolukiluki oyo ebongiseli ebéngami African Rights esalaki na Londres emonisi ndakisa moko to bandakisa mibale na ntina na Bakonzi ya lingomba ya Katolike, ya Anglican mpe ya Baptiste oyo bazali na ekweli mpo na kokanga miso to mpe nde komikɔtisa kati na koboma oyo basodá babomaki bato. . . . Ntembe ezali soko moke te ete motángo monene ya baklisto oyo bazali na mikumba minene kati na baparwási basanganaki na koboma wana.” Na mawa nyonso, etumba kati na bato oyo bamitángaka ete bazali baklisto ezali kokóba kopesa mpasi na Afrika ya ntéi.
Pite mpe ekobo
Engebene Liloba ya Nzambe, ezali bobele na ebongiseli moko ya malamu oyo kati na yango kosangisa nzoto ekoki kosalema na lokumu nyonso, ezali bongo kati na ekanganeli ya libala. Biblia elobi ete: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Bakambi ya mangomba bazali kotosa mateya wana ya Nzambe?
Na 1989 Lingomba ya Anglican na Australie ebimisaki mokanda moko na ntina na kosangisa nzoto, mokanda yango moyebisaki ete kosangisa nzoto liboso na kobalana ezali mabe te soki bato mibale bayokani malamu. Na mikolo miuti koleka, mokambi ya Lingomba ya Anglican na Écosse alobaki ete: “Lingomba esengeli te kopekisa kimakango lokola ete ezali mabe. Lingomba lisengeli kondima ete ekobo esalemaka mpo na bizaleli ya masumu tobotamaka na yango.”
Na Afrique du Sud bakonzi mingi ya mangomba balobaki na mpiko nyonso mpo na kokɔtela ezaleli ya kosangisa nzoto mibali na mibali. Na ndakisa, na 1990 zulunalo You ya Afrique du Sud ezongelaki maloba ya mokonzi moko monene ya Lingomba ya Anglican oyo alobaki ete: “Makomami matyaka bipekiseli mpo na libela te. . . . Nabanzi ete mbongwana ekokɔta kati na lolenge oyo lingomba etalelaka makambo mpe lolenge na yango ya kosala epai na mibali oyo basangisaka nzoto bango na bango.”—Talá Baloma 1:26, 27.
Engebene búku 1994 Britannica Book of the Year, likambo litali kosangisa nzoto ezali kolobelama mingi kati na mangomba ya États-Unis, mingimingi mpenza makambo lokola “koponama ya baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi lokola bakonzi kati na lingomba, kososolama ya ntómo ya baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali kati na lingomba, kopambolama ya libala ya ‘baoyo babalani mibali na mibali,’ mpe kondimama to kokweisama ya lolenge ya bomoi oyo ekangani na ezaleli ya kosangisa nzoto mibali na mibali.” Mangomba mingi ya minene mazali kotika nzela na bakonzi na bango oyo bazali kosɛnga ete bonsomi mingi epesama kati na makambo matali kosangisa nzoto. Engebene búku 1995 Britannica Book of the Year; baepiskopo 55 ya Lingomba ya Épiscopalien batyaki mabɔkɔ likoló na mokanda moko “oyo elobaki ete baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali bakoki kondimama mpo na koponama lokola bakonzi kati na lingomba mpe ete momeseno na bango wana mozali mabe te.”
Bakonzi mosusu ya mangomba balobaki mpo na kokɔtela ezaleli ya kosangisa nzoto mibali na mibali, kolobáká ete Yesu akweisaki yango soko moke te. Kasi ezali mpenza bongo? Yesu Klisto alobaki ete Liloba ya Nzambe ezali solo. (Yoane 17:17) Yango elimboli ete andimaki likanisi ya Nzambe likoló na likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali lokola emonisami kati na Levitike 18:22, oyo elobi ete: “Okolala na mobali pelamoko na mwasi te. Ezali mbindo.” Lisusu, Yesu atángaki pite mpe ekobo kati na “makambo mabe oyo nyonso makobimaka na kati mpe makopesaka moto mbindo.” (Malako 7:21-23) Liloba ya Greke oyo elimboli pite ezali kosangisa makambo mingi koleka liloba oyo lisalelami mpo na kolobela ekobo. Ezali komonisa lolenge nyonso ya kosangisa nzoto na libándá ya libala oyo lindimami na mibeko, kati na yango mpe kosangisa nzoto mibali na mibali. (Yuda 7) Yesu Klisto mpe akebisaki bayekoli na ye ete bándima te moteyi moklisto nyonso oyo akitisaka bonene ya ekweli ya pite.—Emoniseli 1:1; 2:14, 20.
Na ntango bakonzi ya mangomba bazali kosɛnga ete baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali to basi na basi bákoka koponama lokola bakonzi kati na lingomba, yango ezali na bopusi nini likoló na basangani ya mangomba, mingi mpenza likoló na bilenge? Yango epusaka bango ete báluka komeka kosangisa nzoto na libándá ya libala, boye te? Na bokeseni, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa baklisto ete ‘bákima pite.’ (1 Bakolinti 6:18) Soki moninga moko mondimi akwei kati na lisumu motindo wana, lisalisi ya bolingo likopesamela ye na mokano ya komema ye ete andimama lisusu na miso ya Nzambe. (Yakobo 5:16, 19, 20) Ekozala boni soki aboyi lisalisi yango? Biblia elobi ete soki bato motindo wana babongwani te, ‘bakosangola Bokonzi na Nzambe te.’—1 Bakolinti 6:9, 10.
“Kopekisa kobala”
Lokola ‘pite ezali kokóla mingi,’ Biblia elobi ete “kobala eleki malamu na kozika na mposa.” (1 Bakolinti 7:2, 9) Atako toli wana ya mayele esilá kopesama, bakonzi mingi ya mangomba basɛngisami ete bátikala minzemba, elingi koloba, kozanga kobala. Kati na búku na ye The Vatican Papers, Nino Lo Bello ayebisaki ete: “Ndai ya kotikala monzemba ekobukama te soki sángó moko, mofulele moko, to mamɛlɔ moko asangisi nzoto. . . . Akolimbisama na nsima ya kosangisa nzoto soki ayamboli yango na bosembo nyonso kati na ntubelá; nzokande, lingomba ekoki soko moke te kopesa nzela na sángó ete abala.” Liteya wana esili kobimisa mbuma malamu to mbuma mabe?—Matai 7:15-19.
Na ntembe te, basángó mingi babatelaka bongondo na bango, kasi ebele mpenza babatelaka yango te. Engebene búku 1992 Britannica Book of the Year, “eyebisamaki ete Lingomba ya Katolike ya Loma efutaki milió 300 ya badolare mpo na kosilisa matáta na bisambiselo na ntina na etamboli mabe ya bakonzi ya lingomba mpo na oyo etali kosangisa nzoto.” Na nsima, ebimeli ya 1994 ya mokanda yango elobaki ete: “Kokufa ya ebele ya bakonzi ya Lingomba na sida emonisi polele ete kati na bango ezali na basángó oyo basangisaka nzoto mibali na mibali mpe emonisi ete ezali na ebele monene mpenza ya . . . baoyo basangisaka nzoto mibali na mibali oyo bakómaki basángó.” Ezali likambo ya kokamwa te wana Biblia elobi ete ‘kopekisa kobala’ ezali ‘mateya ya bademó.’ (1 Timoté 4:1-3) Kati na búku na ye, Vicars of Christ, Peter de Rosa akomi ete: “Na likanisi ya bakomi mosusu ya makambo ya kala [bonzemba ya basángó] esili kosala mabe mingi likoló na bizaleli malamu ya bato koleka bibongiseli mosusu nyonso na mikili ya Mpótó, bakisá mpe pite. . . . Yango esili mpenza mbala mingi kobwaka mbindo likoló na nkombo ya boklisto. . . . Mobeko ya bonzemba na makasi ememi bakonzi ya Lingomba ete bákóma bakosi. . . . Sángó akoki kokwea na pite mbala nkóto, kasi droit canon epesi ye nzela soko moke te ete abala.”
Nsima ya komona lolenge Nzambe atalelaki losambo ya Baala, ezali mpasi te mpo na kososola lolenge azali kotalela mpe mangomba makabwani ya boklisto ya nkombo mpamba. Mokanda ya nsuka ya Biblia esangisi lolenge nyonso ya losambo ya lokuta kati na nkombo “Babilone monene mama na pite na bosoto na mokili.” Biblia ebakisi ete: “Kati na ye makila na basakoli, na bapɛtwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.”—Emoniseli 17:5; 18:24.
Na yango, Nzambe azali kolendisa baoyo balingi kozala basambeli ya solosolo ete: “Bino bato na ngai bóbima na ye, ete bósangana na masumu na ye te, ete bózwa moko na malɔ́zi na ye mpe te. . . . Na mokolo moko malɔ́zi na ye makoya, na liwa, na kolela, na nzala, mpe akotumbama na mɔ́tɔ, mpo ete Nkolo Nzambe mosambisi na ye azali makasi.”—Emoniseli 18:4, 8.
Motuna mozali sikawa kotunama mozali oyo: Nsima ya kobima na Babilone monene, moto asengeli kokende wapi? Motindo nini ya losambo endimami na Nzambe?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Losambo ya bikeko
Bikeko bizalaki kosalelama mpe kati na losambo ya Baala. Bayisalaele balukaki kosangisa losambo ya Yehova na oyo ya Baala. Bamemaki kútu bikeko kino na tempelo ya Yehova. Lolenge oyo Yehova atalelaka losambo ya bikeko emonisamaki polele na ntango abomaki Yelusaleme mpe tempelo na yango.
Bandakonzambe mingi ya mangomba ya lokuta etondi na bikeko, ezala na lolenge ya ekulusu, bilili, to bikeko ya Malia. Lisusu, basangani mingi ya mangomba bateyami ete basengeli kongumbama, kofukama, to kosala elembo ya ekulusu liboso na bikeko wana. Na bokeseni, baklisto ya solo bazwi etindá ya ‘kokima losambo na bikeko.’ (1 Bakolinti 10:14) Balukaka te kosambela Nzambe na lisalisi ya biloko oyo bikoki komonana na miso ya bato.—Yoane 4:24.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Musée du Louvre, Paris
[Etanda na lokasa 7]
“Mokambi na lingomba asengeli kozala na libúngá te”
LILOBA oyo euti na Tito 1:7, engebene Biblia Today’s English Version. Biblia Roi Jacques elobi: “Epískɔ́pɔ asengeli kozala na ekweli te.” Liloba “epískɔ́pɔ” euti na liloba ya Greke oyo elimboli “mokɛngɛli.” Na yango, baoyo baponami mpo na kokamba lisangá ya boklisto ya solosolo basengeli kolanda ntango nyonso kokokisa masɛngami ya moboko oyo mazwami kati na Biblia. Soki te, basengeli kolongolama mokumba na bango ya kokɛngɛla, mpo ete bazali lisusu te “ndakisa mpo na etongá.” (1 Petelo 5:2, 3) Mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba matalelaka lisɛngami yango na motuya?
Kati na búku na ye I Care About Your Marriage, Dr. Everett Worthington alobeli bolukiluki oyo esalemaki epai na bapastɛrɛ 100 na etúká ya Virginie, na États-Unis. Koleka 40 % kati na bango bandimaki ete basalaki makambo mosusu oyo elamwisaka mposa ya nzoto elongo na baoyo bazali babalani na bango te. Ntalo monene kati na bango basalaki pite.
Zulunalo Christianity Today eyebisi ete: “Na bambula zomi euti koleka, lingomba ebulunganisamaki mbala na mbala mpo na kotɔndɔlama ya etamboli ya mbindo oyo bakonzi na bango ya lokumu mingi bamonisaki.” Lisoló “Ntina oyo bapastɛrɛ oyo basalaki ekobo basengeli kozongisama te” ekweisaki ezaleli oyo emonanaka mingi kati na boklisto ya nkombo mpamba, ezaleli ya kozongisa nokinoki bakambi yango ya lingomba nsima wana basilaki “kokweisama mpo na lisumu ya pite.”