Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/7 nk. 3-4
  • Nzambe andimaka losambo ya motindo nyonso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaka losambo ya motindo nyonso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Losambo ya mbindo na ntango ya kala
  • Losambo ya pɛto ebebisami
  • Losambo ya Baala: Etumba monene na mitema ya Bayisalaele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Alongisaki losambo ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Sikoyo nde ntango ya kozwa ekateli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Alongisaki losambo ya solo
    Mekolá kondima na bango
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/7 nk. 3-4

Nzambe andimaka losambo ya motindo nyonso?

NZAMBE atyaki mposa ya makambo ya elimo kati na moto wana azalisaki ye​—mposa ya kosambela. Ezali te likambo moko oyo ebandaki kokóla mokemoke. Ezalaki kati na moto uta na ebandeli.

Nzokande, likambo ya mawa ezali ete, bato basili kosala mitindo mikeseni ya losambo, mpe na mobimba na yango ebimisi te libota ya esengo, libota ya bomoko. Kasi, bitumba oyo bizali kotangisa makila mingi bizali kino lelo kosalema na nkombo ya mangomba. Yango ebimisi motuna moko ya ntina mingi: Lolenge oyo moto asambelaka Nzambe ezali na ntina?

Losambo ya mbindo na ntango ya kala

Mabota ya kala oyo mazalaki na Moyen-Orient mazali ndakisa ya ntango ya kala oyo ezali kosalisa biso na koyanola na motuna yango. Mingi na bango basambelaki Nzambe oyo abéngamaki Baala. Bazalaki mpe kosambela banzambe-basi ya Baala, lokola Asela. Kati na losambo ya Asela, bazalaki mpe kosalela likonzi moko ya bulɛɛ oyo bazalaki kokanisa na ntina na yango ete ezalaki elembo ya enama ya eboteli. Balukiluki oyo bakundolaka biloko ya kala mpo na koyekola yango, oyo bazalaki kosala kati na etúká wana, bamonaki bikeko mingi ya basi oyo bazali bolumbu. Búku The Encyclopedia of Religion elobi ete “bikeko yango bizalaki komonisa nzambe-mwasi moko oyo biboteli na ye bizalaki minene mingi mpenza, atomboli mabɛ́lɛ na ye,” mpe “ekoki mpenza kozala ete ezalaki bongo elilingi . . . ya Asela.” Ntembe ezali te ete losambo ya Baala ezalaki mpenza ya mbindo.

Na yango, ezali likambo ya kokamwa te ete kati na losambo ya Baala bato bazalaki komipesa na pite. (Mituya 25:1-3) Mobali moko ya Kanana, Sikeme, abebisaki elenge moseka Dina. Atako bongo, atalelamaki na lokumu loleki monene kati na libota na ye. (Genese 34:1, 2, 19) Kosangisa nzoto kati na bandeko ya libota moko, kosangisa nzoto mibali na mibali, mpe kosangisa nzoto na banyama ezalaki kosalema mingi. (Levitike 18:6, 22-24, 27) Liloba “sodomie,” oyo emonisi misala ya mbindo ya kosangisa nzoto mibali na mibali, euti na nkombo ya engumba moko oyo ezalaki kala kati na etúká wana. (Genese 19:4, 5, 28) Kotangisa makila ezalaki mpe kosalema kati na losambo ya Baala. Basambeli ya Baala bazalaki kobwaka bana na bango ya bomoi kati na mɔ́tɔ lokola mbeka epai na banzambe na bango! (Yilimia 19:5) Misala nyonso wana mizalaki na bokangami na mateya ya mangomba. Na lolenge nini?

Kati na búku na ye Archaeology and the Old Testament, Dr. Merrill Unger alobi ete: “Mobulu, lokoso ya kosangisa nzoto mpe komitika na mposa ya nzoto, bizaleli oyo bilobelami kati na masapo matali Bakanana, bizalaki makasi na Moyen-Orient koleka bisika mosusu nyonso. Mpe ezaleli ya kokamwisa mpenza ya banzambe ya Kanana, oyo ete bazangaki bizaleli malamu, emonanaki polele na nzela ya makambo maleki mabe oyo balandi na bango bazalaki kosala mpe ememaki misala mingi ya mbindo na eleko wana, ndakisa pite na bisika ya losambo, [mpe] kopesa bana lokola mbeka.”

Nzambe andimaki losambo ya Bakanana? Soko moke te. Alakisaki Bayisalaele lolenge ya pɛto ya kosambela ye. Na ntina na misala oyo miuti kolobelama, apesaki likebisi oyo ete: “Bómibebisa na makambo oyo moko te, mpo ete na makambo oyo nyonso mabota oyo mazali ngai kobimisa liboso na bino bamibebisaki, mpe mokili ebebaki, yango wana napesaki likamba na bango mpo na mabe na bango, mpe mokili esanzaki bato bafandi na yango.”​—Levitike 18:24, 25.

Losambo ya pɛto ebebisami

Bayisalaele mingi bandimaki te lolenge oyo Nzambe azalaki kotalela losambo ya pɛto. Na esika ya kosala bongo, batikaki nzela na losambo ya Baala ete ekɔta kino na mboka na bango. Nokinoki, Bayisalaele balɛngolamaki na kolukáká kosangisa losambo ya Yehova na oyo ya Baala. Nzambe andimaki lolenge wana ya kosangisa losambo? Tótala makambo oyo mabimaki na boumeli ya boyangeli ya Mokonzi Manase. Atɛlɛmisaki bitumbelo mpo na Baala, atumbaki mwana na ye moko ya mobali lokola mbeka, mpe asalelaki misala ya maji. “Atɛmisaki ekeko na Asela [ʼashe·rahʹ na Liebele] oyo esalaki ye kati na ndako na [Yehova] mpe alobaki . . . ete, Nakotya nkombo na ngai na ndako oyo libela.”​—2 Mikonzi 21:3-7.

Bato oyo bayangelamaki na Manase balandaki ndakisa ya mokonzi na bango. Ya solo, “azimbisaki bango ete básala mabe koleka mabota oyo [Yehova] abebisaki bango liboso na bana na Yisalaele.” (2 Mikonzi 21:9) Na esika ete alanda makebisi oyo basakoli ya Nzambe bazalaki kopesa mbala na mbala, Manase asopaki makila ya bato mingi kino atondisaki Yelusaleme na makila ya bato basali likambo te. Atako na nsuka Manase abongolaki motema, kasi mwana na ye oyo akitanaki ye, Mokonzi Amona, azongisaki lisusu losambo ya Baala.​—2 Mikonzi 21:16, 19, 20.

Na nsima, mibali na pite bakómaki kosala misala na bango ya mbindo kati na tempelo. Ndenge nini Nzambe atalelaki lolenge wana ya losambo ya Baala? Na nzela ya Mose, apesaki likebisi oyo ete: “Okoya na lifuti na mwasi na pite to lifuti na mbwa [ekokaki mpenza kozala mibali basangisi nzoto elongo na bilenge mibali] na kati na ndako na [Yehova] Nzambe na yo te mpo na kofuta likabo na ndai, mpo ete bango mibale bazali na mbindo na miso na [Yehova] Nzambe na yo.”​—Deteronome 23:17, 18.

Mwana ya mwana ya Manase, Mokonzi Yosiya, apɛtolaki tempelo na kolongoláká losambo ya mbindo ya Baala. (2 Mikonzi 23:6, 7) Kasi makambo makokaki kobonga lisusu te. Nokinoki na nsima ya liwa ya Mokonzi Yosiya, losambo ya bikeko ezongaki lisusu kosalelama kati na tempelo ya Yehova. (Ezekiele 8:3, 5-17) Na yango, Yehova apusaki mokonzi ya Babilone ete abebisa Yelusaleme mpe tempelo na yango. Likambo wana ya mawa oyo esalelamaki na ntango ya kala ezali elembeteli ete mitindo mosusu ya losambo mindimami na Nzambe te. Ezali boni mpo na mikolo na biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto