Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/4 nk. 22-27
  • Bokóli emonani mpo na lipamboli ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokóli emonani mpo na lipamboli ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Molulu moko ya kolendisa
  • Bandako oyo efungwamaki
  • Ntina oyo tozali na mposa ya bandako mosusu
  • Lisoló etali ndako oyo ezali na 90 Sands Street
  • Lipamboli ya Yehova emonani polele
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/4 nk. 22-27

Bokóli emonani mpo na lipamboli ya Yehova

MOLULU moko ya bofungoli oyo esalemaki na mpokwa ya mokolo mwa 18 Sɛtɛ́mbɛ 1995, elobelaki mingi ete Yehova Nzambe azali solo kopambola bokóli ya Batatoli na biro monene na bango, na Brooklyn, na New York.

Bato koleka 6 000 balandaki masukúlu oyo masalemaki na boumeli ya molulu yango ya bofungoli. Bayanganaki na Brooklyn, epai kuna molulu yango mosalemaki, bakisá mpe na bandako mosusu minene ya Batatoli ya Yehova pene na Patterson mpe Wallkill, na New York, mpe na filiale na bango ya Toronto, na Canada. Longolá Brooklyn, baoyo balandaki yango epai mosusu bayokaki masukúlu nyonso na nzela ya telefone.

Molulu moko ya kolendisa

Babetelíti, lolenge babéngaka basáli wana ya bolingo malamu, oyo bayanganaki na molulu yango bazali eteni monene kati libota ya mokili mobimba ya Betele oyo ezali na bato koleka 16 400. Basangani yango bazali kosala mosala kati na bamboka soko monkámá, epai kuna basalaka misala ya bonyati mikanda oyo mikolimbolaka Biblia mpe misala mosusu oyo esungaka misala yango mpo na masangá koleka 78 600 ya Batatoli kati na mokili mobimba.

Bato bazalaki mpenza na motema likoló na ntango molulu ya bofungoli ebandaki na loyembo na ngonga ya 18:30, na nsima Karl Klein asalaki libondeli. Mokambi ya molulu yango, Lloyd Barry, atombelaki bato nyonso boyei malamu na esengo nyonso na maloba mokuse mpe alimbolaki ntina ya libaku yango. Albert Schroeder asalaki bozongeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya pɔ́sɔ wana, mpe na nsima Daniel Sydlik asalaki lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Mosala na biso ya bulɛɛ na Betele.” Baoyo nyonso balobaki liboso bazalaki bamoko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi ya Batatoli ya Yehova.

Masoló mibale oyo malandaki​—“Lolenge nini tokokisaki mposa na biso ya kozala na bandako mingi, 1974-1995,” mpe “Makambo ya ntina matali kobongisama lisusu mpe botongi bandako ya Betele na Brooklyn”​—elobelaki makambo ya botongi mpe bosombi bandako oyo mpo na yango molulu ya bofungoli mosalemaki. Elobelaki mingi ndako ya kofanda oyo eutaki kotongama sika, basáli na Betele soko nkóto moko bazali sikawa kofanda kati na yango. Ndako yango ezali na bolai ya bamɛ́tɛlɛ 115 na 90 Sands Street ekangami na ndako ya binyateli.

Likambo lileki monene kati na molulu yango ezalaki bongo lisukúlu ya bofungoli oyo Milton Henschel, prezidá ya la Société Watch Tower asalaki. Alobelaki mingi bantina oyo ezali na boyokani na Makomami, oyo mpo na yango molulu ya bofungoli bandako mozalaki kosalema mpo ete bandako yango esalelama mpo na mosala ya Yehova. Na nsima ya loyembo molulu yango mosukaki na libondeli lisalemaki na Carey Barber, ye mpe azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-bakambi. Kasi makambo nini mosusu ya ntina masalemaki kati na molulu yango?

Bandako oyo efungwamaki

Mokɛngɛli ya mosala na Betele, George Couch, ayebisaki ete bandako 17 ya kofanda esilaki kobakisama uta molulu ya nsuka ya bofungoli ndako ya kofanda na Brooklyn esalemaki na mokolo mwa 2 Máí 1969.a Ezalaki bongo bandako oyo etongamaki sika to bandako oyo esombamaki ezongisamaki ya sika. Molulu oyo ya bofungoli esalemaki mpenza mpo na bandako ya kofanda 17, mpe bandako mibale ya mike​—oyo esombamaki na ba 1940 kasi ebongisamaki lisusu mpo ete esalelama lokola bandako ya kofanda ya Betele​—bakisá mpe ya ndako ya binyateli mpe babiro oyo etongamaki to esombamaki uta na molulu ya bofungoli babiro ya bokambi mosala ya Batatoli ya Yehova esalemaki na 15 Mársi 1982.b

Ndako monene koleka kati na bandako nyonso oyo esilaki kofungwama ezalaki bongo oyo ezwami na 360 Furman Street. Etongamaki na 1928, Batatoli ya Yehova basombaki yango na mokolo mwa 15 Mársi 1983, mpe ezongisamaki ya sika na mobimba na yango mpenza. Na nsé na yango ezali na etando ya pene na mètres carrés 93. Bandako mosusu oyo etalelamaki na molulu ya bofungoli ezalaki bongo ndako ya binyateli oyo ezwami na 175 Pearl Street mpe bisika minene ya bobongisi mituka oyo etongamaki na bambula oyo euti koleka.

Ntina oyo tozali na mposa ya bandako mosusu

Na 1969, na ntango ndako ya nsuka ya kofanda ya Betele ya Brooklyn efungolamaki, motángo ya Batatoli oyo bazalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba ezalaki bongo 1 336 112. Kasi na 1995 bakómaki na motángo ya 5 199 895, eyikanaki koleka mbala misato na ndambo! Na yango, mpo na kokokisa mposa ya mikanda mikolimbolaka Biblia oyo ezali sé kokóla, libota ya Betele ya Brooklyn ekólaki longwa na basangani 1 042 na 1969 kino kokóma 3 360, oyo bazali sikawa kofanda na bandako 22!

George Couch alobelaki lolenge nini mposa ya kozala na bandako mosusu ekokisamaki kobanda na 1974 kino 1995. Na ebandeli ya ba 1970, Batatoli ya Yehova bafutelaki bitazɛ mingi ya lotɛ́lɛ oyo ebéngamaki Towers Hotel oyo ezalaki pembeni, mpo na kofandisa libota ya Betele oyo ezalaki sé kokóla. Na Dɛsɛ́mbɛ 1973, Nathan Knorr, oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na eleko wana, akomelaki Biro ya Betele mpe bakambi ya lotɛ́lɛ Towers, ayebisaki bango ete la Société akanaki ‘kobima na Towers Hotel na mokolo mwa 1 Ɔkɔtɔ́bɛ 1974.’

Ndeko Couch alobaki ete akamwaki mingi mpamba te esika mosusu ezalaki te mpo na kofandisa basáli na Betele oyo bazalaki kofanda na lotɛ́lɛ Towers. Bakambi ya lotɛ́lɛ Towers mpe basutukaki, mpamba te bazalaki kotya motema na mosolo oyo la Société azalaki kofuta mpo na kokóba kotambwisa misala na bango. Na nsuka, bakambi ya lotɛ́lɛ Towers balendisaki Batatoli ya Yehova ete básomba lotɛ́lɛ yango. Balobaki ete: “Uta ntango tokɔtaki na kartyé oyo kino lelo, bozali sé kokóla, mpe bozali na mposa ya ndako.”

Bamonisi ya la Société balobaki ete: “Kasi bozali na bafuteli mingi. Soki tosombi yango tokolinga kotya bobele bato na biso kuna.”

Bakambi ya lotɛ́lɛ Towers balobaki ete: “Tokotika ndako yango mpamba mpo na bino.” Mwa moke na nsima, Batatoli ya Yehova basombaki ndako ya lotɛ́lɛ́ Towers na ntalo malamu. Couch atunaki epai na bayoki oyo bazalaki kolanda ye na likebi nyonso ete: “Mpo na nini Ndeko Knorr akomaki mokanda wana? Ekoki mpenza kozala ete ye moko mpe ayebaki ntina te, kasi ezalaki mpo na yango nde Towers Hotel etekisamaki epai na la Société Watch Tower.”

Molobi alobelaki mpe lolenge Batatoli ya Yehova basombaki ndako oyo ezwami na Columbia Heights, esika ezalaki kala Margaret Hotel oyo eyebanaki mingi, na ngambo mosusu ya balabála ya ndako ya liboso ya Betele. Ezalaki esika moko malamu, mpamba te ekokaki kokangisama kozanga nkaka na bandako ya Betele na nzela ya nsé ya mabelé. Na Febwáli 1980, wana misala mizalaki kosalema kati na ndako yango mpo na kobongisa yango, eyaki kozika nyonso mpenza. Na nsima, lokola nkolo na yango azalaki na makoki te ya kotonga ndako mosusu na esika wana, atekisaki esika yango epai na Batatoli ya Yehova.

Ndeko Couch alobaki ete: “Bandako wana moko na moko ezali na likambo ya kobenda likebi kati na lisoló na yango​—ete ezali Yehova nde akambaki lisangá na ye oyo ezali komonana ete esomba bandako wana moko na moko.”

Lisoló etali ndako oyo ezali na 90 Sands Street

Ndako ya kofanda ya sika mpe oyo eleki monene ezali bongo oyo ezali na 90 Sands Street. Na ntango Batatoli ya Yehova basombaki yango na Dɛsɛ́mbɛ 1986, ezalaki na ndako moko monene ya binyateli na 160 Jay Street.c Babukaki ndako yango ya binyateli, mpe na mokolo mwa 30 Augústo 1990, bayebisaki na libota ya Betele ete mokanda oyo ezali kopesa nzela na botongi ebimisamaki mpo na kotonga ndako ya kofanda ya bitazɛ 30 na esika yango.

Kati na mituna-lisoló oyo Theodore Jaracz, moko kati na Lisangani ya mikólo bakambi asalaki elongo na Max Larson, ye mokɛngɛli ya mosala ya bonyati mikanda ya la Société na Brooklyn, alobelaki lolenge ndingisa ezwamaki mpo na kotonga ndako ya kofanda na 90 Sands Street. Ndeko Larson alobaki ete likambo oyo esalemaki na 1965 ezalaki na ntina mingi.

Na ntango wana la Société elingaki kotonga ndako ya binyateli ya bitazɛ zomi na lopango oyo ezalaki pene na bandako na yango mosusu ya binyateli, kasi mibeko ya Leta na ntina na etando wana mipesaki nzela na botongi bobele ndako ya bitazɛ mibale. Moyemi moko ya bandako andimaki kolɛngɛla mikanda ya botongi mpo na ndako ya sika ya binyateli oyo ekanamaki, kasi alobaki ete: “Nakomitungisa te na kolakisáká yango na biro ya Leta.” Andimisamaki ete biro ya Leta ekobongola soko moke te mibeko na yango ya kotonga ndako na etando wana. Ntango mikanda yango ya botongi mindimamaki, angangaki ete: “Lolenge nini mpenza bozwi ndingisa wana!”

Larson akóbi na komonisáká ete, ezalaki mpo ete na ntango mibeko yango mibongwanaki likoló na etando yango mpo na ndako na biso ya bitazɛ zomi, mibongwanaki mpe mpo na bitando ya pembeni, kati na yango mpe etando epai lopango oyo ezali na ndako oyo ezwami na 160 Jay Street. Mpe, likambo ya kokamwa, kobongolama wana epesaki nzela na kotongama ya lotɛ́lɛ. Larson alobaki ete, kasi moto moko te ayebaki likambo yango​—bobele na nsima ya bambula 25, nsima wana tobandaki koluka esika ya kotonga ndako ya Betele ya sika. Na bongo mibeko mitali kotonga miyaki kokundolama lisusu!

Ndeko Larson ayebisaki makambo oyo masalemaki: “Na ntango tolɛngɛlaki mikanda mpo na botongi ndako na biso ya kofanda ya bitazɛ 30 mpe tolakisaki yango na biro ya Leta mpo na makambo matali botongi bandako, bayebisaki biso ete: ‘Bokoki te kotonga ndako ya kofanda na esika wana. Wana ezali esika mpo na botongi bakompanyi, mpe Leta akoki te kobongola mobeko yango mpo na bino.’

“Toyebisaki bakonzi ya Leta ete ‘basengelaki te kobongola yango. Esilá kokóma esika mpo na kotonga lotɛ́lɛ.’ Na ntango balukaki kati na mikanda ya kala, bakamwaki mingi mpenza!” Larson asukisi na maloba oyo ete: “Ezali na lolenge wana nde tozwaki ndako na biso ya bitazɛ 30.”

Lipamboli ya Yehova emonani polele

Mokomi na Nzembo moko ya Biblia akomaki ete: “Soki ezali [Yehova] te oyo akotongaka ndako, basáli bakosala wana bobele mpamba.” (Nzembo 127:1) Emonani polele ete, lipamboli ya Yehova lizali likoló na mosala ya Batatoli ya Yehova mpo na botongi bandako oyo ezali koyeisa pɛpɛlɛ mosala ya kolakisa mpe ya koteya oyo Yesu atindaki bayekoli na ye ete básalaka yango.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Baoyo bazwaki libaku malamu ya koyoka masukúlu oyo masalemaki na boumeli ya molulu yango na mokolo mwa 18 Sɛtɛ́mbɛ 1995, basepelaki na komona elembeteli ya lipamboli ya Nzambe likoló na bokóli ya biro monene ya basaleli ya Yehova. Libota ya Yehova likoki kondimisama ete lipamboli yango likolanda ntango nyonso wana bazali kokóba kosala oyo ye azali kotinda.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mosɛnzɛli, ya 15 Yúni 1969 (ebimeli ya Lingelesi), nkasa 379-​82.

b Mosɛnzɛli ya 1 Dɛsɛ́mbɛ 1982 (ebimeli ya Lingelesi), nkasa 23-​31.

c Lamuká! ya 22 Dɛsɛ́mbɛ 1987, nkasa 16-18 (ebimeli ya lifalansé).

[Elilingi na lokasa 23]

90 Sands St. • 1995

[Bililingi na lokasa 24, 25]

Bandako mosusu ya kofanda oyo efungwamaki

97 Columbia Hts. • 1986

Bossert Hotel, 98 Montague St. • 1983

34 Orange St. • 1945

Standish Hotel, 169 Columbia Hts. • 1981

67 Livingston St. • 1989

108 Joralemon St. • 1988

Towers Hotel, 79-99 Willow St. • 1975

[Bililingi na lokasa 26]

175 Pearl St. • 1983

69 Adams St. • 1991

360 Furman St. • 1983

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto