Mituna ya batángi
Yesu alobaki ete: “Soko bokolimbisa masumu na moto nani, makolimbisama na ye; soko bokokanga masumu na moto nani, makokangama na ye.” Maloba oyo malimboli ete baklisto bakoki kolimbisa masumu?
Eloko moko te kati na Makomami epesi biso nzela ya koloba ete baklisto nyonso, to ata mpe bankulutu oyo baponami kati na lisangá, bapesameli nguya uta na Nzambe mpo na kolimbisa masumu. Nzokande, Yesu alobaki epai na bayekoli na ye kati na Yoane 20:23, maloba oyo mazongelami awa na likoló, ezali komonisa ete Nzambe apesaki bantoma nguya ya sikisiki mpo na yango. Mpe maloba wana ya Yesu makoki kozala na boyokani na oyo alobaki na Matai 18:18 na ntina na mikano mikamatami na likoló.
Baklisto bakoki kolimbisa mabungá mosusu, engebene toli ya Paulo oyo ekomami kati na Baefese 4:32, ete: “Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana mokomoko pelamoko Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” Awa Paulo alingaki kolobela mikakatano oyo baklisto bakoki kozala na yango kati na bango, na ndakisa matɔngi. Basengeli kosala makasi ete básilisa mikakatano yango, kolimbisanáká moko na mosusu. Tómikundola maloba oyo ya Yesu: “Soko okoyeisa likabo na yo na etumbelo mpe okokanisa wana ete ndeko na yo azali na yo na likambo, tiká likabo na yo kuna liboso na etumbelo mpe kenda naino ete obongisa likambo na ndeko na yo, mpe na nsima ozonga mpo na kopesa likabo na yo.”—Matai 5:23, 24; 1 Petelo 4:8.
Nzokande, zingazinga ya Yoane 20:23 ezali komonisa ete Yesu alingaki kolobela masumu minene, lokola emonisami kati na likambo mosusu oyo alobaki na nsima epai na bato oyo bakesanaki na bato mingi mosusu. Tiká tótala soki mpo na nini bongo.
Na mokolo oyo asekwisamaki, Yesu abimelaki bayekoli na ye kati na ndako moko oyo ekangamaki, na Yelusaleme. Lisoló yango lilobi ete: “Yesu alobi na bango lisusu ete, Kimya ezala na bino. Pelamoko Tata atindi ngai, ngai mpe nazali kotinda bino. Esili ye koloba boye, apameli bango mpe alobi ete, Bózwa [elimo santu, NW]. Soko bokolimbisa masumu na moto nani, makolimbisama na ye; soko bokokanga masumu na moto nani, makokangama.”—Yoane 20:21-23.
Na ntembe te, bayekoli oyo balobelami awa ezali bongo bantoma na ye ya sembo. (Kokanisá na molɔngɔ́ 24.) Wana ayebisaki bango ete: “Bózwa [elimo santu, NW],” Yesu ayebisaki bango na elilingi ete mosika te, elimo santu elingaki kosopamela bango. Yesu akóbaki na kolobáká ete basengelaki kozwa nguya ya kolimbisa masumu. Emonani polele ete maloba wana mibale mazali na boyokani, moko ebimisi mosusu.
Mikolo ntuku mitano na nsima ya kosekwa na ye, na mokolo ya Pantekoti, Yesu asopaki elimo santu. Yango ekokisaki mosala nini? Ya liboso, baoyo bazwaki elimo babotamaki lisusu lokola bana ya Nzambe, na elikya ya kozala bayangeli elongo na Klisto na likoló. (Yoane 3:3-5; Baloma 8:15-17; 2 Bakolinti 1:22) Kasi esukaki bobele bongo te. Bamoko kati na bato oyo bazwaki elimo santu bakómaki na nguya ya kosala makamwisi. Na nzela na yango basusu bakokaki koloba na nkótá oyo bayebaki yango liboso te. Basusu bakokaki kosakola. Nzokande basusu bakokaki kobikisa bato ya maladi to kosekwisa bakufi.—1 Bakolinti 12:4-11.
Lokola maloba ya Yesu oyo mazwami kati na Yoane 20:22 matalelaki kosopama wana ya elimo santu likoló na bayekoli na ye, maloba oyo makangami na yango, oyo ezali kolobela kolimbisa masumu, makoki kolimbola ete bantoma bazwaki yango uta na Nzambe na nzela ya mosala ya elimo santu oyo ezali bongo nguya bobele moko ya kolimbisa mpe kokanga masumu.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, 1 Mársi 1949 (ebimeli ya Lingelesi), lokasa 78.
Biblia eyebisi biso na mobimba te na ntina na bantango nyonso oyo bantoma basalelaki nguya motindo wana, kasi elobeli mpe te likambo mokomoko oyo kati na yango basalelaki likabo ya likamwisi ya koloba na nkótá, ya kosakola, to ya kobikisa bato na maladi.—2 Bakolinti 12:12; Bagalatia 3:5; Baebele 2:4.
Moko na makambo oyo mamonisaki nguya oyo bantoma bazalaki na yango ya kolimbisa to ya kokanga masumu etalelaki Anania mpe Safila, oyo bakosaki elimo. Petelo, oyo ayokaki Yesu ntango alobaki maloba oyo tozali kotánga kati na Yoane 20:22, 23, atɔndɔlaki Anania mpe Safila. Petelo alobaki liboso epai na Anania, oyo akufaki na mbala moko. Na ntango Safila akɔtaki mpe alobaki bobele lokuta, Petelo asakolaki etumbu na ye. Petelo alimbisaki lisumu na ye te kasi alobaki ete: “Talá, makolo na bakundi na mobali na yo bazali na monɔkɔ na ndako, mpe bakomema yo na libandá lokola.” Ye mpe akufaki na mbala moko.—Misala 5:1-11.
Na libaku yango, ntoma Petelo asalelaki nguya ya sikisiki mpo na kolobela kokangama mpenza ya lisumu, na lolenge ya likamwisi, ayebaki ete Nzambe alimbisaki te lisumu ya Anania mpe Safila. Emonani ete bantoma mpe bazalaki na bososoli oyo elekaki nguya ya bato na makambo oyo kati na yango bandimisamaki mpenza ete masumu masilaki kolimbisama mpo na mbeka ya Klisto. Na yango bantoma oyo bazwaki elimo santu bakokaki kolimbisa to kokanga masumu.a
Yango elimboli te ete bankulutu nyonso oyo bazwaki elimo santu na eleko wana bazalaki na nguya ya kosala makamwisi motindo wana. Tokoki komona yango kati na oyo ntoma Paulo alobaki na ntina na mobali oyo abimisamaki na lisangá ya Kolinti. Paulo alobaki te ete, ‘Nalimbisi masumu ya mobali wana,’ alobaki mpe te ete, ‘Nayebi ete moto yango asili kolimbisama na likoló, na yango, bózongisa ye.’ Nzokande, Paulo alendisaki nde lisangá mobimba ete bálimbisa moklisto wana oyo azongaki mpe bámonisela ye bolingo. Paulo abakisaki ete: “Soko bino bokolimbisa moto nani, ngai mpe nakolimbisa ye.”—2 Bakolinti 2:5-11.
Nsima wana mobali yango azongaki na lisangá, bandeko baklisto mibali mpe basi nyonso bakokaki kolimbisa ye na ndimbola oyo ete basengelaki te kokangela ye nkanda mpo na oyo asalaki. Nzokande, asengelaki liboso kobongwana mpe na nsima kozongisama. Lolenge nini yango esengelaki kosalema?
Ezali na masumu minene oyo bankulutu ya lisangá basengeli kotalela, lokola koyiba, kobuka lokuta, to pite. Bamekaka kosembola mpe kopamela mosáli na mabe motindo wana, kopusáká ye ete abongola motema. Kasi soki, na kozanga kobongola motema, moto moko asali lisumu monene, bankulutu yango bakolanda litambwisi ya Nzambe ya kobengana mosáli na mabe. (1 Bakolinti 5:1-5, 11-13) Oyo Yesu alobaki na Yoane 20:23 ezali kosalema te mpo na makambo motindo oyo. Bankulutu wana bazali te na likabo ya elimo santu mpo na kosala makamwisi, lokola likoki ya kobikisa bato oyo bazali na maladi na nzoto to ya kosekwisa bakufi; makabo yango makokisaki mokano na yango mpe na nsima esukaki. (1 Bakolinti 13:8-10) Lisusu, lelo oyo bankulutu bazali te na nguya euti na Nzambe mpo na kolimbisa masumu minene na kosakoláká ete mosáli moko ya masumu akóma pɛto na miso ya Yehova. Lolenge wana ya kolimbisa esengeli kozwa moboko na yango likoló na mbeka ya lisiko, mpe ezali bobele ntango wana nde Yehova akoki kolimbisa na lisalisi ya mbeka yango.—Nzembo 32:5; Matai 6:9, 12; 1 Yoane 1:9.
Lokola ezalaki na likambo ya mobali wana na Kolinti ya kala, na ntango moto oyo asali lisumu monene aboyi kobongola motema, asengeli kobimisama na lisangá. Soki abongwani na nsima mpe amonisi misala oyo mizali elembeteli ya kobongola motema, Nzambe akoki kolimbisa ye. (Misala 26:20) Kati na likambo motindo oyo, Makomami mapesi bankulutu elónga ya kondima ete Yehova asili kolimbisa mosáli na mabe wana. Na bongo, nsima wana moto yango azongisami na lisangá, bankulutu bakoki kosalisa ye na elimo ete akóma makasi kati na kondima. Basusu kati na lisangá bakoki kolimbisa ye motindo moko baklisto ya kolinti balimbisaki mobali oyo abimisamaki na lisangá mpe azongisamaki na nsima.
Na kotaleláká makambo na motindo wana, bankulutu bazali kosala mibeko na bango moko te mpo na kosambisa. Basalelaka mitindá ya Biblia mpe balandaka na bokɛngi nyonso lolenge ya kosalela oyo Yehova asilá kotya. Na yango, kolimbisa nyonso to kozanga kolimbisa oyo bankulutu bakosala ekozala na ndimbola ya maloba ya Yesu oyo mazwami kati na Matai 18:18: “Nazali koloba na bino solo ete, eloko nini ezali bino kokanga yango awa na mokili, ekokangama na Likoló, mpe eloko nini ezali bino kofungola yango na mokili ekofungolama na Likoló.” Bikateli na bango bikomonisa bobele likanisi ya Nzambe likoló na likambo yango lokola emonisami kati na Biblia.
Na yango, oyo Yesu alobaki, lokola ekomami kati na Yoane 20:23, ezali na bongolabongola te na eteni mosusu ya Makomami, kasi ezali komonisa ete bantoma bazalaki na ndingisa monene na ntina na kolimbisa masumu, na boyokani na mokumba monene oyo bakokisaki na ebandeli mpenza ya lisangá ya boklisto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ata liboso ete Yesu akufa mpe apesa lisiko, azalaki na nguya ya koloba ete lisumu ya moto boye lilimbisami.—Matai 9:2-6; kokanisá na “Mituna ya batángi” oyo ebimaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yúni 1995.