Mituna ya batángi
Baefese 3:14, 15 elobi ete “mabota nyonso na Likoló mpe na nsé mazwi nkombo uta na” Nzambe. Mabota mazalaka nde na likoló, mpe na lolenge nini, libota mokomoko ya bato ezwaka nkombo na yango uta na Yehova?
Na likoló ezali na mabota te lokola oyo ezalaka awa na mabelé, oyo mazali na tata, na mama mpe na bana—oyo bango nyonso bazali na bondeko ya mosuni. (Luka 24:39; 1 Bakolinti 15:50) Yesu amonisaki polele ete baanzelu babalaka te, mpe eloko moko te emonisi ete babotaka.—Matai 22:30.
Atako bongo, Biblia ezali koloba na lolenge ya elilingi na ntina na Yehova Nzambe ete abalani na lisangá na ye ya likoló; abalani na ndimbola ya elimo. (Yisaya 54:5) Lisangá wana ya likoló ebotaka bana, lokola baanzelu. (Yobo 1:6; 2:1; 38:4-7) Na bongo, na ndimbola wana, ezali na libota moko ya elimo mpe ya kokamwa kuna na likoló.
Lisusu, libota moko ya sika ya elilingi ezali kokóla kuna na likoló, esalemi bongo na Yesu Klisto mpe na lisangá ya ba 144 000 oyo ezali lokola mwasi ya libala. (2 Bakolinti 11:2) Mingi na bapakolami yango basilá kokufa, na elikya ya bomoi na likoló. Basusu bazali naino na bomoi awa na mabelé. Bango nyonso bazali kozela na motema likoló “libala na Mwana na Mpate.” Biblia emonisi ete libala yango ekosalema na ntango ya bolózi monene oyo ezali kobɛlɛma—kobomama ya Babilone monene, mpe na nsima kolongolama ya eteni mosusu ya ebongiseli ya Satana.—Emoniseli 18:2-5; 19:7, 11-21; Matai 24:21.
Mpo na oyo etali mabota oyo mazali awa na mabelé, ntoma Paulo amonisaki te kati na Baefese 3:15 ete libota mokomoko ezwi nkombo na mbala moko uta na Yehova. Na ntembe te, Paulo alingaki nde kolobela milɔngɔ́ minene ya mabota oyo mibatelaka nkombo. Yosua 7:16-19 epesi ndakisa moko. Yehova amonisaki polele lisumu ya Akana. Ya liboso, ekweli etángamaki mingimingi likoló na libota ya Yuda to esukaki bobele na libota wana. Na nsima etángamaki mpe kino na libota ya Bazɛla. Na nsuka, libota ya Akana emonisamaki polele. Akana mpe mwasi na ye mpe bana na ye batalelamaki, to balobelamaki, lokola basangani ya ndako (to, libota) ya Zabdi, nkɔ́kɔ ya Akana. Na ngala na bango, libota wana ezalaki etuluku monene oyo ebatelaki nkombo ya nkɔ́kɔ na bango Zɛla.
Kati na Baebele, milɔngɔ́ ya mabota wana ezalaki na ntina mpenza, mingi na yango ekomami na Biblia. Nzambe asungaki na kobatelama na bango, wana esengelaki, mpo ete basangoli na libula bálekisa nkombo ya libota na nzela ya ebongiseli oyo ebéngamaki Lévirat, to libala elongo na sɛmɛki.—Genese 38:8, 9; Deteronome 25:5, 6.
Mpo na ndakisa mosusu ya mabota minene motindo wana, tótalela Yesu oyo abéngami mwana na Davidi. Azalaki mpenza mwana ya Mokonzi Davidi te, abotamaki bikeke mingi nsima ya liwa ya Davidi. Nzokande, moko na bilembo oyo esengelaki komonisa Masiya ezali ete asengelaki kozala kati na libota ya Davidi, lokola Bayuda nyonso bayebaki yango. (Matai 22:42) Yesu azalaki na molɔngɔ́ ya Davidi na nzela ya mama na ye mpe na nzela ya tata mobokoli na ye.—Matai 1:1; Luka 2:4.
Kasi lolenge nini mabota motindo wana mazwi nkombo na yango uta na Yehova? Likambo moko ekoki kobɛtɛlama ntembe te ezali oyo ete ezalaki na mwa mabaku moke—na ndakisa mpo na Abalayama mpe Yisaka—wana Yehova ye moko mpenza apesaki tata na libota nkombo. (Genese 17:5, 19) Asalaki bongo epai na basusu te. Mingimingi mpenza, Yehova apesaka nkombo te epai na libota mokomoko oyo elekaka kino epai na bana.
Kasi, Yehova abandisaki libota ya bato na ntango atindaki Adama mpe Eva ete ‘bábotaka mpe bázala na kobota mingi, mpe bátondisa mokili.’ (Genese 1:28) Mpe Yehova atikaki nzela na Adama mpe Eva oyo bakómaki bato ya kozanga kokoka ete bábota bana, atyaki bongo moboko mpo na mabota nyonso ya bato. (Genese 5:3) Na yango, na bandimbola mingi, Nzambe akoki kobéngama Mobandisi ya nkombo ya mabota.
Na bamboka mingi lelo, bato bamonaka lisusu ntina te ya kobatela nkombo ya mabota mpo na bileko mingi. Nzokande, na mikili nyonso, baklisto batɔ́ndaka Yehova mpo na ebongiseli ya libota mpe bakumisaka ye na kosaláká makasi mpo ete libota mokomoko na bango ezala malamu.