Mosika te bomoi ya malamu ekoya!
KANISÁ naino moto moko oyo ayebisaka soki mbula ekobɛta to ekobɛta te, mpe mbala mingi makambo oyo alobaka esalemaka. Soki asakoli na ntango bapesaka bansango ya mpokwa na televizyó to na radio ete lobi mbula ekobɛta, okakatanaka te mpo ete lobi na ntɔ́ngɔ́ okoka kokamata lingɛmbu na yo mpe obima na yango. Makambo oyo asilá kosala liboso mapusi yo ete ondimelaka ye. Osalaka engebene makambo oyo ye alobaka.
Na bongo, na meko nini elaka ya Yehova ya kosala paladiso na mabelé ebongi kotyelama motema? Makambo oyo Yehova asilá kosala mamonisi nini? Kokokisama ya bisakweli ya Biblia ezali komonisa polele makambo oyo Yehova asilá kosala. Azali Nzambe ya bosikisiki oyo ekoki kokweisama te mpe azali Nzambe ya bosolo. (Yosua 23:14; Yisaya 55:11) Bilaka ya Yehova bibongi kotyelama motema, na boye ete na bantango mosusu alobelaka mpenza makambo malakami mpo na mikolo mikoya lokola nde masilaki kosalema. Na ndakisa, nsima ya kopesa elaka na ntina na mokili ya sika oyo kati na yango liwa mpe kolela ekozala te, totángi ete: “Yango [mapamboli oyo malakami] esili kosalama!” Elingi koloba ete: “Mazali solo mpenza!”—Emoniseli 21:5, 6, NW.
Ee, kokokisama ya bilaka ya kala ya Yehova ezali kopesa biso elikya ete elaka ya bomoi ya malamu mpo na bato ekokokisama mpenza. Kasi ntango nini bomoi yango ya malamu ekoya?
Bomoi ya malamu ekoya ntango nini?
Mosika te bomoi ya malamu ekoya! Tokoki kondimisama na yango mpenza mpamba te Biblia elobi ete makambo mingi ya mabe masengelaki kobima na mabelé mwa moke liboso ete Paladiso etya bomoi ya malamu. Makambo yango ya mabe mazali kosalema lelo oyo.
Na ndakisa, Yesu Klisto asakolaki ete bitumba minene bisengelaki kosalema. Alobaki ete: “Zambi libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu.” (Matai 24:7) Esakweli yango esili kokokana. Katikati na bambula 1914 kino 1945, bitumba mibale ya mokili mobimba bisalemaki mpe bilandanaki na ebele ya bitumba mosusu oyo kati na yango bikólo bisili kobundisana. “Na kotalela mwayene ya mbula na mbula, motángo ya bato oyo basili kokufa na eleko oyo [kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba] eleki mbala mibale motángo ya bato oyo bakufaki na ekeke ya 19 mpe ezali koleka mbala nsambo motángo ya bato oyo bakufaki na ekeke ya 18.”—World Military and Social Expenditures 1993.
Kopalangana ya maladi ezali mpe elembo mosusu oyo emonisi ete mosika te bomoi ya malamu kati na Paladiso ekoya. Yesu asakolaki ete ‘maladi mabe ekozala na esika moko mpe na esika mosusu.’ (Luka 21:11) Esakweli yango esili kokokana? Ee. Nsima ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, grippe espagnole ebomaki bato koleka bamilió 20. Kobanda wana kino lelo, kanser, maladi ya motema, malaria, sida, mpe makɔnɔ mosusu mazali koboma bamilió ya bato. Kati na mikili ya bobólá, maladi oyo ezali kouta na kobebisama ya mai (kati na yango pulupulu mpe banyama ya libumu) ezali koboma bamilió ya bato mokolo na mokolo.
Yesu alobaki mpe ete: ‘Nzala ekozala.’ (Matai 24:7) Lokola elobelamaki kati na lisoló ya liboso, babólá oyo bazali kati na mokili bazali kozwa te bilei oyo ekoki na bango. Yango ezali elembo mosusu oyo emonisi ete bomoi moko ya malamu koleka kati na Paladiso etikali moke eya.
Yesu alobaki ete: “Koningana minene ya mabelé ekozala.” (Luka 21:11, NW) Yango mpe ezali kokokana na mikolo na biso. Uta 1914, koningana ya nsɔ́mɔ ya mabelé esili koboma ebele ya bamilió ya bato.
Biblia elobi ete mbongwana esengelaki komonana epai na bato na “mikolo na nsuka.” Basengelaki kozala “bato na komilinga” mpe “balingi ya mosolo,” mpe bana basengelaki “kozanga botosi epai na baboti.” Bato nyonso basengelaki “kolinga mingi bisengo koleka kolinga Nzambe.” (2 Timoté 3:1-5, NW) Ondimi ete ezaleli ya bato mingi ekokani na yango, boye te?
Wana bato mingi bazali kosala makambo mabe, ezaleli ya kotyola mibeko ezali mpe kokóla. Yango mpe esakolamaki. Engebene Matai 24:12, Yesu alobaki na ntina na ‘bokóli ya ezaleli ya kotyola mibeko.’ Na ntembe te, ondimisami ete mobulu esili kokóla mingi lelo oyo koleka bambula mingi liboso. Epai na epai bato bazali na kobanga ete bakoyiba bango, bakokosa bango, to bakoyokisa bango mpasi na lolenge moko to mosusu.
Bitumba, kopalangana ya maladi, nzala, koningana ya mabelé, bokóli ya mobulu, mpe kobeba makasi ya boyokani kati na bato—nyonso wana ezali komonana lelo oyo, lokola Biblia esakolaki yango. Okoki komituna ete: ‘Kasi makambo wana masilaki kobima na boumeli ya lisoló ya bato, boye te?’ ‘Bokeseni nini ezali kati na yango na oyo ya mikolo na biso?’
Kati na makambo oyo ezali kosalema lelo, ezali na mwa ndambo ya makambo ya kobenda likebi mpenza. Biblia elobi te ete likambo moko, na ndakisa nzala, esengeli kozala bobele yango moko elembo ya komonisa ete tozali kobika na mikolo ya nsuka mpe ete bomoi ya malamu ebɛlɛmi. Bisakweli ya Biblia oyo bizali kolobela ntango ya nsuka bisengelaki kokokana likoló na libota ya bato oyo batyolaka Nzambe.—Matai 24:34-39; Luka 17:26, 27.
Lisusu, ezali kokamwisa ete makambo mosusu oyo mazali kati na esakweli ya Yesu—mingimingi na ntina na nzala mpe kopalangana ya maladi—mazali kokokana lelo oyo. Mpo na nini? Mpamba te makambo oyo bato ya zébi bazali kosala mapesi matomba malamu koleka te. Boyebi ya mosala ya monganga mpe myango ya kosilisa bokɔnɔ esili kokóla to kopalanganisama mingi mpenza te. Bobele Nzambe nde akokaki kosakola kati na Liloba na ye, Biblia, ete na eleko oyo maladi mpe nzala elingaki kokóma lisusu makasi koleka, kasi asakolaki te ete elingaki kobonga.
Lokola bisakweli nyonso ya Biblia na ntina na ntango ya nsuka, to “mikolo na nsuka,” ezali kokokana, tokoki koloba nini? Ete mosika te bomoi ya malamu ekoya! Kasi ekoya lolenge nini?
Bomoi ya malamu ekoya lolenge nini?
Okanisi ete bato bakoki kobongola mabelé Paladiso? Uta kalakala kino na mikolo na biso, mitindo ndenge na ndenge ya biyangeli ya bato esili kosalelama. Basusu basali milende makasi mpenza mpo na kokokisa bamposa ya bato. Nzokande, makambo mingi mazali kobeba sé kobeba. Ezala kati na mikili ya bozwi to mpe kati na mikili ya bobólá, biyangeli bizali kobunda mpo na kopɛngola makambo matali bilangwiseli, kobongisela bato bandako, kosilisa bobólá, mobulu, kozanga misala, mpe kosilisa bitumba.
Ata soki biyangeli bikokaki kosilisa makambo wana, kasi bakoki te kosilisa maladi na mobimba na yango mpenza; bakoki mpe te kosilisa bobangé mpe liwa. Ezali polele ete, bato bakoki soko moke te kosala Paladiso awa na mabelé.
Biblia ezali koloba na mayele nyonso ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Na bongo, tosengeli kondimela nani? Biblia epesi eyano ete: “Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali kosunga ye, oyo [elikya na ye ezali epai na Yehova] Nzambe na ye.” (Nzembo 146:3, 5) Soki totye elikya na biso epai na Yehova Nzambe, tokoyokisama nsɔ́ni te.
Ya solo, Ye oyo azali na mayele mpe na nguya ya kozalisa mabelé, sanza, mpe myoto akoki mpe kosala ete mabelé makóma Paladiso. Akoki kopesa bato likoki ya kosepela na bomoi ya malamu. Oyo nyonso Yehova akani kosala yango, akoki mpe akosala yango. Liloba na ye lilobi ete: “Epai na Nzambe makambo nyonso makoki kosalama.” (Luka 1:37) Lolenge nini Nzambe akokokisa bomoi ya malamu?
Yehova akopesa bato bomoi ya malamu na nzela ya Bokonzi na ye. Mpe, Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ezali boyangeli ya solo oyo ezali na Mokonzi aponami na Nzambe, Yesu Klisto. Bokonzi ya Nzambe ezali na likoló, kasi etikali moke ete epesa mapamboli kitoko mpe bomoi ya malamu epai na bafandi na Paladiso awa na mabelé.—Yisaya 9:6, 7.
Mbala mosusu oyebi malamu libondeli ya ndakisa oyo Yesu Klisto apesaki, oyo ezali kati na Biblia na Matai 6:9-13. Eteni moko ya libondeli yango elobi ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nsé pelamoko na Likoló.” Engebene libondeli yango, Bokonzi ya Nzambe “ekoya” kokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabelé. Mpe mokano na ye ezali ete mabelé makóma paladiso.
Motuna ya nsuka ezali ete: Osengeli kosala nini mpo ete ozala na bomoi ya malamu kati na Paladiso oyo ezali koya?
Oyo osengeli kosala
Na bolingo nyonso, Yehova apesi elikya ya bomoi ya malamu kati na Paladiso epai na baoyo nyonso bazali kosala mokano na ye. Biblia eyebisi biso ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Kasi eloko nini ekosalisaka moto ete akóma moyengebene na miso ya Nzambe?
Mpo na kosepelisa Yehova tosengeli koyekola makambo oyo ye alingi ete tósala yango. Soki tokómi na boyebi ya Nzambe mpe tosaleli yango na bomoi na biso, tokoki kobika mpo na libela. Na libondeli moko oyo asalaki epai na Nzambe, Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete [báyekola koyeba, NW] yo Nzambe moko na solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
Búku oyo ezali koyebisa biso na ntina na Yehova Nzambe mpe na ntina na Yesu Klisto ezali bongo Liloba ya Nzambe, Biblia. Ezali moko na makabo ya Yehova oyo eleki motuya mpenza. Biblia ezali lokola nkomá oyo tata ya bolingo atindi epai na bana na ye. Ezali kolobela na ntina na elaka ya Nzambe ya kopesa bomoi ya malamu epai na bato mpe ezali kolakisa biso lolenge nini tokoki kozwa bomoi yango. Biblia ezali koyebisa biso makambo oyo Nzambe asilaki kosala na ntango ya kala mpe oyo akosala na ntango ezali koya. Ezali mpe kopesa biso batoli ya ntina mpo na lolenge ya kolónga mikakatano na biso sikawa. Ya solo, Liloba ya Nzambe ezali koteya biso lolenge ya kozwa mwa esengo ata kati na mokili oyo motondi na mobulu.—2 Timoté 3:16, 17.
Batatoli ya Yehova bakosepela kosala ebongiseli mpo na koyekola na yo Biblia na ndako kozanga kofuta. Yekolá lolenge nini okoki kozala na bomoi ya esengo sikawa, na elikya ya kozala na bomoi ya malamu koleka na mikolo oyo mikoya mosika te.
[Elilingi na lokasa 5]
Makambo oyo malimboli ete mosika te bomoi ya malamu ekoya
[Elilingi na lokasa 7]
Bokonzi ya Nzambe ekotya bomoi malamu mpo na bato