Batatoli ya Yehova kati na mokili—Nouvelle-Zélande
BISANGA bikoki kosanzola Yehova? Ee, engebene Yisaya 42:10: “Bóyembela [Yehova] loyembo na sika, mpe lisanzoli na kosanzola ye longwa na ndelo na mokili . . . [bisanga] mpe bafándi kati na yango.” Na ntembe te, etuluku mobimba ya bisanga oyo ebéngami Nouvelle-Zélande ezali kosanzola Yehova. Nouvelle-Zélande eyebani mingi mpo na mabeke na yango, biteni minene ya mai oyo ekɔta na mokili, bangomba milai, mabángá ya mpiɔ, mabóngo, zámba minene, mpe mabelé malamu mpo na koleisa bibwele, mokili yango ezali mpenza kotatola polele bonene ya Mozalisi ya likoló mpe ya mabelé.
Uta bobele nsima ya mbongwana ya ekeke oyo, bafandi mingi ya Nouvelle-Zélande basangisaki mingongo na bango mpo na kosanzola Yehova na komipesáká epai na ye kati na losambo ya pɛtɔ mpe na kosanganáká na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na basusu. Euti koleka kala mingi te, Motatoli moko oyo ayokaki lisoló moko kitoko mpo na oyo etali kopesa litatoli epai na bandeko ya mosuni azwaki ekateli ete ye mpe asala makasi mpo na kopesa litatoli epai na libota na ye. Akabelaki basangani mingi ya libota na ye mikanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Litomba nini emonanaki na nsima? Ayebisaki ete ndeko na ye moko ya mwasi mpe ndeko na ye mosusu ya mobali bazali sikawa koyekola Biblia, moko na mwana mobali ya ndeko na ye azwaki batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, mpe basusu bakómi kondima koyekola solo ya Liloba ya Nzambe. Azali naino na mosala monene; longola baboti na ye, azali na bandeko mibali motoba mpe bandeko basi libwa!
Yehova asanzolamaka na ntango Batatoli basangisaka makasi na bango mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Na ndakisa, mokomi Roy Perkins akomaki kati na zulunalo Opotiki News ya 17 Máí 1994 ete: “Ngai nazali mondimi te, yango nakamwaki mingi mpenza mpo na mosala mpe molende oyo basáli ya bolingo malamu bapesaki ntango mpe milende mingi kati na mosala mpo na bolingo ya Nzambe na bango.
“Na boumeli ya ntango nyonso wana ya mosala na wikende, namonaki te mpe nayokaki te ata moko na bango koswana . . . Basi bazalaki likoló na bimatelo kosaláká elongo na basáli ya mibali, kobongisa, kotombola, komema, bango nyonso bazalaki na bilongi bifungwani mpe na esengo.
“Songolo, Pakala to Fulani abungisaki ata miniti moko te mpo na komela likaya. Mpo na bato nyonso oyo bazalaki kosala ezala na mosala nini mopɛpɛ ezalaki pɛtɔ longola bobele milinga ya lángi mpe mputulu ya babilíki.”
Lisangani ya bankulutu ya lisangá ya Opotiki ekomaki ete: “Botongi yango ebendaki likebi ya engumba mobimba. Emonani lokola ete moto nyonso azali kolobela yango. Basakoli basili kobanda boyekoli ya Biblia elongo na bato mingi. Ndakisa moko ya sikisiki ya bato oyo basepelaki mingi mpenza ezali bongo ya babalani mibale oyo bamipesá mingi na makambo ya losambo, oyo na boumeli ya bambula bazalaki koboya ete tókende kosolola na bango. Bazalaki koya mikolo nyonso na esika ya botongi mpe na nsima bakómaki koya na makita. Mobali alobaki na nsima ete: ‘Namoni ete bozali bato ya Nzambe. Na kati ya motema na ngai mpenza, nazalaki na mposa makasi na boumeli ya bomoi na ngai mobimba ete nazala elongo na bato motindo oyo.’”
Na mobu moleki, mokomi moko kati na zulunalo Otago Daily Times alobaki maloba malandi na ntina na botongi ya nokinoki ya Ndako ya Bokonzi na Dunedin ete: “Ezalaki mosala monene mpenza, ndakisa monene ya bopusi ya malamu mpe ya komipesa.” Zulunalo yango elobaki lisusu ete: “Bato ya mboka bazalaki kotala na kokamwa nyonso wana ndako monene ezalaki kotongama na miso na bango, mpe mingi batikalaki mpenza kokanisa mpo na mbongwana mosusu mpe misala kitoko oyo mikoki kosalema soki etuluku monene ya bato ya bolingo malamu mpe elimo ya kosala na boyokani lokola oyo ekokaki mpenza komonana bipai nyonso. Ndako ya bokonzi ezali elembo ya lokumu ya milende ya botongi oyo emonisi matomba yango.”
Kati na bato mingi oyo bayaki kotala esika ya botongi, elenge mobali moko amonaki ete Batatoli bazalaki kotonga “bandakonzambe” wana lingomba na ye ezalaki kotekisa bandakonzambe na yango mpamba te motángo ya basangani na bango ezalaki sé kokita. Alobaki ete: “Soki bozelaki naino ata sanza zomi na mibale lisusu, mbɛlɛ bolingaki kosomba moko na bandakonzambe na biso. Tosengeli kotekisa moko mpamba te tokoki te kofutela yango. Kasi, bino bofutaka bakonzi ya lingomba te. . . . mpe bandako na bino ezalaka ya mindɔndɔ́ te mpo na kobatelama, ezali bandako milaimilai te na bansɔ́ngɛ́ milai oyo ezalaka mpasi mpo na kobongisa yango.”
Emonani polele ete, bisanga bikoki mpenza kosanzola Yehova. Tiká ete masanzoli mingi epai na Yehova makóba koyokana kati na mabelé kitoko wana ya Pacifique—mpe na mokili mobimba!
[Etanda na lokasa 9]
MAKAMBO MATALI EKÓLO:
Mbula ya mosala 1994
MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 12 867
BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 271
MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 24 436
MWAYENE YA BABONGISI NZELA: 1 386
MWAYENE YA BAYEKOLI YA BIBLIA: 7 519
MOTUYA YA BABATISAMI: 568
MOTUYA YA MASANGÁ: 158
FILIALE: MANUREWA
[Elilingi na lokasa 9]
Babongisi-nzela na mosala ya kosakola pene na 1930
[Elilingi na lokasa 9]
Biro ya filiale na Manurewa
[Elilingi na lokasa 9]
Mosala ya kosakola Bokonzi na Devonport, Auckland