Singapour ezali kotyola bonsomi ya losambo
NA MPOKWA ya mokolo ya 24 Febwáli 1995, bandako minei na engumba ya Singapour ekamatamaki na polisi. Bato 69 bakangamaki.a Kati na bango ezalaki na mwasi moko mobangé ya mibu 71 mpe bilenge basi mibale ya mibu 15. Mpo na nini? Ezalaki mpo na misala mabe to mpo na botomboki? Te. Moko te kati na bango amipesaki na likambo oyo likokaki ata moke kotalelama lokola likámá, mbindo, to ya kobebisa matomba ya bato. Basalaki likambo moko te oyo lizalaki likámá mpo na bizaleli malamu, mpo na libateli to mpo na bolamu ya baninga na bango bafandi ya engumba Singapour. Nzokande, nsima ya kopunza bandako wana minei, bapolisi bamemaki na biro na bango bato wana 69, baoyo bayanganaki mpo na koyekola Biblia mpe kosepela na ebongiseli moko ya kominanola. Bakangaki bango kuna butu mobimba, batunaki bango mituna, bakamataki bilembo ya mabɔ́kɔ na bango mpe bakangaki bango bafɔtɔ́—ee, batungisaki bango lokola basáli na mabe mpenza! Na boumeli ya ntango wana, oyo eumelaki bangonga 18 kati na ezalela ya mpasi elongobani te—baboyaki ete bákutana na ba avocats mpe nkutu bapekisaki bango kosolola na telefone elongo na basangani ya libota na bango mpo na koyebisa bango epai wapi bazali. Tokoki bobele kokanisa lolenge nini minyoko oyo tolobeli na mokuse mikokaki kotungisa bana-mboka wana ya kimya mpe batosi-mibeko!
Likambo yango lizali kokundwela biso eleko ya molili ya Allemagne na nsé ya boyangeli ya Nazi mpe ntango ya minyoko ya Union Soviétique mpe Europe de l’Est ya ba communistes. Ezali te likambo oyo mosáli-mobémbo na Singapour akoki kokanisa ete likokaki kosalema na mboka kitoko wana ya bozwi mingi oyo ezali bobele engumba moko. Singapour esili komisalela lokumu malamu lokola mboka ya ekeke ya 20 oyo esili kosala bokóli ya kokamwisa na makambo ya nkita mpe ya kobongisa bomoi ya bato. Ezali mpenza mboka ya demokrasi oyo mibeko na yango mizali kopesa epai na bana-mboka na yango lotómo oyo bato babotamaka na yango, bakisá mpe bonsomi ya maloba, ya losambo mpe ya lisangá.
Nzokande, baoyo bakangamaki na Febwáli batyamelaki likebi bobele mpo ete bazalaki Batatoli ya Yehova oyo bayanganaka esika moko mpo na koyekola Biblia mpe kosepela elongo na boninga ya boklisto. Efundeli oyo bafundamaki na yango ezalaki “koyangana na makita ya etuluku oyo epekisami na mibeko.”
Ya solo, baboyaki kondima Batatoli ya Yehova lokola etuluku eyebani engebene mibeko uta mobu 1972 ntango balongolaki lisangá ya Singapour na mikanda ya Leta mpe bapekisaki mikanda, bakisá Biblia oyo enyatamaki na Watch Tower Bible and Tract Society. Bapesamelaki libaku moko te mpo na kotɛmɛla bifundeli ya lokuta oyo bimemaki na ekateli wana. Kala mingi te, babendaki likebi likoló na ekateli wana ya koponapona ya bakonzi liboso na bisambiselo ya Singapour na likambo ya Batatoli minei oyo bakangamaki na Febwáli 1994 mpo ete bazalaki na mikanda ya koyekola Biblia oyo mipekisamaki. Na Augústo 1994 Esambiselo eyokaki libyangi oyo basɛngaki mpo ete Esambiselo etalela lisusu etumbu ya bolɔ́kɔ oyo bakatelaki bango kasi yango eboyamaki nokinoki. Mosambisi Mokambi Yong Pung How ya Esambiselo Eleki Monene apesaki likanisi na ye na sanza oyo elandaki. Alobaki ete bakonzi babukaki mobeko ya bonsomi ya losambo te mpe etumbu ya bolɔ́kɔ ezalaki na elónga mpo ete Batatoli ya Yehova bazali likámá mpo na libateli ya ekólo mpamba te basangani na bango balingaka te kokɔta na mosala ya sodá. Na 17 Febwáli 1995, Batatoli wana minei basɛngaki nzela ete báfunda ekateli wana mabe na Court d’Appel ya Singapour. Kasi baboyaki lisɛngi na bango.
Ekateli wana ya nsuka epalanganisamaki mingi na bipanzeli-nsango oyo bikambami na boyangeli ya Singapour. Ntembe ezali te ete ekateli wana ya Esambiselo Eleki Monene mpe bopalangani na yango ezalaki komonisa na makambo oyo malandaki nsima. Pɔ́sɔ moko ekokaki naino te ntango bakangaki Batatoli 69. Efundeli likoló na minei kati na bango—bana-mboka ya Grande-Bretagne, ya France, mpe ya Luxembourg—elongolamaki bongo. Nzokande, ata mpo na bango, ezalaki likambo ya kobangisa mpenza. Mobali moko asilaki koumela mpe kosala mosala na Singapour na boumeli ya mibu mingi elongo na mwasi na ye. Babungisaki mosala na bango mpe ndako oyo bazalaki kofutela mpe basɛngamaki na makasi ete bátika baninga na bango ya motema mpo na kozonga na mboka na bango.
Mikóló 63 oyo batikalaki bafundamaki ete bazalaki kokangama na etuluku oyo epekisami, mpe basusu kati na bango bafundamaki ete bazalaki na mikanda oyo mipekisami. Bakatelaki bango mbula misato ya bolɔ́kɔ to lomande ya badolare 2100 to lomande elongo na bolɔ́kɔ mpo na basusu. Bilenge basi mibale ya mibu 15 basambisamaki moto na moto na ngala na ye na esambiselo ya bana mike.
Bazali likámá te mpo na boyokani mpe bomoko ya ekólo
Kati na mokili mobimba, na bamboka koleka 200 epai bazali kofanda, Batatoli ya Yehova bayebani lokola bato ya bonkóndé, ya kolongobana mpe batosi-mibeko. Bayebani malamu mpo na etɛlɛmɛlo na bango makasi ya koboya kosangana na lolenge nyonso ya botomboki, to makambo ya kotɛmɛla boyangeli—misala miyokani te na etamboli ya boklisto oyo mikoki komema bango na kobimisama to kobenganama na lisangá. Ya solo, boyangeli ya Singapour ezali na likambo moko te ya kobanga bango. Bazali likámá soko moke te mpo na libateli ya ekólo Singapour to bobateli boyokani mpe bomoko ya ekólo. (Baloma 13:1-7) Likambo oyo elimbolamaki polele kati na nkomá ya 21 Mársi 1995, ya Milton G. Henschel, prezidá ya Watch Tower Bible and Tract Society, epai ya Goh Chok Tong, Ministre Mokonzi ya Singapour. Nkomá yango etyami awa mpo na batángi na biso.
Bato ya mombongo, basáli kati na boyangeli mpe bato na bakompanyi oyo balingaka bonsomi bazali kolanda na likebi nyonso lolenge likambo yango likosuka na Singapour. Boyangeli ya Singapour ekosala na boyokani na lotómo mpe bonsomi ya bato oyo yango moko esilá kondima kati na mibeko na yango mpe oyo endimami na bikólo kati na mokili mobimba? Ya solo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali komibanzabanza mingi na ntina na bandeko na bango bandimi na Singapour. Bazali kobosana bango te kati na mabondeli na bango mpe bazali kobosana te endimiseli oyo ezwami kati na Biblia ete: “[Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye.”—Nzembo 37:28.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na basanza oyo elandaki kokangama ya bato wana 69, Batatoli mosusu 11 basilaki bakangamaki mpe bafundamaki ete bazali kobomba mikanda miboyami na mibeko.
[Etanda na lokasa 30]
21 Mársi 1995
Goh Chok Tong
Ministre Mokonzi
Istana Annexe
Singapour 0923
République ya Singapour
Lee Kuan Yew
Ministre wa Lokumu
Biro ya Ministre Mokonzi
460 Alexandra Road
37-00 PSA Bldg
Singapour 0511
République ya Singapour
Chers Messieurs:
Nsango oyo euti kokómela biso longwa na Singapour na dati ya 25 Febwáli 1995, ezalaki mpenza ya kobulunganisa. Eyebisaki ete bapolisi bakɔtaki na makita ya boyekoli Biblia ya Batatoli ya Yehova mpe bakangaki bato 69. Lapólo wana ebendaki likebi ya bato na mokili mobimba likoló na Batatoli ya Yehova na Singapour, epai wapi mosala mpe mikanda na bango mizali na nsé ya bipekiseli uta mibu koleka 20.
Ezali mpasi na kososola mpo na nini lingomba oyo lizali kosala mosala na yango polele na nsé ya libateli ya mibeko kati na bamboka koleka 200 likoka kopekisama na Singapour, mboka oyo endimi mitindá ya demokrasi. Yango ezali mpenza kotungisa biso mingi koleka soki tokanisi ete mibeko ya Singapour mizali kobatela bonsomi ya losambo epai na bana-mboka na yango.
Batatoli ya Yehova bazalaka likámá soko moke te mpo na libateli ya ekólo. Ya solo, kati na mokili mobimba bazali na lokumu malamu ya bato ya kimya, basáli ya makasi na misala, bato ya etamboli malamu mpe batosi ya mibeko—bizaleli oyo, nandimisami ete bolendisaka yango kati na mboka na bino.
Ezali solo ete mpo na bokangami na bango makasi na mitindá ya Biblia oyo mitaleli baklisto, etɛlɛmɛlo ya Batatoli ya Yehova esosolamaka to emonisamaka ntango mosusu malamu te. Kasi, yango ezalaki mpe bongo mpo na mobandisi ya losambo ya boklisto oyo amonisamaki mpe mabe lokola moto oyo azalaki kotombokela “Kaisala,” boyangeli ya ntango na ye, boye te? Batatoli ya Yehova bazali bobele kolanda ndakisa ya Yesu mpe ya baklisto ya liboso. Batosaka biyangeli ya mboka bipai bazali kofanda, bafutaka mpako na bango mpe balendisaka bizaleli malamu. Bazalaka bana-mboka ya motema malamu mpe ya sembo. Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka soko moke te na misala ya kotombokela bakonzi mpe nakoki kondimisa yo ete kozala na bango na Singapour ezali likámá te mpo na matomba ya ekólo na bino.
Na ntina na bansango oyo bipanzeli-nsango biutaki kopalanganisa, bikateli ya minyoko oyo boyangeli na yo bouti kozwa likoló na Batatoli ya Yehova na Singapour biyebani malamu na mokili mobimba. Yango ezali kotungisa baninga na bango milió 12 kati na mokili mobimba. Nazali kosɛnga na yo ete osalela bokonzi na yo mpo na kobongisa likambo wana mpe kopesa Batatoli ya Yehova ya mboka na bino bonsomi ya losambo mpe ya lisosoli oyo Mobeko mozali kolendisa.
Nakanisi ete bosololi ya polele elongo na bamonisi ya Batatoli ya Yehova bokopesa nzela na kolongola kozanga kokanga ntina ya makambo nyonso oyo etali lisangá na biso mpe mosala na biso mpe ekondimisa yo ete boyangeli ya Singapour ezali na likambo moko te ya kobanga na ntina na Batatoli ya Yehova. Nakozala na esengo ya kobongisa bokutani motindo yango.
Nazali kozela eyano na yo na motema likoló.
Mbote na yo,
Milton G. Henschel
Prezidá
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Nik Wheeler/H. Armstrong Roberts