Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/10 lok. 32
  • Na Ntango “Mopepe Eponi Nzela Te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na Ntango “Mopepe Eponi Nzela Te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/10 lok. 32

Na Ntango “Mopepe Eponi Nzela Te”

“NA NTANGO moto ayebi te epai wapi azali kokende, mopepe eponi nzela te.” Elobamaka ete maloba oyo mazali ya filozofe Moloma moko ya ekeke ya liboso, Lucius Annaeus Seneca, endimisi likambo ya solo oyo bato bandimaka yango uta kala: mpo ete bomoi ezala na nzela ya kolanda, komityela mokano ezali likambo ya ntina mingi.

Nzokande, mbala mingi bomoi ezalaka na ntina te. Bato mingi basukaka bobele na kokima kobeta mabaku mpe yikiyiki ya bomoi ya mokolo na mokolo. Awa bazangi etɛlɛmɛlo ya sikisiki, bakómaka lokola mbóngé oyo ezali “kopusama na mopepe mpe kotambolatambola epai na epai.” (Yakobo 1:6) Mpo na bato motindo oyo, “mopepe eponi nzela te.”

Biblia ezali kopesa biso ndakisa ya baoyo bazalaki na mokano, komonisáká bongo ndakisa mpo na baklisto lelo oyo. Mose “atyaki miso na ye epai na libonza.” (Baebele 11:26) Paulo akomaki ete: “Nazali kokima mbangu tee na nsuka mpo nazwa lifuta.” Alendisaki baninga na ye baklisto ete ‘bákanisa boye.’​—Bafilipi 3:14, 15, Boyokani ya Sika.

Awa miso na biso ezali kotala bilaka ya Biblia, tiká ete tómekola kondima ya bato motindo wana, oyo bazalaki na mokano.​—Kokanisá na Baebele 13:7.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto