Bobángi—Moninga to monguna?
“Nazali kokanisa lolenge oyo nalingi kokufa. Nalingi te kobɛtama masasi, kasi soki esengeli bongo, malamu nabɛtama lisasi awa, na motó, mpo ete nakufa mbala moko.”
MOKOMI moko ya zulunalo Los Angeles Times ayokaki yango na monɔkɔ ya elenge mwasi moko ya mibu 14. Azalaki kotuna bayekoli na ntina na koboma bato oyo eutaki kosalema—bilenge bazali koboma mikóló mpe bilenge mosusu. Lapólo yango ezalaki na motó ya likambo oyo: “Mokili oyo ya bobángi.”
Ozangi koyeba te ete mingi bazali kobika kati na mokili oyo etondi na bobángi. Bobángi ya nini? Ezali mpasi mpo na kotánga bobángi moko sikisiki. Talá soki okoki komona kati na etánda oyo ezali awa makambo oyo baninga na yo to bato mingi ya etúká na bino babangaka. Etánda yango euti na zulunalo Newsweek ya 22 Novɛ́mbɛ 1993, mpe ezali kopesa bosukisi ya bolukiluki oyo esalemaki epai na “bana 758 oyo bazalaki katikati na mibu 10 kino mibu 17, elongo na baboti na bango.”
Soki bilenge wana batunamaki sikawa, balingaki kobakisa bantina mosusu ya bobángi, lokola koningana ya mabelé. Nsima ya makámá ya koningana ya mabelé oyo esalemaki na Los Angeles na Yanuáli 1994, zulunalo Time elobaki ete: “Kati na bilembo ya mobulungano oyo moutaka na kotungisama na makanisi tokoki kotánga kokanisa makambo oyo masalemaki, ndɔ́tɔ ya nsɔ́mɔ, bokɛngi oyo eleki ndelo mpe kosilika mpo ete okoki te kozala na bokonzi likoló na bomoi na yo.” Moto moko ya mombongo oyo azwaki ekateli ya kolongwa na etúká wana alobaki ete: “Kobungisa biloko ezali likambo te. Nsɔ́mɔ nde ezali likambo monene. Ozali kokende kolala na sapato na makolo na eteni ya nsé ya ndako molai. Ozali kozwa mpongi te. Okofanda bobele wana butu nyonso mpo na kozela yango. Ezali malamu te.”
Lapólo moko ya 11 Apríli 1995, ezwaki motó ya likambo “Bolandani ya makámá esili kobulunganisa makanisi ya ba Japonais.” Yango elobaki ete: “kobundisama na gazi mabe oyo ekangaka mpema . . . ezalaki likámá monene mpo na makanisi ya ba Japonais mpamba te yango eyaki lokola bolandani ya makambo oyo soki esangisami ezali kobimisa makambo minene ya sika oyo mazali kolongola elikya mpo na mikolo mizali koya. . . . Bato bazali komiyoka lisusu na libateli te kati na babalabála oyo kala eyebanaki mpenza mpo na kimya mpe libateli na yango, ezala na butu to na moi.” Mpe ezali te bobele mibangé nde bazali kobanga. “Professeur Ishikawa [na Eteyelo monene ya Seijo] alobaki ete Kotungisama na makanisi . . . ezalaki mpenza monene kati na bilenge, baoyo mbala mingi bazalaka na makanisi ya polele te na ntina na makambo oyo mazali kozela bango na mikolo mizali liboso.”
Bilembeteli bizali komonisa ete “libaku moko ya bobángi makasi ekoki kobongola botamboli malamu ya bɔɔngɔ́, kosaláká ete adrenaline ezala na bopusi mingi likoló na bango ata mibu mingi na nsima.” Bato ya siansi bazali koluka kososola lolenge nini bɔɔngɔ́ etalelaka likambo ya kobangisa—lolenge nini tokesenisaka makambo ndenge na ndenge mpe toyanolaka na komonisáká bobángi. Professeur Joseph LeDoux akomaki: “Soki tomoni nzela ya mosisa ya bɔɔngɔ́ oyo kati na yango makambo mamemaka moto to nyama na koyeba kobanga, tokozala na elikya ya kolimbola motindo oyo makanisi esalaka mosala.”
Nzokande, ntálo monene na biso bazali na ntina mpenza te ya koyeba lolenge nini bɔɔngɔ́ esalaka mpo ete moto azwa bobángi. Tokoki solo kosepela mingi na biyano na mituna lokola oyo: Mpo na nini tozalaka na bobángi? Ebongi tósalaka nini? Bobángi nyonso ezali malamu?
Okoki mpenza kondima ete mbala mosusu bobángi ekoki kobikisa yo. Na ndakisa, ozali kobɛlɛma na ndako na yo na molili. Ekuke efungwami mwa moke, nzokande okangaki yango makasi. Na maninisa omoni lokola elili oyo ezali koningana. Nokinoki motema ebɛti, wana oyoki ete ezali na mikakatano. Mbala mosusu ezali moyibi to moto moko oyo azali na mopanga nde azali na kati.
Mayoki na yo ya bobángi na ntina na makambo ya lolenge yango ekoki kobikisa yo na esika ya kokende na bozoba nyonso liboso ya likámá. Bobángi ekoki kosunga yo na kozala na bokɛngi to na koluka lisalisi liboso ete okutana na makámá oyo mbala mosusu mazali liboso na yo. Ezali na bandakisa mingi ya makambo motindo yango: elembo ya kokebisa mpo na nguya monene ya lotilíki; nsango ya radio mpo na kokebisa boyei ya ekumbaki na etúká na bino; makelele makasi ya bibende ya motuka na yo wana ozali kokumba yango na balabála oyo ezali na bato mingi.
Na bantango mosusu mayoki ya bobángi makoki mpenza kozala moninga malamu. Yango ekoki kosalisa biso na komibatela to na kosala na mayele. Nzokande, oyebi malamu ete, kozala ntango nyonso na bobángi ya makasi ekoki mpenza kozala moninga malamu te. Ezali monguna. Ekoki koyeisa mpema mokuse, motema mokobɛta nokinoki, kosenzwa, kolɛnga, kosanza, mpe mayoki oyo ete ozali lisusu komona te makambo oyo mazali kosalema penepene na yo.
Mbala mosusu ekoki mpenza kokamwisa ete Biblia esilaki komonisa ntango na biso ete ekozala na makambo mingi ya kobangisa awa na mabelé mpe na bobángi makasi. Mpo na nini bongo, mpe bopusi nini yango esengeli kosala likoló na bomoi mpe makanisi na yo? Lisusu, mpo na nini tokoki koloba ete engebene likanisi ya Biblia, ezali na bobángi ya mokolo na mokolo oyo ezali mpenza na litomba mpe malamu? Tótala naino.
[Etanda na lokasa 3]
Ntango batunaki bango soki nini ezalaki kotungisa bango mingi mpe libota na bango, mikóló mpe bana balobaki ete bazalaki kobanga:
BANA BABOTI
56% Mobulu ya kobundisa mosangani moko ya libota 73%
na bango
53% Mokóló oyo abungisi mosala na ye 60%
43% Kozanga likoki ya kozwa bilei 47%
51% Kozanga likoki ya komisalisa epai na monganga 61%
47% Kozanga esika ya kofanda 50%
38% Mosangani moko ya libota azali na mokakatano 57%
mpo na bilangwiseli
38% Libota na bango likokabwana 33%
Eutelo: Newsweek, 22 Novɛ́mbɛ 1993