Ezali bobele momeseno mpamba?
UTA bikeke mingi, basambeli ya lingomba ya Katolike basalelaka sakramɛ́ntu ya ntúbélá. Nzokande, mpo na bato mingi ezali bobele momeseno mozangi litomba. Wana azalaki kokanisa na ntina na ntango azalaki elenge, mokambi moko ya eteyelo ya katikati na nkombo ya Bob alobaki ete: “Nazalaki elenge, ata na ntango wana nazalaki kotalela yango na motuya te.” Mpo na nini? Mpo na ye, ntúbélá ekómaki momeseno moko mozangi ntina. Ayebisi ete: “Kosala ntúbélá ezalaki lokola komema basakosi na yo nyonso ya mobembo etondi na masumu mpe kokende na yango epai ya mosáli na douane na libandá ya mpepo. Akotuna yo mituna na ntina na masumu na yo mpe akotikela yo nzela ete oleka nsima ya kofuta mpako mpo na biloko kitoko mingi oyo osombaki na ntango ozalaki na mboka mopaya.”
Bobele bongo, Frank Wessling, ye oyo azali mokomi kati na zulunalo U.S. Catholic, alobelaki ntúbélá lokola “kotambwisa litambe moko nsima na mosusu na lolenge eleki mpenza pɛtɛɛ, uta na kolongolama masumu na nzela ya libondeli ya kobongola motema oyo bakangaka na motó kino na molulu ya elembo ya ntúbélá.” Willing asukisaki na maloba nini? Alobaki ete: “Nandimisami ete Ntúbélá ezali malamu mpo na molimo. Kasi lolenge Bakatolike basalelaka yango ezali mokakatano.”
Biblia ezali komonisa koyambola masumu na lolenge ekesani mpenza. Oyo eleki ntina ezali bongo koyambola masumu epai na Nzambe. (Nzembo 32:1-5) Mpe moyekoli moklisto Yakobo akomaki ete: “Moko na bino abɛli malali? Tiká ete abyanga mikóló na [lisangá, NW] bábondela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo na [Yehova]. Zambi libondeli na kondima ekobikisa mobeli, [Yehova] akonetola ye. Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.”—Yakobo 5:14, 16.
Moklisto oyo asali lisumu akoki kobénga bakɛngɛli na lisangá, baoyo bakoki kopesa batoli ya sikisiki mpe ebongi mpo na kosalisa moto oyo asali libúngá ete atika nzela na ye ya masumu. Bakɛngɛli bakoki kopesa bilendiseli oyo bibongi wana bazali kotalela bokóli ya moto oyo azali na maladi ya elimo. Oyo nde bokeseni na mimeseno mpamba oyo mizali kosalema lelo kati na mangomba na ntina na koyambola masumu! Wana balendisami na lisungi ya bankulutu ya lisangá, basáli mabe oyo babongoli motema bakoki kozwa libɔndisi oyo Davidi ayokaki: “Nayebisi yo masumu na ngai, nabombaki bokesene na motema na ngai te. Nalobaki ete, nakoyebisa [Yehova] bipɛngwɛli na ngai, mpe yo olimbisi mabe na masumu na ngai.”—Nzembo 32:5.