Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/9 lok. 30
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Okebaka ntango nyonso na mateya na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bankulutu​—Bobatela mokumba epesami na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mateya oyo okoki kozwa epai ya Yakobo, leki ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala bateyi ya Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/9 lok. 30

Mituna ya Batángi

Moyekoli Yakobo alingaki koloba nini ntango alobaki: “Bandeko na ngai, bózala milakisi mingi te. Zambi boyebi ete biso tokosambisama na ekateli eleki makasi”?​—Yakobo 3:1.

Yakobo azalaki soko moke te kolɛmbisa baklisto ete báteya solo te epai na bato mosusu. Na Matai 28:19, 20, Yesu apesaki bayekoli na ye etindá ya “kozalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete bátosa nyonso esili ngai kolaka bino.” Na bongo, baklisto nyonso basengeli kozala balakisi. Ntoma Paulo apesaki baklisto Baebele toli mpamba te kino ntango wana bakómaki naino balakisi te. Akomaki ete: “Zambi ata na ntango oyo ebongi na bino kozala balakisi na bamosusu, bozali naino na bosɛnga ete moto alakisa bino lisusu makambo mikemike na liboso na mateyo na Nzambe.”​—Baebele 5:12

Bongo, Yakobo azalaki kolobela nini? Azalaki kolobela baoyo bazalaki na libaku malamu ya koteya kati na lisangá. Na Baefese 4:11, tozali kotánga ete: “Ye [Yesu Klisto, Motó ya lisangá] asili kopesa makabo ete bamosusu bázala bantoma, bamosusu basakoli, bamosusu bapalanganisi na Nsango Malamu, bamosusu babateli mpe balakisi.” Kati na masangá ya ekeke ya liboso lokola mpe oyo ya ntango na biso, ezali na mabaku kitoko ya koteya. Na ndakisa, Lisangani ya Mikóló-Bakambi lizali komonisa “moombo na sembo mpe na mayele” mpe lizali na mokumba monene ya kokɛngɛla mosala ya kolakisama kati na masangá na mokili mobimba. (Matai 24:45) Bakɛngɛli-batamboli mpe bankulutu kati na masangá bango mpe bazali na libaku mlamu ya koteya.

Yakobo azalaki nde koloba epai na mibali baklisto oyo bakokisi masɛngami ete báboya mpenza kondima mokumba ya balakisi mpo na kokima esambiseli makasi ya Nzambe? Ezali bongo te. Mokumba ya nkulutu mozali libaku moko malamu mpenza, lokola yango emonisami na 1 Timoté 3:1, oyo elobi ete: “Soki moto alingi ete asala mosala na Mokɛngɛli, azali na mposa na mosala malamu.” Moko na masɛngami mpo na koponama nkulutu kati na lisangá elobi ete moto yango azala “molakisi malamu.” (1 Timoté 3:2) Yakobo azalaki te kokweisa maloba ya Paulo oyo mapemami.

Nzokande, emonani lokola ete na ekeke ya liboso T.B., basusu bazalaki komikómisa bango moko balakisi, atako bakokisaki masɛngami te mpe baponamaki te. Ekoki mpenza kozala ete bakanisaki ete mokumba yango mozalaki kotya bato liboso, mpe bazalaki koluka lokumu na bango moko. (Kokanisá na Malako 12:38-40; 1 Timoté 5:17.) Ntoma Yoane alobelaki Diɔtɛlɛfɛ, oyo ‘asepelaki kozala moto na liboso, alingaki te koyamba na limemya eloko nyonso oyo eutaki epai na Yoane.’ (3 Yoane 9) 1 Timoté 1:7 ezali kolobela basusu baoyo ‘balingaki kozala balakisi na Mibeko, ata bazangaki kososola makambo mazalaki bango koloba, mpe makambo mazali bango kolakisa.’ Maloba ya Yakobo 3:1 mabongi mpenza na mibali oyo bazali na mposa ya kozala balakisi kasi nde bazali na mokano mabe. Mibali motindo yango bakoki kosala mabe mingi epai na etonga mpe na yango basengeli kozwa esambiseli ya makasi.​—Baloma 2:17-21; 14:12.

Yakobo 3:1 ezali lisusu bokundoli moko kitoko mpo na baoyo nyonso bakokisi masɛngami mpe bazali kosala lokola balakisi. Lokola bapesi mingi na mabɔ́kɔ na bango, bakosɛnga mpe yango eleki mingi epai na bango. (Luka 12:48) Yesu alobaki ete: “Na mokolo na kosamba, bato bakosamba mpo na bilobaloba nyonso bizali bango koloba.” (Matai 12:36) Yango ezali mpenza solo na ntina na baoyo maloba na bango mazali na bozito mingi, bankulutu oyo baponami.

Bankulutu bakozongisa monɔkɔ na ntina na lolenge oyo bazali kosala epai na bampate ya Yehova. (Baebele 13:17) Makambo oyo balobaka mazali na bopusi likoló na bomoi ya bato. Na yango, bankulutu basengeli kokeba ete báteya te makanisi na bango mpenza to ete bányokola bampate te lokola Bafalisai bazalaki kosala. Basengeli kosala milende ete bámonisa bolingo ya mozindo motindo moko lokola Yesu amonisaki. Na libaku nyonso ya koteya, mpe mingimingi wana bazali kati na makambo matali kosambisa moto, bankulutu basengeli kokeba na maloba na bango, basengeli te kolobaloba mingi to kopesa makanisi na bango moko. Na kotaleláká bobele Yehova, Liloba na ye mpe litambwisi ya lisangá na ye, babateli ya bampate bakozwa mapamboli mingi epai na Nzambe, kasi “esambiseli ya makasi” te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto