Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/9 lok. 32
  • Tózwa liteya epai na bandɛkɛ mpe bafololo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózwa liteya epai na bandɛkɛ mpe bafololo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/9 lok. 32

Tózwa liteya epai na bandɛkɛ mpe bafololo

LELO oyo nini ezali mpenza lobanzo ya liboso ya bato? Mpo na ntálo monene ya bato, ezali likambo ya koleisa libota na bango na lolenge lobongi to kokoka kobongisa bomoi na bango.

Kozwa mosolo mpo na kokokisa bamposa ya moto ye moko to bamposa ya libota na ye sanza mobimba ezalaki mpe lobanzo monene ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Kasi apesaki likebisi ete lobanzo wana oyo ezali na ntina ekokaki kokóma motungisi monene oyo elingaki kokibisa makambo ya elimo. Mpo na komonisa likanisi na ye na nzela ya ndakisa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bátala bandɛkɛ mpe bafololo.

Bandɛkɛ basengeli kolya mokolo na mokolo​—balyaka nkutu mingi koleka lolenge biso tolyaka mpamba te nzoto na bango esɛngaka bongo. Epai mosusu, balónaka te, babukaka mbuma te, to babombaka bilei te kati na bibombelo mpo na mikolo mizali koya. Nzokande, lokola Yesu amonisaki yango, “Tata na [biso] ya likoló aleisaka bango.” (Matai 6:26) Bobele bongo, Nzambe alatisaka mpenza na lolenge ya kitoko “matiti na elanga.”​—Matai 6:28-30, NW.

Yesu azali kondimisa biso ete soki tokobatela bamposa ya mosuni na esika ebongi na yango mpe tokopesa esika ya liboso na makambo ya elimo, Nzambe akosɛnzɛla ete tózwa bilei mpe bilamba oyo tozali na yango mposa. Soki Yehova Nzambe akobatelaka bandɛkɛ mpe matiti, na ntembe te akobatela mpe baoyo balingaka ye mpe ‘balukaka nde liboso Bokonzi mpe boyengebene na ye.’ (Matai 6:33) Otyaka matomba ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na yo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto