Batatoli ya Yehova kati na mokili—Inde
INDE! Likoló na bato motoba awa na etando na biso moto moko afandaka na mokili wana monene. Nyonso, nkótá koleka 1000 elobamaka na mokili wana oyo ezali na mitindo ya bato mpe ya minɔkɔ ndenge na ndenge. Ntálo monene ya bato bazali ba Hindu, 83% kati na bango, nzokande 11% bazali Bamizilmá, elongo na ba Sikhs, Babudiste, basangani ya lingomba ya Jaïnisme mpe baklisto ya nkombo mpamba bazwami kati na eteni oyo etikali.
Na bambula oyo euti koleka Batatoli ya Yehova bazali kozwa bokóli monene na Inde. Basili kozwa bato oyo bakokani na bampate baoyo bazali kotɛlɛma ngwi na ngámbo ya Bokonzi ya Yehova, atako bopusi mpe botɛmɛli ya lolenge nyonso.
Na ndakisa, elenge mwasi moko kati na libota oyo libatelaka mpenza mateya ya ba Hindu akómaki ebɔsɔnɔ uta bomwana na ye mpamba te abɛlaki bokɔnɔ ya polio (bukabuka). Mpasi oyo ye akutanaki na yango ememaki ye na kokanisa na ntina na Nzambe mpe na ntina na mokano ya bomoi. Atalelaki mangomba mingi mpo na kozwa eyano kasi azwaki kobɔndisama moko te. Mpo na yango, abungisaki kondima kati na lingomba na ye, atako atikaki te kondima ete Nzambe azali.
Na boumeli ya eleko yango Batatoli mibale bakutanaki na elenge mwasi yango kati na mosala na bango ya ndako na ndako. Amikundoli ete, “Nalelaki ntango nayokaki bango bazali kotánga Emoniseli 21:4.” Andimaki kozwa mikanda mingi ya la Société Watch Tower mpe andimaki boyekoli ya Biblia atako mama na ye atɛmɛlaki yango. Elenge mwasi wana asalaki mbongwana monene kati na bomoi na ye, ayikaki mpiko na botɛmɛli ya bandeko na ye ya mosuni, mpe akómaki Motatoli oyo azwi batisimo. Ye alobi ete: “Nasili kosala bokóli mingi, mpe ezalaki solo likambo ya mpasi mpenza. Kasi Yehova asungaki ngai ntango nyonso mpe asili kopesa ngai kimya mpe esengo.”
Etɛlɛmɛlo ya ngwi mpo na losambo ya pɛtɔ na eteyelo
Basɛngaki na elenge ndeko mwasi moko ete abanda kokenda na ndakonzambe ya Bakatolike elongo na baninga mosusu nyonso ya kelasi na bango. Na bonkóndé nyonso, ndeko mwasi yango aboyaki, kolobáká ete ye azali Motatoli ya Yehova mpe ete akoki kosambela bobele Yehova kasi moto to eloko mosusu te. Molakisi alobaki ete soko basusu nyonso bakei na ndakonzambe, ye mpe asengeli kokende elongo na bango. Kasi ndeko mwasi atɛlɛmaki ngwi mpe alobaki ete lokola baoyo bakendaka na ndakonzambe basambelaka Yehova te, ye azali komona te lolenge nini ye akoki kozala kuna.
Na ntina na bokangami ya elenge mwasi yango, molakisi na ye alukaki koyeba makambo mingi na ntina na kondima na ye. Bongo mokolo oyo molandaki ndeko mwasi yango apesaki ye lisoló moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo lizalaki kolobela losambo ya Yehova. Ekamwaki ye na makambo oyo atángaki, molakisi ayaki bongo kopesa ye bonsomi ete asanganaka te na mikumba nyonso ya losambo kuna na eteyelo. Ndeko mwasi azwaki likoki ya kotika bazulunalo zomi epai na ye mpe epai na balakisi mosusu.
Kotosa Mobeko ya Nzambe na ntina na makila epesi mbano
Kala mingi te fiɛvrɛ makasi oyo etumolamaki na virus moko epalanganaki na bisika mosusu ya etúká ya Kerala. Bokɔnɔ wana ebebisaka mpenza bangɛi mpe esɛngaka mwango ya monganga ebéngami dialyse. Mbala mingi bazongisaka makila. Kati na engumba moko bato 14 bakɔtaki lopitálo mpo na bokɔnɔ yango. Moko kati na babɛ́li yango azalaki Motatoli, nkulutu na lisangá moko ya mboka wana. Bayebisaki ye ete mwango bobele moko ya kobikisama ezalaki ya kozongisama makila. Nkulutu yango alimbolaki kondima na ye oyo ezali na moboko likoló na Makomami mpe aboyaki makila na motema moko. (Misala 15:28, 29) Nsima ya ntembe molai minganga balobaki ete akokufa mpamba te azalaki koboya kozongisama makila.
Babɛ́li mosusu 13 bazongisamaki makila. Likambo ya nsɔ́mɔ, bango nyonso bakufaki nsima na mwa mikolo. Ndeko wana azalaki moto bobele moko oyo abikaki! Bakonzi ya lopitálo bakamwaki mingi mpenza. Basáli ya lopitálo bakamwaki mingi na lolenge basangani ya lisangá bazalaki koya mbala na mbala kotala ndeko. Nsima ya kobima na lopitálo, ndeko yango akendeki kotɔ́nda minganga, kasi bazongiselaki ye ete: “Mpo na nini ozali kotɔ́nda biso? Pesá botɔ́ndi epai na Nzambe na yo, Yehova. Ye nde abikisi yo. Tosɛngi obondela Nzambe na yo, Yehova, mpo na biso lokola.”
[Etanda na lokasa 24]
MAKAMBO MATALI EKÓLO
Mobu ya mosala 1994
MOTUYA NYONSO YA BASAKOLI: 14271
BOKOKANISI: Motatoli 1 mpo na bato 65266
MOTUYA YA BAYANGANI NA EKANISELI: 38192
MWAYENE YA BABONGISI-NZELA: 1780
MWAYENE YA BOYEKOLI YA BIBLIA: 12453
MOTUYA YA BABATISAMI: 1312
MOTUYA YA MASANGÁ: 410
BIRO YA FILIALE: LONAVLA
[Elilingi na lokasa 25]
Biro ya filiale, Lonavla
[Elilingi na lokasa 25]
Kopesa litatoli na ntina na Liyangani ya etúká “Nsango malamu ya seko” na 1963
[Elilingi na lokasa 25]
Kosakola epai na motekisi moko na libándá ya Red Fort na Delhi