Mabota ya kobanga Nzambe na ntango ya kala—Ndakisa mpo na ntango na biso
LIBOTA—O.N.U. elukaki kobenda likebi ya bato ya mokili mobimba likoló na yango. Lolenge nini? Wana esakolaki 1994 “Mobu ya Libota na Mokili mobimba.” Atako batambwisi ya mokili, ba sociologues, mpe bapesi-toli na makambo ya libota bamilelaki noki mpenza na ntina na bokóli ya makambo lokola zemi ya balabála mpe bokóli ya bokabwani ya mabala, bazali kosala noki te mpo na kosilisa mikakatano yango na lolenge lobongi mpe ya malamu.
Ekoki kozala ete Biblia ezali kolakisa lolenge ya kosilisa mikakatano ya libota? Mpo na bato mosusu, koloba ete Biblia ekoki kosunga mabota na mikolo na biso ezali bolémá. Nkutu, ekomamaki esili koleka bikeke mingi mpo na bato oyo bazalaki kati na etúká mpe mimeseno ya Moyen-Orient. Kati na bisika mingi ya mokili, lolenge ya bomoi esili mpenza kobongwana uta ntango ya lisoló ya Biblia. Atako bongo, Biblia epemamaki na Yehova Nzambe, ye oyo mabota nyonso matángami na nkombo na ye. (Baefese 3:14, 15; 2 Timoté 3:16) Biblia ezali koloba nini na ntina na mikakatano ya libota?
Yehova ayebi mpenzampenza makambo oyo masɛngami mpo na kozala na bomoi ya libota ya esengo mpe oyo ezali na mokano. Na yango, Liloba na ye, Biblia, lizali na makambo mingi ya koloba na ntina na bomoi ya libota, mosusu na yango ezali bongo batoli. Biblia ezali mpe na bandakisa ya mabota oyo masalelaki mitindá ya Nzambe. Lokola litomba, bazalaki na boninga ya penepene mpe na bosepeli. Tiká tótalela na mokuse lolenge ya bomoi oyo ezalaki na ntango ya lisoló ya Biblia mpe tómona liteya nini tokoki kozwa na yango.
Bokonzi—Ezali monyoko?
Na ndakisa, tótalela likambo ya bokonzi kati na libota. Na eleko ya batata ya mabota, mibali lokola Abalayama, Yisaka mpe Yakobo bazalaki “bakonzi ya libota” oyo bakokaki te kotyamela ntembe. (Misala 7:8, 9, NW; Baebele 7:4) Búku The New Manners and Customs of Bible Times (Bizaleli ya sika mpe mimeseno ya ntango ya lisoló ya Biblia), ya Ralph Gower, elobi ete: “Libota lizalaki . . . ‘mwa bokonzi moke’ oyo botambwisamaki na tata. Azalaki koyangela likoló ya mwasi na ye, likoló ya bana na ye, likoló ya bana na bana na ye mpe likoló ya basáli na ye—moto nyonso kati na ndako na ye.” Batata ya mabota mbala mingi bazalaki mpe na bokonzi likoló na mabota ya bana na bango ya mibali.—Kokanisá na Genese 42:37.
Yango ezalaki kopesa mibali nzela te ya konyokola basi na bango mpe bana na bango? Soko moke te. Ezali solo ete, Nzambe ayebisaki mwasi ya liboso, Eva, ete: “Okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Maloba oyo mazali komonisa ezalela oyo elingaki kozala ya basi banso, kasi yango ezali te komonisa lolenge makambo masengelaki kosalema kati na basambeli ya solo ya Nzambe. Mibali oyo bazalaki kobanga Nzambe basengelaki te kobosana mokano ya Yehova ya ebandeli. Yehova azalisaki mwasi mpo ete azala mpo na mobali “mosungi mobongi na ye,” kasi moombo na ye te. (Genese 2:20) Lokola mibali ya kobanga Nzambe na ntango wana ya kala bayebaki ete basengelaki kotosa mpe kozongisa monɔkɔ epai na Nzambe, basalelaki bokonzi na bango na lolenge ya mabe te. Na esika ya kosalela basi na bango mpe bana na bango makambo lokola nde bazalaki baombo, batata ya mabota oyo bazalaki kobanga Nzambe bamonisaki bolingo ya solosolo mpe bolingo ya motema.
Mwa etaleli moke likoló na bolingo ya motema oyo bazalaki komonisa epai na bana epesami kati na Genese 50:23. Wana bazali kolobela bana ya bankɔ́kɔ ya Yosefe: “Babotamaki na mabɔ́lɔ́ngɔ́ na Yosefe.” Atako yango ekoki kolimbola bobele ete Yosefe andimaki bana yango lokola bakitani na ye, yango ekoki lisusu komonisa ete ye azalaki kosakana na bolingo nyonso na bana yango, kosakanisáká bango likoló na mabɔ́lɔ́ngɔ́ na ye. Lelo oyo ekozala malamu ete batata bámonisa bolingo ya motema motindo moko epai na bana na bango.
Lokola bazalaki bakonzi ya mabota, batata ya mabota oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki mpe komibanzabanza mpo na mposa ya elimo ya mabota na bango. Nsima ya kobima na masúwa ntango Mpela ya mokili mobimba esilaki, “Noa atongaki etumbelo mpo na [Yehova] . . . mpe akabaki mbeka na etumbelo.” (Genese 8:20; kokanisá na Yobo 1:5.) Abalayama, tata ya libota ya sembo atikaki ndakisa moko malamu na koteyáká ye moko basangani ya libota na ye. ‘Alakaki bana na ye mpe ndako na ye na nsima na ye, bábatela nzela na [Yehova] mpe básala na boyengebene mpe na sembo.’ (Genese 18:19) Na yango, bokonzi oyo bosalelamaki na bolingo bozalaki kopesa nzela na bolamu ya mayoki mpe ya elimo ya mabota.
Lelo oyo mibali baklisto bazali kolanda ndakisa wana. Bazali kosalela bokonzi na makambo matali losambo na kosungáká mabota na bango na kotosa masɛngami ya Nzambe mpe na kopesáká bango moko ndakisa malamu. (Matai 28:19, 20; Baebele 10:24, 25) Na lolenge ya batata ya mabota ya ntango ya kala, mibali mpe batata baklisto bazwaka mpe ntango mpo na koteya bango moko basangani ya libota na bango.
Kozwa ekateli ya makasi
Nsima wana asilisaki nyongo monene oyo asengelaki kofuta epai na bokilo na ye, tata ya libota Yakobo atunaki ete: “Nde nabongisa [biloko] mpo na libota na ngai mpenza ntango nini?” (Genese 30:30) Lokola batata nyonso, Yakobo azalaki koyoka bozito ya mokumba ya kokokisa bamposa ya libota na ye, mpe asalaki mosala makasi mpo na kokokisa yango. Genese 30:43 elobi ete: “Boye moto oyo akomi mozwi mpe azalaki na bitɔ́nga minene mpe na baombo basi mpe baombo babali mpe bakamela mpe bampunda.”
Nzokande, mwa bambula na nsima, wana Yakobo asilaki kokende kofanda na mokili ya Kanana, emonani ete ayebaki te ete Dina, mwana na ye ya mwasi akómaki na momeseno mabe ya kotambola elongo na basi bapakano ya Kanana.a (Genese 34:1) Lisusu asalaki likambo moko te awa eyebaki ye ete bikelákela ya losambo ya bapakano bizalaki kati na basangani ya libota na ye. Atako bongo, nsima ya likambo ya mawa litali kobebisama ya Dina na mobali moko mokanana, Yakobo azwaki ekateli ya makasi. Apesaki etindá ete: “Bólongola banzambe na bapaya bazali kati na bino mpe bómipɛtɔla.”—Genese 35:2-4.
Batata baklisto basengeli kozala na bokɛngi na likambo litali elimo ya mabota na bango. Soki makámá minene malingi kobebisa bolamu ya elimo ya libota, lokola mikanda ya mbindo to miziki ya mbindo kati na ndako na bango, basengeli kozwa ekateli ya makasi.
Likambo ya ntina, basi ya kondima lokola Sara, Rebeka mpe Rachel bazalaki mpe na bopusi makasi likoló ya mabota na bango. Atako bazalaki na botosi epai na mibali na bango, bazalaki te komipekisa na kosala likambo na ntango yango esengelaki mpe wana ezalaki na ntina. Na ndakisa, Exode 4:24-26 eyebisi biso ete ntango Mose mpe libota na ye bazalaki na nzela mpo na kokenda na Ezipito, “[Yehova] [“Anzelu ya Yehova,” La Septante] azwanaki na ye mpe amekaki koboma ye [mwana mobali ya Mose].” Na ntembe te, mwana na Mose ya mobali azalaki na likámá mpamba te Mose akataki ye ngɛnga te. Zipora asalaki nokinoki mpe akataki mwana na ye ya mobali ngɛnga. Bongo, anzelu atikaki ye. Basi baklisto lelo oyo bakoki mpe kosala eloko soki likambo lisɛngi ete lisalema na nokinoki mpenza.
Kolakisama ya tata na nsé ya Mibeko ya Mose
NA 1513 L.T.B., eleko ya batata ya mabota esukaki wana Yisalaele ekómaki ekólo mobimba. (Exode 24:3-8) Batata bakóbaki kosala lokola bakonzi ya mabota na bango. Nzokande, mobeko ya libota motyamaki na nsé na Mobeko ya ekólo oyo Nzambe apesaki na Mose mpe oyo etosisamaki na basambisi baponami. (Exode 18:13-26) Bonganga ya libota ya Lewi ezwaki mokumba ya makambo nyonso matali kopesa mbeka ya losambo. Atako bongo, batata bazalaki na esika monene. Mose apesaki elendiseli oyo ete: “Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.”—Deteronome 6:6, 7.
Mobeko mobongisaki mabaku, lokola oyo ya Elekeli, na boumeli na yango bakokaki kopesa kolakisama engebene ebongiseli oyo esilaki kotyama na mobeko to na libaku malamu. Wana mokolo ya Elekeli, 14 Nisan, mobɛlɛmaki, mabota ya Bayuda masengelaki komibongisa mpo na mobémbo oyo bamesanaki kosala na Yelusaleme. (Deteronome 16:16; kokanisá na Luka 2:41.) Mwana nani akokaki te kozala motema likoló mpo na komibongisa motindo yango? Mobémbo yango moko mozalaki likambo ya kopesa nsáí. Na ntango yango, mbula ezalaki konɔka lisusu te, mpe moi ya eleko ya molungé mokómi kolimwisa mopɛpɛ ya mpiɔ. Wana mbulampɛmbɛ ya Ngomba Helemone ezalaki konangwa, ebale Yaladene ezalaki kotonda kino kokatisa mabóngo na yango.
Batata bakokaki, nzelanzela, koteya bana na bango bobele zébi ya mokili na bango te kasi lisusu lisoló ya makambo mingi ya kala oyo mazalaki na boyokani na bisika bipai bazalaki koleka. Bisika yango bikokaki kosangisa Ngomba Ebale mpe Ngomba Gelizimi, epai batángaki kolakelama mabe mpe mapamboli ya Mibeko. Bakokaki mpe koleka na Betele, epai Yakobo amonaki emonaneli ya ebuteli ya likoló. Oyo nde masoló kitoko masengelaki kolandana! Wana mobémbo mozalaki kobɛlɛma pene na nsuka na yango mpe bituluku mike ya mabota bizalaki kokutana na basáli-mobémbo oyo bautaki na bisika mosusu ya ekólo, bango nyonso basengelaki kosepela na boninga ya kolendisa.
Na nsuka libota lisengelaki kokɔta na Yelusaleme, “esika na bonzenga be.” (Nzembo 50:2) Alfred Edersheim, nganga-mayele moko alobi ete: “Mingi kati na basáli-mobémbo wana ya losambo basengelaki kofanda kati na káa libándá ya bifelo ya engumba. Baoyo bazalaki kolala kati na engumba bazalaki kopesamela bisika ya kolala kozanga lifuti.” Ee, bilenge Baebele bazalaki koteyama sikisiki na likambo litali bolingo mpo na bandeko mpe koyamba bapaya. Lelo oyo mayangani ya bitúká ya Batatoli ya Yehova mazali kosalema mbula na mbula mazali kokokisa mokano motindo moko.
Na nsuka, mokolo wana ya 14 Nisan mosengelaki kokóma. Nyama ya Elekeli ezalaki kobomama mpe kotumbama na boumeli ya bangonga mingi. Penepene na katikati ya butu libota lisengelaki kolya mwana ya mpate, limpa lizangi mfulu mpe matiti ya bololo. Lokola na momeseno mwana moko ya mobali asengelaki kotuna ete: “Ntina na losambo oyo ezali nini?” Batata basengelaki koteya bango, ete: “Ezali moboma na Elekeli na [Yehova] mpo ete ye alekaki likoló na ndako na bato na Yisalaele na Ezipito, wana ebomaki ye Baezipito nde abikisaki ndako na biso.”—Exode 12:26, 27; 13:8.
Salomo, Mokonzi ya Yisalaele, alobaki ete: ‘Ntango ezali mpo na koseka mpe ntango mpo na kobina.’ (Mosakoli 3:4) Bana ya Bayisalaele bazalaki kopesamela ntango ya kominanola. Emonani polele ete Yesu atalaki malamu lolenge oyo bana bazalaki kosakana na bisika ya zando. (Zekalia 8:5; Matai 11:16) Mpe ezalaki kosalema mbala mingi ete baboti oyo bazalaki na bozwi bazalaki kosala ebongiseli kitoko ya kominanola na libota oyo esangisaki loyembo, mabina mpe bolei monene. (Luka 15:25) Bobele bongo baboti baklisto na mikolo na biso bazali kozwa likanisi ya kobongisa kominanola mpe boninga moko malamu mpo na bana na bango.
Bamama mpe bana kati na ebongiseli ya Bayuda
Mokumba nini bamama bazalaki kokokisa na nsé ya Mibeko ya Mose? Masese 1:8 epesaki etindá oyo ete: “Mwana na ngai, yoká mateyo na tata na yo mpe tiká mibeko na mama na yo te.” Katikati na ebongiseli ya bokonzi ya mobali na ye, mwasi ya libala Moyuda azalaki kotosa masɛngami ya Nzambe kati na bomoi ya libota. Bana na ye basengelaki kokumisa ye, ata nsima wana asilaki konuna.—Masese 23:22.
Mama azalaki mpe na esika monene kati na kolakisama ya bana na ye. Ye moko azalaki kobatela mwana kino ekokoka ye kokilisama mabɛlɛ, na ntembe te yango ezalaki kopesa litomba na bokangami ya penepene kati na mama mpe mwana. (Yisaya 49:15) Wana batata bazalaki kolakisa bana na bango ya mibali mosala ya mabɔ́kɔ, bamama basengelaki koteya bana basi misala ya ndako. Bamama bazalaki mpe na bopusi monene likoló na bana na bango ya mibali. Na ndakisa, mokonzi Lemuele azwaki litomba na “lisakoli oyo mama na ye alakisaki ye.”—Masese 31:1.
Mwasi ya libala Moyuda azalaki mpe na bonsomi mingi wana “akotala malamu na makambo na ndako na ye.” Engebene Masese 31:10-31, akokaki kosomba biloko ya ndako, kozwa mabelé, mpe ata kosalela mwa mombongo. Na miso ya mobali oyo azali na botɔ́ndi, motuya na ye molekaki “mabángá na penini na motuya”!
Elakiseli mpo na mikolo na biso
Na eleko ya lisoló ya Biblia ebongiseli ya libota ezalaki kopesa bolamu mpo na bokóli ya mayoki mpe ya elimo ya basangani na yango nyonso. Batata basengelaki kosalela bokonzi na bango na bolingo malamu mpo ete mabota makoka kozwela yango litomba. Basengelaki kopesa ndakisa kati na losambo. Ezala batata to bamama bango nyonso bazalaki kotya likebi na bana na bango—koteya mpe kobongisa bango, kosangana elongo na bango kati na losambo, mpe kopesa bango ntango ya kominanola. Bamama oyo bazalaki kobanga Nzambe bazalaki solo basungi ya motuya mingi, bazalaki kotosa bokonzi ya mibali na bango atako bazalaki kozwa likanisi ya kosala makambo mosusu mpo na litomba ya mabota na bango. Bana ya botosi bazalaki komemela baboti na bango mpe Yehova Nzambe esengo. Ya solo, mabota ya kobanga Nzambe ya ntango ya lisoló ya Biblia mazali elakiseli kitoko mpo na mikolo na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosengeli koyeba ete liboso na yango, Yakobo asilaki kozwa meko monene mpo na kobatela libota na ye na bopusi mabe ya Bakanana. Asilaki kotonga etumbelo moko, na ntembe te na motindo oyo yango ekokaki kokesenisa ye na Bakanana oyo bazalaki penepene na ye. (Genese 33:20; Exode 20:24, 25) Lisusu atɛmisaki káa na ye libándá ya mboka ya Sɛkɛmɛ mpe atimolaki libulu ya mai ya ye moko. (Genese 33:18; Yoane 4:6, 12) Na yango Dina akokaki koyeba malamu mpenza mokano ya Yakobo ete ye atambola te elongo na basi ya Kanana.
[Elilingi na lokasa 23]
Libota na yo likoki kozala na esengo lokola mabota oyo masambelaki Yehova na ntango ya lisoló ya Biblia