Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/6 nk. 24-27
  • Bazali kobuta ngomba oyo eleki Himalaya na bolai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kobuta ngomba oyo eleki Himalaya na bolai
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Népal​—Bokonzi likoló na ngomba
  • Ebandeli ya moke
  • Bokóli kati na mikakatano
  • Népal na mikolo na biso
  • Kobuta likoló koleka Himalaya
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/6 nk. 24-27

Bazali kobuta ngomba oyo eleki Himalaya na bolai

HIMALAYA! Liloba oyo lizali kopusa yo na kokanisa eloko nini? Bansɔ́ngɛ́ ya kokamwa ya bangomba, ezipami na mbula mpɛmbɛ epai mipepe makasi mizali kopepa? Nsái monene ya elónga, ya kotɛlɛma likoló na ngomba oyo eleki bangomba nyonso ya mabelé na bolai? Kati na biso, ebele bakokoka te kobuta Ngomba Everest, oyo ezali kati na bangomba ya Himalaya na mboka Népal. Nzokande, lelo oyo bato mingi ya mboka Népal bazali kobuta ngomba moko oyo eleki Himalaya na bolai! Liboso ete tóyeba soki mobembo wana ya kobuta ngomba monene ezali kosalema lolenge nini, tólobela naino Bokonzi ya Népal oyo ezali moke kasi kitoko.

Népal​—Bokonzi likoló na ngomba

Bokonzi ya Népal ekeseni mpamba te yango ezali kati na bamboka mokomoko oyo etikali na mokili epai kuna bobele moto moko nde azali na nguya ya koyangela, mpe ekeseni lisusu mpamba te, yango ezali te bobele bokonzi ya ekólo, kasi ezali bokonzi oyo etambwisami na lingomba moko. Népal ezali mboka bobele moko ya mokili epai kuna hindouisme ezali lingomba ya Leta. Ntalo monene ya bato milió 20 oyo bafandi kuna bazali ba Hindous. Nzokande, bato na yango bauti na bikólo bikeseni. Baoyo bazali na etúká ya ngombangomba na nɔ́rdi bauti mingimingi na Tibet-Burma, nzokande na bisika patatálu ya súdi, ezali mingi mpenza bato oyo kala bazalaki na etuluku ebéngami Indo-Aryan. Népalais ezali lokótá ya Leta mpe lokótá ya mboka ya 60 % ya bafandi ya mboka yango. Bato mosusu oyo batikali balobaka koleka nkótá 18 ya bikólo bikeseni.

Népal ekokani mwa moke na etando ya mbata semba, ezali na bakilomɛtɛlɛ 880 longwa na ɛ́sti kino na wɛ́sti mpe bakilomɛtɛlɛ 200 longwa na nɔ́rdi kino na súdi. Himalaya, bangomba ya nsɔ́mɔ oyo ezali ndelo na yango epai na nɔ́rdi, esangisi Ngomba Everest, ngomba oyo ezali molai koleka bangomba nyonso ya mokili ezali na bamɛtɛlɛ 8848, mpe bangomba mosusu mwambe oyo ezali na bolai koleka bamɛtɛlɛ 8000 na bolai. Na katikati ya Népal ezali na bangomba mikuse elongo na mabéke mpe mabwaku. Mosika na súdi, na ndelo ya Inde, ezali na Tarai, mabelé ya kobota mbuma mingi, oyo ezali etúká monene ya bilanga.

Kathmandu, mboka-mokonzi, oyo ezali na etúká ya ntéi, ezali mpenza esika ya kitoko mpo na baturiste. Ezali kopesa libaku ya kolekaleka na mpepo likoló na bangomba ya kokamwa, kosala mobembo na zamba kati na baparke, mpe ebele na bisika kitoko ya komona kati na engumba. Mbala mosusu babéngaka Népal lobwaku ya banzambe mpamba te lingomba lizali na ntina mingi kati na bomoi ya bato na yango. Lingomba lizali mpe ntina oyo bamilió ya bato kati na mokili mobimba bazali kokende na “ngomba” oyo eleki Himalaya na bolai.

Esili koleka soko mibu 2700, mosakoli Moebele Yisaya apemamaki mpo na kosakola ete “na mikɔlɔ na nsuka, ngomba na ndako na [Yehova] ekokokisama likoló koleka ngomba nyonso . . . Bikolo mingi bakokɛnda mpe bakoloba ete, Yakani, tobuta na ngomba na [Yehova] . . . ete alakisa biso nzela na ye mpe ete totambola na bipai bikokɛndaka ye.” (Yisaya 2:2, 3) Awa losambo ya pɛtɔ lotombwami ya Yehova, Mozalisi mpe Moyangeli ya molɔ́ngɔ́, ekokisami na ngomba, oyo ezali likoló koleka mangomba nyonso mosusu oyo makokani na bangomba. Yango ezali motó ya lisoló mpo na mosala ya kolakisama kati na mokili mobimba oyo ezali kosalisa bato oyo bazali na mposa ya koyeba makambo na ntina na banzela ya Yehova. Lolenge nini mosala yango mobandaki na Népal?

Ebandeli ya moke

Sodá moko oyo azalaki na limpinga ya Grande-Bretagne na eleko ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba azalaki koluka lingomba ya solo. Baboti na ye oyo bazalaki bato ya mboka Népal mpe ya lingomba ya Hindouisme bandimaki Lingomba ya Katolike. Wana ezalaki ye kokóla, amonaki kozanga mayele oyo ezali kati na losambo ya bikeko, abwakaki mateya lokola lifelo ya mɔ́tɔ, mpe abandaki kotalela bindimeli ya mangomba ya Protestá. Kasi mposa na ye ekokisamaki te.

Wana akómaki mokangami ya ba Japonais, na engumba oyo ezalaki na ntango wana Rangoon, na mboka Burma, sodá yango asɛngaki kati na libondeli ete akoka kobikisama na misala makasi ya bolɔ́kɔ mpo akoka kokóba koluka losambo ya solo. Na nsima, akimaki na mabɔkɔ na banyokoli na ye mpe azwaki lisalisi ya molakisi moko oyo, kati na ndako na ye, amonaki mwa búku Where Are the Dead? (Bakufi bazali wapi?), oyo ekomamaki na J. F. Rutherford. Wana esosolaki ye ete yango ezali solo, andimaki na mposa monene koyekola wana Batatoli ya Yehova bakómelaki ye na Rangoon na 1947. Bobele nsima ya mwa basanza, azwaki batisimo, mpe mwa moke na nsima, mwasi na ye oyo azalaki elenge alandaki matambe na ye. Bazwaki ekateli ya kozonga na Inde, mpo na kofanda na Ka-lim-pong epai babotamaki, na bangomba ya nɔ́rdi-ɛ́sti. Kuna bana na bango mibale babotamaki mpe bakɔtaki kelasi. Na Mársi 1970, bakendaki kofanda na Kathmandu.

Mibeko ya mboka Népal mizalaki kopekisa bopalanganisi mateya ya lingomba. Moto nyonso oyo azwami wana ezalaki ye kopalanganisa oyo ebéngami lingomba ya bopaya asengelaki kolekisa mbula nsambo na bolɔ́kɔ, mpe moto oyo akɔti na lingomba motindo yango akokaki kolekisa mbula misato na bolɔ́kɔ mpe kofuta lomande monene. Na yango kopesa litatoli esengelaki kosalema na bokɛngi mingi. Kosakola ndako na ndako elimbolaki kosakola na ndako moko, na nsima kokende na esika mosusu mpe kosakola na ndako mosusu kuna. Ezali polele ete, litotali ya libaku malamu lizalaki na ntina monene kati na kopalanganisama ya nsango malamu.

Bokóli ezalaki malɛmbɛ. Kati na bato milió zomi, mosala ya kosakola mokokaki kolɛmbisa. Mbóto ya solo elónamaki ntango libota wana oyo lizalaki bobele yango moko lipesaki litatoli epai na baninga, na bayebani, na bakonzi ya mosala mpe na baninga na bango basáli. Bazalaki kosala makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na ndako na bango mpe bazalaki kobyanga bato oyo basepeli ete bayangana elongo na bango. Bongo, na Mársi 1974, nsima ya mbula minei ya mosala makasi ya kolóna mpe kosopa mai, mbuma ya liboso ya Népal ebotamaki​—mpe yango ebimaki na eutelo oyo ekanisamaki te!

Wana ekɔtaki ye na ndako moko, mosakoli asololaki na mobali moko ya bozwi mingi oyo azalaki mokomeli epai na mosangani moko ya libota ya mokonzi. Mobali yango alobaki ete: “Sololá na mwana na ngai ya mobali.” Mwana mobali yango andimaki boyekoli ya Biblia. Na nsima, alukaki mosala mosusu, mpamba te azalaki kosala na kompanyi moko ya masano ya mbongo. Tata na ye, moto oyo amipesaki mingi na Lingomba ya Hindouisme, atɛmɛlaki ye. Atako bongo, elenge mobali yango aponaki kosalela Yehova. Esukaki boni? Na nsima tata na ye atikaki kotɛmɛla ye, mpe etuluku moko ya bandeko na bango endimaki solo ya Biblia. Sikawa azali nkulutu kati na lisangá ya boklisto.

Mpo na kotikala makasi na elimo mpe kolanda mitindá ya Makomami oyo mitali koyangana elongo moko kozanga kotika, etuluku moke ya Kathmandu ezalaki kosala makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ kati na ndako ya bandeko. Kasi na meko moko monene, bandeko bazangaki mayangani ya minene. Baoyo bazalaki na makoki bazalaki kosala mobembo na Inde mpo na mayangani​—mobembo moko molai mpe oyo ezalaki kosɛnga mosolo mingi mpe kokatisa milɔ́ngɔ́ ya bangomba.

Oyo nde libaku ya esengo ntango manáka mobimba ya liyangani ya etúká esalemaki na ndako epai bazalaki kosala makita! Kanisá ete bandeko mibali minei, oyo kati na bango mosangani moko ya filiale ya Inde, bakokisaki manáka mobimba ya liyangani wana! Ata lisano-liteya ya Biblia elakisamaki. Lolenge nini? Bakangaki bililingi na Inde wana bandeko bazalaki komeka lisano-liteya mpo na mbala ya nsuka. Na Népal, bililingi yango bilakisamaki likoló na etánda ya sinema, elongo na maloba ya kasete. Bayoki basepelaki na yango mingi. Bayangani bazalaki boni? Bato zomi na mwambe!

Lisalisi ya bandeko ya mboka mosusu kati na mosala ya kosakola lizalaki mpenza mingi te. Mosala ya bamisionɛrɛ mokokaki kondimama te, mpe kozwa mosala mpo na bapaya ezalaki pɛtɛɛ te. Nzokande, Batatoli mibale ya Inde bazwaki mosala na Népal na bileko bikeseni, balekisaki mibu mingi na Kathmandu mpe basungaki mpo na kolendisa lisangá oyo liutaki kosalema sika. Na 1976 basakoli ya Bokonzi bazalaki 17 na Kathmandu. Na 1985 bandeko batongaki Ndako ya Bokonzi ya bango moko. Ntango yango esilaki, mayangani ya etúká ya mbula na mbula, elongo na mayangani mosusu, ebandaki kosalema kuna mbula na mbula. Ndako yango ezalaki solo ntéi ya losambo ya pɛtɔ kati na teritware wana mosika, ya ngombangomba.

Bokóli kati na mikakatano

Na bambula wana ya ebandeli, mosala ya kosakola, oyo ezalaki kosalema na bokɛngi mingi, ebendaki mpenza likebi ya bakonzi ya mboka te. Nzokande, penepene na nsuka ya 1984, babandaki kotya bipekiseli. Ndeko mobali moko mpe bandeko basi misato bakangamaki mpe batyamaki na bolɔ́kɔ na boumeli ya mikolo minei liboso ete batika bango, nsima na kokebisa bango ete bákóba te na misala na bango. Kati na mboka moko moke, bato libwa bakangamaki ntango bazalaki koyekola Biblia kati na bandako na bango. Batyaki motoba kati na bango na bolɔ́kɔ na boumeli ya mikolo 43. Bakangaki lisusu bato mingi, kasi bapesaki etumbu moko engebene mibeko.

Kala mingi te na 1989, bandeko mibali mpe bandeko basi nyonso ya etuluku moko ya Boyekoli ya Mokanda ya lisangá bakangamaki, na boumeli ya mikolo misato, mpe batikaki bango. Mbala mosusu, bazalaki kosɛnga bango ete bátya mabɔkɔ na mokanda moko oyo mozalaki koloba ete bakosakola lisusu te. Bazalaki koboya. Batikaki basusu bobele nsima wana batyaki mabɔkɔ na maloba oyo ete basengelaki kozala pene ya kondima mpasi soki bakangi bango lisusu na mosala ya kosakola.

Atako bazalaki kokutana na mikakatano motindo wana, bandeko bakóbaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi na molende nyonso. Na ndakisa, na 1985, mbula oyo elandaki bipekiseli ya bakonzi, bokóli ya 21 % emonanaki kati na motuya ya basakoli. Basakoli 35 bapesaki mwayene ya bangonga 20 na sanza mpo na kosolola elongo na bato mosusu na ntina na losambo ya pɛtɔ.

Wana ntango ezalaki koleka, mbongwana kati na makambo ya politiki ebandaki kosalema na Népal. Bakonzi ya Leta babandaki kososola ete Batatoli ya Yehova bazalaki likámá te. Mosala na bango ya koteya Biblia mozali kopesa litomba malamu, mozali kopesa bato boyebi, kokómisáká bango banamboka malamu mingi. Bakonzi bamonaki ete kolongobana, molende kati na mosala, mpe etamboli ya pɛtɔ ezali kolobelama mingi lokola masɛngami ya moboko epai na basaleli ya Yehova.

Litatoli moko kitoko epesamaki ntango mwasi moko oyo kala amipesaki mingi na lingomba ya Hindouisme akómaki Motatoli mpe aboyaki kozongisa makila. Minganga bakamwaki na ekateli ya makasi mpe ya mayele oyo azwaki. Mwasi yango ayekolaki solo na lisalisi ya mwa búku Sepela na bomoi ya seko na mabele! Atako akutanaki na botɛmɛli mpe na botyoli ya basangani ya libota na ye, azwaki batisimo na 1990 wana azalaki kobɛlɛma na mbula 70. Na nsima abukanaki na lokolo, mpe lokola azalaki na mikakatano misusu ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, basengelaki kosala ye lipasó moko monene. Na boumeli ya bapɔ́sɔ mibale atɛmɛlaki bopusi ya minganga mpe ya bandeko ya mosuni oyo balingaki ete andima kozongisa makila. Na nsuka, ekípi ya minganga oyo bapasolaki ye balóngaki kosala yango kozanga kozongisa makila. Atako sikawa akoki kotambola mosika te, ndeko mwasi wana ya sembo afandaka na ekotelo ya lopango na ye mpe abyangaka baleki nzela ete báfanda elongo na ye mpe báyoka mwa moke nsango malamu ya esengo.

Népal na mikolo na biso

Na mikolo oyo makambo mazali lolenge nini na Népal? Batatoli ya Yehova bazali na mwa bonsomi ya losambo lokola bandeko na bango kati na mokili mobimba. Uta ntango oyo mobuti ngomba moko to babuti ngomba mibale ya elilingi babandaki kosangana elongo na baoyo bazali kobuta ngomba ya losambo ya solo, ebele ya bato basili koloba, ‘Yakani, tobuta na ngomba na [Yehova].’ Na 1989 mwayene ya baoyo nyonso bazalaki kosangana sanza na sanza kati na mosala ya kosakola bazalaki 43, mpe bato 204 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto na mbula wana.

Na nsima, lokola alakaki yango, Yehova abandaki koyeisa mbangu koyanganisama ya baluki ya solo kati na ndako na ye. (Yisaya 60:22) Eleki kala mingi te lisangá ya mibale liuti kosalema na Kathmandu, mpe sikawa ezali na bituluku mibale oyo bitangwami na mboka-mokonzi. Na Apríli 1994, baklisto oyo bapesaki lapólo ya mosala ya kosakola bazalaki 153​—bokóli ya 350 % liboso ete mibu mitano mikoka! Batambwisaki boyekoli ya Biblia 386 elongo na bato oyo bamonisaki bosepeli. Na Ekaniseli ya 1994, motuya ya kosepelisa ya bayangani mozalaki 580. Na liyangani ya mokolo moko, bato 635 batondanaki kati na ndako, mpe bato 20 bamilakisaki mpo na kozwa batisimo. Na yango, bokóli monene oyo bozali kosalema kati na Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bozali mpe kosalema na Népal oyo ezali mboka moke.

Na bambula oyo euti koleka motuya ya mikanda oyo mibimisami na lokótá ya Népalais esili kokóla mingi, kosalisáká bongo bato ya komikitisa ete bákangama makasi na solo. Babongoli oyo bayekolaki tekiniki ya bobongoli mpe kosalela ordinatɛrɛ na biro ya filiale ya Inde bazali sikawa kosala mosala ya ntango nyonso na Kathmandu. Awa esili bango kobongisama malamu mpo na bokóli, bato ya teokrasi oyo bafandi na bangomba ya Népal bazali kokende liboso!

Kobuta likoló koleka Himalaya

Yo mpe okoki kozwa esengo ya kobuta ngomba oyo eleki Himalaya na bolai. Na kosaláká bongo, okosangana te bobele elongo na baoyo bazali na Népal kasi lisusu elongo na bamilió oyo bauti na “mabota nyonso, na mikili nyonso, na [bikólo, NW] nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 7:9) Elongo na bango, okosepela kolakisama na Mozalisi ya bangomba minene lokola oyo ezali na Népal. Okomona Mozalisi “kosembola makambo,” mpe okokoka kozela na esengo nyonso bomoi ya seko kati na mabelé mapɛtɔlami mpe makɛmbisami.​—Yisaya 2:4, NW.

[Karte na lokasa 24]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Kathmandu

Ngomba Everest

[Elilingi na lokasa 25]

Libándá ya Ndako ya Bokonzi na Kathmandu

[Elilingi na lokasa 26]

Bato mingi ya Népal bazali kozwa litomba ya boyekoli ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto