Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/6 nk. 18-23
  • “Mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya bososoli”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya bososoli”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge oyo tokoki kokólisa nguya na biso ya bososoli
  • Baombo ya Nzambe mpe ya Klisto, kasi ya bato te
  • Tólona “elimo ya Klisto”
  • Tótosaka mibeko ya Klisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ndenge ya kopona kominanola
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ndenge ya kopona masano ya malamu
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Okoki koyokela lisosoli na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/6 nk. 18-23

“Mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya bososoli”

“Bopesa nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi, ya bulɛɛ, oyo ekoki kondimama na Nzambe, yango mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya bososoli.”​—BALOMA 12:1, NW.

1, 2. Na ndimbola nini koyekola kosalela mitindá ya Biblia ezali lokola koyekola lokóta ya sika?

OSILA komeka koyekola lokóta moko ya sika? Soki ee, na ntembe te, okondima ete ezali likambo moko ya mpasi. Esɛngaka makambo mingi koleka bobele koyekola maloba ya sika. Mpo na koloba lokóta moko malamu mpenza, esɛngaka lisusu koyeba malamu grammaire na yango. Osengeli kososola lolenge nini maloba mazali na boyokani na moko na mosusu mpe lolenge masanganaka mpo na kobimisa likanisi mobimba.

2 Ekokani na lolenge tozwaka boyebi ya Liloba ya Nzambe. Esɛngaka makambo mingi koleka bobele koyeba mikapo moko moko ya Makomami. Na elobeli ya elilingi, tosengeli mpe koyekola grammaire ya Biblia. Tosengeli kososola lolenge nini mikapo mizali na boyokani moko na mosusu mpe lolenge nini mizali kosalelama lokola mitindá oyo mikoki kosalelama kati na bomoi ya mokolo na mokolo. Na yango, tokoki kokóma bato “babongi, oyo baselingwi mpo na misala nyonso malamu.”​—2 Timoté 3:17.

3. Na kotalela mosala ya Nzambe, mbongwana nini esalemaki na mobu 33 T.B.?

3 Na nsé ya bibongiseli ya Mibeko ya Mose, bosembo ekokaki komonisama, na meko oyo eleki monene, na botosi makasi ya mibeko oyo emonisami polele. Nzokande, na mobu 33 T.B., Yehova alongolaki Mibeko, ya solo, “akangaki yango na nzeté ya mpasi” likoló na yango Mwana na ye abomamaki. (Bakolose 2:13, 14, NW) Na nsima, basaleli ya Nzambe bapesamelaki te molɔngɔ́ molai ya bambeka ya kopesa mpe mibeko ya kolanda. Nzokande, eyebisamaki na bango ete: “Bopesa nzoto na bino lokola mbeka ya bomoi, ya bulɛɛ, oyo ekoki kondimama na Nzambe, yango mosala ya bulɛɛ na nguya na bino ya bososoli.” (Baloma 12:1, NW) Ee, baklisto basengelaki komikaba, na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na elimo na bango mobimba mpe na makasi na bango mobimba kati na mosala ya Nzambe. (Malako 12:30; kokanisá na Nzembo 110:3) Kasi, kosala “mosala ya bulɛɛ elongo na nguya na bino ya bososoli” elimboli nini?

4, 5. Kosalela Yehova na nguya na biso ya bososoli ezali kosɛnga nini?

4 Liloba “nguya ya bososoli” ebongolami uta na liloba ya Greke lo·gi·kosʹ, oyo elimboli “ya bwanya” to “mayele.” Basaleli ya Nzambe babyangami ete basalela lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia. Na esika ya kokamata bikateli na bango engebene ebele ya mibeko oyo esilá kotyama, Baklisto basengeli kotalela malamumalamu mitindá ya Biblia. Basengeli koyeba malamu “grammaire” ya Biblia, to lolenge nini mitindá na yango mikeseni mizali na boyokani moko na mosusu. Na yango, bakoki kokamata bikateli ya bokatikati na lisalisi ya nguya na bango ya bososoli.

5 Yango elingi koloba ete baklisto bazali na mobeko te? Ezali bongo te. Na elobeli ya polele, Makomami ya Greke ya boklisto epekisi ekobo, kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, koboma, kokosa, misala ya bilimo mabe, kosalela makila na lolenge mabe, mpe masumu mosusu ya ndenge na ndenge. (Misala 15:28, 29; 1 Bakolinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8) Nzokande, na lolenge ya monene koleka oyo esɛngamaki na Bayisraele, tosengeli kosalela nguya na biso ya bososoli mpo na koyekola mpe kosalela mitindá ya Biblia. Lolenge moko na koyekola lokóta ya sika, yango ezali kosɛnga ntango mpe molende. Lolenge nini tokoki kokólisa nguya na biso ya bososoli?

Lolenge oyo tokoki kokólisa nguya na biso ya bososoli

6. Koyekola Biblia ezali kosɛnga nini?

6 Ya liboso, tosengeli kozala bayekoli ya molende ya Biblia. Liloba lipemami ya Nzambe lizali “kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola, mpe mpo na kobokola, kati na boyengebene.” (2 Timoté 3:16) Tosengeli komizela te ete eyano na likambo moko emonisama polele bobele na mokapo moko ya Biblia. Nzokande, ekoki mbala mosusu kosengela ete tososola likoló na mikapo mingi oyo mizali kopesa engɛngiseli na likambo moko to na mokakatano moko ya sikisiki. Ekosengela ete toluka na molende nyonso likanisi ya Nzambe na ntina na likambo yango. (Masese 2:3-5) Tosengeli mpe kozala na mayele, mpamba te “moto na mayele akokóma motambwisi oyo abongi mpenza.” (Masese 1:5, NW) Moto na mayele akoki kokabola biteni ya sikisiki ya likambo moko mpe na nsima komona boyokani oyo ezali kati na biteni yango moko na mosusu. Lokola ekosalemaka na lisano oyo ebéngami puzzle, akosangisa biteni na yango bikeseni esika moko mpo ete akoka komona mobimba na yango.

7. Lolenge nini baboti bakoki kososola likoló na mitindá ya Biblia na ntina etali disipilini?

7 Na ndakisa, tókamata likambo litali kobokola bana. Masese 13:24 (NW) elobi ete tata oyo alingaka mwana na ye “akolukaka ye na disipilini.” Soki totaleli mokapo oyo bobele yango moko, ekoki kosalelama na lolenge ya mabe mpo na kolóngisa etumbu oyo epesami na lolenge ya kopesa mpasi, na lolenge ya makasi. Nzokande, Bakolose 3:21 epesi toli oyo ya bokatikati: “Bino batata, botumolaka bana na bino te na ntina ete balɛmba na mitema te.” Baboti oyo basalelaka nguya na bango ya bososoli mpe bayokanisaka mitindá wana bakosalela te disipilini oyo ekoki kolobelama ete “eleki ndelo.” Bakosalela bana na bango na esengo, na mayele mpe na lokumu nyonso. (Baefese 6:4) Na yango, kati na likambo litali kobokola bana to kati na likambo nyonso mosusu oyo etaleli mitindá ya Biblia, tokoki kokólisa nguya na biso ya bososoli na kotaleláká makambo nyonso mosusu oyo mazali na boyokani na yango. Na lolenge wana, tokoki koyeba malamu “grammaire” ya mitindá ya Biblia, mokano ya Nzambe ezalaki nini mpo na yango mpe lolenge nini tokoki kokokisa yango.

8. Lolenge nini tokoki kopɛngola kokóma na makanisi ya makasimakasi, oyo ebongwanaka te, na ntina etali kominanola?

8 Lolenge ya mibale ya kokólisa nguya na biso ya bososoli ezali bongo ya koboya kokóma na makanisi ya makasimakasi, oyo ebongwanaka te. Kokangama makasimakasi na lolenge bobele moko ya kotalela likambo epekisaka bokóli ya nguya na biso ya bososoli. Tótalela likambo ya kominanola. Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Yango elimboli ete mokanda nyonso, filime nyonso, emisió nyonso ya televizyó ebimisami na mokili oyo ezali ya kobeba mpe euti na Satana? Likanisi motindo oyo ezali ya mayele soko moke te. Ya solo, bato mosusu bakoki koboya mpenza kotala televizyó, bafilime, to kotánga mikanda nyonso ya mokili. Yango ezali lotómo na bango, mpe tosengeli te kotónga bango mpo na yango. Kasi bango mpe basengeli te kopusa basusu ete bákamata etɛlɛmɛlo ya makasi motindo yango. La Société asili kobimisa masoló oyo ezali kolobela mitindá ya Biblia oyo misengeli kosalisa biso ete tosalaka liponi ya mayele mpenza kati na kominyolisa to kominanola na biso. Kozanga kolanda batoli wana mpe komitya na bisika oyo makanisi ya mbindo, mobulu, mpe misala ya bilimo mabe oyo ezali kosalema kati na kominanola mingi ya mokili oyo ezali mpenza bozoba. Ya solo, liponi ya mayele na ntina etali kominanola ezali kosɛnga ete tosalela nguya na biso ya bososoli mpo na kolanda mitindá ya Biblia mpo ete tozala na lisosoli ya peto liboso na Nzambe mpe liboso na bato.​—1 Bakolinti 10:31-33.

9. “Lisosoli mozindo” elimboli nini?

9 Lelo oyo, mitindo mingi ya kominanola ebongi mpenza te mpo na baklisto.a Yango wana, tosengeli kobongisa mitema na biso mpo na “koyina mabe,” ete tokóma te lokola baoyo, na ekeke ya liboso, “bamipesaki na makambo na nsoni.” (Nzembo 97:10; Baefese 4:17-19) Mpo na kososola likoló na makambo wana, tozali na mposa ya “boyebi ya sikisiki mpe lisosoli mozindo.” (Bafilipi 1:9, NW) Liloba ya Greke oyo ebongolami na “lisosoli” ezali komonisa “likoki ya komona mpe kokesenisa malamu na mabe.” Liloba yango lisalelami mpo na biyókeli mpenza ya moto, lokola likoki ya komona. Mpo na oyo etali kominanola to likambo nyonso mosusu oyo ezali kosɛnga ete moto ye moko azwa ekateli, likoki na biso ya kokesenisa malamu na mabe esengeli koyeisama makasi mpo ete tokoka komona bobele te makambo oyo mamonani mpenza polele ete mazali malamu to mabe, kasi lisusu makambo oyo mazangi bosikisiki. Na yango, tosengeli mpe kopengola kosalela mitindá ya Biblia na lolenge ya makasimakasi eleki ndelo mpe kosɛngáká na makasi ete bandeko nyonso basala bongo.​—Bafilipi 4:5.

10. Lolenge nini tokoki koyeba malamu bomoto ya Yehova, lokola emonisami kati na Nzembo 15?

10 Lolenge ya misato ya kokólisa nguya na biso ya bososoli ezali bongo ya koyeba malamu lolenge ya kokanisa ya Yehova mpe kokɔtisa yango na bozindo mpenza kati na mitema na biso. Kati na Liloba na ye, Yehova amonisi bomoto mpe mibeko na ye. Na ndakisa, kati na Nzembo 15, tozali kotánga na ntina na lolenge ya moto oyo Yehova azali kobyanga ete azala mopaya kati hema na ye. Moto ya lolenge yango asalelaka boyengebene, alobaka solo kati na motema na ye mpe alukaka te matomba ya moimi likoló na basusu. Wana ozali kotánga Nzembo yango, omituna ete, ‘Bizaleli oyo bizali komonisa bomoto na ngai? Yehova akoki kobyanga ngai ete nazala mopaya kati na hema na ye?’ Nguya na biso ya kososola ezali koyeisama makasi wana tozali kokóma na boyokani na banzela ya Yehova mpe na lolenge na ye ya kokanisa.​—Masese 3:5, 6; Baebele 5:14.

11. Lolenge nini Bafalisai bazalaki “kotika boyengebene mpe bolingo ya Nzambe”?

11 Ezali mpenza kati na likambo oyo nde Bafalisai bakweaki na mawa nyonso. Bafalisai bayebaki makambo mikemike ya mibeko, kasi bakokaki te kososola “grammaire” na yango. Bakokaki kotánga ebele ya makambo matali mibeko, kasi bazangaki komona Bomoto ya ye oyo asalaki yango. Yesu alobaki na bango ete: “Bozali kokaba ndambo na zomi na endiosomo, na mpegana, na ndunda nyonso, mpe bozali kotika boyengebene mpe bolingo na Nzambe, mpe bazali kotika boyengebene mpe bolingo na Nzambe!” (Luka 11:42) Na makanisi mpe mitema na bango ya makasimakasi, Bafalisai bazangaki kosalela nguya na bango ya bososoli. Lolenge na bango ya kososola oyo ezali na bongolabongola emonanaki polele na ntango balobaki mabe na ntina na bayekoli ya Yesu mpo ete babukaki mbuma mpe balyaki yango na mokolo ya Sabata; nzokande, na nsima, bobele na mokolo yango, baokaki mpasi te na lisosoli na bango na ntango bayanganaki mwango mpo na koboma Yesu!​—Matai 12:1, 2, 14.

12. Lolenge nini tokoki kokóma lisusu na boyokani mingi na Yehova lokola Moto mpenza?

12 Biso tolingi kokesana na Bafalisai. Boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe esengeli kosalisa biso na kokóma na boyokani malamu lisusu elongo na Yehova lokola Moto mpenza. Lolenge nini tokoki kosala yango? Nsima ya kotánga eteni moko ya biblia to mokanda moko oyo ekolimbolaka Biblia, basusu bazwaki lisungi na kokanisáká mozindo likoló na mituna lokola oyo, ‘Makambo oyo mateyi ngai nini na ntina na Yehova mpe bizaleli na ye? Lolenge nini nakoki komonisa bizaleli ya Yehova kati na boyokani na ngai elongo na basusu?’ Komanyola likoló na mituna oyo ezali kokólisa nguya na biso ya kososola mpe ezali kopesa biso nzela ya kokóma “bayekoli na Nzambe.”​—Baefese 5:1.

Baombo ya Nzambe mpe ya Klisto, kasi ya bato te

13. Lolenge nini Bafalisai bamityaki bakonzi mabe likoló na likoki ya bato ya kokesenisa malamu na mabe?

13 Bankulutu basengeli kotika nzela na baoyo bazali na nsé ya libateli na bango ete básalela nguya na bango ya bososoli. Basangani ya lisangá bazali baombo ya bato te. Paulo akomaki ete: “Nazali komeka kosepelisa bato? Soko bongo, nazali moombo na Klisto te.” (Bagalatia 1:10; Bakolose 3:23, 24) Na bokeseni, Bafalisai balingaki ete bato bakanisa ete kondimama na miso ya bato ezalaki na ntina mingi koleka kondimama na miso ya Nzambe. (Matai 23:2-7; Yoane 12:42, 43) Bafalisai bamityaki bakonzi mabe likoló na likoki ya bato ya kokesenisa malamu na mabe, basalaki mibeko na bango moko mpe na yango bazalaki kotalela basusu engebene lolenge oyo bazalaki kokokisa yango. Baoyo bazalaki kolanda Bafalisai balɛmbaki kati na lolenge na bango ya kosalela lisosoli oyo eteyami na Biblia, ya solo, bakómaki baombo ya bato.

14, 15. (a) Lolenge nini bankulutu bakoki komimonisa ete bazali baninga basáli elongo na etongá? (b) Lolenge nini bankulutu basengeli kokata makambo matali lisosoli?

14 Lelo oyo bankulutu baklisto bayebi ete mokumba ya baklisto ezali liboso mpenza na motó na bango te. Moklisto mokomoko asengeli komema mokumba na ye moko. (Baloma 14:4; 1 Bakolinti 1:24; Bagalatia 6:5) Yango esengeli kozala bongo. Ya solo, soki basangani ya etongá bazalaki baombo ya bato, kotosáká bobele mpo ete bazali kokɛngɛla bango, mbɛlɛ bakosala nini na ntango bato bazali te? Paulo azalaki na ntina ya kosepela mpo na Bafilipi: “Pelamoko bosili kotosa ntango nyonso, boluka sasaipi nzela na kobika na bino na nsɔ́mɔ mpe na kolenga, bobele wana nazali esika moko na bino te kasi na koleka wana nazali mosika na bino.” Bazalaki mpenza baombo ya Klisto, kasi ya Paulo te.​—Bafilipi 2:12.

15 Na yango, kati na makambo matali lisosoli, bankulutu bakamataka bikateli te na esika ya baoyo bazali na nsé ya libateli na bango. Balimbolaka mitindá ya Biblia oyo mitalelami kati na likambo yango mpe na nsima bazali kotika nzela na bato oyo batalelami na likambo yango mpo ete básalela nguya na bango ya bososoli mpo na kokamata ekateli. Yango ezali mokumba moko monene, nzokande ezali oyo moto ye moko nde asengeli komema yango.

16. Ebongiseli nini ezalaki na Yisraele mpo na kosilisa mikakatano?

16 Tótalela eleko oyo Yehova asalelaki basambisi mpo na kokamba libota ya Yisraele. Biblia ezali koyebisa biso ete: “Na mikolo yango mokonzi azalaki na Yisraele te. Moto na moto asalaki yango ezalaki sembo na miso na ye.” (Basambisi 21:25) Atako bongo, Yehova apesaki mwango mpo ete bato na ye bakambama. Engumba moko na moko ezalaki na mikóló oyo bakokaki kopesa lisungi libongi na mituna mpe mikakatano. Lisusu, banganga ya libota ya Levi basalaki lokola nguya oyo ezali kopusa na kosala oyo ezali malamu na kolakisáká bato mibeko ya Nzambe. Na ntango mpenza makambo maleki makasi mazalaki kobima, nganga-monene azalaki kotuna Nzambe na nzela ya Ulime mpe Timime. Búku Insight on the Scriptures eyebisi ete: “Moto oyo azalaki kozwa litomba na bibongiseli wana, oyo azalaki kozwa boyebi ya mibeko ya Nzambe mpe kosalela yango, azalaki na litambwisi malamu mpo na lisosoli na ye. Kati na likambo motindo oyo, mpo na ye ‘kosala oyo ezali sembo na miso na ye moko’ ekokaki kobimisa mbuma mabe te. Yehova apesaki nzela na bato ete bamonisa na elimo mpe na etamboli na bango kotosa to koboya kotosa.”​—Volimi 2, lokasa 162 kino lokasa 163.b

17. Lolenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali kopesa toli engebene mibeko ya Nzambe kasi ya bango moko te?

17 Na ndakisa ya basambisi mpe banganga ya Yisraele, bankulutu kati na masangá bazali kopesa lisungi libongi na ntango ya mikakatano mpe bazali kopesa batoli ya motuya. Na bantango mosusu, bazali ata mpe “kopalela, kopamela, kolendisa na motema molai nyonso mpe na mayele ya koteya.” (2 Timoté 4:2, NW) Basalaka bongo engebene mibeko ya Nzambe, kasi engebene oyo ya bango moko te. Wana bankulutu bazali kopesa ndakisa mpe bazali kosala makasi mpo na kosimba mitema, yango ebimisaka mpenza matomba malamu.

18. Mpo na nini ebongi mpenza na bankulutu ete basimbaka nde mitema?

18 Motema ezali “motɛ́lɛ” ya mosala na biso ya boklisto. Na yango, Biblia elobi ete: “Makambo na bomoi ikoutaka wana.” (Masese 4:23) Bankulutu oyo basimbaka motema bakomona ete basangani ya lisangá bakopusama bongo na kosala nyonso oyo bakoki kosala kati na mosala ya Nzambe. Bakozala na elimo ya kobandisa makambo, kozanga ete bazalaka ntango nyonso na mposa ya kotindikama na basusu. Yehova alingaka te botosi oyo etindikami na makasi. Azali na mposa ya botosi oyo eutaka na motema oyo etondi na bolingo. Bankulutu bakoki kolendisa mosala oyo epusami na motema, na kosalisáká basangani ya etongá ete bakólisa nguya na bango ya bososoli.

Tólona “elimo ya Klisto”

19, 20. Mpo nini ezali na ntina mpo na biso ete tolóna elimo ya Klisto?

19 Lokola tomonaki yango, ekoki te bobele koyeba mibeko ya Nzambe. Mokomi na Nzembo abondelaki ete: “Monisa ngai kotosa na mobeko na yo; mpe nakobatela yango na motema na ngai nyonso.” (Nzembo 119:34) Kati na Liloba na ye, Yehova amonisaki “elimo ya Klisto.” (1 Bakolinti 2:16) Lokola azalaki moto oyo asalelaki Yehova elongo na nguya na ye ya bososoli, Yesu atikelaki biso ndakisa ya kokoka. Asimbaki ntina ya mibeko mpe ya mitindá ya Nzambe, mpe asalelaki yango na lolenge ya kokoka. Na koyekoláká ndakisa na ye, “tokoyeba kososola . . . bonene mpe bolai mpe bozindo bolingo na Klisto, ee koyoka yango oyo eleki boyebi mpenza.” (Baefese 3:17-19) Ya solo, makambo oyo tozali koyekola kati na Biblia esuki te bobele kozala na boyebi ya makambo mingi; ezali kopesa biso likanisi ya polele na ntina na lolenge oyo Yehova ye moko azali.​—Yoane 14:9, 10.

20 Na yango, wana ezali biso koyekola Liloba ya Nzambe, tokoki kososola lolenge ya kokanisa ya Yehova likoló na makambo mingi mpe kozwa bikateli ya bokatikati. Yango ekosɛnga milende. Tosengeli kokóma bayekoli ya molende ya Liloba ya Nzambe, kosaláká ete topusama mpo na bomoto mpe mitindá ya Yehova. Na elobeli ya elilingi, tozali koyekola grammaire ya sika. Nzokande, baoyo bakosala bongo bakolanda toli ya Paulo na “kopesa nzoto na [bango] lokola mbeka ya bomoi, ya bulɛɛ, oyo ekoki kondimama na Nzambe, yango mosala ya bulɛɛ na nguya na [bango] ya bososoli.”​—Baloma 12:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yango esengeli kolongola kominanola oyo ezali na makambo ya bademó, ya komonisa bolumbu ya mibali mpe basi, to ya motema mabe, mpe kominanola oyo ebéngami kominanola ya libota, oyo ezali kolendisa makanisi ya mbindo oyo baklisto bakoki kondima soko moke te.

b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Oyekoli nini?

◻ Mbongwana nini etaleli mosala ya Nzambe ekɔtaki na mobu 33 T.B.?

◻ Lolenge nini tokoki kokólisa nguya na biso ya bososoli?

◻ Lolenge nini bankulutu bakoki kosunga basangani ya etongá ete bazala baombo ya Klisto?

◻ Mpo na nini tosengeli kolóna “elimo ya Klisto”?

[Elilingi na lokasa 23]

Bankulutu bazali kosunga basusu ete basalela nguya na bango ya bososoli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto