Ngomba oyo “Eninganaka”
NA WƐ́STI ya Irlande, Croagh Patrick oyo ezali ngomba bobele moko oyo lolenge na yango ekokani na ngóngo, ezali molai koleka bangomba nyonso ya pembenipembeni na yango. Mbula na mbula, na mokolo ya Lomingo ya nsuka ya sanza ya Yulí, nsɔngɛ́ na yango emonanaka lokola ete eninganaka na ntango bato pene na 30 000, bilenge mpe mikolo, bamataka na nsɔngɛ́ (bamɛtɛlɛ 765) mpo na kosala mobembo mosantu oyo esalemaka mbula na mbula.
Na mokolo yango, basáli mobembo bamataka mpe bakitaka na nzela moko moke, ya mabangamabanga, mpe etondi na makámá. Bomati ya nsuka (pene na bamɛtɛlɛ 300) ezalaka mpenza molai mingi mpe ezali na mabangá mingi oyo epikami malamu te, yango nde esalaka ete komata ezala likámá mpe likambo ya kolɛmbisa mpenza.
Bamoko bamataka kozanga sapato na makolo, mpe bato moke basukisaka biteni mosusu na mabolongo na bango. Na ntango ya kala, mobembo mosantu yango ezalaki kobanda na katikati ya molili ya butu.
Mpo na nini komata na ngomba Croagh Patrick ezali likambo ya ntina monene mpo na bato mingi?
Etyamaki uta kala lokola esika ya mobembo mosantu
Na ebandeli ya ekeke ya mitano T.B., Lingomba ya Katolike ya Loma etindaki Patrick lokola episkɔ́pɔ mpe misionere na Irlande. Mokano na ye ya liboso ezalaki ya kobongola bato ya mboka Irlande ete bákóma baklisto, mpe na boumeli ya mibu na ye ya kosakola mpe kosala kati na bato, mingi balobaki ete Patrick nde atyaki moboko ya Lingomba ya Katolike na mboka wana.
Mosala na ye ememaki ye ete afanda na bisika mingi kati na mboka yango. Moko na bisika yango epai ye afandaki ezalaki bongo na wɛ́sti ya Irlande epai kuna, engebene mikanda misusu, alekisaki mikolo mpe butu 40 na nsɔngɛ́ ya ngomba moko oyo ekómaki kobéngama na nkombo na ye—Croagh Patrick (elimboli “Ngomba ya Patrick”). Kuna akilaki bilei mpe abondelaki mpo ete mosala na ye ekoka kolónga.
Na nsima ya bambula, bato babimisaki masapo mingi na ntina na makambo minene oyo ye asalaki. Moko na yango oyo eyebanaki mingi ezali oyo ete na ntango azalaki na ngomba wana, Patrick abenganaki banyoka nyonso longwa na Irlande.
Bindimeli na bango ya kalakala elobi ete atongaki ndako-nzambe moko ya moke na nsɔngɛ́ ya ngomba. Atako ndako yango ezali lisusu te uta bambula mingi, kasi moboko na yango ya ebandeli ezali kino lelo oyo, mpe esika yango mpe ngomba yango ekómaki esika ya mobembo mosantu uta bambula mingi.
Makambo matali mobembo mosantu
Mpo na moto oyo akómi mobangé to ameseni komata bangomba te, bobele kosala mobembo ya mpasi ya bakilomɛtɛlɛ mitano komata likoló na ngomba mpe kokita kozanga likámá ezali likambo monene.
Na bisika oyo ezali mabe koleka kati na nzela, bituluku ya bato oyo bapesaka lisungi nokinoki bazalaka pene mpo na kosalisa bato oyo bazalaki kozoka bampota ya ndenge na ndenge.
Ezali na bisika misato ya botɛlɛmi na nzela epai kuna basáli mobembo mosantu basalaka milulu mpo na kotubela masumu na bango. Nyonso wana elimbolami polele likoló na etando ya kopesa mayebisi na ebandeli ya ngomba.—Talá etánda.
Mpo na nini bamataka ngomba yango?
Mpo na nini bato mingi basalaka mobembo mosantu wana ya mpasi? Mpo na nini basusu balekisaka ndelo motindo oyo na ntango bamataka na ngomba wana?
Basusu bakanisaka ete na kobondeláká na boumeli ya mobembo mosantu, malombo mpo na matomba na bango moko nde eyokanaka mingi. Basusu basalaka yango mpo na koluka bolimbisi ya mabunga na bango. Mpo na basusu, yango ezali lolenge ya kozongisa matɔ́ndi. Ya solo, basusu bakendeke bobele mpo na kosepela. Moto moko ya mayele alobaki ete ezalaki bongo ‘elembo oyo ezali komonisa elimo ya boyokani mpe ya bolingo kati na etuluku.’ Alobaki lisusu ete komata na Croagh Patrick “ezalaki lolenge na bango ya kolanda ndakisa ya St. Patrick mpe komonisa botɔ́ndi oyo bazali na yango mpo ete bakómaki na kondima na nzela ya mosala na ye.” Abakisaki ete, eloko eleki ntina, komata ngomba ezali “moko na lolenge ya kosala ntúbélá mpamba te makasi ya nzoto oyo ebimaka mpo na yango ezalaka mpenza molulu ya solosolo ya komonisa mawa mpo na masumu. Komata ngomba malembemalembe kino kokóma na nsɔngɛ́ ezalaka lolenge ya kolela mpo na masumu.”
Mobali moko alobaki na lolendo nyonso ete asilá komata na ngomba wana mbala 25! Alobaki ete asalaki yango “mpo na kofuta masumu mwa moke.” Moto mosusu alobaki ete: “Lifuti lizangi mpasi ezalaka te.”
Atako ezali na ntina mingi te, bato mingi bamataka ngomba yango kozanga sapato na makolo. Mpo na nini basalaka bongo? Ya liboso, batalelaka mabelé yango lokola ete ezali “bulɛɛ” mpe yango wana balongolaka basapato na bango. Ya mibale, yango eyokani na mokano na bango ya ‘kofuta masumu mwa moke.’ Yango emonisi mpe ntina oyo mpo na yango basusu nkutu basalaka milulu ya komonisa mawa na mabolongo na bango.
Bapusami na kozongisa matɔ́ndi epai na Mozalisi
Kasi ezalaka boni soki moto moko azali na makanisi motindo moko te na basáli mobembo oyo bamataka na ngomba na mokolo moko ya sikisiki? Soki eleko ezali malamu mpe moto alati basapato ya makasi, akoki komata na ngomba na ntango nyonso oyo ye alingi. Tomataki ngomba yango te na mokolo oyo ebele ya basáli mobembo mosantu bazalaki komata. Na boumeli ya bantango oyo tozalaki kotɛlɛma mbala na mbala mpo na kopema, tozalaki kokanisa na mozindo likoló na bomati ngomba yango moko mpe bopusi oyo ezalaki na yango likoló na bato mingi. Kokanisáká na ntina na bankótó ya basáli mibembo oyo bazali kosala makasi mpo na komata ngomba mpe kosala milulu ndenge na ndenge mpo na komonisa mawa na masumu na bango, topusamaki na komituna ete, ‘Ezali yango nde Nzambe azali kosɛnga? Molulu wana ya komata ngomba to ya kotambola zingazinga ya bikeko na kozongelazongela maloba ya mabondeli ezali mpenza kobɛlɛmisa moto pene na Nzambe?’ Ezali boni mpo na toli ya Yesu oyo ezwami na Matai 6:6, 7 na ntina etali kozongelazongela mabondeli?
Ya solo, tomataki na ngomba wana te mpo na makambo ya losambo. Kasi, tomiyokaki ete tozalaki pene na Mozalisi na biso, mpamba te tokokaki komona malamu bozalisi na ye, bipai binso bangomba ezalaka kati na biloko ya kokamwisa oyo bizali na mabelé. Uta na nsɔngɛ́ na yango, tokokaki komona malamu bazamba kitoko ya esika yango, mpe komona esika oyo mabelé ekutani na Mai monene ya Atlantique. Bisanga mikemike bizali kongenga kati na esika mai matɛlɛmi niɛ na oyo tozalaki komona na nsé na ngambo mosusu bikesenaki makasi na etúká ya mabulumabulu mpe ya bangomba mingi ya mabelé makaoki, oyo ezalaki na ngámbo mosusu.
Tokanisaki na ntina na bisika misato ya botɛlɛmi. Maloba mpenza ya Yesu mayelaki biso na makanisi, wana ayebisaki bayekoli na ye ya solo ete: “Ejali bino kobɔndɛla, bolobaloba lokola ekosalaka bapakano tɛ, jambi bajali kokanisa ete Njambe akoyoka bango mpɔ na kolobaloba na bango.”—Matai 6:7.
Tomonaki ete ngomba wana ekómi eteni ya bindimeli ya bonkɔ́kɔ oyo ekangisi ebele ya bato kati na milulu makasimakasi. Totalelaki lolenge yango ekesenaki na bonsomi oyo ntoma Yoane alobelaki wana ayebisaki ete: “Tokokisa malako na ye. Malako na ye mpe majali na bojito tɛ.”—1 Yoane 5:3.
Tosepelaki na botamboli oyo tosalaki, mpe na lolenge tomataki na Croagh Patrick. Epusaki biso na kozela na esengo nyonso ntango oyo bato banso bakosikolama na bindimeli oyo ezwi moboko na yango likoló na Biblia te mpe ntango oyo bango banso bakosambela Mozalisi ya mabelé oyo atondi na bolingo “[na elimo, NW] mpe na sɔlo.”—Yoane 4:24.
[Etanda na lokasa 27]
Makambo ya ntina ya mobembo mosantu
Mosáli mobembo nyonso oyo azali komata na ngomba na Mokolo ya St. Patrick to na boumeli ya mikolo mwambe ya bolengeli elambo, to ata na mokolo nini na boumeli ya sanza ya Yúni, Yulí, Augústo mpe Sɛtɛ́mbɛ, mpe KOSAMBELA NA KATI TO PENE YA NDAKO NZAMBE mpo na Pápa akoki kozwa bolimbisi ya masumu soki akei kosala Ntúbélá mpe kolia Ukaristia Esantu na Nsɔngɛ́ ya ngomba to na kati ya pɔ́sɔ.
BISIKA YA BOTƐLƐMI
“Bisika ya botɛlɛmi” ezali misato (1) Nsé ya ngomba to Leacht Benain, (2) Na nsɔngɛ́, (3) Roilig Muire, mwa ntáká ekaboli yango na engumba Lecanvey, na ngámbo mosusu ya ngomba ezali.
Esika ya liboso - LEACHT BENAIN
Mosáli mobembo akotambola mbala 7 zingazinga ya eboke ya mabangá, kozongeláká mbala 7 losambo ya Tata wa biso, mpe oyo ya Maria losako mpe Esakólá moko
Esika ya mibale - NSƆNGƐ́
(a) Mosáli mobembo akofukama mpe akozongela Tata wa biso mbala 7, Maria losako mbala 7 mpe Esakólá moko
(b) Mosáli mobembo akosambela mpo na Pápa pembeni ya Ndakonzambe
(c) Mosáli mobembo akotambola mbala 15 pembeni ya Ndakonzambe, kozongeláká Tata wa biso mbala 15, Maria losako mbala 15 mpe Esakólá moko
(d) Mosáli mobembo akotambola mbala 7 zingazinga ya Leaba Phadraig [Mbeto ya Patrick] kozongeláká Tata wa biso mbala 7, Maria losako mbala 7 mpe Esakólá moko
Esika ya misato - ROILIG MUIRE
Mosáli mobembo akotambola mbala 7 zingazinga ya eboke moko ya mabangá, kozongeláká Tata wa biso mbala 7, Maria losako mbala 7 mpe Esakólá moko na liboke moko na moko ya mabanga [ezali na maboke misato] mpe na nsuka akotambola zingazinga ya lopango mobimba ya Roilig Muire mbala nsambo na kosambeláká.