“Natekisaki mungwa” na Mozambique
FRANCISCO COANA, mosangani ya komité oyo ekotambwisaka mosala ya kosakola na Mozambique, alekisaki mibu zomi kati na “káa ya bakangami.” Ayebisi likambo oyo akutanaki na yango: “Nayebaki ete tosengelaki kozala awa mpo na mwa ntango, na yango natunaki mokɛngɛli ya zongazonga soki nakokaki kokóba mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi lolenge nini nalingaki kokoka kopesa ngonga oyo ekoki mpo na mosala ya kosakola, mpamba te pene na bato banso kati na káa ya bakangami bazalaki Batatoli ya Yehova? Nalobaki ete nasengelaki kokende na Milange, engumba oyo ezwami na bakilomɛtɛlɛ 47 mpo na koluka bato oyo nakokaki kosakwela bango.
“Atako engebene mobeko tosengelaki kobima na libándá ya káa te, kasi ezalaki kotalelama mpenzampenza te. Nazali komikundola ete nazalaki kokende na zámba, kofukama mpe kosambela mpo na kozwa nzela ya koteya epai na bato ya mboka. Yehova ayanolaki ngai nokinoki.
“Nakendeki kokutana na moto moko oyo azalaki na velo, mpe nasalaki boyokani elongo na ye. Andimaki ete nasalela ye bilanga na etando ya 3/4 ya hectare liboso ete eleko ya mbula ebanda, lifuti na ngai esengelaki kozala bongo velo wana. Na yango, nazalaki kolekisa ntɔ́ngɔ́ nyonso na kosaláká bilanga. Yehova apambolaki ebongiseli yango, mpamba te na nsuka nazwaki velo yango.
“Litomba oyo emonanaki ezalaki oyo ete nakokaki kokóma na engumba monene ya Milange mpe nakóbaki malamu kosala mosala na ngai ya mobongisi-nzela kati na teritware wana ya kobota mbuma mingi. Lokola mosala na biso ezalaki na nsé ya bipekiseli, nasengelaki kobongisa mwango mpo na komema bato kati na solo. Nazalaki kotya babúku mpe bazulunalo kati na simisi na ngai, nazalaki komema ndambo ya mungwa kati na saki mpe namikɔtisaki na mombongo ya kotekisa mungwa. Na esika ete nátekisa yango na motuya ya meticais 5, natyaki yango na meticais 15. (Soki natyaki yango ntalo moke, mbɛlɛ balingaki kosomba yango nyonso mpe nalingaki kozala lisusu na mungwa ya kotekisa te mpo na mosala ya kosakola!) Masoló na ngai ezalaki kosalema na motindo oyo:
“‘Mbote! Lelo nazali kotekisa mungwa.’
“‘Ezali na ntalo boni?’
“‘Meticais zomi na mitano.’
“‘Te, te. Ezali ntalo makasi!’
“‘Ee, nandimi ete ezali ntalo makasi. Kasi soki okanisi ete ezali ntalo makasi sikawa, kasi zela moke mpamba te ekozala lisusu ntalo mingi koleka na mikolo mizali koya. Oyebi ete yango esakolamaki kati na Biblia?’
“‘Naino natángá yango kati na Biblia te.’
“‘Ee, ezali na kati. Kamatá Biblia na yo, tika nálakisa yo.’
“Na bongo, lisoló ezalaki kolanda na kosaleláká Biblia na ye, wana oyo ya ngai ezalaki bobele ya kobombama kati na simisi na ngai. Nazalaki kolobela Emoniseli mokapo 6, mpo na oyo etali ezalela ya makambo ya mpasi mpe kozanga ya bilei. Soki namoni ete moto asepeli, nazalaki kobimisa búku Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko to Nsango malamu na esengo mpo na yo mpe nazalaki kobanda boyekoli mpenza ya Biblia.
“Litomba oyo emonanaki ezalaki oyo ete nakokaki kofungola etuluku ya bato 15 oyo basepelaki na Milange. Kasi eumelaki te, bakonzi ya Leta bayebaki mosala na biso. Mokolo moko, wana nazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia, bapolisi bakɔtaki na pwasa kati na ndako mpe bakangaki biso. Bakangaki biso banso, ata bana mike ya libota wana, bamemaki biso na bolɔ́kɔ. Nsima ya kolekisa sanza moko kuna, bazongisaki biso banso kati na káa ya bakangami.”
Makambo wana makitisaki molende ya bandeko na biso te. Nzokande, Francisco mpe libota na ye, elongo na ebele ya bandeko na bango oyo bazalaki kati na káa ya bakangami, bazali sikawa kosambela mpe koteya na bonsomi nyonso kati na Mozambique.