Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/3 nk. 3-4
  • Lolenge nini okoki kobongisa lisusu mabondeli na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini okoki kobongisa lisusu mabondeli na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Yekoláká Biblia mpo na kobongisa mabondeli na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/3 nk. 3-4

Lolenge nini okoki kobongisa lisusu mabondeli na yo?

LIBONDELI ekeseni mpenza na bibongiseli mosusu oyo bizali elembo ya bolingo ya Yehova Nzambe. Batɛmɛli bakoki kobɔtɔla Biblia na yo to kopekisa yo ete oyangana te elongo na bandimi mosusu, kasi moto moko te akoki kopekisa yo libondeli. Tozali mpenza kolekisa ndelo te wana tozali koloba ete libondeli lizali na motuya monene. Ezali mpenza likambo ya ntina monene ete moko na moko kati na biso alinga mpe azwa litomba na libaku malamu wana. Nini ekoki kosalisa yo na kobongisa lisusu mabondeli na yo?

Biblia ezali búku ya mabondeli te. Atako bongo, tokoki kolobela yango lokola búku eleki monene oyo bato bazali na yango mpo na koyekola makambo na ntina na libondeli. Makomami ya Liebele yango moko ezali na mabondeli koleka 150. Bamoko kati na mabondeli yango ezali mokuse; mosusu ezali milai. Masalemaki liboso na bato mingi to na nkuku, masalemaki na bakonzi to na bakangami, kati na bolóngi monene to kati na mpasi makasi. Lokola Davidi ayembaki na Njembo 65:2, “bato yɔnsɔ” bakoya epai na Yehova, “Ye oyo akoyokaka mabɔndɛli.” Mpo na nini Nzambe apemisaki bakomi ya Biblia ete bákoma ebele wana ya mabondeli?

Mpo na koyanola na motuna oyo, tótalela 2 Timoté 3:16 (NW). Elobi ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Na yango, mabondeli oyo mazwami na Biblia mazali wana mpo na kokamba biso, motindo moko lokola bisakweli, mitindá mpe lisoló ya makambo oyo mazwami na Makomami ezali kotambwisa biso. Lolenge nini tokoki kozwa matomba na yango?

Na kotaleláká malamumalamu mabondeli oyo mazali kati na Makomami, tokoki kososola mabondeli oyo mapesamaki kati na ezalela ya makambo ekokani na oyo tozali kati na yango. Tokoki koyekola lolenge mabondeli makeseni engebene mokano na yango mpe makambo oyo mazalaki kati na yango. Lisusu, tokokuta maloba ya sika mpo na kopesa masanzoli mpe matɔ́ndi mpe tokoki kozwa maloba ya sikisiki mpo na malɔmbɔ mpe masɛngi na biso. Na mokuse, mabondeli oyo mazwami kati na Biblia makoki kosunga biso mpo na kobongisa lisusu mabondeli na biso moko.

Emonani ete Malia, oyo akómaki mama ya Yesu, azwaki mpenza matomba na maloba oyo mazwami kati na libondeli moko oyo ekomamaki kati na Biblia. Akendaki kotala ndeko na ye Elisabɛta nsima wana bango nyonso mibale basilaki moto na moto kozwa zemi ya mwana mobali na lisungi ya Nzambe. Malia asalaki libondeli mpo na kosanzola mpe kotɔ́nda Nzambe, mpe maloba mosusu oyo asalelaki makokani mingi na oyo mazali kati na libondeli moko oyo lizali kati na Makomami ya Liebele. Emonani lokola ete Malia ayebaki malamu libondeli oyo Hana, mama ya mosakoli Samwele asalaki. Hana mpe azwaki zemi ya mwana mobali na lisalisi ya Nzambe, soko mibu 1000 na liboso. Ekoki kozala ete Malia amanyolaki libondeli wana mpamba te yango ezalaki komonisa maoki oyo ye moko azalaki na yango, boye te?​—1 Samwele 2:1-10; Luka 1:46-55.

Ezali boni mpo na yo? Okoki komikundola libondeli moko ya Biblia oyo epesamaki kati na ezalela ya makambo ekokani na oyo ozali kati na yango? Komona, kotánga mpe komanyola mabondeli motindo yango ekosalisa yo na kobongisa lisusu lolenge na yo ya kosolola elongo na Nzambe. Kati na lisoló lilandi, tosɛngi na yo ete ótalela mabondeli misato oyo mauti na Makomami Mosantu. Yango nyonso epesamaki kati na ezalela ya makambo makeseni oyo mbala mosusu ekokani na oyo ozali kati na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto