Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/3 lok. 32
  • “Lokola mikɔlɔ na njete”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Lokola mikɔlɔ na njete”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/3 lok. 32

“Lokola mikɔlɔ na njete”

ESILI koleka mibu nkóto misato, Mose akomaki ete: “Motuya na mbula na biso ejali ntuku nsambo, mpe sɔkɔ mpɔ na makasi ikokoma ntuku mwambe, njombo na yango ejali bobɛlɛ mpasi mpe bolɔji.”​—Njembo 90:10.

Atako bokóli esalemi makasi kati na makambo ya monganga, bolai ya bomoi ya moto ezali kino lelo lolenge moko na oyo ezalaki na mikolo na Mose. Nzokande, bato bakozala ntango nyonso bobele na bomoi wana ya mokuse te. Kati na mokanda ya Yisaya, oyo ezali kati na Biblia, Nzambe alobaki ete: “Lokola mikolo na njete, bongo ikojala mikolo na bato na ngai, mpe bapɔnami na ngai bakosepela kino ntango molai mpɔ na misala na mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:22.

Moko na banzeté oyo ezali na bomoi molai kati na mikili oyo milobelami na Biblia ezali bongo nzeté ya olive. Nzeté oyo etyami awa na fɔtɔ́ ezali kati na banzeté ya olive oyo eumeli bankótó ya bambula mpe, ezali kino lelo kokóla malamu na Galilai. Ntango nini bato bakozala na bomoi molai mpenza? Esakweli yango elobi lisusu ete ekozala bongo na ntango Nzambe akosala “makoló ya sika mpe mabelé ya sika.”​—Yisaya 65:17, NW.

Mokanda ya Emoniseli esakoli mpe kosalema ya “[likoló ya sika mpe mabelé ya sika, NW].​—boyangeli ya sika na likoló mpe lisangá ya sika ya bato na ntango Nzambe “akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ.”​—Emɔnisɛli 21:1, 4.

Elaka wana ya Nzambe ekokokisama mosika te. Na bongo, mikolo na nzeté ya olive ekomonana lokola bobele mokolo ya bangonga 24. Mpe tokozala na ntango mingi ya kosepela mpenza na misala ya mabɔkɔ na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto