Mokakatano ya bato ya Teoloji
“LIKANISI ya kokufa ya molimo mpe kondima kati na lisekwa ya bakufi . . . ezali makanisi mibale ekeseni mpenza, oyo liponi esengeli kosalema kati na yango.” Maloba oyo ya Philippe Menoud emonisi na bokuse mokakatano oyo bato ya teoloji ya Protestá mpe ya Katolike bazali na yango na ntina etali ezalela ya bakufi. Biblia ezali koloba na ntina na elikya ya lisekwa “na mokɔlɔ na nsuka.” (Yoane 6:39, 40, 44, 54) Gisbert Greshake, ye moto ya teoloji, alobi ete, kasi elikya ya bandimi mingi “ezali likoló na kozanga kokufa ya molimo, oyo ekomikabolaka na nzoto na ntango ya liwa mpe ekozongaka epai na Nzambe, nzokande elikya ya lisekwa esili kobunga mpenza, kasi na mobimba nyonso te.”
Na bongo, mokakatano moko makasi ezali kobima kati na likambo oyo, Bernard Sesboüé alobi ete: “Ezalela ya bakufi ezalaka nini na boumeli ya ‘ntáká’ oyo ekaboli kokufa ya nzoto na bango mpe lisekwa ya nsuka?” Emonani lokola ete motuna wana ezalaki moboko ya masoló mingi ya ntembe ya teoloji na mwa bambula oyo euti koleka. Nini ebimisaki yango? Lisusu, elikya ya solo ya bakufi ezali nini?
Ebandeli mpe bokóli ya mokakatano monene
Baklisto ya liboso bazalaki na bososoli malamu na ntina na likambo wana. Na lisalisi ya Makomami, bayebaki ete bakufi bayebi eloko moko te, mpamba te Makomami ya Liebele malobi ete: “Mpɔ ete bato na bomɔi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo tɛ; . . . Ejali na mosala tɛ, to mwango tɛ, to mayɛlɛ tɛ, to boyebi tɛ kati na esika na bakufi, esika ekokɛnda yɔ.” (Mosakoli 9:5, 10) Baklisto wana bazalaki na elikya ete lisekwa esengelaki kosalema na ntango ya “kozala ya Nkolo.” (1 Batesaloniki 4:13-17, NW) Bazalaki komizela te ete bakozala na bomoi esika mosusu wana ekozala bango kozela ntango yango. Joseph Ratzinger, ye oyo azali sikawa moyangeli ya Congrégation de Vatican pour la doctrine de la foi, alobi ete: “Ezalaki na liteya moko te kati na Lingomba ya kala oyo ezali kondimisa likambo litali kozanga kokufa ya molimo.”
Nzokande, Nuovo dizionario di teologia epesi ndimbola oyo ete ntango tozali kotánga makomi ya balakisi ya Lingomba, na ndakisa ya Augustin to Ambroise, “tomoni likambo moko ya sika na kotalela mibeko ya Biblia—kobima ya mateya ya Bagreke oyo ebéngami eschatologie, oyo ezalaki mpe na bokeseni monene na oyo ya lingomba ya boklisto oyo ezwaki moboko na yango na lingomba ya Bayuda.” Mateya wana ya sika mazwaki moboko na yango likoló ya “kozanga kokufa ya molimo, kosambisama ya moto na moto mpe kozwa mbano to etumbu nokinoki nsima ya liwa.” Na yango, motuna moko motunamaki na ntina na “ezalela ya katikati”: Soki molimo etikalaka na bomoi nsima ya kokufa ya nzoto, ezalaka ndenge nini wana ezali kozela “mokolo na nsuka”? Wana ezali mokakatano monene oyo bato ya teoloji bazali kosala milende mpo na kosilisa yango.
Na ekeke ya motoba T.B., Pápa Grégoire 1er alobaki ete na nsima ya liwa milimo mikokende na bisika bisilá kobongisama mpo na yango. Pápa Jean XXII ya ekeke ya 14, andimisamaki ete bakufi bakozwa mbano na bango ya nsuka na Mokolo ya Kosambisa. Nzokande, Pápa Benoît XII, abwakaki maloba ya oyo azalaki liboso na ye. Kati na mokanda Benedictus Deus (1336), akomaki ete “milimo ya bawei ekómaka na ezalela ya esengo [na likoló], ya kopɛtolama [na epongelo], to kozwa etumbu [na lifelo] nokinoki nsima na liwa, mpo na kozonga lisusu bobele na bomoko elongo na nzoto na bango oyo esekwisami na nsuka ya mokili.”
Atako bongolabongola mpe ntembe ezali, yango ezalaki etɛlɛmɛlo ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba na boumeli ya bikeke mingi, atako mangomba ya Protestá mpe ya Ortodoxe bandimaka liteya ya epongelo te. Nzokande, kobanda na nsuka ya ekeke oyo euti koleka, banganga-mayele mingi bamonisaki ete liteya ya kozanga kokufa ya molimo euti na Biblia te, mpe yango ebimisi likambo oyo ete, “bato ya teoloji ya mikolo na biso bazali mbala mingi kotalela moto lokola eloko ya mobimba oyo ezali kobeba yango nyonso na nsima ya liwa.” (The Encyclopedia of Religion) Na yango, balimboli ya Biblia bazali na mokakatano mpo na kolimbola kozala ya “ezalela ya katikati.” Biblia ezali kolobela yango, to ezali nde kopesa elikya mosusu?
Paulo andimaki “ezalela ya katikati”?
Búku Katakisimo ya Lingomba ya Katolike elobi ete: “Mpo na kosekwa elongo na Klisto, tosengeli kokufa elongo na Klisto: ‘tosengeli kozala mosika na nzoto mpe kozwa efandelo pene na Nkolo’. [2 Bakolinti 5:8] Kati na ‘bokei’ wana, elingi koloba liwa, molimo ekabwani na nzoto. [Bafilipi 1:23] Ekozongisama lisusu na bomoko elongo na nzoto na ntango ya kosekwisama ya bakufi.” Kasi kati na mikapo oyo mitángami awa, ntoma Paulo alingaki koloba ete molimo ekóbaka kozala na bomoi soki moto akufi mpe ekozelaka “Kosambisa ya Nsuka” mpo na kozongisama lisusu elongo na nzoto?
Na 2 Bakolinti 5:1, Paulo alobeli liwa motindo wana mpe alobi na ntina na “ndako ya mabelé” ete “ebebisami.” Alingaki nde koloba ete nzoto ekabwani na molimo na yango oyo ekokufaka te? Ezali bongo te. Paulo azalaki na endimeli oyo ete moto azali molimo, kasi te ete azali na molimo. (Genese 2:7; 1 Bakolinti 15:45) Paulo azalaki moklisto mopakolami, lolenge moko na bandeko na ye ya ekeke ya liboso mpe, elikya na ye ‘ebombamaki na Likoló.’ (Bakolose 1:5; Baloma 8:14-18) Na yango, ‘Mposa na ye ya makasi’ ezalaki bongo ya kosekwisama na ntango ebongisami na Nzambe mpo na kokende na likoló, lokola ekelamu ya elimo oyo ekokufaka te. (2 Bakolinti 5:2-4) Kolobáká na ntina na elikya wana, akomaki ete: “Biso yɔnsɔ tokobongwa . . . wana ekoyula kɛlɛlɔ na nsuka. Jambi kɛlɛlɔ ekoloba mpe bakufi bakosekwa na kojanga kopɔla, mpe biso tokobongwa motindo mosusu.”—1 Bakɔlinti 15:51, 52.
Kati na 2 Bakɔlinti 5:8, Paulo alobi ete: “Nde tokoyikaka mpiko mpe tokotalelaka na esɛngo ete tobima na njoto mpe tofanda epai na Nkolo.” Basusu bakanisaka ete maloba wana mataleli ezalela ya katikati mpo na kozela. Bato yango balobelaka mpe elaka ya Yesu epai na bayekoli na ye ya sembo ete azalaki kokende mpo na kobongisa esika kati na yango asengelaki ‘koyamba bango epai na ye.’ Kasi bilikya motindo wana bilingaki kokokisama ntango nini? Klisto alobaki ete esengelaki kozala na ntango ‘akoya lisusu’ na kozala na ye na mikolo mizalaki liboso. (Yoane 14:1-3) Bobele bongo, kati na 2 Bakolinti 5:1-10, Paulo alobaki ete elikya ya baklisto nyonso bapakolami ezalaki bongo ya kosangola efandelo ya likoló. Yango esengelaki te kosalema na nzela ya oyo ebéngami ete kozanga kokufa ya molimo, kasi na nzela ya lisekwa na ntango ya kozala ya Klisto. (1 Bakolinti 15:23, 42-44) Nganga-mayele, Charles Masson alobi ete 2 Bakolinti 5:1-10 “ekoki kososolama malamu kozanga kosalela likanisi ya ‘ezalela ya katikati.’”
Kati na Bafilipi 1:21, 23, Paulo alobi ete: “Jambi mpɔ na ngai kobika ejali Klisto mpe kokufa ejali litomba. Nakamolami kati na yango mibale, awa ejali ngai na mposa ete nalongwa mpe najala na Klisto elɔngɔ mpɔ ete yango eleki malamu mingi.” Awa Paulo alingi nde kolobela “ezalela ya katikati”? Basusu bakanisaka ete ezali bongo. Nzokande, Paulo alobi ete apusamaki na maponi mibale—bomoi to kufa. Na kolobeláká libaku ya misato, abakisaki ete: “Ejali ngai na mposa ete nalongwa mpe najala na Klisto elɔngɔ.” ‘Kolongwa’ mpo na kozala elongo na Klisto nokinoki nsima ya liwa? Ya solo, lokola tosilaki komona yango, Paulo andimaki ete baklisto bapakolami ya sembo bakosekwisama na ntango ya kozala ya Klisto. Na yango, ekoki mpenza kozala ete azalaki kolobela makambo ya eleko wana.
Yango ekoki komonana kati na maloba na ye oyo ezwami na Bafilipi 3:20, 21 mpe 1 Batesaloniki 4:16. ‘Kolongwa’ wana na boumeli ya kozala ya Klisto Yesu ezalaki kopesa nzela na Paulo ete azwa mbano oyo Nzambe abongisaki mpo na ye. Likambo oyo ete yango ezalaki elikya na ye, emonani kati na maloba na ye epai na elenge Timoté ete: “Longwa na sasaipi motole na boyɛngɛbɛnɛ ebombami mpɔ na ngai oyo Nkolo, Mosambisi na sembo, akopɛsa ngai na mokɔlɔ yango, nde bobɛlɛ na ngai tɛ kasi na bango yɔnsɔ basili kolinga komɔnana na ye.”—2 Timɔtɛ 4:8.
Lisekwa—Solo kitoko ya Biblia
Baklisto ya liboso bayebaki ete lisekwa ezalaki likambo oyo esengelaki kobanda na ntango ya kozala ya Klisto, mpe bazwaki nguya mpe libɔndisi kati na solo kitoko oyo ya Biblia. (Matai 24:3; Yoane 5:28, 29; 11:24, 25; 1 Bakolinti 15:19, 20; 1 Batesaloniki 4:13) Bazelaki na bosembo nyonso esengo ya mikolo oyo mizalaki koya, baboyaki mateya ya lipɛngwi, oyo ya kozanga kokufa ya molimo.—Misala 20:28-30; 2 Timoté 4:3, 4; 2 Petelo 2:1-3.
Ya solo, lisekwa ezali te bobele mpo na baklisto oyo bazali na elikya ya kokende na likoló. (1 Petelo 1:3-5) Batata ya mabota mpe basaleli mosusu ya kala ya Nzambe bamonisaki kondima na makoki oyo Yehova azali na yango ya kozongisa bakufi na bomoi awa na mabelé. (Yobo 14:14, 15; Danyele 12:2; Luka 20:37, 38; Baebele 11:19, 35) Ata mpe bamilió ya bato oyo, na boumeli ya bikeke, bayebaki Nzambe te bazali na libaku ya kozonga na bomoi na mabelé oyo ekobongwana paladiso, mpamba te “lisekwa ekojala na bato sembo mpe na bato sembo tɛ.” (Misala 24:15; Luka 23:42, 43) Yango ezali elikya kitoko, boye te?
Na esika ya kondimisa biso ete bampasi mpe liwa ekozala ntango nyonso, Yehova amonisi biso ntango oyo “monguna ya nsuka, liwa,” akolongolama mpo na libela mpe bato ya sembo bakofanda seko kati na mabelé oyo ezongisami Paladiso. (1 Bakolinti 15:26, NW; Yoane 3:16; 2 Petelo 3:13) Oyo nde esengo monene tokozala na yango na komona balingami na biso kozonga na bomoi! Elikya wana ya solosolo ezali mpenza malamu koleka elikya ya makanisi mpamba na ntina na kozanga kokufa ya molimo—liteya oyo ezwi moboko na yango likoló na Biblia te, kasi likoló na filozofi ya Bagreke! Soki otye elikya na yo likoló na elaka ya solosolo ya Nzambe, yo mpe okoki kondimisama ete mosika te “kufa ekojala lisusu tɛ”!—Emɔnisɛli 21:3-5.
[Elilingi na lokasa 31]
Lisekwa ezali solo kitoko ya Biblia