Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/2 lok. 31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/2 lok. 31

Mituna ya Batángi

Bafilisitia oyo balobelami kati na Biblia bazalaki banani?

Biblia elobelaka mbala mingi bato oyo babéngami Bafilisitia, oyo bazalaki kofanda na Kanana ntango libota ya Nzambe ekamataki Mokili ya Ndaka. Na boumeli ya ntango mingi, Bafilisitia wana ya kala batɛmɛlaki libota ya Nzambe, lokola yango emonisamaki kati na lisoló ya etumba ya Davidi mpe elombe-mobundi ya Bafilisitia oyo abéngamaki Goliata.​—1 Samwele 17:1-3, 23-53.

Biblia emonisi ete Bafilisitia wana ya kala balongwaki na Kafatoli mpo na kokende kofanda na ngámbo ya súdi-wɛ́sti ya Kanana. (Yilimia 47:4) Kafatoli ezalaki epai wapi? Búku The International Standard Bible Encyclopedia (1979) elobi ete: “Atako elembeteli ezali te oyo ekoki kopesa nzela na kondimisa yango na bosikisiki nyonso, boyekoli oyo euti kosalema kala mingi te emonisi ete ezali esanga ya Kelete (to mbala mosusu Kelete elongo na bisanga ya mai monene Egée, oyo mimeseno na yango ezali ndenge moko) nde ekoki kozala mpenza esika oyo yango ezalaki.”​—Volimi 1, lokasa 610.

Na boyokani na ndimbola oyo, Biblia New World Translation of the Holy Scriptures (Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu) ezali kotángama boye na Amosa 9:7: “Yehova alobi ete: ‘Ɛ bana na Yisraele, bozali te epai na ngai lokola bana na Kusi? Nabimisaki Yisraele longwa na mokili ya Ezipito te, mpe Bafilisitia longwa na Kelete te, mpe Sulia longwa na Kili te?’”

Moto moko te ayebi ntango oyo bafandi wana ya kala ya mai monene balongwaki na Kelete mpo na kokende kofanda na eteni ya Kanana, oyo ekómaki kobéngama Filisitia mpe ezwami na súdi-wɛ́sti kati na Yopa mpe Gaza. Emonani ete bazalaki uta kala na etúká wana pembeni na bisobe oyo bizalaki na bisika ya nsé na mikolo ya Abalayama mpe Yisaka.​—Genese 20:1, 2; 21:32-34; 26:1-18.

Na boumeli ya ntango molai nsima wana Bayisraele bakɔtaki na mokili oyo Nzambe alakaki bango, Bafilisitia balandaki kozala na bopusi makasi na etúká wana. (Exode 13:17; Yosua 13:2; Basambisi 1:18, 19; 3:3, 4; 15:9, 10; 1 Samwele 4:1-11; 7:7-14; 13:19-23; 1 Mikonzi 16:15) Na boumeli ya boyangeli ya Uziya, mokonzi ya Yuda, Bafilisitia bafandaki na bingumba na bango Gata, Yabɛnɛ mpe Asedode. (2 Ntango 26:6) Bingumba na bango mosusu ya minene kati na lisoló ya Biblia ezalaki bongo Ekelona, Asekelona mpe Gaza.

Alexandre le Grand akamataki Gaza, engumba ya Bafilisitia, kasi na nsima, emonani ete Bafilisitia batikaki kozala libota oyo likabwani. Molakisi Lawrence E. Stager akomaki kati na Búku Biblical Archaeology Review (Máí/Yúni 1991): “Bafilisitia mpe bakendaki na boombo na Babilone. . . . Nzokande, bilembeteli bizali te oyo bimonisi makambo oyo makómelaki Bafilisitia oyo bazalaki na boombo. Ekoki kozala ete baoyo batikalaki na Akelona nsima wana Nebukadenesala akamataki yango, babungisaki mbala mosusu bilembeteli oyo bikokaki kosalisa bango na koyeba bikólo na bango. Ezali na lisoló mosusu te oyo elobeli Bafilisitia kati na lisoló ya makambo ya kala.”

Nkombo oyo eyebani na mikolo na biso ete Palestine euti na maloba ya Latin mpe Greke, oyo ezali kotinda mingi na kokanisa liloba ya Liebele oyo ebongolami na “Filisitia.” Mabongoli mosusu ya Biblia kati na lokótá Arabe ezali kosalela liloba moko mpo na “Bafilisitia” oyo etindaka kozanga nkaká na kokanisa na ba Palestiniens oyo bayebani malamu na mikolo na biso. Nzokande, búku Today’s Arabic Version ezali kosalela liloba mosusu ya lokótá Arabe, mpo na kokesenisa Bafilisitia ya kala mpe ba Palestiniens oyo bazali na mikolo na biso.

[Elilingi na lokasa 31]

Bitika mosusu na Akelona

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto