Likoki ya koyeba kosala makambo—Likabo malamu liuti na Nzambe
YEHOVA asepelaka na biloko oyo azalisaki. (Nzembo 104:31) Bozindo ya bosepeli azalaka na yango na biloko oyo ye azalisaki emonisami na Genese 1:31: “Njambe atalaki bilɔkɔ bisilaki ye kojalisa, mpe ijalaki malamu mingi.”
Yehova abatelaki esengo wana bobele mpo na ye moko te. Apesaki Yesu libaku kitoko ya kozala mosáli to esaleli, oyo na nzela na ye biloko mosusu bizalisamaki. (Yoane 1:3; Bakolose 1:16, 17) Lokola “kapita-mosáli,” Yesu azalaki mpe “kosepela liboso na [Yehova] ntango nyonso.”—Masese 8:30, 31, NW.
Kasi likoki ya koyeba kosala makambo esuki te bobele na likoló. Eugene Raudsepp, kati na búku na ye, How Creative Are You? akomaki ete: “Ezali likoki lityami kati na bato.” Yango ezali kokokana ya mpamba te, mpo ete moto asalemaki na elilingi ya Nzambe. (Genese 1:26) Na bongo Yehova atyaki makoki ya koyeba kosala makambo kati na bato.—Yakobo 1:17.
Na yango, likambo ya kokamwa ezali te, Biblia ezali koloba na lolenge malamu na ntina na nzembo, mabina, kotonga, kolamba, misala ya mabɔkɔ, mpe makambo mosusu. (Exode 35:25, 26; 1 Samwele 8:13; 18:6, 7; 2 Ntango 2:13, 14) Besalele, mosáli na misala ya mabɔkɔ, asalelaki makoki na ye mpo “na kokanisa misala kitɔkɔ” mpo na kosunga misala ya botongi mongombo. (Exode 31:3, 4) Ekoki kozala ete Yabala, mobateli na mpate, azalaki moto ya liboso na kosala hema, bifandelo bibongi mpo na bomoi ya kotambolatambola mpe biuti na likoki ya koyeba kosala makambo. (Genese 4:20) Davidi azalaki te bobele moyembi mpe alangá-nzembo, kasi azalaki lisusu mosáli ya bibɛtɛli ya sika ya miziki. (2 Ntango 7:6; Nzembo 7:17;
Amosa 6:5) Ekoki kozala ete
Milyami abimisaki mabina ya esengo oyo ekumisaki kobikisama ya Bayisraele na lolenge ya ekamwiseli kati na Mai Motane.—Exode 15:20.
Likoki ya koyeba kosala makambo ezalaka mbala mingi na litomba mpo na bokólisi losambo ya solo. Yesu, na makoki ya koyeba kosala makambo, asalelaki masese mpe biloko mpo na koteya nsango na ye. Bobele bongo mpe bayekoli na ye balendisami na “kosala mosala makasi mpo na oyo etali koloba mpe koteya.” (1 Timoté 5:17, NW) Ee, mosala na bango ya kosakola esalemaka na mitindo mikeseni. Ezali mosala oyo ezali kosɛnga kozala na makoki ya koyeba bametode ndenge na ndenge mpo na koteya. (Bakolose 4:6) Yango ezali na ntina mingi na ntango moto azali koteya bana na ye.—Deteronome 6:6, 7; Baefese 6:4.
Na yango, Yehova azali kokabola elongo na basusu esengo oyo bozalisi ezali kopesa ye. Oyo nde likabo malamu!