“Naino namoná likambo motindo oyo te!”
NA 1993 biro ya la Société Watch Tower na Argentine ebyangamaki ete etinda nkóto moko ya bamonisi na Santiago, na Chili, mpo na liyangani ya etúká “Mateya mauti na Nzambe” ya mikolo minei ya Batatoli ya Yehova. Oyo ezalaki mbala ya liboso mpo na Batatoli ya Argentine ete bábyangama mpo na kosala mobembo na etuluku mpo na kokende na liyangani na mboka mopaya.a Bazongisaki eyano nini? Koleka nkasa 8 500 ya lisɛngi etindamaki, kati na yango baponaki bato 1 039.
Babísi 14 etyamaki na nzela mpo na kosala mobembo wana ya bakilomɛtɛlɛ 1 400 uta na Buenos Aires kino na Santiago. Mobembo ya ngonga 26 ekómaki lisusu kitoko mingi mpo na biloko ya kosepelisa oyo tozalaki komona na nzela. Kokatisa bangomba ya Andes, bamonisi balekaki penepene ya Aconcagua, na bamɛtɛlɛ 6 960 nsɔ́ngɛ́ ya ngomba eleki molai na epai ya wɛ́sti. Likambo mpenza oyo bakoki kobosana yango te ezalaki oyo ete ezalaki bongo nzela ya bokiti oyo ezali na lolenge ya nyokanyoka kati na Chili. Babetelaki bakúmbi-mituka mabɔkɔ mingi mpenza mpo na makoki na bango ya kokumba malamu kati na bisika wana ya mpasi!
Nzokande, eloko oyo elekaki biloko nyonso na kitoko mpo na komona ezalaki nde liyangani yango moko mpenza. Kati na mokili oyo ekabwani na bitumba mpe bokabwani na ntina na mposo, ezalaki mpenza likambo ya kobɔndisa ya komona etuluku ya bato 80 000 bauti na mikili 24 kati na bayangani—bondeko ya mokili mobimba ya solosolo! Lokola bamonaki bango moko bomoko kati na bayangani, bamoko kati na bakúmbi-mituka bamonisaki mposa ya koluka koyeba makambo mingi na ntina na Batatoli ya Yehova. Moko na bango alobaki ete: “Naino namoná likambo motindo oyo te!”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bipekiseli na Argentine uta 1949 kino 1982 esalaki ete likambo motindo wana ekoka kosalema te.