Tosungaki bandeko na biso bandimi na Bosnie
BATATOLI YA YEHOVA basanganaka te na matáta ya politiki. (Yoane 17:16) Nzokande, kolanda toli ya Paulo mpo na kosala oyo ezali malamu “mingimingi epai na bandeko na biso bandimi,” kozanga kokakatana, bazali kopesa lisungi epai na baninga na bango baklisto kati na mikili mibebisami na bitumba. (Bagalatia 6:10, Beck) Wana eleko ya mpiɔ ya 1993-1994 ezalaki kobɛlɛma, Batatoli ya Autriche mpe ya Croatie batyaki bomoi na bango na likámá mpo na kosunga bandeko na bango ya bandimi na Bosnie. Oyo elandi ezali bongo nsango oyo bango bapesaki.
Kobanda na Mársi kino Ɔkɔtɔ́bɛ 1993, likoki lizalaki te mpo na komema biloko ya lisungi na Bosnie. Nzokande, na ebandeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ, bakonzi balobaki ete likoki ezalaki mpo na kokumba biloko. Atako bongo, ezalaki bobele nzela ya likámá, mpamba te bitumba makasi bizalaki na bisika nyonso oyo bitumba bizalaki kosalema na Bosnie.
Atako bongo, na mokolo mwamibale na Ɔkɔtɔ́bɛ 26, 1993, mituka na biso elongwaki na Vienne, ememaki batone 16 ya bilei mpe ya nkoni ya kopelisa mɔ́tɔ mpo na baninga na biso baklisto ya Bosnie. Tolataki bilembo ya bakalati na biso ya liyangani ya etúká mpo na komikesenisa.
Nsima na kokóma na molelo oyo ekaboli Croatie mpe Bosnie, bakambaki biso kino na káa moko ya basodá epai kuna batalaki malamumalamu mituka na biso. Lisɛngi na biso ya kosala mobembo na koleka na nzela ya Serbie eboyamaki. Bakokaki kopesa biso nzela ya koleka liboso bobele na ntéi ya Bosnie—na katikati mpenza ya esika bitumba bizalaki kongala!
Milende ya mpamba?
Wana mituka ya basodá mizalaki kokamba biso longwa na ekɛngɛlo moko kino na mosusu, tozalaki koyoka makɛlɛlɛ makasi ya kobeta ya makalo ya bitumba mpe mandóki. Na butu, tozalaki koleka na nzela ya zámba wana makalo mibale ya bitumba mpe jeep moko ezalaki kokamba biso. Mituka na biso mizalaki kotambola malɛmbɛ na bisika bitumba bizalaki mpenza makasi! Makambo manso matambolaki malamu kino na ntɔ́ngɔ́, wana masasi malekaki biso likoló na mitó mpe tomibombaki na nsé ya ngomba moko. Na nsima ya mwa ntango, masasi matikaki kobetama, mpe tokóbaki mobembo na biso.
Na ntango tokómaki na káa moko ya basoda, mokonzi-mokambi ya basodá atunaki biso soki tozalaki banani mpe soki tozalaki na mposa ya nini. Nsima wana toyebisaki ye mokano na biso, alobaki ete: “Likambo na bino ekolónga te. Bozali na likoki te ya kobima na káa oyo, ata mpe kotambola mwa bamɛtɛlɛ moke kozanga likámá. Nzala ezali makasi kati na mboka, bato bakolanda bino mpe bakoyiba biloko na bino.” Basɛngaki na biso ete tóbaluka mpe tózonga.
Milende na biso “elóngaki te”? Koluka koleka na nzela ya bisika bibebisami na bitumba mpe na nzala, mpe atako bongo, kobatela biloko na biso mpe bomoi na biso elingaki kozala mosala mpamba? Ekateli monene esengelaki kokamatama. Tosilaki koyoka liboso lokito ya mandóki mpe kobeta ya babɔ́mbi oyo makɛlɛlɛ na yango ekokangaka matoi. Wana ezalaki biso kolekisa butu elongo na basodá, tozalaki pene ya komona ete babongisamaki mpenza mpo na makambo makasi ya etumba. Balataki bakazaka ya komibatela na masasi mpe bazalaki na bibundeli mingi mpenza. Ata molámbi atyaki ebakata ya mondóki na mokɔngɔ na ye. Mpe awa, biso tolataki basimisi na biso, bakraváti, bakálati na biso! Mpo na biso, kokóba mobembo elingaki kozala likambo ya mayele?
Tokómi na engumba Travnik
Emonanaki lokola ete, elikya bobele moko na biso, ezalaki bongo ya koyokana elongo na etuluku ya misato kati na bituluku oyo bizali kati na bitumba oyo. Mokolo molandaki na ntongo, totunaki epai na elenge mwasi moko soki epai wapi tokokaki komona káa epai kuna biro monene ya etuluku yango ezalaki. Alobaki ete: “Ezali mosika te. Bobele katikati na zámba, bokomona ndako moko oyo ezalaki liboso lopitalo.” Tozalaki na mposa makasi ya kokende kuna. Basodá bakamwaki mpo ete tokanaki kobima na káa kozanga mandóki.
Lopitalo wana ya kala esilaki kobeba, mokonzi moko ya basodá azalaki kuna na kati. Andimaki kosunga biso, apesaki biso likanisi ete tósolola liboso na mokonzi-mokambi ya basodá. Akumbaki biso na motuka na ye ya kimbambala mpe atambwisaki na lombangu makasi pembeni ya bisika oyo bitumba bizalaki kosalema. Totɛlɛmaki na ndako moko epai kuna mokonzi-mokambi ya basodá ayambaki biso kati na eteni moko ya ndako ya molili.
Alobaki ete: “Lobi na butu tolingaki kobeta bino masasi. Bolingi nini.”
“Biso tozali Batatoli ya Yehova mpe tolingi komema biloko ya lisungi epai na bandeko na biso.”
Akamwaki mpenza—mpe likebi na ye libendamaki—mpamba te esili koleka bapɔ́sɔ mingi, ata motuka moko te ya komema biloko ya lisungi emekaki koleka na katikati ya Bosnie. Na nsima ya kotalela biso malamu, bakomelaki biso mokanda ya kopesa ndingisa. Mokolo oyo ezalaki liboso na butu, tokanisaki ete tozalaki na likoki te ya kokóba mobembo na biso; mpe sikawa, tokoki kokóba kozanga ete bákamba biso!
Tolekaki na mituka katikati na bazámba, kolekáká na esika moko nsima na mosusu mpo na kotalelama, mpe na bantango mosusu, tozalaki koleka pembeni ya bisika bitumba bizalaki kosalema. Atako ezalaki nzela ya likámá, tokómaki malamu na engumba Travnik. Sodá moko ayokaki na ntina na boyei na biso akimaki mbangu na ndako moko epai kuna bandeko na biso bazalaki koyangana. Angangaki ete: “Bato na bino bazali awa na mituka minene!” Okoki kokanisa esengo na bango. Tomemaki bilei kati na ndako, tosololaki mwa moke, kasi na nsima tolandaki nzela na biso. Molili ezalaki kokɔta, mpe mobembo mosusu ya mpasi, ya bakilomɛtɛlɛ 32, ezalaki liboso na biso.
Na nzela ya engumba Zenica
Motuka moko ekambaki biso na katikati na zámba na lombangu mingi. Basusu balobaki ete tokokaki kolónga soko moke te kokóma na Zenica, kasi tolóngaki. Emonanaki lokola ete mawa monene eutaki kokɔta na engumba yango. Miinda mizalaki te mpe mituka mizalaki te na nzela. Basodá bazingaki engumba na ngámbo nyonso; na yango nzala makasi mpe kozanga elikya ekɔtaki.
Wana ezalaki biso kotambola na motuka katikati na nzela, tomonaki likambo moko ya kokamwa—bandeko baklisto basi mibale bazalaki na mosala ya kosakola! Bayebisaki biso ete, na mokolo oyo ezalaki liboso, kati na likita, ekateli ezwamaki ete bandeko mibali basengelaki kokende na zámba mpo na koluka bilei, mpo ete biloko oyo bazalaki na yango etikalaki moke. Tokómaki na ngonga oyo ebongi mpenza! Na ngonga ya minei na ntɔ́ngɔ́, tokitisaki biloko na moko ya mituka, wana ata moto moko te azalaki na balabála.
Na mokolo molandaki, tokutanaki na mokonzi monene moko ya basodá, ye oyo akamwaki mpo ete tolóngaki kokóma na Zenica. Sikawa, tosɛngaki ete tókóba mobembo na esika mosusu oyo elandaki, ezalaki bongo Sarajevo.
Mokonzi monene yango ya basodá alobaki ete: “Esili koleka basanza mingi, moto moko te amekaki koleka kuna na motuka.” Na nsuka, apesaki biso nzela ya kosala mobembo mpo na kokatisa bangomba. Akebisaki biso ete: “Kasi nalobi na bino ete, ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Nandimi te ete mituka na bino mizali makasi mpo na kokóma malamu epai bozali kokende.”
Mokonzi monene yango ya basodá alobaki mpenza solo. Ntango tokómaki na bakilomɛtɛlɛ 40 na Sarajevo, tosengelaki koleka na nzela mosusu ya bakilomɛtɛlɛ 140 katikati na zámba! Tokobosana soko moke te mobembo oyo tosalaki katikati na Zenica mpe Jablanica kolekáká na nzela ya Sarajevo, oyo eumelaki mikolo misato mpe butu mibale, mingi mpenza na lombangu ya bakilomɛtɛlɛ bobele mitano na ngonga moko. “Nzela” yango ezalaki nzela moko oyo efungolamaki mpo na bolekileki ya mituka ya bitumba. Tozalaki kotambola likoló na banzela ya mabanga ya nsɔ́mɔ mpe ya mabulumabulu. Mbala mingi, ezalaki kosɛnga ete tótambola na motuka kozanga mwinda, mpe na mabaku mibale, mituka na biso milekaki na kobatama na nsé ya bangomba etondi na makámá. Motuka moko ya basodá ezalaki kolanda molɔngɔ́ ya mituka na biso epelisaki miinda na yango bobele mpo na mwa miniti moke mpe na mbala moko ebɛtamaki masasi. Na bantango mosusu, ezalaki kosɛnga na biso kobongisa gbagba ebebi to kobongisa bapiné.
Wana tokómaki pene ya Sarajevo, tosɛngaki ete tósolola na mokonzi monene ya basodá oyo azalaki koyangela wana. Wana ezalaki biso kozela, tomonaki motuka moko na balabála, ezalaki komema nzoto ya bawei zomi mpe saki moko ya mitó ya bato; basodá bazalaki kosɛnga bibembe yango—oyo nde makambo ya nsɔ́mɔ mpenza, yango epusaki biso na koyoka mposa makasi ya komona mokolo oyo etumba ekosila.—Yisaya 2:4.
Na nsuka, na ngonga ya zomi ya ntɔ́ngɔ́, moko na biso apesamelaki nzela ya kokutana na mokonzi monene ya basodá mpe bakonzi-balandi na ye kati na eteni moko ya ndako ya molili, engɛngisamaki bobele na mwa pole moke ya buzí.
Mokonzi monene ya basodá atunaki ete: “Bino bozali banani?”
“Tozali Batatoli ya Yehova. Tolingi komema bilei epai ya baninga na biso Batatoli oyo bazali na Sarajevo.”
“Boyebi ete Batatoli ya Yehova bazali mingi na Sarajevo?”
“Ee, ezali mpo na yango nde tozali awa.”
Mokonzi monene ya basodá atángaki nkombo ya Motatoli moko. “Boyebi ye?”
“Ee, azali moninga na biso.”
Mokonzi yango alobaki ete: “Azali mpe moninga na ngai lokola. Totángaki na ye eteyelo moko. Uta akómaki Motatoli ya Yehova, nasepelaka na ye nkutu mingi koleka. Asali mosala mingi mpo na bino. Bóyebisa biso naino na ntina na Batatoli ya Yehova.”
Lisoló ya ngonga moko elandanaki, na nsima ya lisoló yango tokabolaki bazulunalo mpe mwa-babúku koleka zomi. Nsima ya bokutani ya mibale, mokonzi ya basodá yango andimaki kokamata bibongiseli ya ntina mpo ete biloko ya lisungi bikoka kokabolama epai na bandeko ya Sarajevo.
Yango ezalaki likambo moke te. Bato pene na 30, kati na bango mpe baoyo bazalaki Batatoli te, bakumbaki mabóké oyo mokomoko na yango ezalaki na bakiló 27. Basalaki mosala makasi kobanda na ngonga ya mwambe ya butu kino ngonga ya mitano na ntɔ́ngɔ́, butu mibale ekeseni—na nyonso, basalaki bangonga 18. Nkulutu moko ayebisaki ete bato oyo bafandaka pembeni na bango bakamwaki mpenza mingi mpo na lisungi wana, kino bafukamaki elongo na bandeko mpe batondaki Yehova! Ee, bango mpe bazwaki mwa ndambo ya bilei.
Kanisá naino esengo ya bandeko na biso wana bazwaki bakiló 11 000 ya biloko ya lisungi! Elikya ezalaki lisusu te. Na esika yango kiló moko ya falíni ezalaki na motuya ya badolare kati na 300 mpe 660. Saki moko ya nkoni ezalaki kotekama na badolare 260 mpe eteni ya litɛlɛ moko ya mazúti na badolare 20.
Ezalaki lokola ete mpo na mokakatano nyonso oyo tokutanaki na yango na nzela, tozwaki sikawa mbano. Tosepelaki na komona esengo ya bandeko na biso na ntango bazwaki biloko wana ya lisungi. Ezalaki likambo moko oyo bango—mpe biso—tokobosana yango soko moke te. Kasi sikawa, tosengelaki kobanda kokanisa na ntina ya mikakatano monene na ntango ya bozongi na mboka na biso.
Nzela ya bozongi
Totunaki epai na mokonzi monene ya basodá ete: “Tokozongela na nzela nini?”
Azongisaki ete: “Bobele na nzela oyo boyelaki.”
Tolɛmbaki, mazúti mazalaki lisusu mingi te, kati na ebombelo ya bapiné mpe eloko moko ezalaki te. Mbula ebandaki kobeta, mpe tokokaki te kosala mobembo kati na pɔtɔpɔ́tɔ. Totunaki na mokonzi yango ya basodá soki tokoki kokende na nzela ya súdi.
Alobaki na biso ete: “Bitumba makasi bizali kuna. Ata mwa mpóko ekoki te koleka wana kozanga likámá.” Nzokande, nsima ya mwa ntango, akanisaki lisusu malamu. Alobaki ete: “Bómeka. Mpo ete, bosilaki kolónga liboso mpo na kokóma awa.”
Tosengelaki kotika motuka moko kuna mpe tokabolaki mazúti na yango na mituka misusu. Tolongwaki kuna na minuit mpe tokatisaki lisusu na nzela ya zámba.
Na mobembo na biso ya bozongi mikakatano mpe mizangaki te. Tomonaki motuka moko ya basodá elali na mopanzi na yango, ekangi katikati ya nzela ya gbagba oyo tosengelaki kokatisa. Tomonaki ete soki tokokaki kolongola bobele piné moko, nzela ekokaki kozala mpo ete tókoka koleka.
Tosɛngaki na sodá moko oyo azalaki na mondóki. “Tokoki kolongola piné mpe kozongisa yango nsima wana tokokatisa gbagba?”
Kolakisáká biso mondóki, sodá yango ayanolaki ete: “Soki, bosimbi piné wana nakobeta bino masasi.”
Tokanisaki ete ekokaki kozala malamu kosala mwa kafé mpe kokabela sodá wana kɔ́pɔ moko. Na boumeli ya mwa bangonga, toyebisaki ye na ntina na liyangani ya mikili mingi, na ndakisa, oyo esalemaki na engumba Zagreb na mobu 1991. Na nsima na yango, nkanda na ye ekitaki, mpe apesaki biso nzela ya kolongola piné wana.
Na engumba Jablanica, moko na biso asololaki na mokambi ya basodá na ntina na nzela oyo tolingaki kokende. Ezalaki na ye mpasi mpo na kondimela oyo tolingaki kosala. “Olingi kokende na nzela ya lobwaku ya mongálá Neretva?”
Azalaki na ye na elónga ya kobanga. Mampinga makeseni bakangaki bikitelo ya lobwaku ya Neretva. Bazali kobetana masasi kozanga kotika. Na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 16, nzela etondi na makámá. Mokonzi monene ya basodá alobaki ete: “Ezali nde lolenge wana, mpe atako bongo, bolingi bobele kokende?”
Nsima ya kotalela mabe mpe malamu, mokonzi monene ya basodá alobaki ete tokokaki kokende—kasi bobele soki bato oyo bapesameli nzela bakei kotika biso. Nzokande, bato yango bazalaki kokakatana mpo na kokende elongo na biso! Na nsuka, tosɛngaki ete bákoka bobele kosolola na limpinga ya ngámbo mosusu mpo na koyebisa bango ete biso tolingi koleka. Lobi na ntɔ́ngɔ́, tokokaki kokatisa kozanga ete báya kotika biso.
Tokomaki makambo na makomi minene na mituka na biso ete tozalaki kokumba biloko mpo na kosunga bato. Nsima ya kosala libondeli, tokatisaki lobwaku yango. Toyokanaki ete soki masasi mabetami, tokomatisa te lombangu ya mituka na biso, noki bakokanisela biso mabe.
Tokatisaki gbagba mpo na kokende na ngámbo mosusu ya mongálá mpe tokóbaki kino na lobwaku mosusu, kolekáká bibembe ya banyama, mpe mituka elongo na makalo ya bitumba oyo ebebisami. Na mbala moko, tomonaki ba mines batye na balabála, yango epekisaki biso ete tóleka. Tobetaki ngonga ya motuka, kino basodá mibale batalaki biso uta na nsima ya libanga moko. Batunaki ete: “Bino banani? Bolingi nini?”
Nsima ya komiyebisa, totunaki soki bakokaki kolongola biloko wana na balabála, mpe bandimaki. Na nsuka, tokómaki na ngámbo mosusu.
Kuna, basodá bakamwaki na komona biso. Bayaki malembemalembe longwa na bisika na bango ya kobatamela, babɛlɛmaki na mituka wana bazalaki kolakisa biso mandóki na bango. Tolakisaki bango mikanda ya motuka mpe mikanda ya bapaláki ya mituka, oyo tolongolaki mpo na komibatela wana ezalaki biso koleka na nzela bitumba bizalaki kosalema.
Sodá moko alobaki ete: “Moto moko te azalaki kozela bino? Lolenge nini bolekaki?”
Na bokeseni na lisɛngi na biso, na bisika oyo, moto moko te ayebaki ete tozalaki koya! Mokonzi yango akóbaki ete: “Mandóki na biso mabongisamaki, mpe tozalaki pene ya kobanda kobeta masasi.”
Totunaki soki mpo na nini babetaki te.
Sodá moko ayanolaki ete: “Nayebi te. Nandimi ete etángamaki bongo mpo na bino. Kasi na ntango totalaki na ba jumelles na biso, tomonaki makomi oyo ete ‘mpo na kosunga bato,’ mpe toyebaki te nini tokaki kosala mpo na bino.” Na nsima, tosalaki libondeli mozindo mpo na kotɔ́nda Yehova mpo na libateli na ye.
Atako bazali kati na mpasi, elimo ya bandeko na biso ya Bosnie, basi mpe mibali, ezali kopesa esengo. Bazali kokabela bato mosusu biloko ya mosuni mpe maloba ya kokólisa kondima mpe ya kolendisa. Na Zenica, ezali na Batatoli ya molende 40, kati na bango babongisi-nzela monene 2, babongisi-nzela basungi 11, mpe bato 14 bauti kozwa batisimo kala mingi te. Batatoli 65 mpe babongisi-nzela basungi 4 oyo batikali naino na Sarajevo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia 134. Batatoli bazali kolekisa mwayene ya bangonga 20 sanza na sanza mpo na kosolola na bato na ntina na nsango malamu na Bokonzi ya Nzambe.
Ya solo, Batatoli ya Yehova bazali libota moko ya bandimi na mokili mobimba. Bakakatanaka te mpo na kotya bomoi na bango na likámá mpo na bolamu ya baoyo bazali komonisa bokangami na bango kati na kondima—ata epai na baoyo bakutaná na bango liboso te. Mpo na nini? Mpamba te balingaka bango. Yesu Klisto alobaki ete: “Na bongo bato yɔnsɔ bakoyeba ete bojali bayekoli na ngai sɔkɔ bojalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Ya solo, yango emonanaki epai na bandeko na biso bandimi na Bosnie.
Karte/Bililingi na lokas 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mer Adriatique
AUTRICHE
SLOVÉNIE
HONGRIE
CROATIE
BOSNIE
ROUMANIE
Travnik
Zenica
Sarajevo
[Bililingi]
Komema lisungi na Bosnie mpe na Herzégovine
[Elilingi na lokasa 26]
Koleka malɛmbɛmalɛmbɛ motuka oyo ebalukaki