Bandeko na biso ya Rwanda bazali koyika mpiko kati na kondima
NA EBANDELI ya mobu 1994 mokili eyokaki nsɔ́mɔ mpo na bansango oyo ezalaki kouta na Rwanda, mokili moko ya Afrika, na ntina etali kobomama monene ya ebele ya bato. Etumba moko makasi kati na bana-mboka ebandaki pwasa—mbuma mabe ya koyinana oyo eumeli uta bikeke mingi.
Lokola mibeko mizalaki lisusu te mpe mobulungano mokɔtaki, Batatoli ya Yehova ya Rwanda koleka 2 000 basengelaki kokima mpo na kobatela bomoi na bango. Pene na 1 300 bazwaki esika ya komibomba na bakáa ya bato bakimá mboka pene na Zaïre mpe na Tanzanie, kasi basusu bakokaki kokima nokinoki te. Tozali na mawa ya koyebisa nsango oyo ete pene na bandeko na biso mibali mpe basi 400—mikóló mpe bana, bango banso basivíli—bakufaki na mobulu wana ya nsɔ́mɔ. Baklisto na mokili mobimba bazali na mawa mpo na baninga wana ya mpiko mpe ya sembo mpe bazali kozwa libɔndisi kati na elaká ya Biblia na ntina etali lisekwa.—Yoane 11:25.
Bandeko na biso ya Rwanda, mibali mpe basi, oyo babikaki, bazalaki na bomoi ya lolenge nini? Uta na mikili mingi, bankulutu batindamaki mpo ete bango moko bákende kotala ezalela ya makambo yango. Lapólo moko eyebisaki ete bandeko ya Rwanda bandimaki makambo wana “na lokumu nyonso mpe na mpiko.” Na ndakisa, moko na biloko ya liboso oyo bandeko basɛngaki ezalaki bongo mikanda mikolimbolaka Biblia. Lapólo yango esukisi na maloba oyo ete: ‘Emonani ete lobanzo na bango mingi etali kozwa bilei ya elimo koleka kozwa lisungi na biloko ya mosuni, atako bazali na mposa ya biloko mingi.’ Mpe atako ezalela ya makambo kati na bakáa ezali kitoko te, ‘eteni elekaki pɛto ezalaki bongo esika bandeko na biso bazalaki kofanda.’
La Société Watch Tower esilaki kobimisa mosolo mpo na bosombi bilei, babulangeti, bilamba, basapato, mpe bankisi. Bandeko na biso ya France bapesaki makabo kozanga kokakatana, mpe na ebandeli ya sanza ya Yúni, pene na batone mibale ya biloko etindamaki epai na Bandeko na biso ya Rwanda oyo bazali na bosénga.
Likambo ya kokamwa ezali te, makambo oyo ebimisaki litatoli moko malamu. Baoyo bamonaki bakamwaki na likambo oyo ete bandeko na biso ya Rwanda bazwaki lisungi mpe lisalisi wana uta na baninga na bango Batatoli, mpe likoki ezalaki ete bákabola yango elongo na basusu. Bato mosusu balobaki ete kati na bakáa, ezali bobele Batatoli nde bazali komona basangani ya lingomba na bango koya kotala bango!
Likambo oyo ya mawa ya bandeko na biso ya Rwanda ezali kokundwela biso ete na “mikolo oyo na nsuka,” bato bakozala “bato na yauli” mpe “bato na nko.” (2 Timɔtɛ 3:1-5) Mpe atako Nzambe alaki basaleli na ye te ete akobikisa bango na nzela ya bikamwiseli kati na makámá ya nzoto, kasi alaki solo ete akobatela elimo na bango mpe boyokani na bango elongo na ye mpe, na boumeli ya boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, akosekwisa baoyo bazali kokufa sikawa. (Nzembo 91:1-10) Tiká ete mabondeli na biso oyo ete Yehova asunga mpe asalisa bandeko na biso ya Rwanda, baoyo bazali naino na bomoi, na boumeli ya eleko oyo ya mpasi, málanda kopesama mpo na bango.—Nzembo 46:1.