Yesu akokaki komonisa kondima epai na Nzambe?
Mokakatano mpo na bandimi ya Bosato
“LOLENGE nini Yesu akokaki komonisa kondima? Azali Nzambe; ayebi mpe amonaka makambo nyonso kozanga ete atalela moto mosusu. Kondima elimboli kotalela moto mosusu mpe kotya motema na oyo emonani te; na yango, koloba ete Yesu-Nzambe akokaki komonisa kondima, ekoki kosalema te.”
Engebene Jacques Guillet, teolojié ya ekólo France, yango ezali likanisi oyo eyebani mingi kati na lingomba ya Katolike. Ndimbola oyo ezali kokamwisa yo? Mbala mosusu okanisaki ete lokola Yesu azali ndakisa mpo na baklisto kati na makambo nyonso, asengelaki mpe kozala ndakisa mpo na oyo etali kondima. Soki ozali kokanisa bongo, makanisi na yo mazali na boyokani te na liteya ya Bosato ya boklisto ya nkombo mpamba.
Likambo litali kondima ya Yesu lizali mpasi mpo na kokanga ntina epai na bateolojié ya Katolike, ya Protestá, ya Orthodoxe baoyo bazali kondimela Bosato lokola “libombami monene ya kondima mpe ya bomoi ya boklisto.”a Nzokande, ezali bango nyonso te nde bazali koangana ete Yesu amonisaki kondima. Jacques Guillet alobi ete “ezali mpenza mpasi na kondima ete Yesu amonisaki kondima te,” atako moto yango Guillet andimi ete, yango “eyokani te” na liteya ya Bosato.
Jean Galot, oyo azali Jésuite ya ekólo France mpe ebele na bateolojié lokola ye, bazali koloba polele ete lokola azali “solo Nzambe mpe solo moto, . . . Klisto akoki te komonisa kondima epai na ye moko.” Zulunalo La Civiltà Cattolica emonisi ete: “Kondima elimboli kondimela moto mosusu, kasi te ete moto amonisi kondima epai na ye moko.” Mokakatano mpo na kondima ete Yesu amonisaki kondima ezali bongo kouta na liteya ya Bosato, mpamba te makanisi wana mibale mazali na boyokani kati na yango te.
Bateolojié balobi ete: “Baevanzile ezali soko moke te koloba ete Yesu amonisaki kondima.” Ya solo, maloba pi·steuʹo (kondima, kozala na kondima) mpe piʹstis (kondima) oyo masalelami kati na Makomami ya Greke ya boklisto, mbala mingi mazali kolobela kondima ya bayekoli epai na Nzambe mpe epai na Klisto, kasi elobeli te kondima na Yesu epai na Tata ye ya likoló. Na yango, tosengeli kosukisa ete Mwana ya Nzambe amonisaki kondima te? Tokoki kososola nini kati na makambo oyo asalaki mpe oyo alobaki? Makomami mazali koloba nini mpo na yango?
Mabondeli oyo mazangi kondima?
Yesu azalaki moto oyo azalaki kobondela mingi. Abondelaki na mabaku nyonso—ntango abatisamaki (Luka 3:21); na butu mobimba oyo ezalaki liboso ya kopona bantoma na ye 12 (Luka 6:12, 13); mpe liboso na kobongwana na ye ya likamwisi likoló na ngomba, wana azalaki elongo na bantoma Petelo, Yoane, mpe Yakobo. (Luka 9:28, 29) Azalaki kobondela ntango moko na bayekoli asɛngaki ye ete: “Lakisa biso lolenge nini tosengeli kobondela,” na bongo alakisaki bango Libondeli ya Nkolo (“Tata wa biso”). (Luka 11:1-4; Matai 6:9-13) Na ntɔ́ngɔ́ mpenza, akendeki ye moko kobondela mpe aumelaki ntango molai (Malako 1:35-39); na mpokwa, likoló na ngomba moko, nsima ya kozongisa bayekoli na ye (Mark 6:45, 46); abondelaki elongo na bayekoli na ye mpe mpo na bango. (Luka 22:32; Yoane 17:1-26) Ee, libondeli ezalaki likambo ya ntina mingi kati na bomoi na Yesu.
Azalaki kobondela liboso ya kosala bikamwiseli, na ndakisa, liboso ya kosekwisa moninga na ye Lasalo, abondelaki: “Tata, natɔndi yɔ ete oyoki ngai. Nayebi ete oyokaka ngai ntango yɔnsɔ; nde nalobi yango mpɔ na ebele ejali kotɛlɛma pɛmbɛni ete bandima ete osili kotinda ngai.” (Yoane 11:41, 42) Kondimisama makasi oyo azalaki na yango ete Tata na ye akoyanola na libondeli wana emonisi ete azalaki na kondima makasi epai na ye. Boyokani oyo ezali kati na libondeli epai na Nzambe mpe komonisa kondima epai na Ye emonani polele na makambo oyo Klisto alobaki na bayekoli na ye: “Bongo najali koloba na bino sɔlɔ ete bilɔkɔ yɔnsɔ bijali bino kobɔndɛla mpe kolɔmba, bondima ete bosili kojua yango.”—Malako 11:24.
Soki Yesu azalaki na kondima te, mpo na nini azalaki kobondela Nzambe? Bosato, liteya oyo ezwami na Makomami te, oyo boklisto ya nkombo mpamba ezali koteya ete, Yesu azalaki na mbala moko moto mpe Nzambe, ezali kotya mobulungano kati na nsango ya Biblia. Ezali kopekisa bato na kososola bosikisiki mpe nguya ya Biblia. Moto Yesu azalaki kobondela nani? Ye moko? Ayebaki te ete ye azali Nzambe? Mpe soki azalaki Nzambe mpe ayebaki yango, mpo na nini azalaki kobondela?
Mabondeli na Yesu na mikolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabelé mazali kopesa biso bososoli mozindo ya kondima makasi oyo azalaki na yango epai na Tata na ye ya likoló. Komonisáká elikya mpe kotyela motema, asɛngaki ete: “Mpe sasaipi, Tata, kumisa ngai pɛmbɛni na yɔ na lokumu lojalaki na ngai pɛmbɛni na yɔ liboso, naino mokili ejalaki tɛ.”—Yoane 17:5.
Wana ayebaki ete komekama na ye oyo eleki makasi mpe kufa na ye ebɛlɛmaki, na butu oyo azalaki na elanga ya Gɛtɛsɛmanɛ likoló na Ngomba ya Olive, “abandi koyoka mawa mpe motema bojito,” mpe alobaki: “[Molimo, NW] na ngai eyoki mpasi kino kufa mpenja.” (Matai 26:36-38) Na nsima afukamaki mpo na kobondela, ete: “Tata, sɔkɔ okani boye, longola kɔpɔ oyo na ngai, kasi mokano na ngai esalama tɛ, kasi bobɛlɛ mokano na yɔ.” Bongo “mwanje na Likolo amɔnanaki na ye kokembisa ye.” Nzambe ayokaki libondeli na ye. Na ntina na makasi ya mayoki na ye mpe na ntina na makasi ya komekama, “kotoka na ye ejalaki lokola matanga minɛnɛ na makila kokwea na mabele.”—Luka 22:42-44.
Mpasi ya Yesu, mposa na ye ya kozwa makasi, mpe mabondeli na ye mazali komonisa nini? Jacques Guillet akomaki ete: “Ezali solo ete Yesu abondelaki, mpe libondeli lizalaki lolenge monene ya bomoi mpe ya misala na ye. Abondelaki lokola bato nyonso, mpe abondelaki mpo na bato. Mabondeli ya bato makoki te kosalema kozanga kondima. Mabondeli ya Yesu malingaki nde kosalema kozanga kondima?”
Wana azalaki likoló na nzeté ya mpasi, mwa moke liboso na kufa na ye, Yesu angangaki na mongongo makasi, na kotángáká maloba ya Nzembo ya Davidi. Na nsima, na kondima nyonso, na mongongo makasi, angangaki na lilɔmbɔ ya nsuka ete: “Tata, najali kotika [elimo, NW] na ngai na mabɔkɔ na yɔ.” (Luka 23:46; Matai 27:46) Parola del Signore, libongoli moko na lokótá Italien, oyo esalemaki na bato ya mangomba makeseni, elobi ete Yesu ‘azongisaki bomoi na ye’ epai na Tata.
Jacques Guillet alobi: “Na komonisáká biso Klisto likoló na ekulusu, wana ezali ye konganga epai na Tata na ye na nzela ya Nzembo ya Yisraele, bakomi ya Baevanzile bazali kondimisa biso ete, kolela ya Mwana sé-moko, kolela ya mawa nyonso, kolela na elikya nyonso ezalaki kolela ya kondima, kolela ya kufa kati na kondima.”
Liboso na bilembeteli ya polele mpe ya makasi wana ya kondima, bateolojié bazali koluka kokesenisa kondima mpe “kotyela motema.” Nzokande, kokesenisa motindo wana ezali na moboko te kati na Makomami.
Kasi komekama makasi oyo ayikelaki yango mpiko ezali mpenza komonisa nini na ntina na kondima ya Yesu?
“Mokokisi ya kondima na biso” abongisami
Kati na mokapo 11 ya mokanda na ye epai na Baebele, ntoma Paulo alobeli limpata monene ya mibali mpe basi ya sembo ya ntango na kala. Asukisi na komonisáká ndakisa ya kondima oyo eleki monene mpe ya kokoka: “Awa ejali biso kotala Yesu, Mobandisi mpe [Mokokisi, NW] na kondima. Mpɔ na esɛngɔ etiami liboso na ye, ayikeli [nzeté ya mpasi, NW] mpiko, atioli nsɔni . . . Bokanisa ye oyo ayikaki mpiko liboso na jua na motindo yango na mabɔkɔ na bato na masumu baoyo batɛmɛlaki ye ete bino bojala na pɛtɛpɛtɛ to na bolɛmbu tɛ kati na [milimo na bino, NW].”—Baɛbɛlɛ 12:1-3.
Ntalo monene ya batelojié bazali koloba ete mokapo oyo mozali kolobela te “kondima mpenza ya Yesu” kasi, ete ye azali nde “mobandisi ya kondima.” Liloba ya Greke te·lei·o·teś oyo ezali kati na fraze wana emonisi moto oyo akokisaka, oyo abongisaka to asukisaka eloko moko. Lokola “Mokokisi,” Yesu akokisaki kondima na ndimbola oyo ete koya na ye na mabelé ekokisaki bisakweli ya Biblia mpe na yango atyaki moboko moko ya makasi mpenza mpo na kondima. Kasi yango elingi koloba ete ye amonisaki kondima te?
Mikapo oyo mizwami kati na mokanda epai na Baebele oyo okoki komona na etánda ya lokasa 15 ezali mpenza polele. Yesu abongisamaki na nzela ya mpasi mpe ya botosi na ye. Atako azalaki moto ya kokoka, mikakatano oyo akutanaki na yango ebongisaki ye mpe ekokisaki ye na makambo nyonso, ata kati na kondima, mpo ete akóma mpenza Nganga Monene ya makoki mingi mpo na lobiko ya baklisto ya solo. Abondelaki Tata na ye “na konganga makasi mpe na mpisoli,” azalaki “sembo” epai na Nzambe, mpe azalaki na “bobangi Nzambe.” (Baebele 3:1, 2; 5:7-9) Baebele 4:15 elobi ete: “Amekamaki kati na makambo nyonso” mpenza “lokola biso,” elingi koloba lokola baklisto nyonso oyo kondima na bango ezali kokutana na “komekama ndenge na ndenge.” (Yakobo 1:2, 3) Ezali likambo ya mayele na kokanisa ete Yesu akokaki komekama “lokola” bayekoli na ye kozanga ete kondima na ye emekama lokola oyo ya bango?
Malɔmbɔ, botosi, mpasi, komekama, bosembo, mpe bobangi Nzambe ezali bilembeteli ya kondima ya kokoka oyo Yesu amonisaki. Yango emonisi ete akómaki “Mokokisi ya kondima na biso” bobele nsima ya kokoka kati na kondima na ye moko. Ezali polele ete azalaki Nzambe Mwana te, lokola liteya ya Bosato ezali koloba yango.—1 Yoane 5:5.
Andimaki Liloba ya Nzambe te?
Liteya ya Bosato libongoli makanisi ya bateolojié mingi na boye ete bakei mosika kino koloba ete Yesu “akoki te kozala na kondima kati na Liloba ya Nzambe mpe nsango na yango” mpamba te “lokola azali Liloba mpenza ya Nzambe, akoki bobele kosakola liloba yango.”—Angelo Amato, Gesù il Signore, mpe the ecclesiastical imprimatur.
Nzokande, mitindami oyo Yesu azalaki ntango nyonso kopesa kati na Makomami ezali mpenza komonisa nini? Ntango amekamaki, atángaki maloba ya Makomami mbala misato. Eyano na ye ya mbala ya misato eyebisaki Satana ete Yesu azalaki kosambela bobele Nzambe. (Matai 4:4, 7, 10) Na mabaku mingi, Yesu alobelaki bisakweli oyo bizalaki kokokana likoló na ye moko, komonisáká kondima kati na kokokisama na yango. (Malako 14:21, 27; Luka 18:31-33; 22:37; kokanisá na Luka 9:22; 24:44-46.) Na nzela ya botaleli oyo tosengeli kosukisa ete Yesu ayebaki Makomami mapemami ya Tata na ye, atosaki yango na kondima nyonso, mpe atyaki motema mpenza na kokokana na bisakweli na yango oyo bisakolaki komekama, mpasi, kufa, mpe lisekwa na ye.
Yesu, ndakisa ya kondima oyo tósengeli komekola
Yesu asengelaki kobunda etumba ya kondima kino nsuka mpo na kobatela bosembo epai na Tata na ye mpe mpo na ‘kolónga mokili.’ (Yoane 16:33) Soki mpo na kondima te, mbɛlɛ ezali mpasi kokóma na elónga motindo wana. (Baebele 11:6; 1 Yoane 5:4) Na ntina na kondima wana ya bolóngi, ye azalaki ndakisa mpo na bayekoli na ye ya sembo. Na ntembe te, amonisaki kondima epai na Nzambe ya solo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Masoló mozindo na ntina na kozanga moboko ya liteya ya Bosato makoki kozwama kati na mwa-búku Osengeli kondima Trinité?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 15]
Yesu, “Mokokisi,” abongisami
Baɛbɛlɛ 2:10: “Mpɔ ete ebɔngaki na ye oyo bilɔkɔ yɔnsɔ bijali mpɔ na ye mpe biuti na ye ete, awa ejali ye kokamba bana mingi epai na nkɛmbɔ, akokisa mokambi na bango kino lobiko na njela na mpasi.”
Baɛbɛlɛ 2:17, 18: “Bongo ebɔngaki ete akokana na bandeko na makambo yɔnsɔ ete akoma Nganga Monɛnɛ na mawa mpe na sembo liboso na Njambe mpɔ na kosala mbɔndi na masumu na bato. Jambi lokola esili ye mɔkɔ koyoka mpasi mpe komekama, ayebi kosunga bamekami.”
Baɛbɛlɛ 3:2: “Ye ajalaki sembo epai na ye oyo apɔnaki ye na mosala, pelamɔkɔ Mose na ndako mobimba na ye.”
Baɛbɛlɛ 4:15: “Mpɔ tojali na Nganga Monene tɛ oyo ajangi koyoka mpasi esika mɔkɔ na biso kati na bolɛmbu na biso. Nde amekami na makambo yɔnsɔ pelamɔkɔ biso, bobɛlɛ ete akwei na masumu te.”
Baɛbɛlɛ 5:7-9: “Na mikɔlɔ na bomɔi na ye, atombolaki mabɔndɛli mpe malɔmbɔ na konganga makasi mpe na mpisoli epai na ye oyo ayebi kobikisa ye na kufa mpe ayokami mpɔ na [bobángi Nzambe, NW] na ye. Ata ajalaki Mwana, ayekoli kotosa mpɔ na koyoka mpasi, mpe esili ye kobɔngisama kwa, akomaki eutelo na lobiko na seko.”