Atako bakimá mboka na bango: Bazali na esengo ya kosalela Nzambe
BITUMBA, nzala, makámá, mpe mobulu. Mpo na bato mosusu, oyo ezali bobele makambo bayokaka to batángaka na bazulunalo. Nzokande, mpo na ebele na bato mosusu, yango ezali makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo. Lokola basali lisangá ya baklisto oyo ezali kati na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bayebi malamu ete, ntango nyonso oyo etumba ebimi to wana likámá moko ekwei, eteni moko ya bandeko na bango kati na mokili bakoki kozala na mpasi. Mpe wana bato basengeli kokima mpo na kobikisa bomoi na bango, ekoki kozala ete bandeko na biso mpe bazali kati na bango.
Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya mikili misusu ya Afrika basengelaki koyika mpiko na mikakatano ya lolenge yango. Mingi kati na bango basengelaki kokanga biloko nyonso oyo bakokaki komema mpe koluka komibomba epai mosusu. Ndambo moke bakamataki motuka, mbala mosusu nkinga. Kasi ntalo monene basengelaki kotambola, kotambola mpe kotambola—ebele na mikolo, ata bapɔ́sɔ—mpo na kokóma na esika bazalaki kokende.
Moko na bisika motindo wana ezali bongo engumba moko moke na nkombo Mboki, na ekólo République centrafricaine. Na boumeli ya mibu mingi, mibali mpe basi, bilenge mpe mibangé, basili koya wana na motángo ya bankótó mingi. Kati na bango ezali na motángo moke ya bandeko mibali mpe basi, elongo na bato oyo basepeli na solo. Bandeko na biso baklisto na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Bangui, mboka-mokonzi ya République centrafricaine, bazalaki na mposa makasi ya kokutana na bato wana oyo bakimá mboka na bango mpo na kopesa bango lisalisi. Mbala mitano, momonisi moko atindamaki kuna na mbongo, na bilei, na bilamba, mpe na nkísi, oyo epesamaki na bolingo nyonso na Batatoli ya Bangui, oyo ezali mosika na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 1 130. Atako baoyo bapesaki makabo yango bazalaki na makoki mingi te, nzokande bazalaki na esengo ya kopesa oyo bazalaki na yango.
Kokende na Mboki
Bandeko na biro ya filiale balingaki kotala eloko nini oyo bakokaki lisusu kosala mpe lolenge nini bakokaki kopesa bato bakimá mboka na bango lisalisi ya elimo. Yango wana ngai mpe mwasi na ngai tokendeki na motuka Land Cruiser, elongo na ndeko Symphorien, mobongisi-nzela monene, mpe mwasi na ye. Symphorien ayebaki nzela malamu, mpe ayebi koloba Zande, moko na nkótá oyo elobamaka na bato bakimá mboka na bango na Mboki. Esengelaki na biso mikolo minei mpo ete tokóma kuna.
Wana etikalaki bakilomɛtɛlɛ 400 tokómaki na etando moko kitoko ya bankeka mingi mpe ya banzeté minene. Nzelanzela tolekaki bamboka mike. Na eteni wana ya nzela, mwasi na ngai atángaki gbagba 50—oyo mingi na yango ezalaki malamu te, mosusu, motuka ekokaki koleka wana te. Tobongisaki gbagba mosusu na mibimbi ya nzeté mpe na mabaya ya kopola, totyaki bapinɛ́ nyonso minei na nguya ya motɛ́lɛ, tosalaki libondeli, mpe tokóbaki malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki mboka moko ezalaki penepene, bilenge bazalaki koya mbangu kopesa lisalisi—mpo na kozwa mwa lifuti moke. Tokamwaki ete bazalaki ntango nyonso kozwa mabaya mpe biteni mosusu ya gbagba na nsé ya matiti ya zingazinga. Etindaki biso na komituna soki ezalaki bango te nde bazalaki kolongola mpe kobomba yango kuna mpo na baleki-nzela oyo bakoki kozala na bosénga na yango.
Mbala misato, toboyaki lisalisi ya bilenge yango, mpamba te emonanaki ete gbagba ezalaki mabe mingi mpo ete motuka ekoka kokatisa yango. Na bongo, totikaki nzela, tolekaki kati na molúka, likoló na mabangá, mpe tozongaki lisusu na nzela. Tozalaki mpenza na esengo ete ezalaki eleko ya elanga, soki bongo te mbɛlɛ tokokaki te kosala mobembo yango, longola bobele na hélicoptère!
Mboka yango Mboki ezali lolenge nini? Motuna wana mozalaki kozongela biso mbala na mbala wana tozalaki kokumba motuka na “piste” wana molai, liloba ya Lifalansé oyo esalelami na République centrafricaine mpo na nzela ya mabelé, ya mabangá mpe ya zelo—mpe oyo ezali na ebele na mabulu.
Na mokolo ya minei, nsima ya nzangá, Symphorien alakisaki na mosapi bandako mike ya matiti, ezingami na banzeté ya paipai mpe na bilanga ya nsɔngɔ. Angangaki ete: “Talá kuna! Ezali kuna nde ebandeli ya Mboki.” Tokamwaki mingi na oyo tomonaki. Totunaki ete, “Oyo ezali Mboki? Káa ezali wapi?” mpamba te oyo tomonaki ezalaki káa te, kasi bandako oyo epalanganaki bipai nyonso. Ezalaki bandako mike, kasi ya mpɛto oyo nsamba na yango ezalaki na matiti. Nzeté mpe matiti ezalaki bipai nyonso. Bato bakónaki milóna mingi penepene na bandako na bango. Mboki ezalaki te lolenge ya káa oyo tokanisaki; ezalaki nde mboka monene, na bolai ya bakilomɛtɛlɛ soko 35.
Tokutani na bandeko
Na Mboki, bandeko bayebaki ete tozali koya, atako bakanisaki ete mobembo na biso ekoumela mikolo mitano. Ntango bayokaki lokito ya motuka na biso, bayaki mbangu. Mibali, basi mpe bana babimaki na bandako mpe na bilanga na bango mpo na kopesa biso mbote. Moto nyonso azalaki kopesa mbote na mabɔkɔ, mbala mingi soki likoki ezali. Bamama babimaki na bana na bango na mabɔkɔ mpo na kopesa biso mbote. Bato banso balingaki kopesa biso mbote, mpe batombelaki biso boyei malamu na motema mobimba.
Ngai mpe mwasi na ngai tozalaki na makambo mingi te ya koloba na ntango wana mpamba te toyebaki lokótá te. Tomekaki moke kosolola na Lifalansé, mwa moke na Sango, mwa moke na Lingelesi, mpe na Arabe. Mingi kati na bandeko na biso bazalaki koloba, kotánga mpe kokoma Zande. Symphorien asengelaki kobongola, mpo na kolimbola manáka ya boyei na biso.
Tokóbaki lisusu mwa bakilomɛtɛlɛ mpe tokómaki na Ndako ya Bokonzi. Yango ezalaki “ndako-nzambe” ya liboso oyo etongamaki na bato oyo bakimá mboka na bango mpo na kofanda na Mboki. Bandeko mingi elongo na bana na bango mpe bato oyo bamonisaki bosepeli bayaki kopesa biso mbote. Ata bana mingi ya bato oyo bazalaki kofanda penepene bayaki elongo na bandeko kopesa biso mbote na mabɔkɔ.
Bandeko na biso basilaki kobongisa bandako mike mibale mpo na biso, bapaya na bango. Bandako yango ezalaki pɛto. Katini ya mai ya pɛto ezalaki wana kozela biso. Tomemaki bilei na biso mpe mai na biso ya komela, mpamba te tokanisaki ete tokokutana na bosénga monene ya bilei mpe mai mpe mpo ete tózala mokumba te mpo na bandeko na biso. Wana tozalaki kokitisa biloko na motuka, elenge mwasi moko ayaki kotuna soki tolingaki ete bálambela biso nsoso lolenge nini na mpokwa wana; ya kotumba, to ya kolamba na supu? Tomizelaki na yango te, mpe totunaki soki bakanisaki kolamba yango elongo na nini. Ayanolaki: fufu, to nsɔngɔ. Bongo toponaki nsoso oyo elambami na supu mpe na pilipili. Na mpokwa wana nzala makasi oyo tozalaki na yango ekitisamaki malamu. Kasi bakóbaki koleisa biso mokolo na mokolo—na midi mpe na mpokwa. Tokokaki mpenza kondima yango te—bato bakimá mboka na bango, bazali komibanzabanza mpo na biso, atako bazalaki na mingi te.
Lisangá moke oyo ezali na esengo
Awa tozalaki mpenza mosika, kasi tozalaki kati na bandeko na biso 21. Bobele mibale nde basilaki kozwa batisimo ntango bayaki awa. Basusu nyonso, ntango bayaki, bazalaki bobele bato oyo basepeli na solo. Balandaki koyekola mpe bazwaki batisimo na boumeli ya mibu mibale oyo miuti koleka. Basusu minei bazwaki batisimo na libaku ya boyei na biso, kati na mongala oyo ezalaki penepene.
Ndakisa oyo ezali kobenda likebi ezali ya Faustino. Liboso na koya na Mboki, ayekolaki epai na moninga na ye moko mateya ya moboko ya solo oyo ezali kati na Biblia. Faustino asepelaki na makambo oyo azalaki koyekola. Mosika te, ye mpe moninga na ye babandaki kosakwela bato mosusu, kasi bakutanaki na botɛmɛli mpe babwakamaki na bolɔ́kɔ na motifi ete “bazali kotombokisa bato” na nzela na lingomba na bango. Na bolɔ́kɔ, moninga ya Faustino awanganaki kondima na ye mpo na kobanga mpe batikaki ye. Sanza mibale na nsima basambisaki Faustino. Nzokande, emonanaki polele ete bifundeli oyo afundamaki na yango bizalaki solo te, yango wana batikaki ye. Ntango etumba ebandaki na etúká na bango, Faustino akimaki na République centrafricaine, epai akutanaki na bandeko mpe akóbaki boyekoli na ye ya Biblia. Azwaki batisimo na Yúli 1991, mpe na 1992 abandaki mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Lisangá ya esengo mpe ya boboto mingi oyo ezali na Mboki, ezali sikawa na mobongisi-nzela monene moko mpe na basakoli 21. Bandeko mibale oyo balobaka Lingelesi bazali bankulutu mpe bakoki kobatela boyokani elongo na biro ya filiale ya Bangui. Tokanisaki ete bandeko na biso oyo bakimá mboka na bango bazalaki na ezalela ya mpasi, ya mawa, kasi ezalaki bongo te. Atako na mosuni bazali babóla, moko te azalaki komilelalela, komitungisa, to koimaima. Kobanda bakómaki, bandeko basilaki kotonga ndako mike na bango mpe basilaki kokólisa milóna mpe kobɔkɔla nsoso. Bazali na biloko mingi te lokola bazalaki na yango liboso, kasi bazali na bomoi mpe bazali esika moko na baninga na bango baklisto.
Lokola ezali na bato katikati na 17 000 mpe 20 000 oyo bakimá mboka na bango mpo na kofanda na Mboki, mpe ebele mosusu oyo ezali kobakisama sanza nyonso, bandeko na biso bazali na elanga monene mpo na mosala ya kosakola. Tokendeki kosakola elongo na bango, likambo oyo lizalaki mpenza ya kosepelisa. Mbala mingi basalelaka Biblia na lokótá Zande, mpe libongoli yango lizali na nkombo ya Nzambe kati na Makomami ya Liebele mpe na bisika mingi kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Mpo na bato wana, Nzambe azali te bobele “Mboli” (“Nzambe” na lokótá Zande), kasi “Yekova,” oyo ezali lolenge na bango ya kobénga nkombo ya Nzambe. “Mboli Yekova” ezali maloba oyo mayebani mingi. Mabongoli ya Protestá na nkótá mingi ya Afrika malandaka libongoli oyo ya malamu te; na esika ya kosala bongo, bazali kokitanya “Yehova” na “Nzapa,” “Nzambe,” to na bankombo mosusu oyo bato na mboka babéngaka Nzambe.
Mpo na kokokisa esakweli ya Yesu, nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mokili mobimba, ata na Mboki. (Matai 24:14) Sikawa lisangá lizali kozwa ebele na Biblia, búku, bazulunalo, mwa babúku, mpe batrakte na nkótá oyo bazali na yango mposa. Mbala mosusu, na mikolo mizali koya, mikanda mingi mikobima na lokótá Zande.
Bazali kozela efandelo ya seko
Na mpokwa ya liboso, tolakisaki bililingi ya la Société oyo ezali na motó na likambo “Mayangani ya esengo na Mpótó ya Ɛ́sti mazali kokumisa Yehova.” Na mpokwa ya mokolo oyo molandaki tolakisaki bililingi “Bibele bayekoli boyengebene na ntango ya nsuka.” Tolakisaki bililingi yango libánda, penepene ya Ndako ya Bokonzi, na kongɛnga kitoko ya sanza. Oyo nde esengo! Ebele na bato bayaki kotala bililingi yango, mpe bandeko bazalaki na esengo ya kolakisa bato eloko moko ya malonga.
Na mokolo ya mosala moko, tomibongisaki mpo na mobembo na biso ya bozongi. Esengelaki kosala lisusu mikolo minei ya mobembo na nzela wana mpe koleka gbagba 50 wana. Ndeko mwasi moko alobelaki mbala mingi likambo ya kobongisela biso mwa bilei mpo na mobembo—nsoso mosusu mibale, oyo esili kotumbama, na litungulu. Na ntɔ́ngɔ́ ezalaki kopesa nsolo kitoko kati na Land Cruiser. Na midi totɛlɛmaki na esobe mpo na kolya nsoso, wana ezalaki biso kokanisa bandeko na biso ya Mboki. Atako basengelaki kokima mboka na bango, bazali kokóba kosalela Yehova na bosembo nyonso, wana bazali kozela efandelo ya seko oyo ekozala na kimya kati na mokili ya sika molakami na Nzambe. 2 Petelo 3:13—Moko na batángi na biso.