Biblia: Búku oyo ekomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango
BAMOKO bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya polele ya Nzambe oyo tosengeli kolanda mpenzampenza. Mpo na basusu, “nsango ya Biblia ezali bongolabongola.” Wana maloba ya basangani 12 ya lisangani ya kondima mpe mateya ya Lingomba ya Protestá lileki monene na Canada. Mokonzi moko ya Lingomba Lisangani, Clifford Elliott, akanisi ete mpo na basusu “Biblia ekómi eloko ya makanisi mpamba, ezali kolobela bato ya sikisiki te, mpe ezali na ntina te.”
Makanisi motindo oyo mazali kobimisa mituna ya ntina oyo ebongi na kopesamela biyano. Oyo ezali ntina mingi kati na yango ezali oyo ete, Biblia ekomamaki mpo na nini? Ezali na mobulungano mingi mpe na mindɔndɔ́ mpo na kokanga ntina na yango? Moto nyonso akoki kokanga ntina na yango? Lisalisi nini lisengeli mpo ete moto akoka kokanga ntina ya Makomami? Mpe mpo na nini boyebi ya sikisiki ya Biblia ezali na ntina mingi mpo na ntango oyo ya yikiyiki?
Biblia ekomamaki na mokano nini?
Boyekoli ya Liloba ya Nzambe ezalaka ntango nyonso lisɛngisi ya liboso mpo na baoyo balingi kozwa ngolu ya Nzambe mpe kondimama epai na Ye Oyo Aleki-Likoló Yehova. Bakonzi, banganga, baboti, mibali, basi, mpe bana—bazwi mpe babola lokola—bazwaki etinda ya kosomba ntango kati na misala na bango ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo na kotya likebi mozindo likoló na Liloba likomami ya Nzambe.—Deteronome 6:6, 7; 17:18-20; 31:9-12; Nehemia 8:8; Nzembo 1:1, 2; 119:7-11, 72, 98-100, 104, 142; Masese 3:13-18.
Na ndakisa, Yosua apesamelaki etinda oyo ete: “Buku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yɔ tɛ, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo yɔnsɔ makomami na yango. Mpɔ ete bongo okojalisa njela na yɔ malamu mpe bongo okojala na makila malamu.” (Yosua 1:8) Boyekoli mozindo motindo wana mpe kotosa Mibeko ya Nzambe ekopesa bolóngi mpe esengo. Mokano ya Yehova ezalaki ete “bato na motindo nyonso” bakosuka te bobele na kokanga ntina ya Liloba na ye, Biblia, kasi lisusu, bakotosa yango, na elikya ya kozwa likabo ya bomoi.—1 Timoté 2:3, 4; Yoane 17:3.
Ezali mpasi mingi mpo na kokanga ntina na yango?
Liboso ete Yesu amata na likoló, amonisaki yango polele: alingaki ete ebongiseli moko monene ya koteya Biblia ekóba na mabelé mobimba. (Misala 1:8) Ayebaki ete Biblia ekomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango. Nsima ya kolimbola ete Yehova apesaki ye bokonzi nyonso na likoló mpe na mabelé, apesaki etinda oyo ya siksiki, ete: “Boye bokɛnda kojalisa bayekoli na mabota yɔnsɔ, kobatisa bango na nkombo na Tata mpe na Mwana mpe na [elimo santu, NW]. Kolakisa mpe bango ete batosa yɔnsɔ esili ngai kolaka bino.”—Matai 28:19, 20.
Liboso ya kozwa batisimo, bayekoli ya sika basengelaki koteyama na ntina na Yehova, Mwana na ye, mpe mosala ya elimo santu. Lisusu, basengelaki kolakisama kati na mibeko ya ebongiseli ya biloko ya boklisto. (1 Bakolinti 9:21; Bagalatia 6:2) Mpo na kokokisa mokano wana, bato ya motema sembo basengelaki liboso kondima ete Biblia eutaki na Yehova mpe, ya mibale, ekomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango.—Matai 10:11-13.
Nini esɛngami na yo mpo ete okoka kokanga ntina ya Biblia? Mwana ya Nzambe asalaki makasi mpenza mpo na kolimbola Makomami. Ayebaki ete Makomami mosantu mazali solo mpe ete mokano ya Nzambe elobelami kati na yango. (Yoane 17:17) Na kotalela mosala na ye, Yesu Klisto alobaki ete: “Ngai nabotami mpɔ na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpɔ na sɔlɔ. Moto na moto oyo ajali na mposa na sɔlɔ akoyokaka mongongo na ngai.” (Yoane 18:37; Luka 4:43) Yesu amipekisaki te mpo na koteya baoyo bazali na mitema mpe elimo ya boyambi. Na Luka 24:45, bayebisi biso ete: “Na nsima [Klisto Yesu] ajipolaki mitema na bango ete bayeba Makomi ntina.”
Na boumeli ya mosala na ye, na kozanga kokakatana, Yesu azalaki kosalela Makomami, na kolimbola mpe kozongela makomami kati na “mibeko na Mose, na basakoli, na njembo.” (Luka 24:27, 44) Baoyo bayokaki bandimbola na ye likoló na Makomami bakamwaki mingi mpo na maloba na ye ya polele mpe mayele na ye, mpe makoki na ye ya koteya. (Matai 7:28, 29; Malako 1:22; Luka 4:32; 24:32) Mpo na Yesu, Makomami mazali búku oyo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango.
Biblia mpe bayekoli ya Yesu
Ntoma Paulo, moko na bamekoli ya Yesu Klisto, amonaki ntina ya koteya basusu makambo oyo mazali kati na Makomami. Ye mpe ayebaki ete makomamaki mpo ete bato bákanga ntina na yango. Yango wana, ateyaki liboso ya bato banso mpe, na ntembe te, alimbolaki Makomami kati na bandako ya baoyo bazalaki kolinga kokanga ntina na yango. Ntoma Paulo amonisaki etɛlɛmɛlo na ye ya polele na ntango alobaki ete: “Nabangaki tɛ kosakwela bino makambo makoki kosunga bino, mpe kolakisa bino na kati na koyangana mpe na ndako na ndako.” (Misala 20:20) Na boumeli ya masoló na ye, azalaki kososola kati na Makomami, kolimboláká maloba na kosaleláká bilembeteli ya Makomami. (Misala 17:2, 3) Amipesaki na kosalisa basusu ete bákanga ntina ya Makomami.
Ozalaka na mposa makasi ya kokanga ntina ya makambo oyo Yesu mpe bayekoli na ye bateyaki? (1 Petelo 2:2) Bafandi ya kala ya mboka Beloya bazalaki na mposa makasi motindo wana, mpe bazalaki kolinga mpenza kondima oyo ntoma Paulo azalaki koteya bango na ntina na Klisto. Na yango, balendisamaki ete báyekola Makomami mokolo na mokolo mpe, na bongo, bándimisama solo ete nsango malamu oyo bazalaki koyoka ezalaki mpenza solo. Mpo ete bazalaki na elimo ya boyambi, “mingi na bango bakómaki bandimi.”—Misala 17:11, 12.
Mpo na kokanga ntina ya Biblia, moto asengeli kozala na ezalela malamu ya motema, mposa mpenza ya koyekola, mpe ‘ayeba mposa na ye ya elimo.’ (Matai 5:3, NW) Ntango batunaki Yesu ete: “Mpɔ na nini ojali koloba na bango na masese?” ayanolaki ete: “Makambo na nkuku na Bokonji na Likolo, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka tɛ.” Esakolamaki ete asengelaki ‘kofungola monoko na ye na masese, koloba makambo mabombami.’ (Matai 13:10, 11, 35) Na yango, Yesu azalaki koloba na lisalisi ya bilakiseli mpo na kokabola na ngámbo moko baoyo bazalaki koyoka kozanga bosepeli, kotunáká mituna mpambampamba mpe na ngámbo mosusu baoyo bazalaki koyokamela ye na likebi nyonso kotunáká ye na bosembo nyonso. Mokolo moko, bayekoli ya Yesu bamonisaki bosembo na bango na ntango bakɔtaki elongo na ye na ndako moko mpe balobaki ete: “Limbwela biso lisese na matiti mabe na elanga.”—Matai 13:36.
Ezali polele ete tozali na mposa ya lisungi soki tolingi kokanga ntina ya Biblia. Hal Llewellyn, mokomeli ya Lingomba Lisangani mpo na teoloji, kondima mpe kosangisa mangomba, alobaki ete: “Ezali mpenza na ntina ete toyebisa polele soki Biblia ezali na ntina nini mpo na biso mpe lolenge nini ezali kotángama mpe kolimbolama.” Ata soki bato mingi basosoli likambo yango te, kasi ezali solo ete tokoki te kokanga ntina ya Biblia biso moko. Tozali na mposa ya lisalisi.
Lisalisi likoki kozwama?
Kati na Biblia, ezali na maloba mosusu ya kobulunganisa, mituna ya mpasi, mpe maloba ya mozindo oyo ezali kosɛnga kolimbolama polele. Ekoki kozala ete ekomama na mokano ete ezala polele te, na kosalela bokokanisi oyo ezali na ntina, oyo ekomamaki te mpo ete bato ya eleko wana bákanga ntina na yango. Kasi ezalaki kolobela mikano ya Yehova. Na ndakisa, Emoniseli 13:18 elobi ete ‘motuya ya nyama ya yauli’ ezali ‘nkámá motoba na ntuku motoba na motoba.’ Wana mokapo yango ezali koloba ete “mayɛlɛ yango oyo,” ezali te kopesa ndimbola ya motuya yango. Nzokande, na nzela ya lisangá na ye, Yehova asili kopesa nzela na basaleli na ye ya sembo ete bákanga ntina ya ndimbola na yango lelo oyo. (Talá etánda, “Nzela mpo na kokanga ntina ya Biblia.”) Yo mpe okoki kozwa bososoli wana na lisalisi ya baoyo bameseni mingi na “kosembola liloba na sɔlɔ.”—2 Timoté 2:2, 15, 23-25; 4:2-5; Masese 2:1-5.
Na bantango mosusu, Yesu azalaki kosalela masese mpo na komonisa bosepeli to kozanga bosepeli mpo na nsango ya Bokonzi. Amonisaki ete basusu balingaki kokóla te mpo ete botɛmɛli oyo ekoutaka epai na baninga mpe bandeko ya mosuni esengelaki kolɛmbisa bango. Basusu balingaki kotika nzela ete “bolózi to minyoko” ebebisa bosepeli na bango mpo na nsango ya Bokonzi. Kasi, basusu balingaki kotika nzela na makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, “bitungiseli ya ebongiseli ya biloko oyo mpe nguya ya mosolo oyo ezali na bokosi,” ete epekisa bolingo oyo mbala mosusu basili kokóna yango mpo na nsango malamu. Nzokande, ezali na baoyo bazali koyanola na esengo nyonso mpe bazali kolinga koyokamela maloba ya motuya mpe bazali kokanga ntina na yango. ‘Bazali kokimela mpe kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso oyo mazali kosalema’ kati na boklisto ya lokuta, oyo ezali komiloba ete ezali kosala bongo na nkombo ya Klisto. Bato motindo wana bazali na mposa makasi ya koteyama na banzela ya Yehova mpe na bongo, kokanga ntina na oyo bazali kotánga kati na Biblia.—Matai 13:3-9, 18-23, NW; Ezekiele 9:4; Yisaya 2:2-4.
Yehova akoki kosala ete lisungi libongi likoka kopesama epai na moto na moto oyo alingi kokóma na bososoli ya mikano na ye. Na ndakisa, Biblia ezali koyebisa ete elimo ya Yehova ekambaki mopalanganisi ya nsango malamu Filipo mpo na kosalisa mobali Moetiopia moko oyo azalaki kotánga mokanda ya Yisaya, oyo ezali kati na Biblia, wana ezalaki ye na mobembo kouta na Yelusaleme. Wana ezalaki ye kozonga na mboka na ye, azalaki kotánga yango kati na likalo. Mpo na kotosa litambwisi ya elimo ya Yehova, Filipo abɛlɛmaki pene na likalo mpe atunaki ete: ‘Ozali kosimba ntina na oyo ozali kotánga?’ Moto yango azalaki na komikitisa mpe azalaki sembo, na boye ete, andimaki ete azalaki na mposa ya lisalisi. Na esengo nyonso, Filipo ateyaki moto oyo azalaki na nzala ya elimo mpe azalaki na motema sembo. Mateya masalisaki ye ete akanga ntina ya Makomami. Kobanda wana, ayekolaki eloko nini asengelaki kosala mpo na kozala na boyokani malamu elongo na Yehova mpo ete akoka kozwa bomoi ya seko. Akómaki mosaleli ya Yehova ya esengo mpe azwaki batisimo, alandaki lolenge ya bomoi oyo ezalaki kosepelisa Nzambe.—Misala 8:26-39.
Okoki kozala na Biblia na ndako na yo, mpe okoki kozala ete osilá kotánga yango mbala na mbala. Ekoki mpe kozala ete osilaki kokutana na likambo motindo moko na Moetiopia ya sembo mpe ya komikitisa. Akokaki te kokanga ntina ya makambo oyo azalaki kotánga. Azalaki na mposa ya lisalisi mpe akakatanaki te mpo na kondima lisalisi oyo Yehova Nzambe asepelaki kopesa ye. Na ndakisa ya Filipo, Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kosalisa yo mpo na kokanga ntina na makambo matali Nzambe, oyo makomami kati na Liloba na ye, Biblia. Bayebi ete Yehova apesaki bato Biblia mpe mokano na ye ezalaki ete bato bákanga ntina na yango.—1 Bakolinti 2:10; Baefese 3:18; 2 Petelo 3:16.
Mpo na nini Biblia ezali na ntina?
Tozali kobika na eleko oyo eleki mpasi kati na lisoló ya bato. Biblia ezali kobénga yango “nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.” (Matai 24:3) Ebele ya makambo oyo mazali kobima mpo na kokokisa bisakweli ya Biblia uta 1914 mazali komonisa ete mosika te Bokonzi ya likoló ya Nzambe ‘ekonyata mpe ekosukisa biyangeli nyonso mosusu.’—Danyele 2:44.
Yo moko tángá oyo esakolami kati na Matai mokapo 24, Malako 13, mpe Luka 21. Okomona ete makambo oyo malobelami kuna mazali kotalela mokili mobimba. Kati na yango ezali bongo bitumba ya mokili mobimba—oyo ekeseni na bitumba nyonso mosusu. Kobanda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, tozali komona nzala oyo esakolamaki, koningana ya mabelé, mpe eleko oyo na boumeli na yango ezaleli ya kotyola mibeko ezali mpenza makasi koleka. Mpe sikawa, emonani ete mabota mazali mpenza pene ya konganga oyo ekomonisa elembo moko monene mpenza, kobomama ya mokili ebɛlɛmi. Mpo na yango, ntoma Paulo akomaki ete: “Jambi boyebi sɔlɔ sɔlɔ ete mokolo na Nkolo ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete, ‘Kimya ejali, makambo majali tɛ,’ wana libebi ekokwela bango pwasa . . . mpe njela na kokima ekojala tɛ.” (1 Batɛsalɔniki 5:2, 3) Banani nde bakozanga nzela ya kokima? Paulo alobi ete: “Baoyo bayebi Njambe tɛ mpe bajangi kotosa nsango malamu na Nkolo na biso Yesu.” (Batɛsalɔniki 1:7-9) Eteni mosusu ya elembo wana oyo esangisi makambo ebele esengelaki kokokisama na baoyo bazali kotosa etinda oyo epesami na Matai 24:14 mpo na kosakola “nsango malamu ya bokonzi . . . na mabelé mobimba mafandami.”
Bamilió ya Batatoli ya Yehova bazali kokokisa etinda wana kati na mikili 231 mpe bisanga ya mai monene. Bakendeke na bandako ya bato mpe basɛngaka bango ete báyekola makambo matali boyangeli ya Bokonzi ya Yehova. Na boboto nyonso, bazali komonisa nzela oyo moto nyonso asengeli kolanda mpo na kozala kati na baoyo bakobika na biloko mabe ya ntango oyo mpe bakofanda kati na paladiso na mabelé epai kuna kolela ekozala te, kokimela te, mpasi te, liwa mpe te.—Emoniseli 213, 4.
Ntango ezali kosila nokinoki mpo na mokili mabe oyo, mpe ezali lisɛngisi makasi mpo na baoyo balingi kobika na nsuka ya mokili oyo ete báyekola nini esɛngami mpo na ‘kotosa nsango malamu’ mpe kokima bongo libebi. Na mbala ya nsima, na ntango Batatoli ya Yehova bakoya na ndako na yo, mpo na nini te kondima lipesi ya koyekola Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ? Mpo na nini te kosɛnga na bango ete báyekola Biblia elongo na yo, mpo ete olingi kokanga ntina na yango?
[Etanda na lokasa 8]
NZELA MPO NA KOKANGA NTINA YA BIBLIA
YESU apesaki biso elikya ete na nsima ya liwa mpe lisekwa na ye, asengelaki kobimisa ‘moombo moko ya sembo mpe ya mayele’ oyo asengeli kosala lokola nzela oyo akosalela mpo na koyebisa makambo epai ya bato. (Matai 24:45-47) Ntoma Paulo amonisaki mwango yango epai na baklisto ya Efese na ntango akomaki ete “yango ete na njela na [lisangá, NW] motindo na motindo na boyebi na Njambe iyebisama epai na mikonji mpe nguya kati na bisika na Likolo. Oyo ejali mwango na libela oyo eyangaki ye kati na Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baɛfɛsɛ 3:10, 11) Ezalaki lisangá ya baklisto bapakolami, oyo ebotamaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., epai na baoyo epesamaki “makambo mamɔnisami.” (Deteronome 29:29) Lokola etuluku, baklisto bapakolami bazali kosala lokola moombo ya sembo mpe ya mayele. (Luka 12:42-44) Mokumba na bango oyo bazwi epai na Nzambe ezali ya kopesa mayele ya elimo na “makambo mamonisami.”
Ata esakweli ya Biblia oyo esilaki kolobela Masiya, ezali mpe kokamba biso na lisangani litongani makasi ya Batatoli baklisto bapakolami oyo bazali sikawa kosala lokola moombo na sembo mpe na mayele.a Ezali kosalisa biso na kokanga ntina ya Liloba ya Nzambe. Baoyo nyonso balingi kokanga ntina ya Biblia basengeli komona ete “bwanya mozindo ya Nzambe” ekoki koyebana bobele na nzela oyo Yehova azali kosalela mpo na koloba na bato, nzela yango ezali bongo moombo ya sembo mpe ya mayele.—Yoane 6:68.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Mosenzeli, Yúni 1, 1982, nkasa 3-8.