Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Liloba ya Nzambe lizali na nguya
“LILOBA na Njambe ejali na bomɔi mpe na nguya.” (Baɛbɛlɛ 4:12) Maloba oyo mamonanaka mbala mingi solo na ntango bato oyo bakosamaki na lingomba ya lokuta bayei kokutana na solo ya Biblia. Lokola lisoló oyo euti na République Dominicaine emonisi yango, nguya ya Biblia ekoki kobongola bomoi ya bato mpe kopesa elikya.
Batatoli ya Yehova bakendeki kotala mwasi moko ya lokumu ya Lingomba ya Katolike oyo autaki kokufela bana mibale kala mingi te. Aokaki mpasi makasi mpe azalaki komilela mpo na mawa na ye mokolo na mokolo. Batatoli balakisaki ye oyo Biblia ezali koloba kati na Yoane 5:28, 29 na ntina na elikya ya lisekwa. Nsima ya kosolola lisusu mingi na Batatoli, asukaki te bobele na kozwa libɔndisi kasi ayaki lisusu koyeba ete bakambi ya Lingomba ya Katolike bazalaki kokosa ye.
Nokinoki, amilongolaki na lingomba ya Katolike, mpe andimaki koyekola Biblia mbala na mbala elongo na Batatoli ya Yehova. Kasi, mobali na ye asepelaki na yango te. Lokola ye mpe azalaki moto ya lokumu ya Lingomba ya Katolike, akamataki bibongiseli mpo ete moto moko ya politiki oyo ayebani mingi mpe baninga na ye mosusu ya Lingomba baya kotala mwasi na ye mpo na kopɛngwisa ye na nzela na ye mpe kozongisa ye na Lingomba ya Katolike. Na nsima mobali yango abangisaki mwasi na ye na kolobáká ete akolongola ye na libala, nkutu ayebisaki mpe bandeko na ye mpe baninga na ye ya lingomba ete balingaki koboma libala.
Kasi mwango wana esimbaki te. Nkutu, mwasi yango azwaki lisusu ekateli makasi mpo na kokóba boyekoli na ye ya Biblia. Lokola azalaki kokóla na elimo mpe azalaki kolóna bizaleli malamu ya boklisto, mobali na ye azwaki ekateli ya kotikala na ye, na esika ya koluka koboma libala. Mokolo moko nkutu andimaki kotánga mokanda mokolimbolaka Biblia, oyo mwasi na ye azalaki koyekola na yango—kasi atyaki lisɛngisi moko. Alingaki kosalela Biblia na ye moko, oyo ebongolami na Bakatolike.
Na kokamwa nyonso, na lisalisi ya mokanda ya Batatoli ya Yehova, oyo ekolimbolaka Biblia, abandaki koyekola makambo ya sika uta na Biblia na ye moko. Ayaki koyeba ete mwasi na ye aponaki nzela ya malamu, mpe nokinoki, azalaki pene ya kolanda ye. Ya solo, amonaki ntina ya kosala mbongwana kati na bomoi na ye mpenza. Moko na mikakatano oyo akutanaki na yango ezalaki bongo ya kotika komela likaya. Nsima ya kotánga Lamuká! ya Yúli 8, 1989 (Ebimeli ya Lifalansé), oyo ezalaki na motó ya likambo “Bazali kotekisa liwa—Myango zomi mpo na kotika likaya,” azwaki ekateli makasi ya kotika momeseno wana eyokani te na Makomami. Na esika ya paké na ye ya likaya, oyo azalaki na momeseno ya kotya yango na libenga na ye, akómaki nde komema nimero wana ya Lamuká! Mbala nyonso oyo azalaki kopusama na mposa ya komela likaya, azalaki kotánga masoló mazalaki kolobela makambo matali komela likaya. Mwango yango ebimisaki litomba! Nsima ya kotánga masoló yango mbala na mbala, alóngaki kotika komela likaya.
Lelo oyo, mobali wana na mwasi na ye bazali kosala bango mibale lokola Batatoli ya Yehova. Wana ezalela ya makambo epesi ye nzela, asalaka lokola mosali ya ntango nyonso, kopesáká bongo ntango na ye mingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpe azali kosala lokola mosaleli na misala na lisangá ya Batatoli ya Yehova epai kuna azalaka. Ye mpe mwasi na ye bazali kozela lisekwa, ntango oyo bakoyamba lisusu bana na bango oyo bakozonga na bomoi kati na mokili ya sika. Ee, Biblia ezali na bomoi mpe ezali na nguya!