Ozali koyekola epai na Molakisi na biso Monene?
JULIO alimbolaki ete: “Nayekolaki mibeko ya Leta na boumeli ya mibu mitano kati na moko na biteyelo minene ya lokumu mingi ya mboka Espagne. Kasi oyo nayekolaki ntango nabandaki koyekola Biblia ezalaki na motuya mingi koleka. Eteyelo monene eteyaki ngai lolenge ya koyekola; Biblia eteyaki ngai lolenge ya kozala na bomoi.”
Na nzela ya Biblia tokoki koyeba makanisi ya Nzambe, mitindá na ye, mpe mateya na ye. Makomami mazali kolobela Yehova lokola “Molakisi Monene” mpamba te ye azali moteyi oyo aleki malamu kati na mɔlɔ́ngɔ́. (Yisaya 30:20) Engenene maloba masalelami, makomi ya Liebele mazali kobénga ye “balakisi”—boíké ya komonisa lokumu monene. Yango esengeli kokundwela biso ete koyekola epai na Yehova eleki malamu koyekola epai na molakisi mosusu.
Bwanya ya solo oyo euti na Yehova
Mpo na nini mateya mauti na Nzambe mazali na litomba? Libosoliboso, mpo ete makambo mazali kati na yango mazali na motuya monene. Mateya mauti na Yehova mapesaka biso “bwanya oyo ebongi.” Lisusu, bwanya oyo bopesami na Nzambe “ebatelaka na bomoi” baoyo bazali kosalela yango.—Masese 3:21, 22, NW; Mosakoli 7:12.
Mokomi ya Nzembo 119 asosolaki ete bwanya ya Yehova ebatelaki ye na bomoi. Na ndakisa, ayembaki ete: “Mobeko na monɔkɔ na yɔ ejali malamu na ngai koleka nkoto-nkoto na wɔlɔ mpe palata. Sɔkɔ mobeko na yɔ ejalaki esɛngɔ na ngai tɛ mbɛ nabebi kati na mpasi na ngai. Na malako na yɔ, opɛsi ngai mayɛlɛ maleki yango na bayini na ngai; jambi majali na ngai mikɔlɔ yɔnsɔ. Naleki balakisi yɔnsɔ na ngai na koyeba, jambi matatoli na yɔ ejali kati na makanisi na ngai.”—Njembo 119:72, 92, 98, 99.
Mokomi na Nzembo azalaki bobele ye moko te moto oyo alingaki, soki malako ya Yehova te, ‘kokufa kati na mpasi na ye.’ Rosa, elenge mwasi moko ya mboka Espagne, andimi mpenza makasi ete abatelamaki na bomoi mpo ete asalelaki mitindá miuti na Nzambe. Amikundoli ete: “Wana nazalaki na mibu 26, nalukaki nzela mpo na komiboma mbala mibale.”
Rosa asilaki komipesa na pite, na kolangwa masanga mpe na bilangwiseli mosusu. Alobi ete: “Mokolo moko, wana nazalaki na kozanga elikya monene, babalani mibale oyo bazalaki Batatoli basololaki elongo na ngai na ntina na lolenge oyo Biblia ekoki kosalisa biso na kosilisa mikakatano na biso. Nabandaki koyekola Liloba ya Nzambe, oyo namonaki ete ezalaki mpenza ya kokamwisa. Bobele kati na sanza moko nasilaki kozwa nguya ya kopɛtola bomoi na ngai mpe ya kobanda bomoi ya sika. Lokola nasilaki kokanga ntina ya bomoi, nazalaki lisusu na mposa ya lisungi ya masanga mpe bilangwiseli te. Mpe lokola nalingaki mpenza mingi kozala moninga ya Yehova, nazwaki ekateli makasi ya kotambola engebene mitindá na ye. Soki mpo na bwanya ya solo ya Liloba ya Nzambe te, nandimisami mpenza ete mbɛlɛ sikawa nasili kotya nsuka na bomoi na ngai.”
Ya solo, bwanya bouti na Yehova ebikisaka bomoi. Na yango, tokoki mpenza kozwa matomba, bobele te na makambo ya motuya mingi oyo mazali kati na mateya mauti na Nzambe, kasi lisusu na myango oyo Yehova azali kosalela mpo na koteya basaleli na ye. Mpo ete Mwana ya Nzambe, Yesu Klisto apesaki biso malako ya kozala bateyi mpe bazalisi ya bayekoli, tosengeli koyekola myango oyo mibongi mpenza mpo na kolakisa.—Matai 28:19, 20.
Yehova asalelaka bililingi
Evanzile ya Malako elobi ete “[Yesu] ajalaki kosolola na bango bobɛlɛ na masese.” (Malako 4:34) Lolenge wana ya koteya ya Yesu ezali mpenza kokamwisa te. Amekolaki bobele moko na mitindo oyo nsango ya bisakweli ya Yehova ezalaki kopesama epai na libota ya Yisraele. Yango ezalaki na bililingi ya kobenda likebi.—Yisaya 5:1-7; Yilimia 18:1-11; Ezekiele 15:2-7; Hosea 11:1-4.
Na ndakisa, talá lolenge Yehova asalelaki bililingi ya nguya oyo bizali kobenda likebi mpo na koteya biso ete kosalela bikeko ezali na ntina te. Yisaya 44:14-17 eyebisi ete: “Akokata mpɔ na ye mɔkɔ njete na ɛlɛjɛ mpe akopɔna njete na tilija to na alono, akokembisa yango mpɔ na ye mɔkɔ kati na njete na jamba . . . Akokona njete na olɛnɛ, mpe . . . ekojala epai na moto mpɔ na nkoni; akokamata ndambo na yango mpe akoyɔta mɔtɔ; akobambola mɔtɔ mpe akotumba mapa; akosala mpe njambe mpe akosanjola yango! Akosalisa yango ekeko mpe akokumbama liboso na yango. Akojikisa ndambo na yango na mɔtɔ; na ndambo na yango mpe akolia mosuni mpe akotumba bilei bitumbami mpe akotonda. . . . Mpe na oyo etikali akosala njambe, ekeko na ye. Akokumbama liboso na yango, akobɔndɛla yango, akoloba, Bikisa ngai mpɔ ete yɔ ojali njambe na ngai.” Bililingi lokola oyo bizali bisaleli ya nguya mpo na kosalisa bato ya motema molongobani na kobwaka losambo ya bikeko mpe mateya ya lokuta.
Mituna ya komitalela
Biblia ezali lisusu na bandakisa ya lolenge oyo Yehova asembolaki makanisi ya basaleli na ye mosusu na nzela ya mituna oyo mizali kotinda na kokanisa. Tata ya mabota Yobo azalaki moko na bango. Yehova asalisaki ye na motema pɛtɛɛ nyonso na kososola ete azali moke mingi liboso na Nzambe. Asalaki yango na nzela ya ebele na mituna, oyo na mawa nyonso, Yobo azalaki te na makoki ya koyanola.
Yehova atunaki Yobo ete: “Yɔ ojalaki wapi wana natiaki miboko na mokili?” “Nani akangi mai-na-monana na bikuke? . . . Okolonga kokanga Bana-na-bitike to kokangola nkamba na Mobengi? . . . Yɔ ojali na lobɔkɔ lokola Njambe?” Motuna oyo ya ntina mozalaki mpe kati na mituna wana ya komikitisa ete: “Okokitisa ngai [Yehova] ete yɔ mɔkɔ olongi?”—Yobo 38:4, 8, 31; 40:8, 9.
Mituna wana ya komitalela misalisaki Yobo na kokanga ntina ete alobaki na kozanga kososola. Na yango, amityolaki mpe abongolaki motema. (Yobo 42:6) Lokola ndakisa oyo emonisi yango, mituna oyo miponami malamu mikoki kosalisa na kosembola mabungá ya bana na biso to ya bayekoli na biso ya Biblia.
Koyikisa mpiko
Ezali boni soki tosengeli kosalisa moto moko oyo azali kooka ete azali na makoki te? Na likambo yango lisoló oyo Yehova asalaki elongo na mosakoli na ye Mose ekoki kosalisa biso. Ntango Nzambe aponaki Mose ete azala molobeli na ye liboso na Falo mpe Bayisraele, mosakoli wana amonaki ete akokoka te kokokisa mokumba yango. Alobaki ete: “Najali moto na maloba polele tɛ.” Nzokande, Nzambe ayanolaki ete: “Nani asali monɔkɔ na moto? . . . Ejali ngai, [Yehova] tɛ? Na bongo kɛnda mpe ngai nakojala na monɔkɔ na yɔ elɔngɔ mpe ngai nakolakisa yɔ yango ekoloba yɔ.”—Esode 4:10-12.
Yehova aponaki Alona ndeko na Mose lokola molobeli na ye, mpe balandaki kokokisa mokumba na bango na Ezipito. (Exode 4:14-16) Batatoli ya Yehova mingi baokaki lokola Mose ete bazali na makoki te wana bakendaki mpo na mbala ya liboso kati na mosala ya ndako na ndako to kati na litatoli ya balabála. Lokola na ndakisa ya Mose, koyeba ete Yehova azali kosunga biso mpe ete tokokende elongo na mosaleli ya makoki mingi, ekoki kopesa biso nzela ya kolónga kokakatana na biso. Bobele bongo, lokola Mose alendisamaki kino akokaki kopesa masukúlu ya nguya mingi oyo mazwami kati na Biblia na mokanda ya Deteronome, na lisalisi ya Yehova biso mpe tokoki kokólisa makoki ya koloba.
Likambo oyo lizali kopesa liteya
Mposa makasi ya kosalisa basusu ezali mpe na ntina mingi. Yango ezali ezaleli oyo mosakoli Yona azangaki. Yehova atindaki Yona kokebisa bato ya Ninive na ntina na libebi oyo alingaki kokweisa likoló na mboka yango. Likambo ya kokamwa, bato ya Ninive babongolaki mitema. (Yona 3:5) Lokola mbano, Yehova azwaki ekateli ya koyeisa likámá yango te na ntango elakaki ye. Na esika ete azala na esengo mpo na elónga ya mosala na ye ya kosakola, Yona asilikaki mpo ete esakweli na ye elingaki kokokana te. Lolenge nini Yehova asalisaki ye na kozala na likanisi malamu?
Yehova asalelaki nkamba ya liboke mpo na koteya Yona ntina ya komibanzabanza mpo na basusu. Na ekamwiseli, lititi yango ekólaki na butu moko mpe epesaki malili mpo na Yona, oyo asilaki kotónga mwa ndako moke na nsuka ya mboka Ninive. Yona “asepelaki na esɛngɔ monɛnɛ” mpo na liboke. Kasi Yehova atindaki nkiso ete ebɛta liboke yango na boye ete yango ekaukaki. Wana ezalaki ye na molungé ya moi mpe mopepe ya kozikisa, Yona asilikaki mpe alobaki ete: “Eleki malamu na ngai ete nakufa; nabika tɛ.” (Yona 4:5-8) Liteya nini lizali kati na nyonso wana?
Yehova asololaki na Yona mpe alobaki ete: “Osili koyokela liboke mawa, oyo yɔ okolisaki yango tɛ, oyo ebimaki na butu mɔkɔ mpe ekufaki na butu mɔkɔ. Ngai mpe nayokela [Ninive, NW] mawa tɛ, mboka oyo monɛnɛ, wana bato baleki nkoto mokama na ntuku mibale, baoyo bayebi kokabola kati na lobɔkɔ na bango na mobali mpe lobɔkɔ na bango na mwasi tɛ, mpe bibwɛlɛ mingi lokola?”—Yona 4:9-11.
Oyo nde solo liteya ya nguya! Yona azalaki komibanzabanza mingi mpo na liboke kasi mpo na bankoto ya bato te. Atako komibanzabanza mpo na bikelamu ya Nzambe ebongi kokumisama, nzokande kopesa lisalisi mpo na kobikisa bomoi na bato ezali mokumba na biso oyo eleki ntina.
Kolakisa na motema pɛtɛɛ nyonso
Lokola Yona amonaki yango, kokokisa mosala na biso ezalaka ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ te. (2 Timoté 4:5) Nzokande, komonisa motema pɛtɛɛ epai na bato mosusu ekosalisa biso.
Osalaka nini soki moko na bayekoli na yo ya Biblia azali kosimba makambo noki te to azali na makambo makasi? Molakisi na biso Monene azali koteya biso lolenge ya kolónga mokakatano yango. Amonisaki solo motema pɛtɛɛ mingi ntango Abalayama alandaki kotuna ye mituna na ntina na kosambisama oyo elingaki kokwela Sodomo mpe Gomola. Abalayama atunaki ete: “Okoboma mpe bayɛngɛbɛni elɔngɔ na bato mabe?” Abalayama abondelaki ete: “Sɔkɔ bayɛngɛbɛni ntuku mitano bajali kati na mboka nde okoboma bango, mpe okobikisa mboka tɛ na ntina na bayɛngɛbɛni ntuku mitano bajali kati na yango?” Eyano malamu oyo Yehova apesaki elendisaki Abalayama na kolanda kosɛnga kino motángo mokitisamaki na zomi. Yehova ayebaki ete bobele libota ya Lota nde ebongaki kobikisama, mpe bibongiseli bisilaki kokamatama mpo na yango. Kasi na motema pɛtɛɛ nyonso Nzambe atikaki Abalayama alanda kotuna ye kino akangaki bonene ya mawa ya Yehova.—Genese 18:20-32.
Yehova atalelaki bososoli ya Abalayama oyo ezalaki na ndelo mpe mayoki na ye ya komibanzabanza. Soki biso mpe tokososola bandelo na bayekoli na biso ya Biblia, yango ekosalisa biso na komonisa motema pɛtɛɛ wana bazali kobunda mpo na kokanga likambo moko to mpo na kolónga mimeseno mabe oyo misili kokɔtela bango.
Landá koyekola epai na Yehova
Na ntembe te, Yehova Nzambe azali Molakisi Monene. Na nzela ya bililingi, mituna, mpe mateya, apesaka mayele na motema pɛtɛɛ nyonso. Na meko oyo tozali komekola lolenge na ye ya koteya, biso moko tokokóma bateyi malamu koleka.
Lokola baoyo bazali koteya basusu basengeli te kozala na bopotu mpo na komiteya bango moko, tosengeli kolanda “kolakisama na Yehova.” (Yisaya 54:13) Yisaya akomaki ete: “Miso na yɔ makomɔna [Molakisi na yo Monene, NW]. Mpe matoi na yɔ makoyoka liloba nsima na yɔ ete: ‘Oyo ejali njela, tambola na yango,’ wana ekobongwana yɔ na epai na mobali to na epai na mwasi.” (Yisaya 30:20, 21) Na kolandáká kotambola na banzela ya Yehova mpe na kosalisáká basusu na kosala bongo, tozali solo na libaku kitoko ya koyekola libela epai ya Molakisi na biso Monene.
[Elilingi na lokasa 28]
Yehova atunaki Yobo ete: “Ezali na etindá na yo nde mpongo epumbwaka na likoló mpe etongaka zúmbu na ye na bisika bitombwami mingi?”
[Elilingi na lokasa 28]
Na nzela ya nkamba ya liboke, Yehova ateyaki Yona kozala na komibanzabanza mingi mpo na bato mosusu