Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/9 nk. 25-26
  • Eutelo ya mpiko oyo ekoki kolɛmba te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eutelo ya mpiko oyo ekoki kolɛmba te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya mpo na baklisto
  • Tózala na mpiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Pesá ngai mpiko
    Tóyembela Yehova na esengo
  • “Zalá na mpiko mpe zalá na makasi mpenza”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Zalá na mpiko . . . mpe salá”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/9 nk. 25-26

Eutelo ya mpiko oyo ekoki kolɛmba te

“PIÓLÓLÓ moko oyo ebɛtaki etindaki biso ete tótɛlɛma mbala moko na nzela tozalaki kokende. Na nsima, longwa na zámba na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi, ndɛkɛ mibale ezalaki koya liboso na biso wana mapapu na bango ezalaki ya kofungwama. Maki mibale ezalaki liboso na biso kati na libulu moko moke na mabelé. Bandɛkɛ yango bayaki kopekisa biso noki tokonyata zúmbu na bango kozanga kokanela. Mbala nyonso oyo tozalaki komeka kopusana pembeni ya maki kitoko ya matɔnimatɔni oyo ezalaki na langi ya sokolá mpo na kokanga yango fɔtɔ́, bandɛkɛ yango bazalaki koya mbala na mbala kopekisa biso. Tolobaki ete: ‘Oyo nde mpiko!’”

Wana ezalaki likambo mikóló minei bakutanaki na yango wana ezalaki bango kobɛlɛma pembeni ya zúmbu ya ndɛkɛ wana ya matɔnimatɔni oyo ekofandaka pembeni ya mai. Ndɛkɛ moke wana babéngi yango pluvier. Kati na búku Everyone’s Guide to South African Birds (Lisungi mpo na moto nyonso oyo alingi koyeba bandɛkɛ ya Afrika ya Súdi), Sinclair mpe Mendelsohn, oyo bazali bongo bato bakoyekolaka bandɛkɛ, bapesi ndimbola oyo ete: “Ndɛkɛ ya mwasi mpe ya mobali, oyo ezali kobɔkɔla bana ebatelaka zúmbu mpe bana na yango na nguya nyonso mpe bakómaka na nkanda makasi soki eloko moko ebɛlɛmi pembeni na yango. Ebangaka soko moke te mpo na bonene ya monguna mpe ekopumbwaka na konganga makasi, kobundisa ata mpe bato na kotubáká bango monɔkɔ na yango mpo na kobangisa bango.”

Basusu basilá mpenza komona banzoku oyo, kozanga kotya likebi, bazalaki kotambola epai zúmbu ya pluvier ezali, bobele mpo na kotumola ndɛkɛ yango. Mbala mingi, banzoku basalaka eloko mosusu te bobele kobaluka epai bautaki.

Epai wapi ndɛkɛ ezwi mpiko motindo wana? Eutaka epai na ye Oyo azalisaki bango. Yehova Nzambe atyaki kati na bikelamu wana ya mike ebongiseli ya loómbi (instinct) mpo na kopekisa banyama minene ete bábebisa te zúmbu to bana na bango.

Liteya mpo na baklisto

Atako soki balingi kosalela mpiko na bango na koleka oyo epusami bobele na loómbi, baklisto bakoki kozwa liteya kati na likambo oyo. Basɛngisami ete bámekola Nkolo na bango, Yesu Klisto, ye oyo kozanga kobanga, atosaki mibeko ya Nzambe. (Baebele 12:1-3) Biblia ezali kokweisa bato na goigoi oyo bamipekisaka mpo na kosalela Nzambe. (Baebele 10:39; Emoniseli 21:8) Yehova azali mpe koyeba ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe ayebi ete na bantango mosusu, tokoki kosala lisumu to kozanga mpiko oyo esengeli na biso mpo na kosala mokano na ye na mobimba mpenza. (Nzembo 103:12-14) Moto akoki kosala nini soki ezaleli ya kobanga epekisi ye na kosala oyo ezali sembo?

Moklisto asengeli komibalola epai na Nzambe kati na libondeli mpo na kozwa mpiko ya kolónga komekama mpe kolanda kosala mokano ya Nzambe. Kati na Biblia, tozali kokuta elaká kitoko oyo etali lisalisi ya Yehova ete: “Akopɛsa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo ajangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilɛngɛ bakosenjwa, bakolɛmba, mpe bato na bilanga mingi tɛ bakokweakwea na nsé; nde baoyo bakolambelaka [Yehova] bakojwa nguya na sika, bakopombwa likolo na mapapu lokola mpɔngɔ, bakopota mbango nde bakolɛmba tɛ, bakotambola nde bakosenjwa tɛ.” (Yisaya 40:29-31) Bato mingi ya kozanga kokoka basilá komona bosolo ya maloba oyo mpe “bakembisami kati na bolɛmbu.” (Baebele 11:34) Ndakisa malamu ezalaki bongo ntoma Paulo, ye akomaki ete: “Nde nkolo atɛlɛmi pɛmbɛni na ngai mpe akembisi ngai na nguya ete na monɔkɔ na ngai nasakola esakweli mobimba mpenja, ete bapakano yɔnsɔ bayoka yango. Bongo nalongolami na monɔkɔ na nkɔsi.”​—2 Timɔtɛ 4:17.

Ata mpe bato oyo bauti kosepela na solo kala mingi te, oyo balingi kokóma bayekoli ya Yesu Klisto bakoki komona lisalisi oyo euti na nguya yango. Tókamata ndakisa ya Henry, mobali moko ya Afrika ya Súdi, ye azalaki mobombi mosolo ya lingomba na bango mpe ndako na ye ezalaki pembeni na oyo ya pasteur na bango. Henry azalaki koluka solo. Atako azalaki na bokangami na lingomba na ye, mokolo moko andimaki koyekola Biblia na ndako na ye kozanga kofuta mosolo elongo na Batatoli ya Yehova. Na nsima, amonisaki mposa ya kokóma Motatoli mpe atunaki soki matambe nini asengelaki kosala mpo na kokokisa mokano wana. Bayebisaki ye ete asengelaki liboso kolongwa na lingomba na ye. (Emoniseli 18:4) Lokola pasteur azalaki mozalani na ye mpe moninga na ye, Henry akanisaki ete akokaki te bobele kokoma mokanda ya koyebisa komilongola na ye na lingomba, kasi asengelaki nde kolimbola likambo yango polele liboso ya pasteur. Asalaki yango na mpiko nyonso.

Pasteur atungisamaki mpe akamataki mokambi ya likita mpe basangani mosusu ya lingomba mpo ete bákende kotala Henry. Balingaki koyeba mpo na nini atikaki lingomba na bango mpo na kokóma mosangani ya lingomba mosusu oyo, engebene bango, ezangi elimo santu ya Nzambe. Henry alimbolaki ete: “Na ebandeli, nabangaki koyanola bango, mpamba te babandaki ntango nyonso kozala na bopusi makasi likoló na ngai. Kasi nabondelaki Yehova mpo na kosɛnga lisungi mpe asalisaki ngai ete nayebisa maloba oyo: ‘Na mangomba nyonso oyo ezali na mokili, wapi lingomba bobele moko oyo esalelaka nkombo ya Nzambe, Yehova? Ezali bongo Batatoli ya Yehova, boye te? Bokanisi ete Nzambe alingaki kotika bango ete bámema nkombo na ye kozanga ete apesa bango elimo santu na ye?’” Bakonzi ya lingomba bazalaki na likoki te ya kokweisa makanisi wana. Na lisalisi ya boyebi mpe ya nguya oyo Nzambe azali kopesa, sikawa Henry azali kosangana na Batatoli ya Yehova na mpiko nyonso kati na mosala ya kosakola ndako na ndako.

Ee, kozala moklisto ya solo ezali kosɛnga kozala na mpiko. Lokola nsuka ya mokili oyo ezali kobɛlɛma, makambo oyo makotya kondima na biso na komekama makozala mingi. Satana alingi kolongwela baklisto elikya na bango kitoko ya bomoi ya seko na komekáká kobebisa bosembo na bango epai ya Yehova. (Kokanisá na Emoniseli 2:10.) Kasi tosengeli kotika soko moke te. Ata soki tokoki kolɛmba mpo na mwa ntango moke mpo na kobanga, Yehova akoki kosalisa biso ete tózwa lisusu makasi. Tókóba koluka nguya epai na ye mpo na kolanda kosala mokano na ye. Tómikundola ete, ye oyo asalaki bandɛkɛ oyo bakobangaka te, azali Eutelo ya mpiko oyo ekoki kolɛmba te. Ya solo, baklisto ya solo basengeli “kojala na [mpiko, NW] mpe koloba ete: “[Yehova] ajali mosungi na ngai; nakobanga tɛ. Moto akosalela ngai nini?’”​—Baɛbɛlɛ 13:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto