Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/8 lok. 31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Nzambe aponi Davidi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Moto oyo asepelisaki motema ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yisaya​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Davidi ná Goliate
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/8 lok. 31

Mituna ya Batángi

Lokola Yesu autaki na libota ya Yese mpe ya Davidi, mpo na nini abéngami “mosisa” ya bankɔ́kɔ na ye Yese mpe Davidi?

Na lolenge ezalaka, mosisa ya nzeté to ya etwɛlɛ nde eyaka liboso ya mobímbi to ya bitápe. Na bongo, emonani ete Yese (to mwana na ye Davidi) nde basengelaki kolobelama ete bazali mosisa oyo longwa na yango Yesu akokaki kobima. Lisusu, Yisaya 11:10 (NW) esakolaki ete Masiya oyo akoya, akozala “mosisa ya Yese,” mpe Baloma 15:12 esalelaki esakweli yango mpo na Yesu Klisto. Na nsima Emoniseli 5:5 (NW) ebéngi ye ete: “Nkɔsi oyo abimi na libota na Yuda, Mosisa ya Davidi.” Bankombo wana ezali na ntina.

Mbala mingi Biblia esalelaka etwɛlɛ, na ndakisa nzeté, na elobeli ya elilingi. Ntango mosusu yango euti na likambo oyo ete wana mombóto mozali kobima mpe kokóla, misisa mikólaka liboso ya bitápe, to ya mbuma, nyonso oyo esimbami na misisa. Na ndakisa, Yisaya 37:31 elobi ete: “Litika na bato baoyo bakobika na libota na Yuda ekokɔtisa misisa na mabele lisusu mpe ekobota mbuma likolo.”​—Yobo 14:8, 9; Yisaya 14:29.

Soki likámá likómeli mosisa, nzeté mobimba mpe emonaka mpasi. (Kokanisá na Matai 3:10; 13:6.) Na boyokani na likambo yango, Malaki akomaki ete: “‘Mokɔlɔ oyo ekoya ekojikisa bango kino ekotika etape to mosisa epai na bango tɛ. [Yehova] na bibele alobi bongo.’” (Malaki 4:1) Ndimbola ezali polele​—kokatama mpenza. Baboti (misisa) basengelaki kokatama, ezala mpe bakitani na bango (bitápe).a Yango emonisi mokumba oyo baboti bazali na yango epai na bana na bango oyo bazali mike; kobika ya bana mike mpo na mikolo mizali koya etaleli etɛlɛmɛlo oyo baboti na bango bakozala na yango liboso ya Nzambe.​—1 Bakolinti 7:14.

Elobeli oyo ezali na Yisaya 37:31 mpe na Malaki 4:1 emonisi ete bitápe (mpe mbuma ya bitápe ya mibale) ezali kozwa bomoi na yango longwa na mosisa. Yango ezali na ntina mpo na koyeba lolenge nini Yesu azali “mosisa ya Yese” mpe “mosisa ya Davidi.”

Na mosuni, Yese mpe Davidi bazalaki bankɔ́kɔ ya Yesu; bazalaki misisa, Yesu azalaki eyana (rejeton) to etápe. Yisaya 11:1 elobaki na ntina na Masiya oyo azali koya ete: “Njete ekotɔa na ntina na [Yese, NW] mpe etape ekobima na misisa na ye.” Bobele bongo, na Emoniseli 22:16 (NW), Yesu amibéngi “mokitani ya Davidi.” Kasi azali mpe komibénga ete “mosisa ya Davidi.” Mpo na nini?

Yesu azali “mosisa” ya Yese mpe ya Davidi na ndimbola boye ete na nzela na ye nde molɔngɔ́ ya libota na bango ezali na bomoi. Ezali na moto moko te lelo, oyo akoki koloba ete azali moto ya libota ya Levi, ya Dani, to ata ya Yuda, kasi tokoki kondimisama ete molɔngɔ́ ya Yese mpe ya Davidi ezali na bomoi mpamba te Yesu azali sikawa na bomoi kati na makoló.​—Matai 1:1-16; Baloma 6:9.

Yesu azwaki lisusu etɛlɛmɛlo ya kozala Mokonzi na likoló. (Luka 1:32, 33; 19:12, 15; 1 Bakolinti 15:25) Yango etali mpe etɛlɛmɛlo na ye liboso ya bankɔ́kɔ na ye. Na lolenge ya esakweli, Davidi abéngaki Yesu ete Nkolo na ye.​—Nzembo 110:1; Misala 2:34-36.

Mpo na kosukisa, Yesu Klisto asili kotyama Mosambisi. Na boumeli ya Mbula Nkóto oyo ezali koya, matomba ya mbeka na lisiko ya Yesu makopesama mpe epai na Yese mpe Davidi. Bomoi na bango awa na mabelé ekotalela bongo Yesu, oyo akosala lokola “Tata na seko” mpo na bango.”​—Yisaya 9:6.

Na yango, atako Yesu abimaki na libota ya Yese mpe ya Davidi, oyo ye akómaki mpe oyo akosala esali ete abéngama “mosisa ya Yese” mpe “mosisa ya Davidi.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Likomi moko ya kala likoló na nkunda na Phénicie ezalaki mpe kosalela elobeli motindo moko. Elobaki na ntina na baoyo bafungolaki nkunda: “Tiká ete bázala na misisa te na nsé to mbuma na likoló te!”​—Vetus Testamentum, Apríli 1961.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto