Ozali komikundola?
Otyaki mpenza likebi na banimero ya sika ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Soki ezali bongo, okosepela na komikundola makambo oyo malandi:
▫ Wapi bokeseni monene oyo ezali kati na moto mpe nyama?
Bokeseni monene ezali mpenza na motindo, na makoki mpe na misala oyo bɔɔngɔ́ ezali kosala. Epai na nyama penepene na misala nyonso ya bɔɔngɔ́ misili kokanama liboso kati na oyo ebéngami ete loómbi (instinct). Yango ezali bongo te epai na bato. Nzambe asalaki bato na makoki ya kopona. (Masese 30:24-28)—4/15, lokasa 5.
▫ Kati na losambo ya Bayisraele oyo lozalaki kosalema kati na tempelo, nzembo ezalaki kokokisa mokumba nini?
Miziki, mingimingi loyembo, ezalaki na ntina mingi kati na losambo, bobele te mpo na komonisa ntina ya Mibeko mpenza, kasi mpo na komonisa elimo malamu mpo na losambo. Ezalaki kosalisa Bayisraele na kosambela Yehova kati na elimo. (1 Ntango 23:4, 5; 25:7)—5/1, nkasa 10, 11.
▫ Likebi ya lolenge nini bana bazali na yango mposa longwa na bomwana?
Baboti basengeli kopesa likebi ya ntango nyonso epai na mwana oyo auti kobotama. Paulo akomaki ete: “Longwa na bomwana na yɔ, osili koyeba Makomi na bulɛɛ, makoki kopɛsa yɔ boyebi mpɔ na kobika.” (2 Timɔtɛ 3:15) Na yango, likebi oyo Timoté azwaki epai na baboti na ye, longwa na bomwana, ezalaki mpe na lolenge ya elimo.—5/15, lokasa 11.
▫ Wapi bilembeteli minei oyo bimonisi ete Biblia ezali na nsango ya Nzambe oyo etali bato nyonso?
(1) Ezali mpo na bato banso. Biblia ekoki komonana na nkótá soko 98% ya bafandi ya mokili. (2) Elobaka solo na makambo ya kala. Biblia ezali na masoló ya makambo ya kala oyo masalemaki solo, kasi masapo ya mpamba te oyo mazangi bilembeteli. (3) Ezali kopesa lisalisi libongi. Mibeko mpe mitindá na yango mizali kolakisa lolenge ya bomoi oyo ezali kopesa litomba epai na baoyo bazali mpenza kolanda yango. (4) Bisakweli. Ezali búku oyo eyebisaka makambo makobima na nsima.—6/1, nkasa 8, 9.
▫ Mokumba nini ezali na koyeba lingomba ya solo?
Wana toyebi lingomba ya solo, tosengeli kotónga bomoi na biso likoló na yango. Ezali nzela ya bomoi. (Nzembo 119:105; Yisaya 2:3)—6/1, lokasa 13.
▫ Mpo na nini boyekoli na biso moko ya Biblia ezali na ntina?
Basaleli nyonso ya Nzambe bazali na mposa ya kozala na esengo mpe na makasi oyo ezali ntango nyonso ya sika mokolo na mokolo na kozwáká makambo ya sika mpe ya mozindo ya solo ya Liloba na Nzambe. Na kosaláká bongo, bakozala na makasi na elimo.—6/15, lokasa 8.
▫ Liloba “lisumu” lokola esalelami na Biblia elimboli nini?
Kati na bikelelo (verbes) ya Liebele mpe ya Greke, maloba masalelami kati na Biblia mpo na komonisa “lisumu” elimboli “kozanga,” na ndimbola ya kozanga kokóma na mokano moko, na elembo moko, to na eloko moko oyo ozali koluka. Lokola bazangaki kokokisa mokano mpo na yango bazalisamaki na elilingi ya Nzambe, bato ya liboso bakómaki te na nkembo ya Nzambe. Na maloba mosusu, basalaki lisumu. (Genese 2:17; 3:6)—6/15, lokasa 12.
▫ Mpo na nini kotánga mikanda ya bapɛngwi ezali kozanga bwanya?
Mikanda misusu ya bapɛngwi mizali na makambo ya lokuta na nzela ya “maloba na elɛngi” mpe na “maloba na kokosa.” (Baloma 16:17, 18; 2 Pɛtɛlɔ 2:3) Maloba nyonso ya bapɛngwi ezali bobele mpo na kotɔnga mpe mpo na kolembisa. Likambo moko ya kolendisa ezali te.—7/1, lokasa 12.
▫ Demokrasi ebotamaki nde na Grèce?
Na Grèce ya kala, demokrasi ezalaki kosalelama bobele kati na bamboka minene, mpe ata na bamboka wana bobele mibali nde bazalaki kosala bopɔni. Yango elimboli ete bafandi minei likoló na mitano batalelamaki na yango te. Yango ezalaki mpenza boyangeli ya bato banso soko moke te to demokrasi!—7/1, lokasa 16
▫ Nini ezali kosala ete libala ya baklisto elónga?
Soki mobali mpe mwasi bazali komemya likanisi ya Nzambe mpo na oyo etali libala mpe soki bazali kosala makasi na kolanda mitindá ya Liloba na ye. (Baefese 5:21-33)—7/15, lokasa 10.
▫ Lolenge nini boyekoli na bino ya libota ekoki kozala ya kosepelisa?
Meká kosala ete bana nyonso básangana na yango. Zalá na elimo ya kolónga mpe ya kolendisa, na esengo nyonso pesá longonya na bana na yo mpo na bosangani na bango. Koluka te kotalela makambo mingi, kasi meká nde kosimba mitema ya bana na yo.—7/15, lokasa 18.
▫ Maloba oyo: “Wana ekoloba bango ete: ‘Kimya mpe kobatelama!’” malimboli nini? (1 Batesaloniki 5:3, NW)
Tóyeba ete, Biblia elobi te ete mabota makopesa “kimya mpe kobatelama.” Kasi bakomeka koloba na ntina na yango na lolenge ya sikisiki, komonisáká elikya makasi mpe kondimisama oyo ezali makasi kino sikawa. Makoki ya kopesa kimya mpe kobatelama ekomonana ete ebɛlɛmi mpenza koleka ndenge ezalaki liboso.—8/1, lokasa 6.
▫ Tangá makambo misato kati na yango Yehova amonisaki ete azali na makambo makasi te.
Yehova amimonisaka pene ya kolimbisa. (Nzembo 86:5) Amonisaki na motema moko ete akoki kobongola likanisi akani kosala soki likambo moko ya sika ebimi. (Talá Yona, mokapo 3.) Lisusu, Yehova amimonisaki ye moko ete azali na makambo makasi te kati na lolenge na ye ya kosalela bokonzi. (1 Mikonzi 22:19-22)—8/1, nkasa 12-14.