Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/8 lok. 32
  • Makomi oyo mazali na ndimbola monene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makomi oyo mazali na ndimbola monene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/8 lok. 32

Makomi oyo mazali na ndimbola monene

“IEHOVA SIT TIBI CUSTOS”

MALOBA oyo makomami likoló na efelo ya ndako moko na ekeke ya zomi na nsambo na mboka moke Celerina, na ɛ́sti ya Suisse, elimboli ete “Yehova azala mobateli na yo.” Kati na etúká wana ya bangomba, nkombo ya Nzambe emonanaka mingi wana eyemami to ekomami uta kala likoló na​—bandako ya kala, bandakonzambe, mpe na bandako ya basángó. Lolenge nini nkombo ya Yehova eyebanaki mingi boye?

Rhaetia ya kala (bosangisi ya biteni ya oyo ezali sikawa súdi-ɛ́sti ya Allemagne, Autriche, mpe ɛ́sti ya Suisse) ekómaki etúká ya Loma na mobu 15 L.T.B. Bafandi bakómaki koloba lokótá Romanche, oyo ezalaki lokótá louti na Latin​—oyo ekabwanaki na minɔkɔ mike mingi oyo ezali kolobama kino sikawa na biteni mosusu ya mabwaku ya bangomba Alpes na Suisse mpe na nɔ́rdi ya Italie.

Na nsima, biteni ya Biblia bibongolamaki na lokótá Romanche. Libongoli moko, Biblia Pitschna ezalaki na Nzembo mpe na Makomami ya Greke ya Boklisto. Kati na Biblia wana, oyo ebimisamaki na 1666, nkombo Iehova ezali komonana mbala mingi kati na Nzembo. Lokola Biblia ezalaki eloko ya liboso ya kotánga na ndako, batángi ya Biblia Pitschna bamesanaki mingi na nkombo ya Mozalisi.

Nzokande, mabota oyo mayaki nsima mazalaki lisusu kosepela te na makambo matali Biblia. Mingi bamipesaki te na koyeba soki liloba “Iehova” elimboli nini, mpe bakonzi ya mangomba basalaki milende te mpo na kolimbola yango. Boye, makomi wana makómaki sé ekɛmbiseli ya mpamba ya ntango ya kala.

Na bambula oyo euti koleka mbongwana monene esalemaki kati na boyebi na bato. Batatoli ya Yehova bautaki na bisika patatálu ya Suisse, kolekisa bongo bileko na bango ya bopemi na mabwaku kitoko wana mpe kosaláká makasi mpo na koteya na bafandi makambo oyo matali Nzambe, oyo nkombo na ye ezali Yehova. Batatoli mosusu bafandaki kati na etúká wana mpo ete bákoka kolekisa ntango mingi na koyebisa bato mikano kitoko ya Mozali mpo na mabelé mpe bato. Na yango, makomi wana ya kala na lokótá Romanche mazwi ndimbola ya sika epai na bato oyo bazali koyekola makambo matali Nzambe ya solo, Yehova.

[Maloba na elilingi ya lokasa 32]

IEHOVA PORTIO MEA: Yehova azali likabo na ngai.​—Talá Nzembo 119:57, “NW”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto