Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/6 nk. 19-23
  • Batikelaki biso ndakisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batikelaki biso ndakisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ayekoli solo ya Biblia
  • Mosala ya mobongisi-nzela na Australie
  • Babyangami na teritware ya mboka mopaya
  • Libala, bipekiseli, mpe etumba
  • Bomoi kati na bakáa ya bakangami
  • Bonsomi mpe bokutani oyo tokoki kobosana yango te
  • Bazongi na Australie
  • Yehova azalaki na ngai elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mboka batindaki biso Bamisionɛrɛ ekómi mboka na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/6 nk. 19-23

Batikelaki biso ndakisa

LISOLÓ YA CRAIG ZANKER

Uta mibu mwambe, mwasi na ngai, Gayle, mpe ngai tozali kosala

lokola babongisi-nzela, basáli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya mibu motoba oyo miuti koleka, tozali kosala kati na bafandi ya liboso ya mboka mike ya Australie. Tozali bobele kolanda ndakisa kitoko oyo baboti na ngai mpe bankɔ́kɔ na ngai batikelaki biso.

BÓTIKA nayebisa bino mingi mpenza na ntina na bankɔ́kɔ na ngai. Tobéngaka bango ntango nyonso na bolingo mingi ete Opa mpe Oma, maloba ya lokótá néerlandais mpo na kolobela nkɔ́kɔ-mobali mpe nkɔ́kɔ-mwasi. Nkɔ́kɔ na ngai ya mobali, Charles Harris, azali naino kosala lokola mobongisi-nzela na Melbourne, esika azali kofanda uta pene na mibu 50.

Ayekoli solo ya Biblia

Opa abotamaki na engumba moko moke Tasmanie, na etúká ya bisanga ya Australie. Na 1924, ntango azalaki na mibu 14, tata na ye asombaki valisi moko ya basáli na masuwa na libaku moko wana Leta azalaki kotekisa biloko. Yango ekómaki liziba ya bozwi mingi, na elimo, mpamba te ezalaki na babúku oyo ekomamaki na prezidá ya yambo ya Watch Tower Bible and Tract Society, Charles Taze Russell.

Emonanaki lokola ete tata ya Opa azalaki kosepela mingi te na babúku wana, kasi Opa abandaki kotánga yango mpe nokinoki asosolaki ete ezalaki na mateya ya solo ya Biblia. Yango wana abandaki koluka Bayekoli ya Biblia, bamonisi ya babimisi ya babúku yango, baoyo lelo bayebani na nkombo Batatoli ya Yehova. Alingaki kosolola elongo na bango mpo na kozwa bandimbola mosusu mingi ya mateya ya solo ya Biblia oyo azalaki koyekola.

Nsima ya kotunatuna bato mingi, akutanaki na mibangé basi misato oyo bazalaki na molende mpo na koteya bato basusu. Basalaki bopusi monene likoló na elenge Charles. Na nsima, na 1930, amipesaki epai na Yehova Nzambe mpe azwaki batisimo kati na mai. Atikaki mosala na ye ya motekisi nyama mpe asalaki mobembo epai na nɔ́rdi na engumba Sydney, esika atindamaki lokola mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso.

Mosala ya mobongisi-nzela na Australie

Na boumeli ya mwa bambula oyo elandaki, teritware ya Charles esangisaki kartyé Bondi ya engumba Sydney, pembeni ya mai monene mpe mboka mike na etúká ya Nouvelle-Galles ya Súdi. Na nsima atindamaki na Perth, na wɛ́sti ya Australie, bakilomɛtɛlɛ nkótó mingi na ngámbo mosusu ya mokili ya Australie. Na boumeli ya sanza motoba, apesaki litatoli na bisika ya mombongo ya Perth, mpe na nsima, elongo na babongisi-nzela mosusu mibale, batindamaki na bitando minene na nɔ́rdi-wɛ́sti ya Australie.

Teritware ya mibali wana misato​—Arthur Willis, George Rollsten, mpe Charles​—ezalaki etando monene oyo elekaki mboka Italie na monene mbala minei! Bato bazalaki mingi te, mboka mike ezalaki mpenza mpamba, mpe molungé mozalaki makasi. Mbala mosusu esengelaki kosala mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 500 kati na ba ranches (bitando minene ya mabelé), oyo eyebani lokola bibokwelo ya ngombe. Motuka oyo bazalaki kosalela mozalaki mpenza ya kobeba, ata soki tokokanisi yango na mituka oyo mizalaki na eleko ya kobeba makasi ya nkita na bambula 1930, kasi ata bongo bazalaki na kondima monene mpe na ekateli makasi.

Banzela mike ya bosoto mpe ya mabulumabulu ekatisamaki na bilekelo ya kamela, mpe na bisika mosusu mputulu (oyo ebéngami mputulu ya ngombe) ezalaki kozipa bikumu mabe ya nzeté. Ezalaki bongo likambo ya kokamwa te soki lesɔ́lɔ ya motuka ezalaki kobukana mbala na mbala. Ákisi ya nsima ekatanaki mbala mibale, mpe mbala mingi pinɛ́ ezalaki kotɔbɔka. Babongisi-nzela bazalaki kolongola biteni ya bapinɛ́ ya kala mpe kobamba yango makasi kati na pinɛ́ oyo bazalaki na yango na lisalisi ya bulo ya kokangisa manzanza ete bakoka kolanda mobembo na bango.

Ntango nazalaki mwana moke, natunaki Opa eloko oyo ezalaki kolendisa bango na koyika mpiko kati na mikakatano makasi wana. Alimbolaki ete atako bazalaki mosika na bato, Yehova azalaki mpenza penepene na bango. Alobaki ete likambo oyo mbala mosusu ezalaki mikakatano ya mosuni, lizalaki kokóma mapamboli ya elimo.

Kozanga komonisa ete aleki basusu to komimonisa sembo koleka, Opa amonaki likambo ya kokamwa ete ebele na bato bazali komitungisa mingi koleka mpo na konduka biloko mingi ya mosuni. Akundwelaki ngai ete, “kozala na bomoi oyo ezali na biloko mingi te eleki malamu. Soki Yesu azalaki pene ya kolala libándá ntango esɛngamaki bongo, boye biso mpe tosengeli kozala na esengo ya kosala mpe bongo wana mokumba na biso mosɛngi yango.” (Matai 8:19, 20) Ya solo, ye mpe baninga na ye basalaki bongo.

Babyangami na teritware ya mboka mopaya

Na 1935, Opa atindamaki na teritware ya sika​—kopesa litatoli epai na bafandi ya bisanga ya súdi ya mai monene Pacifique. Kati na etuluku ya bato motoba, asalaki mobembo kati na Lightbearer, masúwa ya la Société Watch Tower oyo ezalaki na bolai ya bamɛtɛlɛ 16.

Mokolo moko, wana bazalaki na mai monene ebéngami Mer de Corail na nɔ́rdi ya Australie, motɛ́lɛ oyo ezalaki kotambwisa Lightbearer ebebaki. Ata mopepe moke mozalaki te, na bongo batikalaki wana mosika na mabelé. Atako bazalaki na likámá oyo ekokaki kobebisa masúwa na esika ebéngami Grande Barrière de Corail, Opa akamwaki mpenza na kimya kitoko oyo ezalaki wana. Akomaki na manáka na ye ete: “Mai monene mazalaki lokola liziba moko, nakobosana soko moke te kolala ya moi mpokwa nyonso likoló na mai monene oyo ya kimya. Elilingi yango ezalaki mpenza kitoko na boye ete esili kokangisama na makanisi na ngai mpo na libela.”

Na esengo nyonso, liboso ete bápusama kino na ngomba ya mabangá, mopepe mozongaki mpe basalaki mobembo na kimya nyonso na nsé ya elamba ya kotambwisa masúwa kino libongo ya Moresby, na mboka Papouasie Nouvelle-Guinée, epai babongisaki motɛ́lɛ yango. Longwa na libongo ya Moresby, basalaki mobembo kino na esanga Thursday mpe bakómaki na Java, esanga moko monene ya Indonésie. Opa akólisaki bolingo moko mozindo mpo na mboka wana oyo elobelamaki lokola “nsinga ya mayaka oyo matandani likoló na nzela ya moi.” Na ntango wana, Indonésie eyangelamaki na ba hollandais, mpo na yango nkɔ́kɔ-mobali ayekolaki lokótá néerlandais mpe lokótá Indonésien. Nzokande, mikanda oyo azalaki kolakisa kati na mosala na ye ya kosakola mizalaki na nkótá mitano: Néerlandais, Indonésien, Chinois, Lingelesi, mpe Arabe.

Opa azalaki elombe mpo na oyo etali kokabola mikanda mikolimbolaka Biblia. Mokolo moko Clem Deschamp, oyo azalaki kosala na ebombelo ya mikanda ya la Société Watch Tower na engumba Batavia (sikawa Djakarta), abyangamaki liboso ya mokonzi moko ya bapolisi ya Hollande oyo azalaki kolandela penepene mosala na biso. Mokonzi wana ya bapolisi atunaki ete: “Bozali na bato boni oyo basalaka mosala kuna na Java ya ɛ́sti?”

Ndeko Deschamp ayanolaki ete, “Bobele moko.”

Mokonzi ya bapolisi angangaki ete, “Okanisi ete nakoki kondima yango? Bosengeli kozala na limpinga moko monene kuna, soki totaleli motángo ya mikanda oyo mizali kokabolama bipai binso!”

Mpo na Opa yango ezalaki moko na maloba ya kosepelisa mingi kati na bomoi na ye. Kasi abongaki solo na yango, mpamba te ezalaki likambo ya kokamwa te mpo na ye ete akabola mikanda 1 500 kino 3 000 sanza na sanza.

Libala, bipekiseli, mpe etumba

Na Desɛ́mbɛ 1938, Opa abalaki elenge mwasi moko ya Indonésie na nkombo Wilhelmina, oyo akómaki nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi. Oma, to nkɔ́kɔ-mwasi azalaki moto ya boboto, ya bopɔlɔ, mosáli monene mpe moto ya kimya. Nayebi yango, mpamba te ye azalaki moninga na ngai ya motema na ntango nazalaki mwana moke.

Nsima ya libala na bango, Opa mpe Oma balandaki mosala na bango ya babongisi-nzela esika moko. Na ntango yango, basangani mosusu ya Lightbearer basilaki kokende na biteni mosusu ya mokili to basilaki kozonga na mboka na bango. Kasi Opa akómisaki Indonésie mboka na ye, mpe azalaki na ekateli makasi ya kotikala kuna.

Wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebɛlɛmaki, na bopusi ya bakonzi na mangomba, boyangeli ya Hollande oyo ezalaki koyangela Indonésie, ebandaki kotya bipekiseli likoló na mosala ya Batatoli ya Yehova, mpe na nsima bapekisaki mosala na biso. Na bongo, mosala ya kosakola mokómaki kosalema na mpasi mingi, na kosaleláká bobele Biblia. Kati na bingumba penepene na nyonso epai Opa mpe Oma basakolaki, bamemaki bango liboso na bakonzi mpe batunaki bango mituna mingi. Batalelamaki lokola basáli na mabe. Mwa moke nsima ya bipekiseli, sɛmɛki ya Oma akangamaki na bolɔ́kɔ mpo na etelemelo na ye ya bokatikati. Akufaki na bolɔ́kɔ ya ba Hollandais.

Opa mpe Oma bazalaki kofanda kati na motuka moko oyo ezalaki na likalo oyo esalemaki mpo na yango. Na kosaleláká ndako wana ya kotambola, basakolaki bipai binso kati na Java. Na 1940, wana likámá na boyei ya basodá ya Japon libɛlɛmaki, bazwaki lipamboli ya kobota mwana moko ya mwasi, oyo akómaki mama na ngai. Bapesaki ye nkombo Victory, engebene motó ya lisukúlu oyo lisalemaki mibu mibale liboso, na J. F. Rutherford, oyo azalaki na ntango wana presidá ya Watch Tower Bible and Tract Society. Balandaki mosala na bango ya babongisi-nzela kino kobotama ya mwana na bango.

Na ebandeli ya 1942, Opa, Oma, mpe Victory bazalaki kati na masúwa ya Hollande oyo ememaka biloko, bautaki na Borneo wana bayokaki lokito makasi ya mondóki oyo ebɛtamaki na masúwa ya etumba ya ba Japonais. Miinda nyonso mizimamaki, mpe bato balelaki. Na motindo yango etumba ekɔtaki kati na bomoi ya libota na ngai. Atako bakómaki malamu na libongo, ba Japonais bakamataki Java bobele mwa mikolo na nsima, mpe mokonzi moko ya bapolisi ya Hollande alakisaki na basodá ya Japon esika Opa mpe Oma bazalaki.

Ntango ba Japonais bakutaki bango, babotolaki biloko na bango nyonso, ata mpe biloko ya kosakana ya mwana moke Victory, mpe batindamaki na bakáa mibale ekeseni ya bakangami. Victory apesamelaki nzela ya kofanda elongo na Oma, mpe Opa amonaki bango lisusu te na boumeli ya mibu misato na ndambo oyo milandaki.

Bomoi kati na bakáa ya bakangami

Na boumeli ya bokangami na ye, Opa atindamaki na engumba moko nsima na mosusu​—uta na Surabaja kino na Ngawi, na Bandung, mpe na nsuka na Tjimahi. Botambolisi yango ezalaki mpo na kopekisa myango nyonso ya kokima. Bakangami bazalaki mingimingi ba hollandais, elongo na mwa ndambo ya ba anglais mpe ya ba australiens moko moko. Ntango azalaki na bakáa ya bakangami, Opa ayekolaki mosala ya kokata nsuki, mayele oyo asalelaka yango kino lelo. Búku bobele moko ya losambo oyo apesamelaki nzela ya kotánga ezalaki Biblia.

Na ntango yango, Oma mpe Victory bazalaki mpe kotindama na káa moko nsima na mosusu. Kati na bakáa wana, komandá ya káa azalaki koyebisa na basi mosusu ete bábima mpo na kosala “misala mpo na litomba ya bato banso.” Nzokande, mpo na bantina eyebani te, Oma aponamaki soko moke te. Na nsima ayokaki ete basi wana bazalaki kokamatama mpo na kosala pite elongo na basodá oyo bazalaki ba Japonais.

Mpo ete basodá ya Japon bazalaki kosepela na bana basi te, Oma azalaki ntango nyonso kolatisa Victory lokola mwana mobali mpe azalaki kokata nsuki na ye mokuse. Nkombo Victory ebimisaki mokakatano monene ntango komandá ya káa alukaki koyeba ndimbola na nkombo yango​—Victory (bolóngi) mpo na limpinga ya mokonzi ya Japon to Victory (bolóngi) mpo na ba américains?

Nkɔ́kɔ na ngai ya mwasi ayanolaki na litundú nyonso ete “Victory (bolóngi) ya Bokonzi na Nzambe likoló na biyangeli nyonso ya mabelé!”

Lokola etumbu mpo aboyaki koloba ete, “Victory (bolóngi) mpo na limpinga ya mokonzi ya Japon,” Oma mpe mwana na ye ya mwasi ya mibu mitano basengelaki kotelema alima na boumeli ya ngonga mwambe na nsé ya moi makasi ya mikili ya molungé. Malili moko te, mai te, kofanda te, kogunzama liboso te. Kasi na lisalisi ya Yehova balóngaki monyoko wana ya nsɔ́mɔ.

Bobele mbula moko nsima ya bokangami ya Oma, komandá ya káa ayebisaki ye ete mobali na ye asili kokufa. Na mawa nyonso atyaki fɔtɔ́ ya Opa na nsé ya valisi na ye oyo ebeba mpe alembaki te, atako azalaki na mawa.

Bomoi kati na bolɔ́kɔ ezalaki mpasi mingi. Bilei ya mokolo na mokolo mpo na moto na moto ezalaki kɔpɔ moko ya pɔtɔpɔ́tɔ ya songo na ntɔ́ngɔ́, mwa eteni ya kwanga na midi, kɔpɔ moko ya loso esangisami na ndunda ya maimai na mpokwa. Na ntina na kozanga ya bilei malamu, bokɔnɔ ya nzala epalanganaki mingi, mpe bato oyo babɛlaki pulúpulú ya makila bazalaki kokufa mokolo na mokolo.

Na boumeli ya bokangami ya Opa, abɛlaki bokɔnɔ ya kozanga vitamini mpe kovimba ya libumu (bokɔnɔ ya nzala). Oma mpe alingaki kokufa, mpo ete azalaki ntango nyonso kopesa Victory bilei na ye mpo na kobatela ye ete akufa te na nzala. Monyokoli mpe kozanga bilei ezalaki mpenza ntango nyonso wana. Bakokaki kobika bobele mpo na boyokani ya penepene oyo bazalaki na yango elongo na Nzambe na bango, Yehova.

Nazali mpenza komikundola maloba oyo Opa azalaki kolinga yango mingi: “Bonsomi elimboli kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe, Yehova.” Na yango, Opa azalaki komitalela mpenza ete azalaki na bonsomi atako azalaki koyikela mikakatano mpiko kati na bolɔ́kɔ. Bolingo oyo ye mpe Oma bazalaki na yango mpo na Yehova esalisaki bango na ‘koyika mpiko na nyonso.’ (1 Bakolinti 13:7) Boyokani wana ya penepene elongo na Nzambe ezali oyo Gayle mpe ngai tozali sikawa kosala milende mpo na kobatela yango.

Bonsomi mpe bokutani oyo tokoki kobosana yango te

Na nsuka, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki na 1945. Mwa moke nsima wana Japon aboyaki etumba, Opa azalaki na mobembo kati na engbunduka. Na nzela, wana bautaki na Djakarta mpo na kokende na Bandung, basodá ya Indonésie batelemisaki engbunduka. Atako matáta elongo na ba Japonais masilaki, ba Indonésiens bazalaki kobunda mpo na kozwa lipandá epai na Hollande. Opa abulunganaki mingi wana babimisaki ye pwasa mpenza na engbunduka na boye ete abosanaki nkutu koloba Lingelesi mpe na esika na yango abandaki koloba néerlandais. Mpo na ba Indonésiens, néerlandais ezalaki lokótá ya banguna, mpe monguna asengelaki kobomama.

Na esengo nyonso, wana basodá bazalaki kotalatala Opa, bamonaki mokanda na ye ya mokumbi-motuka ya mboka Australie, oyo azalaki kokanisa yango lisusu te. Likambo ya esengo, ba Indonésiens bazalaki kobundisa Australie te. Kino lelo oyo, Opa atalelaka komonana ya mokanda wana oyo emonisaki ye lokola mwana mboka ya Australie ete ezalaki lisalisi ya Nzambe, mpamba te bobele na esika yango, mwa bangonga na nsima, bituluku wana bibomaki ba Hollandais 12 oyo bazalaki koleka na engbunduka.

Mwa ntango moke nsima ya likambo wana, Oma mpe Victory bazalaki kozela mituka oyo mizalaki kouta na bitúká oyo bibebaki mpenza na etumba. Wana bafandaki pembeni ya nzela, molɔngɔ́ molai ya mituka oyo mizalaki na basodá mpe basivili mizalaki koleka. Na mbala moko, kozanga ntina ya sikisiki, molɔngɔ́ yango motelemaki. Oma akendeki kotala kati na motuka oyo nsima na yango ezalaki polele, mpe, na kokamwa monene, mobali moko akɔndakɔnda oyo ye ayebaki malamu afandaki kuna. Ezalaki mobali na ye! Maloba mazangi mpo na kolimbola maoki ya bokutani wana.

Bazongi na Australie

Ntango nkɔ́kɔ-mobali azongaki elongo na libota na ye na Australie na 1946, nsima na kofanda mibu 11 na Indonésie, bomoi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango. Bazongaki lokola bato bakimá mboka​—bazalaki na eloko te, bakɔndakɔnda na nzala, mpe bato na mboka bazalaki na makanisi mabe mpo na bango. Oma mpe Victory basengelaki koyika mpiko na makanisi mabe na ntina na bato ya Azia oyo bafandaki kuna. Opa asengelaki kosala mosala makasi mpe na boumeli ya bangonga mingi mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye mpe kozwela bango esika ya kofanda. Atako bakutanaki na mikakatano wana, bayikaki mpiko mpe balóngaki kobatela malamu elimo na bango.

Lelo oyo, nsima ya mibu 48, Opa azali kofanda na Melbourne, epai azali naino kosangana na molende nyonso na mosala ya ndako na ndako elongo na bilenge babongisi-nzela. Asili komona Victory mpe bana na ye kondima solo, komipesa epai na Yehova, mpe kokɔta moto na moto na ngala na ye kati na mosala ya ntango nyonso lokola babongisi-nzela.

Victory mpe Desmon Zanker, oyo akómaki tata na ngai, bazwaki batisimo na ebandeli ya bambula 1950, mpe Desmon akómaki mosangani ya libota ya Betele ya Australie na 1958. Nsima ya kobala Victory, oyo azalaki kosala lokola mobongi-nzela monene, basalaki mwa ntango moke lokola babongisi-nzela mpe na nsima babyangamaki na mosala ya mokɛngɛli-motambóli. Na nsima, nayaki kobotama, mpe esengelaki ete bátika mosala ya mokɛngɛli-motambóli mpo na kobɔkɔla ngai. Nzokande, nsima ya mibu 27, Papa azali naino kosala lokola mobongisi-nzela.

Na ebandeli ya mobu 1990, Oma akufaki na kimya nyonso na ndako, bobele ndako oyo mama abokwamaki. Ngai mpe nabokwamaki sé na ndako wana ya Melbourne, ezalaki mpe lolenge moko mpo na lɛki na ngai ya mobali mpe lɛki na ngai ya mwasi. Ezalaki mpenza lipamboli monene mpo na libota na biso mobimba kofanda kati na ndako moko. Na bantango mosusu yango ezalaki mpenza na bato mingi, kasi nazali komikundola ete moto moko te azalaki komilelalela mpo na yango. Ata na boumeli ya mibu minei ya liboso oyo tolekisaki na libala na biso, mwasi na ngai, Gayle, afandaki kuna mpe asepelaki na yango. Na nsuka, ntango tolongwaki mpo na kokende na esika oyo totindamaki, nalelaki. Ndako wana esilaki komonisela ngai lisungi mpe bolingo mingi mpenza.

Nzokande, sikawa, Gayle mpe ngai tozali na ntina ya kozala na esengo mingi, mpamba te tokoki kosala oyo baboti na ngai basalaki mpe oyo baboti ya baboti na ngai basalaki liboso na bango. Ntango totikaki ndako, tozwaki libondisi, mpamba te toyebaki ete tozalaki kokokisa mokano ya Yehova kati na mosala ya ntango nyonso. Tozali komeka na molende nyonso kolanda ndakisa kitoko oyo bankɔ́kɔ na biso ya sembo batikaki, baoyo bazalaki kozwa libondisi motindo moko wana bazalaki kosala mosala kati na bisika ya mpasi mingi, wana bazalaki kati na bobólá monene, mpe wana bakangamaki na boumeli ya mibu mingi kati na bakáa ya bakangami ya ba Japonais.​—2 Bakolinti 1:3, 4.

Opa azwaki ntango nyonso libondisi kati na maloba oyo ya Mokonzi Davidi epai na Yehova ete: “Motema-boboto na yo ezali malamu koleka bomoi.” (Nzembo 63:3, NW) Ntango nyonso, mposa monene ya nkɔ́kɔ na ngai ya mobali ezalaka ya kosepela libela na motema-boboto wana. Ezali mposa na libota na ye mobimba ya kosepela na yango elongo na ye.

[Elilingi na lokasa 21]

Oma mpe Opa Harris

[Elilingi na lokasa 23]

Craig Zanker (na nsima), elongo na mwasi na ye mpe baboti na ye, lɛki na ye ya mobali mpe lɛki na ye ya mwasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto