Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/4 lok. 32
  • Eleki pauni na motuya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eleki pauni na motuya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/4 lok. 32

Eleki pauni na motuya

Ntalo monene ya bapaya basepelaka mingi na komona biloko lokola oyo ezali na nsé ya Mai Motane.

Ebele na mbisi na langi ya monama ebendaka likebi ya baoyo bazali konyanya kati na mai oyo ezali lokola talatála. Kasi talá ete zingazinga ya mbisi ya langi mingi oyo emonani awa, ezali na biloko mosusu ya kokamwa oyo ezali kobenda likebi na nsé ya mai, kati na yango pauni ya ngɛlingɛli mpe ya langi makasi.

Bapauni ya kitoko ezali na lolenge mingi mpe na balangi ekeseni. Lokola okoki kokanisa yango, na ntango ya kala, biteni ya kitoko ya pauni bizalaki kotekama na motuya mingi. Basáli ya ntɔ́ki bazalaki kosala na yango biloko ya kosepelisa, mpe Biblia etángi pauni elongo na wolo, palata mpe mabangá na penini. (Masese 3:14, 15; Ezekiele 27:16) Kasi bakomi wana basalisi biso na komona mosika koleka kitoko mpe motuya ya pauni yango moko.

Bamonisaki polele ete biloko mosusu bizali nkutu na motuya koleka mpe tosengeli kopesa yango motuya mingi koleka. Moko na yango ezali mwasi malamu mpe ya molende, mpamba te tozali kotánga ete: “Nani akoki kozwa mwasi ya molende? Aleki pauni na motuya.” (Masese 31:10, NW) Ozali mobali oyo asilá kobala? Talá lisusu kitoko ya pauni oyo ezali awa, mpe kanisá soki ozali kopesa mwasi na yo motuya oyo abongi na yango.

Tózala mibali to basi, bato babalá to minzemba, kotala pauni ya kitoko esengeli kosalisa biso na kososola motuya moleki monene ya bwanya bouti na Nzambe, ya bososoli mpe ya boyebi. Liloba ya Nzambe liyebisi ete: “Esengo na moto oyo azwi bwanya, mpe na moto oyo azwi bososoli, mpo ete kozwa yango lokola litomba eleki kozwa litomba ya palata mpe kozwa yango lokola bozwi eleki wolo yango moko. Eleki pauni na motuya, mpe nsaí na yo nyonso mosusu ekokokana na yango te.”​—Masese 3:13-15; 8:11, NW.

Bongo, soki tomoni yango wana tozali konyanya kati na mai to na nzela ya fɔtɔ́, pauni ya Mai Motane esengeli na mbala moko kokundwela biso bonzengá mpe makambo kitoko mpo na kokanisa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto