Mituna ya Batángi
Ntango basodá ya Saulo balyaki nyama elongo na makila na yango, mpo na nini babomamaki te, mpo ete yango ezalaki etumbu ekatamaki na Mibeko ya Nzambe?
Mibali wana babukaki mobeko ya Nzambe na ntina na makila. Basengelaki kozala na bokɛngi mingi koleka; atako bongo, Nzambe ayokelaki bango mawa mpo ete bazalaki komonisa limemya mpo na makila.
Tótalela likambo yango. Bayisraele na litambwisi ya Mokonzi Saulo mpe mwana na ye Yonatana bazalaki na etumba na Bafilistia. Na ntango oyo “bato na Yisalaele bamɔnaki mpasi” na etumba, kozanga kokanisa, Saulo akataki ndai ete bato na ye bakolya te kino monguna akokwea. (1 Samwele 14:24) Kozanga koumela, ndai wana ebimisaki mikakatano.
Bato na ye balóngaki etumba moko makasi, molende oyo bazalaki kosala esilisaki nguya na bango. Bayokaki nzala makasi mpe balɛmbaki mingi. Basalaki nini na ezalela wana ya mpasi makasi? “Bato bakweaki likolo na bilɔkɔ bipunjami, bakamataki bampate mpe bangɔmbɛ mpe bana na bangɔmbɛ, babomaki yango na mabele mpe bato baliaki yango na makila elɔngɔ.”—1 Samwele 14:32.
Yango ezalaki kobuka mobeko ya Nzambe na ntina na makila, lokola bato mosusu ya Saulo bayebisaki ye yango, ete: “Tala, bato basaleli [Yehova] lisumu mpɔ ete balei bilei na makila elɔngɔ.” (1 Samwele 14:33) Ya solo, Mobeko mozalaki koloba ete soki nyama ekatami nkingo, makila masengelaki kosopama liboso na kolya mosuni. Nzambe azalaki kosɛnga meko ya kolekisa ndelo te mpo na kosopa makila. Wana bazalaki kosopa makila na meko oyo ebongi, basaleli na ye bakokaki komonisa limemya mpo na ndimbola ya makila. (Deteronome 12:15, 16, 21-25) Makila ya nyama ekokaki kosalelama lokola mbeka likoló ya etumbelo, kasi basengelaki kolya yango te. Kobuka mobeko yango na nkó esengelaki kopesamelama etumbu ya kufa, mpamba te eyebisamaki na libota na Nzambe ete: “Bokolia makila na nyama mɔkɔ tɛ, mpɔ ete bomɔi na nyama yɔnsɔ ejali na makila na yango. Sɔkɔ nani akolia yango akolongolama.”—Lewitiko 17:10-14.
Basodá ya mokonzi Saulo babukaki nde mobeko na nkó? Bazalaki nde kozanga mpenza botosi mpo na mobeko na Nzambe na ntina na makila?—Kokanisá na Mituya 15:30.
Tokoki kosukisa bongo te. Lisoló liyebisi ete bazalaki ‘koboma nyama na mabelé mpe kolya elongo na makila.’ Boye bamekaki kosopa mwa makila. (Deteronome 15:23) Nzokande, na ezalela na bango ya kolɛmba makasi mpe ya nzala, bakakisaki bibembe ya nyama te mpo na kopesa nzela ete makila masopama mwa ntango molai. Babomaki bampate mpe bangombe “na mabelé,” oyo esengelaki koumelisa kosopama ya makila. Mpe nokinoki bakataki misuni na nyama oyo mbala mosusu elalaki kati na makila. Na yango, atako kati na makanisi na bango balingaki kotosa mibeko ya Nzambe, nzokande balandaki yango te na lolenge esengeli to na meko oyo ebongi.
Mbuma mabe na yango ezalaki ete “Bato bakweaki kolya bilei elongo na makila,” yango ezalaki lisumu. Saulo ayebaki yango mpe apesaki etinda ete bapusa libangá moko monene epai na ye. Apesaki basodá etinda ete: “Moto na moto ayela ngai na ngɔmbɛ na ye mpe moto na moto na mpate na ye mpe aboma yango awa mpe alia. Salela [Yehova] lisumu tɛ mpɔ na kolia yango na makila elɔngɔ.” (1 Samwele 14:33, 34) Basodá oyo basalaki lisumu batosaki, mpe “Saulo atongelaki [Yehova] etumbelo.”—1 Samwele 14:35.
Kokata nyama nkingo likoló na libangá ezalaki mbala mosusu kopesa nzela mpo na kosopama ya makila. Misuni ya nyama misengelaki kolyama mosika na esika yango ebomamaki. Ekoki kozala ete Saulo asalelaki mwa ndambo ya makila oyo matangisamaki mpo na kosɛnga mawa ya Nzambe likoló na baoyo basalaki lisumu. Yehova amonisaki motema mawa, mingi mpenza mpo ayebaki milende oyo basodá yango basalaki atako balɛmbaki mingi mpe bazalaki na nzala. Ekoki mpe kozala ete Nzambe atalelaki ete ndai oyo Saulo akataki kozanga kokanisa nde ememaki bato na ye na ezalela wana ya mpasi.
Lisoló oyo lizali komonisa ete ata soki bomoi ya moto ezali na likámá, yango epesi nzela te na kozanga botosi na mibeko ya Nzambe. Yango esengeli mpe kosalisa biso na komona ntina ya kokanisa malamu liboso ya kokata ndai, mpamba te ndai ekatami kozanga kokanisa ekoki komemela biso moko mpe basusu mikakatano.—Mosakoli 5:4-6.